Nkomá ya batángi
Makambo mazali koleka na mokili Bazulunalo na bino ezali kokóma sé kitoko koleka. Ezali kolobela makambo ya lolenge nyonso—makambo oyo mazali komonana, masano, siansi, mpe bongo na bongo. Motó ya likambo “Makambo mazali koleka na mokili” ezali mpenza ya kosepelisa mingi koleka. Nakanisi ete soki baemisyó ya televizyó ezalaki kotalela makambo motindo wana, ekokaki kozala ya kosepelisa koleka.
R. S., Italie
Nasepelaka mingi na masoló ya “Makambo mazali koleka na mokili.” Moko oyo ezalaki mpenza kotalela ngai ezalaki nimero ya 22 Apríli 1995 (ebimeli ya Lifalansé). Motó ya likambo ezalaki ete “Nini esalaka ete molakisi alingama na bato mingi?” Lisoló limonisaki ete banakelasi balingaka mpenza te balakisi oyo bapesaka badevware mingi te, kasi balingaka balakisi oyo bazali na boboto, oyo bamibanzabanzaka mpo na bango mpe oyo bazali sembo. Yango ezali solo! Nazali na baeksperiansi mingi ya balakisi oyo balingaka banakelasi oyo balingaka ete balakisi balingama. Kasi nsukansuka, balakisi wana balingamaka ntango nyonso te. Matɔ́ndi lisusu mpo na lisoló yango kitoko.
L. K., États-Unis
Bisakola ya lokuta Matɔ́ndi mpo na masolo “Bisakola ya lokuta to Esakweli ya solo—Lolenge nini okoki kosala bokeseni?” (22 Yúni 1995, ebimeli ya Lifalansé) Atako nasili koyekola Biblia mokolo na mokolo na boumeli ya mibu 42 mpe namekaka kososola makambo matali elembo ya mikolo ya nsuka, nakoki koloba ete bolobeli ya mokuse mpe ya polele oyo bopesaki mpo na mikapo nyonso likoló na lisoló esungaki ngai mpenza. Bokómisaki lisoló yango pɛtɛ mpo na komikundola yango. Ezalaki mpenza bilei kitoko ya elimo!
M. B., États-Unis
Moyibi Nazali na mibu 13 mpe mokakatano oyo nazalaki na yango ezalaki moyibi. Nazalaki koyiba mosolo, to kokenda na magazíni moko mpe koyiba bazoka. Nalingaki kotika, kasi eloko moko te esungaki ngai kino nayaki kozwa Lamuká! ya 22 Yúni 1995 (ebimeli ya Lifalansé) mpe natalaki lisoló “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Moyibi—Mpo na nini osengeli koyiba te?” Lisoló yango lisimbaki mpenza motema na ngai. Lisalisaki ngai ete nabɔndela Yehova mpe nayeba ete akolimbisa ngai mpenza. Nalingi kokɔta na Bokonzi ya Nzambe, mpe nayebi ete bato oyo bayibaka bakozala kuna te. Matɔ́ndi mingi na ndenge bobimisaki lisoló yango.
J. A., Canada
Nazali na mibu 23 mpe nazali kati na bolɔ́kɔ mpo na moyibi. Nyonso wana ebandaki mpo na bopusi ya baninga. Balingaki ete nayiba epai na moto moko boye mpe kobanda wana makambo mabebaki sé kobeba. Lisoló yango lizali mpenza solo. Nazali na elikya ete bilenge bakotalela batoli wana liboso ete ntango eleka. Na lolenge wana, bakoki kopɛngola na kosuka esika ngai nazali—kati na bolɔ́kɔ.
M. S., États-Unis.
Lisoló ya bomoi Nauti kosilisa kotánga lisoló “Ndenge nazwaki matomba na lisalisi ya Nzambe.” (22 Yúni 1995, ebimeli ya Lifalansé). Kotángáká lolenge Celeste Jones anyokolamaki na basangani ya libota na ye—mpe nzokande asimbaki kondima na ye mpe ayikaki mpiko—namilakaki ngai moko ete nakokaki kosala makasi ete namilelalela lisusu te mpo na mikakatano ya nzoto na ngai.
J. P., États-Unis
Lokola nazali ebɔ́sɔ́nɔ́ mwa moke na nsé ya Celeste Jones, nazali na boyebi moke mpo na likambo litali mpiko oyo moto asengeli kokamata mpo na kotikala ngwi. Matɔ́ndi mingi na bino nyonso oyo bosungaki Celeste na boboto nyonso mpe bopesaki ye lisungi oyo lisengeli mpo na mosala na ye ya kosakola.
W. R., Canada
Lisoló yango lisimbaki motema na ngai. Lilendisaki kondima na ngai mpe lisungaki ngai na kososola ete mwango moleki malamu ya kosunga bazalani na biso ezali ya kosalela mabaku nyonso oyo mabongi mpo na koteya bango nsango malamu.
P. H. P., Nigeria
Nasepelaki mpe nayokaki esengo mingi na lisoló ya Celeste. Nakómi mobangé mpe nazali na bampasi mpe malɔ́zi nyonso oyo bobangé ememaka, kasi lisoló na ye lipesaki ngai nguya mosusu ete nabunda na yango.
M. R., Jamaïque