Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Avril nk. 26-27
  • Moninga na ngai ya motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moninga na ngai ya motema
  • Lamuká!—1996
  • Masolo mosusu
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Namoná naino bolingo lokola oyo te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • “Nasili kobatela kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Lamuká!—1996
g96 Avril nk. 26-27

Moninga na ngai ya motema

Banani bazali baninga na yo? Bazali bobele bato ya mibu na yo? Tángá lisoló ya elenge moko litali moko ya baninga na ye, oyo azali na mibu soko ntuku nsambo koleka ye.

LIBOTA na biso likendaki na Aberdeen, Ecosse, esili koleka soko mibu libwa, ntango nazalaki na mibu bobele motoba. Yango ezalaki ntango moko ya mpasi mpo na ngai mpamba te nasengelaki kobanda kotánga na eteyelo ya sika mpe nasengelaki kozwa baninga ya sika. Kasi likambo moko likitisaki ngai motema kati na ezalela na ngai ya sika. Mwasi moko mobangé, oyo baboti na ngai bakutanaki na ye mbala moko liboso, azalaki kofanda pene na ndako na biso. Nasalaki boyebani na ye mpe mosika te nakamwaki na komona lolenge ya kosepelisa oyo azalaki na yango. Azalaki elenge na motema, mpe azalaki kolata na lolenge moko kitoko.

Ndako oyo tozalaki kofanda ekómaki ya kofutela, na bongo tokendaki kofanda libela na ndako moko mosika na ndako ya Tantine Louie. Nazalaki kobénga ye “Tantine” mpo na bonkonde mpe lokola ebéngeli ya boboto. Nayokaki mawa lokola tosengelaki kolongwa, mpamba te ngai mpe ndeko na ngai ya mobali tozalaki kokenda kotala ye mbala na mbala.

Nzokande, eteyelo oyo nazalaki kotánga ezalaki bobele pene na ndako ya Tantine Louie. Na yango, mikolo nyonso ya mitano nsima ya kelasi mpe liboso ya kozonga lisusu na eteyelo mpo na koyekola mabina ya mboka Ecosse, nazalaki koleka epai ya Tantine mpo na komela tíi. Yango ekómaki momeseno na ngai. Nazalaki komema moko ya babúku na ngai ya masoló, mpe azalaki kotángela ngai wana nazalaki kolya sandwiches ya kɔkɔ́mbre mpe komela kɔ́pɔ ya miliki ya malili.

Nazali komikundola ete mikolo ya mitano ezalaki koleka malɛmbɛmalɛmbɛ wana nazalaki kozela na motema likoló ete ngonga ya kobima kelasi na 3:30 ya mpokwa ebɛta, yango ezalaki elembo ya kokenda mbangu mpenza epai ya Tantine Louie. Ezalaki na ntango yango, mpo na mbala na ngai ya liboso ya koyeba lolenge nini mibangé basepelisaka. Ya solo, nazalaki kotalela ye lokola mobangé te. Kati na makanisi na ngai azalaki mpenza elenge. Azalaki kotambwisa motuka mpe azalaki na ndako ya nsolo kitoko mpe elanga kitoko​—yango nde biloko bana balingaka mingi mpenza.

Mbula misato elekaki mpe nakómaki na mobu ya nsuka na eteyelo ya yambo. Ezali na ntango yango nde Tantine Louie amonaki ete elanga na ye ekómaki kopesa ye mosala mingi mpe amonaki ete kofanda na ndako ya nsé eleki malamu. Na ntango wana nakokaki te kososola likambo litali bobangé. Nazalaki na mawa mpo ete ndako na ye ezalaki na esika ekeseni kati na engumba. Mikolo ya mitano ezalaki lisusu te kosepelisa ngai lokola yango ezalaki liboso.

Na 1990 koleka na ngai na eteyelo ya ntei ebelemaki. Nasengelaki kosala nini na eteyelo monene boye? Lolenge nini nasengeleki kolónga mikakatano? Nasengelaki kokenda na eteyelo mosusu, na bongo kotika baninga na ngai, lokola libota na biso ekómaki kofanda na esika mosusu. Kasi Tantine Louie azalaki lisusu kuna mpamba te ndako oyo akómaki kofanda ezalaki bobele pene na eteyelo na ngai ya ntei! Natunaki ye soki nakokaki koya epai na ye na ntango ya bolei ya midi mpo na kolya sandwiches na ngai. Na yango, ebongiseli mosusu ya kokenda kolyaka mbala na mbala etyamaki.

Nakanisi oyo ezali ntango boninga na biso ebongwanaki longwa na boninga ya mwana-ná-mokóló kino bosepeli ya boninga ya moko epai na mosusu. Yango ezalaki solo na mitindo mingi, kasi motindo moko ya sikisiki ezalaki ntango tobandaki kotánga elongo masoló ya bakomi oyo ezalaki kosepelisa​—Jane Eyre, Villette, Pride and Prejudice, mpe Women in White​—na esika ya babúku na ngai ya masoló. Esengo na ngai ya kotánga masolo ekólaki.

Tantine Louie ateyaki ngai ete bolingo mpo na bato ezali likoki mpe ntɔ́ki. Soki mpo na ye te, mbɛlɛ nakokaki koyeba yango te kino nakómaki mokólo. Ateyaki ngai koyokamela, nzokande bato mingi kati na mokili oyo etondi na mosala bayebaka yango te, ezala mikóló to bilenge. Lokola nazalaki komilalisa na kanapé na ye, azalaki koyebisa ngai masoló ya bomoi na ye mpe baeksperiansi oyo akutanaki na yango. Nasepelaki mingi na boyebi oyo mwasi wana azalaki na yango.

Tantine Louie amipimelaki​—kobala, kobota, mosala ya mosuni​—mpo na kosunga baboti na ye mpe mama-kulútu na ye oyo bazalaki kobɛ́la mingi. Yango epesaki nzela na lɛ́ki na ye ya mobali ete akóba na mosala ya ntango nyonso.

Na boumeli ya mbula mibale oyo eleki, kolɔngɔ́nɔ́ ya Tantine Louie ekómi kokita, mpe nakoki komona lolenge bobangi, mpasi mpe bolɔ́zi oyo bobangé ememaka. Kala mingi te, na mibu 84, asengelaki kotika kotambwisa motuka, mpe yango ezalaki komekama makasi mpo na ye. Amesanaki na bomoi ya kásakasa, mpe sikawa kofanda bobele na ndako ezali mpenza mpasi. Asengelaki kobundisa mayoki ya komimona ete azalaki kotungisa bato. Ezala ata tolobi na ye mbala boni ete tolingaka ye mpe tolingi kosalela ye eloko moko, azali ntango nyonso na mayoki ya komema ngambo.

Likambo lizali kotungisa ye sikawa ezali oyo ete ekómi mpasi mpo na ye ete asukola nzoto mpe alata bilamba ye moko. Atako asalaki yango mpo na basusu, kasi sikawa ezali momekano ya komimona ye moko kati na mposa ya lisungi. Yango ezali koteya ngai ete ata ntango bato bakoki lisusu te kosala makambo nyonso bango moko, basengeli ntango nyonso kopesamela limemya.

Nzokande, koleka nyonso oyo, eksperiansi oyo esungi ngai na kososola likambo litali kokóma mobangé. Likambo nyonso ya moke oyo Tantine Louie akoki lisusu kosala yango te ezali kolelisa ngai. Oyo eleki, ntango nazali komona ye azali kobanga to koyoka mpasi na mbeto, nalelaka mingi. Likambo nazali koyoka mawa mingi ezali oyo ete mwana mosusu elenge koleka ngai azali te mpo na kopesa motuya mpe kozwa litomba na mayele na ye nyonso.

Mbala mosusu, namitunaka soki nazali kosala oyo ekoki mpo na ye. Asepelaka mpe alingaka ngai lokola ngai nalingaka ye? Kasi ntango nakendaka mpo na kolya mpe soki napesi ye bízi, ntembe wana nyonso esilaka.

Nazali komiyoka na lokumu kozala na moninga lokola oyo. Asili koteya ngai bizalela mingi kitoko​—oyo eleki nyonso ateyi ngai bolingo. Nakosombitinya boninga na ye te mpo na oyo ya baninga nkama ya mibu na ngai. Atako mosika te nakotika eteyelo mpe nakokenda lisusu te kolya bilei ya midi na ndako na ye, nakotika soko moke te kolinga, kotala mpe kosunga moninga na ngai ya motema. Asili koteya ngai ete bomoi ekoki kozala na esengo mpe ekoki kosepelisa soki ozali komibanzabanza mpo na basusu liboso na yo moko.​—Euti na ndeko moko.

[Elilingi na lokasa 26]

Elongo na Tantine Louie

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto