Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Avril nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moyibi na bandakonzambe ya Angleterre
  • Kosopa zemi ebakisami mingi na Canada
  • Bilɛzi oyo bazali na sida
  • Basi ya matáta bazali koikana
  • Basángo mpe libala
  • “Babomi ya motema molai”
  • Komiboma na komibwakáká longwa na gbagba
  • Bakufi na makámá ya nzela
  • Bana bameli-makaya
  • Kolɔngɔ́nɔ́ ya mɔnɔkɔ mpo na mibangé
  • Kozanga kokufa ekómi ya kotɛka?
  • Mwango ya kosilisa makɔnɔ na lisalisi ya gène mobɛtelami ntembe
  • Baselile na yo—Bibliotɛkɛ moko ya kokamwa mpenza!
    Lamuká!—2015
Lamuká!—1996
g96 Avril nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Moyibi na bandakonzambe ya Angleterre

Zulunalo The Sunday Times ya Londres emonisi ete: “Bisika ya losambo bitalelami lisusu te lokola bisika bisantu.” Bityeli ya buji, bakiti ya baepiskɔ́pɔ, bapipítrɛ ya kwivrɛ, bambɛ́ki ya Moyen Âge mpe basaani ya kobatisa ezali koyibama kati na bandakonzambe ya Grande-Bretagne mpe kotekisama lokola bikembiseli ya bisika ya kofanda. Mombongo wana ya lolenge ya mabe ezali kosalema na mokili mobimba, elongo na biloko ya koyema oyo biyibami mpo na bakomande. Kɔ́pɔ moko ekembisami oyo babosanaki emonanaki na restorá moko na Tokyo. Biloko oyo bizali kobunga na mbula mobimba na bandakonzambe bizali kopesa motuya ya badolare soko milió 7. Sikawa, myango ya kosɛnzɛla ya solosolo mizali kotyama mpe bibongiseli ya libateli bisalelami mpo na kokɛngɛla bandako ya basángo.

Kosopa zemi ebakisami mingi na Canada

Motángo monene ya kosopa zemi 104 403 esalemaki na Canada na 1993, oyo ezali bokóli ya 2,3 na kotalela mbula eleki. Engebene zulunalo The Toronto Star, “motángo ya bana 26,9 likoló ya 100 babimaki na bomoi.” Mpo na nini bokóli ya ndenge wana? Wana basusu bazali koloba ete ezali bongo mpo na bakliníki ya kosopa bazemi na mboka yango, bakonzi ya etuluku oyo eteyaka makambo matali lolenge ya kokanga kobota na Canada bamonisi ete bopusi ya makambo ya nkita ezali “ntina ya liboso mpo na yango basi bazali kosopa bazemi.” Anna Desilets, mokambi ya Alliance pour la vie, ebongiseli moko ya makambo matali kobatela bomoi ya bana, akanisi ete “nzela epesami na bato ete básalela kosopa zemi lokola mwango mpo na kokeba na motángo ya bana oyo basengeli kobotama kati na libota, na misolo oyo misengeli kofutama na Leta.”

Bilɛzi oyo bazali na sida

Zulunalo El Universal ya Caracas emonisi ete motángo ya bilɛzi oyo bazali na sida na Venezuela mozali kokóla mingi mpenza. Monganga moko alimboli ete: “Liboso, bana mibale kino bana motoba bazalaki na sida mbula na mbula, kasi sikawa tozali komona bana mibale kino bana motoba pɔ́sɔ na pɔ́sɔ bazali na sida.” Motángo ya basi oyo bazali na sida mpe bazali kopesa yango na bilɛzi na bango, mozali kokóla mokolo na mokolo. Zulunalo yango esukisaki ete “ezali na ntina mingi komikundola ete mitángo oyo mimonisami na minisitɛlɛ ya makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ezali bobele ndambo moke ya basi oyo bazali na sida.”

Basi ya matáta bazali koikana

Tom Gabor, criminologue na Eteyelo monene ya Ottawa alobi ete: “Basi bakómi komikɔtisa na mobulu mingi koleka ntango ya kala.” Zulunalo The Globe and Mail, emonisi ete: “Mobulu ezali kosalema mingi na basi oyo bazali kozwa litambwisi na esika ete bázala basungi. Bango balingi te komisɔkisa liboso ya mibali ya mayele mingi.” Mobulu ya makasi oyo esalemi na basi mikóló ekóli longwa na motángo ya basi 6 370 na 1983 kino 14 706 na 1993. Nzokande, mibali batángami ntango nyonso koleka mpo na mobulu ya makasi. Engebene zulunalo Globe, “na 1993, mikóló 88,6 % mpe bilenge 76,3 % oyo basalaki mobulu ezalaki bongo mibali.”

Basángo mpe libala

Zulunalo The Sydney Morning Herald ya Australie emonisi ete motángo monene ya bakatolike oyo bazali na mikumba minene kati na lingomba balobaki ete “kotya nsuka na bonzemba oyo ekóma mobeko ekoki kosukisa likambo litali kozanga basángo.” Bonzemba etalelami lokola likambo lileki monene oyo lizali kopekisa bilenge mibali kokɔta bonganganzambe. Kososoláká mokakatano yango, zulunalo Herald ebimisaki mwa mitángo ya kobenda likebi. Líkindo ya etúká ya New South Wales ezalaki na mwayene ya bailíkindo 60 oyo bazalaki kokɔta mbula na mbula banda na 1955 kino 1965. Kasi motángo ya ndenge wana kati na 1988 mpe 1994 ezalaki bobele bailíkindo libwa na mbula. Mokambi ya líkindo mosusu na Sydney alobaki ete engebene makanisi na ye, kopesa nzela na basángo ete bábala ekoki komonana “mwango ya nokinoki” mpo na kosilisa mokakatano yango kasi ezali te monɔ́ ya ntango molai mpo na kosukisa bozangi ya basángo na Australie.

“Babomi ya motema molai”

Zulunalo International Herald Tribune emonisi ete ebongiseli ya Mabota Masangani (Nations Unies) ezali komeka kobimisa badolare milió 75 mpo na kobanda kolongola milió 110 ya biloko oyo bikoki kopanzana lokola bɔmbi oyo bikundami kati na mabelé na mikili 64. Esɛngaka bobele badolare 3 mpo na kosala bɔmbi oyo bakundaka na mabelé oyo ezali monene te koleka ekwokolo ya likaya. Kasi koyeba esika ekundami mpe kolongola eloko motindo wana na mabelé esɛngaka badolare 300 kino badolare 1 000. Lisusu kolongolama ya biloko motindo wana ekómi mpasi mpo na mokakatano mosusu. Molobeli ya Mabota Masangani amonisaki ete: “Mbula na mbula milió 2 ya babɔmbi ya sika ya mabelé etyami na kobakisa na milió 100 koleka oyo ezali naino.” Bato na mayele bandimi ete ekosala bambula mingi mpo na kopɛtola mokili na oyo mokonzi moko ya basodá na Cambodge abéngaki yango ete: “babomi ya motema molai oyo babikisaka te.”

Komiboma na komibwakáká longwa na gbagba

Bato koleka nkóto bamibomaki na komibwakáká longwa na gbagba ebéngami Golden Gate Bridge na San Francisco uta yango efungwamaki na 1937. Richard Seiden, nganga-mayele na makambo matali komiboma alobaki ete: “Komiboma ya moto ye moko na komibwakáká longwa na Golden Gate Bridge ezali kosalema lokola lisano. Emonani lokola ete esepelisaka. Mingi balingi komitalisa na miso ya bato.” Ndambo moke kati na baoyo bamibwakaka nde babikaka mpe na nsima bayebisaka yango epai na moto nyonso, oyo azali kokamwa te lokola bakweaka na mai na lombangu ya bakilomɛtɛlɛ 120 na ngonga mpe mingimingi binama ya kati ya nzoto bipanzanaka. Bolukiluki kati na bato 500 oyo bapekisaki bango na komibwaka emonisaki ete soko 5 % basukaki na komiboma bango moko na nsima.

Bakufi na makámá ya nzela

Engebene zulunalo Clarín, bakufi 26 kati na bafandi 100 000, Argentine ezali sikawa na esika ya liboso mpo na motángo ya bato oyo bazali kokufa na makámá ya nzela. Na boumeli ya 1993, ezalaki na bato 8 116 oyo bakufaki na lolenge wana na mokili yango. Motángo momataki kino 9 120 na 1994. Kasi na boumeli ya basanza motoba ya liboso na 1995, motángo ya bato oyo bakufaki na makámá ya nzela elekaki 5 000. Na 1994, soko 25 % ya bato oyo bakufaki bazalaki batamboli na makolo. Bobele na etúká ya Buenos Aires, motángo ya bato oyo bakufaki na likámá ya motuka emataki kino na 79 %. Motángo monene ya makámá euti na bopɔtu ya batambwisi mituka mpo na kotya malamu ntáká mpe vitɛ́si ntango balekaka liboso ya mituka mosusu.

Bana bameli-makaya

Lapólo ya 1993 mpe 1994 emonisi ete bana mingi na Grande-Bretagne bazali komela makaya. Motángo ya bameli ya mibu 11 kino mibu 15 ekólaki longwa na 10 % kino na 12 %. Zulunalo Independent emonisi ete bokóli wana emati mbala mibale koleka oyo bakonzi ya Leta mpo na makambo ya kolɔngɔ́nɔ́ bazalaki komizela na yango na 1994. Atako kokita ya komela makaya emonani epai na bakóló, 29 % ya mibali mpe 27 % ya basi bazali ntango nyonso komela makaya. Lapólo esukisi ete: “Ndakisa malamu epai na bakóló na kokita ya ezaleli ya komela makaya, esɛngami mpenza liboso ete ezaleli ya bilenge yango ebebisama koleka te.”

Kolɔngɔ́nɔ́ ya mɔnɔkɔ mpo na mibangé

Zulunalo Asahi Evening News ekomaki ete “Kolɔngɔ́nɔ́ ya monɔkɔ ekoki kozala likambo ya bomoi to liwa mpo na mibangé.” Minganga ya Japon balobaki ete “mibangé bakoki kokitisa likoki ya kozwa bokɔnɔ babéngi pneumonie bobele na kosukoláká mino na bango.” Bolukiluki oyo esalemaki kati na mibangé 46, mpo na etuluku moko ya mibangé 21, balifulumɛ́ na bango bazalaki kosukola bango mino mokolo na mokolo nsima ya kolya. Bazalaki mpe kosala bango ekizamɛ́ ya mino mbala mibale to mbala misato pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Nsima ya basanza misato emonanaki ete mibangé 21 wana bayokaki mpasi mikolo zomi moke koleka mibangé 25 oyo balandaki mwango yango te. Kolɔngɔ́nɔ́ malamu eutaki na bozangi ya mikrobe ya monɔkɔ. Bolukiluki moko oyo esalemaki liboso emonisaki ete “nsɔ́i mpe mintika ya bilei oyo ekɔtaka na kozanga koyeba na mipúlúlu epesaka pneumonie.”

Kozanga kokufa ekómi ya kotɛka?

Register-Guard ya Eugene, etúká ya Oregon, na États-Unis. elobi ete: “Okoki kosomba kozanga kokufa na badolare 35.” Microbiologiste James Bicknell azali kopesa yango mpo na kobatela ADN na yo mpo ete, lokola zulunalo elobaki yango, “na bambula soko nkama oyo ezali koya, mokitani na yo moko ya bolingo akoki kosalela biloko oyo bizwami kati na ADN na yo mpo na kosala elilingi na yo.” Monganga Bicknell azali kotɛkisa bisaleli ya ADN oyo ezali bongo biteni mibale ya molekani bipɛtolami malamu mpe mwa molangi moko ya moke ezali na mai na kati. Alobi ete: “Kulútá eteni ya molekani yango na kati ya matáma na yo, zindisá yango kati na mai wana mpe tindelá ngai yango.” Na nsima akobimisa ADN longwa na baselile oyo ekangamaki na molekani mpe akolalisa ADN likoló ya lokasa ya pɛto. Na bongo, lokasa yango ekobatelama malamu kati na engwongolo moke esalemi na mondɔlu mpe nkombo na yo ekokomama likoló na yango mpo ete osalela yango ndenge olingi. Guard elobi ete: “Alobi na bato ete bábombaka mputulu ya bibembe, mintika ya nsuki, manzaka ya misapi. Engwongolo ya ADN ezali eloko moko esengeli kokitana epai ya bana ya bana na yo.”

Mwango ya kosilisa makɔnɔ na lisalisi ya gène mobɛtelami ntembe

Esili koleka mibu motoba, ntango mwango ya kobikisa makɔnɔ na lisalisi ya gène ebimaki, bato bazalaki na elikya makasi. Minganga balikyaki ete ntango mosusu, bakosilisa makɔnɔ oyo masangolamaki na kotubáká gènes ya malamu kati na nzoto ya mobɛ́li. Balikyaki mpe na kotuba matériel génétique oyo ezalaki kobimisa baselile ya mabe, lokola kanser, ete emiboma yango moko. Nzokande, na nsima ya bolukiluki ya makasi, mwango yango mokómi kobɛtelama ntembe. Zulunalo International Herald Tribune elobi ete: “Mpo na yikiyiki nyonso oyo ebimaki, lapólo moko te ata ya moke emonanaki mpo na mobɛ́li oyo asalisamaki na mwango yango.” Minganga bakambi bazali kobanga ete bolukiluki ezali kosalema mbangumbangu mpo na matomba ya mosolo mpe ya moto ye moko na esika ya komibanzabanza mpo na mokɔni. Likambo moko ezali ete baselile oyo esalisami na mwango yango ekoki kobundisama mpe kobebisama na ebongiseli ya nzoto ya moto oyo etalelaka yango lokola bapaya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto