Etumba na ngai monene mpo na kozwa kondima ya solo
Nazalaki ntango nyonso kobanga kokende na lifelo mpamba te nayebaki ete nazalaki moto malamu te mpo na kokende na likoló. Namonaki ete ekokaki kozala ete nakokenda na epongelo, yango wana nazalaki kobondela makasi mpe nazalaki kopelisa kandélá mpo ete nákenda na lifelo te.
WANA motuka na ngai ezalaki koselimwa likoló na nzela etondi na bangalasi na ngomba ya Oregon, na Etats-Unis, nazalaki komituna mpo na mobulungano oyo namilukelaki. Ezalaki mbala na ngai ya liboso ete natambwisa motuka likoló ya bangalasi mpe na nsé ya mopɛpɛ makasi na banzela oyo nayebaki naino te, oyo ezwami kati na mabwaku mibale mpe ezalaki mpenza mpasi mpo na komona likoló ya kapó. Nakanisaki ete nsuka ekokaki mpo na biso, na bongo, nabondelaki Nzambe ete abikisa ngai elongo na motamboli na ngai na kolakáká ye ete nakozonga na ndakonzambe.
Tokómaki na esika tozalaki kokende mpe kuna nakokisaki elaka na ngai na kozongáká na ndakonzambe. Na kotaláká búku ya baadresi, namonaki adresi ya ndakonzambe moko na Seattle mpe nakendaki kuna mokolo ya lomingo oyo elandaki. Epesaki ngai mayoki ya kozanga eloko moko lolenge ezalaki kosala ngai liboso. Na ndakonzambe yango bazalaki kolobela bobele makambo matali mosolo lolenge moko na ndakonzambe oyo nazalaki kokɔta liboso. Bazalaki kolekisa ekɔlɔ́ ya mabonza mbala misato! Nazali komikundola ete nayebisaki Nzambe ete esengeli na ngai nayeba lolenge mosusu ya kosambela ye.
Nakólaki na libota ya basodá bakatolike. Nakɔtaki na eteyelo ya katolike. Nazali komikundola mokolo moko wana nazalaki kolanda mateya ya katikisimo, natunaki na mamɛlo ete: “Mpo na nini tosalelaka Biblia te?” Bayebisaki ngai ete nazalaki na kondima moke, mpe mbala mingi, bayebisaki baboti na ngai mpo na bolɛmbu na ngai.
Nazalaki kokóla na kobanga Nzambe. Nazalaki na likanisi ya polele te mpo na ye. Azalaki Nzambe oyo esengeli kosambela ye, kasi oyo mpe akomonisa yo mpasi soki osambeli ye malamu te. Ntango nakómaki na mibu 17 ya kobotama, nayebisaki baboti na ngai ete nakokenda na ndakonzambe lisusu te. Nazalaki komiyoka pene na Nzambe bipai mosusu koleka na ndakonzambe. Nazalaki kokenda kotambola na zɛ́lo pembeni ya ebale mpe soki likambo moko lizali kotungisa ngai, nazalaki koyebisa yango na Nzambe. Nasɛngaki ye bolimbisi mpo ete nasololaki na ye kozanga lisungi ya sángó, nakokaki bobele koyebisa ye makambo oyo mazalaki kotungisa ngai. Natungisamaki mpe mingi mpo na makambo nyonso oyo mazalaki koleka na mokili. Ezalaki na eleko ya hippie, baninga na ngai bazalaki komela bilangwiseli mpe kosala pite. Namonaki matomba mabe ya bizaleli na bango; bazemi oyo bakanelaki te, kosopa bazemi, doze oyo eleki ndelo ya bilangwiseli mpe oyo ekoki koboma—nalingaki te kozala lokola bango!
Nabandi kosala bolukiluki
Ngai mpe moninga na ngai Becky tozwaki ekateli ya kolongwa na kelasi mpo na koluka eloko mosusu oyo eleki malamu. Eloko yango malamu esengelaki mpenza kozala! Tokanaki kokende kotala mama na ye na etúká ya Washington, na Etats-Unis. Nayebisaki baboti na ngai ete nasengelaki kokende mobembo mpo na komeka kolongola na makanisi na ngai makambo oyo mazalaki kotungisa ngai. Yango nde ntango oyo totambwisaki motuka likoló na bangalasi na Oregon. Mokolo ya lomingo na Seattle, nsima ya losambo, nabimaki na ndakonzambe na nkanda, nazongaki ndako mpe nayebisaki mayoki na ngai epai na Edna, mama ya Becky. Ayebisaki ngai ete ayebi moto moko oyo akoki kopesa biyano na mituna na ngai. Asololaki na telefone na Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi.
Nazali komikundola ete nazalaki kozela boyei na bango. Yango eumelaki mikolo misato. Ntango bayaki, namonaki ete bazalaki bato oyo baleki pɛto oyo namona naino te. Ezalaki Clarence mpe Edith Meunier. Clarence azwaki lipɔlɔ́mi na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower mpe ayebaki makomami malamu mpenza. Nokinoki nakamwaki ntango balimbwelaki ngai ete Nzambe azali na nkombo—Yehova. Namonaki lokola kongɛnga ekɔtelaki ngai na motó. Boyekoli ya liboso eumelaki ngonga misato, mpe bazongaki lisusu nsima ya mikolo mibale mpo na kolanda boyekoli.
Nasepelaki mingi. Nokinoki nayebisaki baboti na ngai na telefone ete nasili kozwa solo. Nayebisaki bango lisusu ete Nzambe azali na nkombo, Yehova, mpe ete Batatoli ya Yehova bazali koteya solo ya Biblia. Nakanisaki ete bayokaki naino te makambo na ntina na Batatoli ya Yehova mpe na bongo bakosepela koyeba makambo oyo ngai nayekolaki. Nzokande, basila koyoka na ntina na Batatoli ya Yehova mpe basilikaki mingi. Bayaki kozwa ngai mpe bazongaki na ngai na Californie.
Ntango nakómaki na ndako, nayebaki ete nasengelaki koluka lisangá nokinoki. Nayebaki esika Ndako ya Bokonzi ezalaki mpe nakendaki na makita oyo elandaki. Ndeko mwasi moko atalaki ngai mpe amungamungaki. Na bongo, natunaki ye soki akolinga koyekola Biblia elongo na ngai. Akamwaki mingi mpe andimaki. Nasepelaki mingi kozala lisusu kati na lisangá mpamba te nabandaki komiyoka ete nazalaki ngai moko. Nasengelaki kosangana elongo na basusu.—Baebele 10:24, 25.
Botɛmɛli euti na libota na ngai
Lokola baboti na ngai bazalaki kotɛmɛla lingomba na ngai, batindaki ngai epai ya monganga oyo asalisaka mpasi ya motó. Ntango baboti na ngai basɛngaki ye lapólo, ayebisaki bango ete nazalaki motomboki. Nayebisaki bango ete nazalaki motomboki te. Kasi ezalaki nde mbala ya liboso kati na bomoi na ngai ete náyeba likambo moko oyo lizali kopesa biyano na mituna na ngai, yango epesaki ntina ya kozala na bomoi.
Nsima na yango, ntango nakendaki na Ndako ya Bokonzi, baboti na ngai basilikaki makasi. Bayebisaki ngai ete nakokaki kokende na eteyelo monene oyo nalingi, kolanda mateya oyo nalingi, mpe basengelaki kofuta mosolo mpo na yango, kasi nasengelaki kozala na boyokani moko te elongo na Batatoli ya Yehova. Lokola nalingaki libota na ngai mingi, yango ezalaki mpasi mpo na koyika mpiko na likambo motindo yango. Mokolo moko, oyo ezalaki mpenza mpasi mpo na ngai, mama ayebisaki ngai ete akolinga nkutu komona ngai nakómi kosala kindumba na esika ete nakóma Motatoli ya Yehova. Nakokaki kosala nyonso oyo nalingi, kasi kokóma Motatoli ya Yehova te. Baboti na ngai bayebisaki ngai ete nasengelaki kobima na ndako. Maloba ya Nzembo 27:10 eyaki kati na makanisi na ngai: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde Yehova akolɔkɔta ngai.” Ndeko mwasi moko na lisangá azalaki na ndako oyo ezalaki na mofandi te, mpe apesaki ngai yango.
Nakutanaki na ndeko mwasi moko na Ndako ya Bokonzi oyo azalaki naino moto ya sika kati na solo lokola ngai. Nkombo na ye Chris Kemp, na bongo, tokómaki baninga ya motema mpe tokómaki kofanda esika moko. Tozwaki batisimo na 18 Yulí 1969, na libándá ya masano Dodger, na Los Angeles.
Na ntango ya makita na lisangá, tozalaki komona mobongisi-nzela moko, ndeko mwasi Dana Wolff. Azalaki mpenza moto ya elimo. Toyaki koyeba ete azalaki na mposa ya esika ya kofanda, na bongo tozwaki moninga malamu mpo na kofanda na biso elongo.
Nazali komikundola elakiseli na ngai ya liboso oyo nasalaki na makita. Nabongisaki yango malamu na boye ete nayebaki yango na motó. Ezalaki lolenge ya kolakisa mokanda. Nzokande, wana ntango ya kosala yango ekómaki pene, nakomaki yango na mwa lokasa moke mpe natyaki yango na libenga. Ntango namataki na ebáelo, nazalaki lisusu komikundola eloko moko te. Nalobaki: “Mbote . . . Mbote . . . Mbote . . . ” Nalobaki mbote soko mbala mitano. Nakokaki komikundola eloko moko te. Na nsima, natalaki bayangani mpe nalobaki: “Nasalaka yango te na bandako.” Nabimisaki lokasa na ngai mpe natángaki liloba moko na moko oyo nasengelaki koloba. Ntango nasilisaki, nazongaki kofanda mpe nabandaki kolela.
Ndeko mobali oyo azalaki kotambwisa lisoló yango atunaki sikawa bayangani: “Eloko nini toyekoli na elakiseli oyo?” Moto moko te apesaki eyano. Na nsima, natɛlɛmaki, natali bayangani mpe nalobi: “Lolenge nini bakokaki kokanga likambo moko? Nasali yango mabe! Ya solo, bakangi ata likambo moko te!” Nafandaki lisusu mpe nazongeli kolela. Sikawa, badevware na ngai elekaka mwa malamu—ekoki kozala lisusu mabe koleka te.
Nsima ya mwa mikolo, Dana ayebisaki biso ete azalaki koluka ndeko moko oyo akoki kokende na ye elongo mpo na kosala lokola babongisi-nzela epai kuna mposa ezalaki makasi. Na butu yango, Chris mpe ngai, ntango tozongaki na ndako, tolobelaki likambo yango. Na mokolo molandaki, tozongelaki Dana mpe totunaki ye: “Okanisi boni mpo na biso?” Dana akamwaki mingi. Toyebaki solo kala mingi te mpe tozwaki batisimo elekaki ntango molai te mpo na kozala babongisi-nzela ya sanza na sanza! Tozalaki mpenza motindo ya bato oyo azalaki koluka te. Atako bongo, akomelaki la Société Watchtower mpe batindaki biso nyonso misato na Middlesborough, na Kentucky.
Botɛmɛli ya libota na ngai elóngaki te
Wana tozalaki kokanga biloko mpo na kokende, baboti na ngai babéngaki ngai na telefone mpo na koyebisa ngai ete nasengeli te kobimisa motuka na ngai na libándá ya etúká ya Californie. Bazalaki bato oyo bandimaki kofuta kredi na yango mpe bayebisi ngai ete bakoki kobénga bapolisi soki nameki kokende na motuka yango na makasi. Na bongo, tozwaki ekateli ya kokende na bísi. Ntango ya mwa fɛ́ti moke oyo esalemaki mpo na bokei na biso, ndeko mobali moko oyo nakutanaki na ye bobele mbala moko alobaki na ngai ete: “Soki nasosoli malamu, osengeli kofuta badolare 3 000 mpo na motuka na yo.” Nandimaki. Alobaki ete azali na likoki ya kofuta yango. Nayebisaki ye ete nasengeli te kopesa ye nzela ete asala bongo. Asalaki ebongiseli ete nakutana na bandeko ya lisangá mpo na kolobela yango. Bango balobaki na ngai ete: “Soki alingi kofuta yango, tiká ye afuta. Kotɛmɛla elimo ya Yehova te.” Na bongo, nyongo ya motuka efutamaki. Baboti na ngai bayokaki nkanda kasi bakamwaki na ebongiseli motindo wana. Lobi na yango, tokendeki na Kentucky.
Ntango tokómaki na Middlesborough, bapesaki biso ndako ya kofanda na nsima ya Ndako ya Bokonzi moko ya kala. Ndako yango ezalaki na masini oyo epesaka molungé te. Ezalaki kozwa mpiɔ makasi na eleko ya mpiɔ. Nkutu na eleko ya molungé, mpiɔ ezalaki, kasi tosepelaki mingi kozala na yango mpamba te tozalaki na likoki ya kofutela ndako te. Tozalaki bobele na epeseli-molungé ya moke. Na bongo, na eleko ya mpiɔ, tozalaki kolata bilamba mingi, ata na ntango ya kolala. Mbala mosusu, na ntɔ́ngɔ́, ngalasi ezalaki kotonda na simá mpe basosɛti na biso ezalaki kokangama likoló na yango. Tozalaki ntango nyonso na malató na ndako ya kosukola mpo na kopasola bangalasi oyo ezalaki kokangama butu mobimba na saani monene ya kosukola.
Chris mpe ngai tozalaki naino basáli ya ntango nyonso bobele na boumeli ya basanza mitano, kasi tozalaki kotambwisa boyekoli mingi ya Biblia, mpe yango ezalaki esengo ete tózala kuna. Tosepelaki mingi na boye ete biso nyonso tozalaki kosala mwayene ya bangonga 150 na sanza na boumeli ya basanza moke ya liboso oyo tosalaki. Dana alingaki kokóma mobongisi-nzela monene na ntango ya eleko ya molungé, na bongo, akanaki kokende na Biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York. Tokómaki naino kuna te, na yango, tolingaki kosala mobembo elongo na ye. Ntango tokómaki kuna, Dana akendaki na Departemá ya mosala ya kosakola mpe tolandaki ye. Likambo ya kokamwa, baponaki biso nyonso misato lokola babongisi-nzela monene.
Tata na ngai alóngi te kokokisa elaka na ye, abaloli ndimbola ya Makomami
Na sanza oyo nabandaki mosala ya mobongisi-nzela monene, Satana akólisaki milende na ye mpo na kokweisa ngai. Nazwaki mokanda oyo eutaki na bánki mpe emonisaki ete nasengelaki kobanda kofuta sanza na sanza badolare 32,80 mpo na mosolo ya kelasi na ngai. Namizelaki na yango te mpamba te baboti na ngai balakaki ngai ete bakofutela ngai mosolo na kelasi soki nazali kozwa bapwɛ́ ya malamu. Nakomelaki tata na ngai mokanda mpe nayebisaki ye ete, mpo na likambo wana atala ngai lokola Motatoli ya Yehova te, kasi lokola mwana na ye. Nakundwelaki ye na boboto nyonso ete alobaki ete akofutela ngai mosolo ya kelasi soki nazali kozwa bapwɛ́ ya malamu. Nasɛngaki na ye ete atika kotyela ngai bozito motindo wana mpamba te ekozala mpasi mpo na ngai ete nafutaka mosolo yango, lokola nazalaki kozwa bobele badolare 50 na sanza, oyo nazalaki kobikela na yango. Kofuta badolare 32,80 sanza na sanza, nasengelaki kotikala bobele na badolarɛ 17,20 mpo na kobikela na yango.
Tata na ngai azongiselaki ngai eyano elongo na mokapo ya Biblia. Akomaki boye: “Lokola ozali ntango nyonso kosalela Biblia, okanisi boni mpo na mokapo oyo: ‘Ye oyo alingi kosala te, akolya mpe te.’ Ozali kosalela mayele oyo ozwaki na kelasi mpo na eloko moko ya litomba te, na bongo, osengeli kofuta mosolo yango.”—2 Batesaloniki 3:10.
Nsango wana ya mokuse etungisaki ngai mingi ntango nazwaki yango. Nakɔtaki na vuatire, nakendaki epai moko boye ngai moko mpe nabandaki kolela mpamba te nayebaki eloko nakokaki kosala te. Na nsima, natikaki kolela mpe nakómaki na nkanda. Nasosolaki ete ezalaki te baboti na ngai nde bazalaki kosala ngai bongo, kasi nde Satana. Na bongo, nagangaki na mongongo makasi ete atika ngai, ete akolónga ngai te ete natika mosala na ngai ya mobongisi-nzela.
Mikakatano mingi, mapamboli mpe mingi
Nazwaki mosala ya ntango mokuse, kosala bangonga 20 pɔ́sɔ na pɔ́sɔ—bangonga 11 mokolo ya liboso mpe bangonga 9 na mokolo oyo elandi—mpe nakóbaki mosala ya mobongisi-nzela monene. Nokinoki nayekolaki kosomba bilamba ya tombola. Ebombelo na ngai ya bilamba ya mpiɔ ezalaki na barɔ́be minei oyo nasombaki na dolare moko mpe monkóto moko na dolare 1,50. Nakómaki kosala lokola mopangwisi simá mpo na kosomba bɔ́ti ya badolare 20. Biso banso tosengelaki kosala milende. Mpo na komeka kobomba mwa mosolo, nafungolaki kɔ́nti. Mbala mosusu nazalaki kobombisa 25 cents mpe kozwa yango mpo na kosomba esansi. Nakanisi ete mosali na bánki azalaki kosepela te ntango nazalaki kokɔta. Nsukansuka, bakangaki kɔ́nti na ngai—lokola ezalaki bobele na mwa mosolo moke. Nazalaki kokende kozwa esansi ya kredi ya 25 cents na esika batekaka esansi. Nsima ya mwa ntango, batekisi ya esansi bakómaki kotala ngai na miso mabe. Mbala mosusu tozalaki kozanga mosolo ya kosomba esansi. Ntango mosusu soki tokɔti na motuka, toyebi ete ebombelo ya esansi ezali na eloko te, toyebi mpe ete tosengeli kokende kotambwisa boyekoli ya Biblia. Mbala mosusu soki tokei na pósita, tozalaki kokuta dolare moko batindeli biso na moto moko—yango ezalaki kosalisa na mwa bamposa mosusu ya ntina. Atako mikakatano mizalaki kasi tozalaki mpenza komona lisungi ya Yehova. Ezalaki mpenza kosimba mitema na biso.
Nazali komikundola ntango nazalaki kolɔkɔta mpe koteka milangi ya mpamba mpo na kosomba tɛ́mbrɛ ya mikanda. Mpe na yango, nabombaki mosolo sanza misato mpo na kosomba sapato ya badolare 8. Na nsima, likambo moko ya mawa likómelaki ngai. Natikalaki bobele na bakaleso mibale ya kolata. Nabondelaki Yehova mpe nayebisaki ye ete yango ezalaki mpenza nsɔ́ni mpo na ngai ete náyebisa ye yango, kasi nayebaki te eloko nini nasengelaki kosala. Nsima ya bapɔ́sɔ mibale, batindelaki ngai liboke moko ya bakolá milato 17, zipɔ́ moko, bluzɛ moko mpe biloko mosusu! Yango eutaki epai ya moto moko oyo nazalaki lisusu koyoka nsango na ye te esilaki koleka mbula mobimba.
Mombongo ya masanga makasi ezalaki kosalema mingi na mboka wana. Mpo na ntina na likambo wana ya kobuka mibeko, bato mingi na bisika mosusu bazalaki na bobangi mpe na ekɛngɛ mingi mpo na koyamba bapaya. Atako bongo, nazalaki kotambwisa bayekoli ya Biblia mingi mpe nakómaki kosakola ngai moko ngonga 25 pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Na ntango wana, namiyokaki mpenza pene na Yehova koleka mpamba te nasengelaki kotya motema na ngai mobimba epai na ye. Namonaki ete likambo ya ntina ezali te biloko ya mosuni oyo moto akoki kozala na yango, kasi nde boyokani na ye elongo na Yehova. Nayaki koyeba ete esengo eutaka epai ya Yehova, kasi na biloko ya mosuni te.—Luka 12:15.
Nazwi libota ya bolingo
Bobele na sanza oyo nasilisaki kofuta mosolo na ngai ya kelasi, nakutanaki na Jeff Malone, mobandami na ngai mpe moninga ya bolingo. Azalaki kosala na Betele, mpe nsima ya mbula moko, tobalanaki. Ntango nabalanaki na Jeff, nazwaki bobele ye moko te, kasi nalingamaki mpe na mama na ye, na ndeko na ye ya mwasi, na noko na ye, mpe bango nyonso nalingaki bango mingi. Bolingo na biso mpo na Yehova esangisaki biso makasi koleka makambo nyonso mosusu. Jeff mpe ngai totindamaki kosala lokola babongisi-nzela monene na Union City, na mboka Tennessee. Tosalaki bobele sanza minei mpe totondisaki lisɛngi mpo na kokɔta na Betele, mpe bandimaki yango.
Totikaki Betele na 1980 mpe mwa moke na nsima, mwana na biso ya liboso ya mwasi abotamaki, nkombo na ye Megan. Mwana na biso ya mobali na nkombo Jeffrey abotamaki na 1983. Jeff mpe ngai tozali kosala lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza na lisangá Forest Hill, na Fort Worth, Texas.
Tozwaki ekateli ya kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na koteya bana na biso ete bálinga Yehova. Atako Jeff azali kosala lokola nkulutu na lisangá, atyaka ntango nyonso matomba ya libota na biso na esika ya liboso. Tolandaka malako ya la Société mpo na oyo etali koyangana na makita, kosalela bana botángi, kosangana na mosala ya kosakola, kotalela mokapo ya mokolo, mpe kosangana na mosala ya botongi Bandako ya Bokonzi. Mbala mingi, ngai na Jeff tozalaki kolekisa soko ngonga moko mpo na kolalisa bana na biso—koyembela bango banzembo, kosalela bango botángi ya masoló ya Biblia, kosala mabondeli elongo na mokomoko na bango. Mokano ya libota na biso ezali ete biso nyonso tózala kati na mosala ya ntango nyonso. Eloko moko oyo tokangami na yango na boumeli ya bambula—ezali oyo ete tokangami elongo, tosalaka makambo nyonso elongo, ezala mosala to kominanola.
Soki nazongisi makanisi na ngai nsima, nakoki koloba ete Davidi azalaki na elónga ntango alobaki ete: “Nakozongisa nini epai na Yehova na ntina na mapamboli na ye epai na ngai?” (Nzembo 116:12) Ezali na eloko moko te oyo Satana akoki kosala mpe Yehova akokaka te kobebisa yango. Jeff, Megan, Jeffrey mpe ngai, tozali kati na libota ya bolingo mpe tozali kosalela Yehova kati na bomoko; mpe lisusu, nazwi libota kitoko ya bandeko kati na mokili mobimba mpo ete nazali mosangani na lisangá ya Yehova. Nakozala na botɔ́ndi mpo na yango kati na bomoi na ngai mobimba.—Lisoló ya Karen Malone.
[Elilingi na lokasa 23]
Karen elongo na mobali na ye mpe bana na bango mibale