Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Octobre nk. 15-18
  • Botaleli mibembo ya kokamwisa ya bandɛkɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Botaleli mibembo ya kokamwisa ya bandɛkɛ
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Liyɔndɛ́lɛ, mpo na nini otikaka zúmbu na yo?”
  • Mwa biyano mosusu
  • “Kálati” ya bandɛkɛ
  • Mayele ya ndɛkɛ
  • “Bótala malamumalamu bandɛkɛ”
    Lamuká!—2014
  • Mateya oyo tokoki kozwa epai ya bandɛkɛ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
Lamuká!—1995
g95 Octobre nk. 15-18

Botaleli mibembo ya kokamwisa ya bandɛkɛ

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA ESPAGNE

NZEMBO moko ya kala elobaka ete mayɔndɛ́lɛ mazongaka na misyó ya kala babéngi San Juan Capistrano na engumba San Juan Capistrano na Californie, Etats-Unis. Elobi ete, na ntembe te, na mwa 15 Mársi mbula na mbula, mazongaka na bazúmbu na yango kuna.

Mayɔndɛ́lɛ ya Mpótó malandaka manáka lolenge yango. Liteya moko ya Espagne oyo liyebani mingi lilobaka ete na mwa 15 Mársi, mongongo ya liyɔndɛ́lɛ mokoyokana lisusu.

Na epai ya nɔ́rdi ya mokili, bato basepelaka na bozongi ya mayɔndɛ́lɛ, elembo ya bonkɔ́kɔ mpo na kolobela eleko ya ebandeli ya molungé. Kasi, bato mingi bakamwaka na koyeba epai wapi mayɔndɛ́lɛ mazalaki na eleko ya mpiɔ. Bamoko bakanisaka ete malalaki mpɔngi makasi. Basusu balobaka ete makendaki na sanza​—moto moko asalaki bolukiluki ete makoki kopumbwa kuna na boumeli ya basanza mibale. Episkɔ́pɔ moko ya mboka Espagne na ekeke ya 16 alobaki ete mayɔndɛ́lɛ malekisaka ntango ya mpiɔ na nsé ya mai, makanganaka esika moko na nsé ya mabeke mpe bitima. Búku na ye nkutu ezali na elilingi moko oyo ezali komonisa babomi-mbisi bazali kobenda mozánga etondi na mayɔndɛ́lɛ. Soko makanisi oyo nyonso mazali kokamwisa yo, bosolo mpe ekokamwisa yo.

Na boumeli ya ekeke oyo, bato oyo bayekolaka bandɛkɛ, balatisaki mayɔndɛ́lɛ mingi mpɛ́tɛ́. Kati na yango, mwa ndambo mamonanaki na bisika oyo makendaka na eleko ya mpiɔ. Na bongo, likambo ya kokamwisa, mayɔndɛ́lɛ ya Grande-Bretagne mpe ya Russie bakutaki yango elongo mazali kolekisa ntango ya mpiɔ na mosika ya bankóto ya bakilomɛtɛlɛ​—na nsɔ́ngɛ́ ya súdi-ɛ́sti ya Afrika. Baninga na bango mosusu ya Amerika ya nɔ́rdi bapumbwaka kino mosika na súdi ya Argentine to na Chili. Kasi, mayɔndɛ́lɛ mazali te ndɛkɛ bobele yango oyo esalaka mibembo milai motindo wana. Ndɛkɛ mingi ya eteni ya nɔ́rdi ya mokili ekendaka kolekisa eleko ya mpiɔ na súdi.

Bato oyo bayekolaka bandeke bakamwaki na koyeba ete ndɛkɛ moke lokola liyɔndɛ́lɛ ekoka kosala mobembo molai ya kokende mpe kozonga ya bakilomɛtɛlɛ 22 500, liboso ete ezonga na zúmbu na yango na eleko ya ebandeli ya molunge. Koluka koyeba esika oyo mayɔndɛ́lɛ makendaka, yango ebimisaki mituna minene mpenza.

“Liyɔndɛ́lɛ, mpo na nini otikaka zúmbu na yo?”

Nini epusaka ndɛkɛ ete ekende epai mosusu ya mokili? To, lokola lisese moko ya mboka Espagne elobi yango: “Liyɔndɛ́lɛ, mpo na nini otikaka zúmbu na yo?” Ezali mpo na mpiɔ to mpo na koluka bilei? Lokola bandɛkɛ mingi ya mike oyo bazali na mokakatano ya kobika na eleko ya mpiɔ basalaka mobembo te mpo na kokende epai mosusu, ntembe ezali te ete ezali mpo na bilei, kasi mpo na mpiɔ te nde mayɔndɛ́lɛ masalaka mobembo. Kasi, mobembo ya ndɛkɛ ezalaka bobele te mpo na koyengayenga koluka bilei. Nzokande, na bokeseni na bato, bandɛkɛ bazelaka te bobele na ntango ya mpasi ete básala mobembo.

Bato ya siansi bamoni ete ezali bolai ya mokolo nde ekólisaka mposa ya mobembo. Na eleko ya ebandeli ya mpiɔ, ntango mikolo ekómaka mikuse, bandɛkɛ bakangamaka. Yango esalemaka mpe ata mpo na baoyo batyami na kongɛnga ya mwinda mpe ntango bakangami na balukiluki. Ndɛkɛ oyo ekangami nkutu etalaka na likebi epai oyo esengeli kokenda na boumeli ya mobembo na yango. Ya solo, mposa ya kosala mobembo na ntango moko ya sikisiki ya mobu mpe na epai moko boye, ezali ya kobotama.

Ndenge nini bandɛkɛ bakokaka kosala mibembo ya ntáká milai? Basusu bakatisaka Mai monene mpe bisobe epai kuna ezalaka mpasi mpo na kolanda nzela, mpe bapumbwaka butu na moi. Na bisika mosusu, bandɛkɛ ya mike bakatisaka bango moko kozanga lisungi ya mikóló. Ata na ntango ya mopɛpɛ to mbonge, balandaka bobele nzela na bango.

Kopumbwa​—mingimingi mpo na kokatisa Mai minene to bisobe​—ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Esɛngaki bambula mingi mpo ete moto akoka kosala bongo. Na ntembe te, Christophe Colomb mbɛlɛ akokaki te kokatisa Mai monene kozanga lisungi ya bisaleli ya mobembo lokola astrolabe to boussole.a Nkutu, pene na nsuka ya mobembo na ye ya liboso, bandɛkɛ nde balakisaki ye nzela ya mboka Bahamas. Na kolandáká momeseno ya bato ya mibembo ya Mai monene na ntango ya kala, abalukaki epai ya súdi ntango amonaki bandɛkɛ ya mobembo bazali kokenda epai wana.

Mobembo malamu esɛngaka ebongiseli malamu ya kozala ntango nyonso na cap mpe koyeba epai yango ezali. Na maloba mosusu, esengeli koyeba esika oyo okómi na kotaleláká epai ozali kokende mpo na koyeba nzela nini okokamata mpo na kokóma kuna. Atako biso bato tozali na makoki ya kosala bongo te kozanga bisaleli​—kasi bandɛkɛ bakoki kosala bongo. Malembemalembe, bato oyo bayekolaka bandɛkɛ bayaki kosangisa makambo nyonso oyo mazali kosalisa bango na koyeba lolenge nini bandɛkɛ bayebaka epai esengeli kolanda na ntango bazali kopumbwa.

Mwa biyano mosusu

Bibenga ezali “bimekeli” ya malamu oyo bato na siansi oyo bamipesi baponi mpo na koyeba lolenge bandɛkɛ basalaka mobembo. Bayokisaki bibenga yango mpasi na kolatisáká yango “manɛ́ti” oyo matalatálá na yango emonisaka te mpo na kozipa bango miso ete báyeba te bilembo ya bisika na bango. Basusu balatisaki bango bisaleli oyo bikoki kopekisa bango ete báyeba nzela na lisalisi ya champ magnétique terrestre. Basusu nkutu balangwisaki bango liboso ete bápumbwisa bango kokanisáká ete bakoyeba nzela te. Kasi, bandɛkɛ yango batondi na makoki balóngaki mikakatano wana, nzokande kosangisama ya mikakatano mingi esalaki ete bázonga na bisika na bango te. Emonani polele ete bandɛkɛ bazali bobele na mwango moko te mpo na kosala mobembo. Na bongo, myango nini bango basalelaka?

Bolukiluki oyo ezali kosalema na kosaleláká moi mpe butu emonisi ete bandɛkɛ bakoki kosala mobembo na ntango ya moi na lisalisi ya mwese mpe na butu na lisalisi ya minzɔ́tɔ. Ezali boni soki likoló lizipami na mapata? Bandeke bakoki mpe koyeba nzela na lisalisi ya oyo babéngi: champ magnétique terrestre. Mpo na kozonga na bazúmbu na bango, basengeli mpe koyeba bisika oyo bamesani na yango. Lisusu, bato na mayele bamoni ete bandɛkɛ bayokaka makɛlɛlɛ mpe nsolo makasi koleka biso bato​—atako bayebi te lolenge nini yango esalemaka na ntango bapumbwaka.

“Kálati” ya bandɛkɛ

Atako bolukiluki ya bato ya mayele epesi biyano na mituna mingi mitali mobembo ya bandɛkɛ, ezali na likambo moko monene oyo lizwi naino eyano te. Mpo na kozonga na ndako, kozala bobele na boussole mpamba ekoki te, esengeli lisusu kozala na kálati​—liboso mpenza mpo na koyeba esika oyo ozali, mpe na nsima kolanda nzela ya malamu.

Bandɛkɛ basalelaka “kálati” nini? Lolenge nini bayebaka esika oyo bango bazali nsima ya kokende mosika na bakilomɛtɛlɛ mingi longwa na esika na bango ya momeseno? Lolenge nini bayebaka nzela ya malamu lokola yango emonanaka ete bazali na bakálati te?

James L. Gould, moto na siansi alobi ete: “Kálati ya ndɛkɛ ezali likambo oyo lileki kokamwisa mpe oyo lileki mpasi mpo na kososola kati na bomoi ya bandɛkɛ.”

Mayele ya ndɛkɛ

Likambo oyo lizali mpenza polele ezali oyo ete kopumbwa ya ndɛkɛ ezalaka kosalema na mayoki na ye. Bandɛkɛ mingi oyo bazalaka na momeseno ya kosala mobembo na eleko moko ya mobu, bazalaka na mayoki ya kobotama oyo epesaka bango nzela ete básala mobembo malamu. Likoki wana liuti wapi?

Emonani polele ete mayele wana mauti na Mozalisi oyo mpe atondi na mayele, oyo akoki “kotya” code génétique ya bandɛkɛ. Nzambe atunaki Yobo motuna oyo molongobani: “Kombekombe eyekolaka lolenge ya kopumbwa epai na yo wana esembolaka mapapu na yango epai ya ngɛlɛ́?”​—Yobo 39:26, Today’s English Version.

Nsima ya mibu monkámá ya kosala bolukiluki likoló na mobembo ya bandɛkɛ, bato na mayele bapusami na kozala na limemya mingi mpo na bɔɔngɔ́ moke ya ndɛkɛ. Nsima na koyeba banzela na bango ya mobembo, bato na mayele bazali kokamwa na bantáká milai oyo bandɛkɛ mosusu bazali kokatisa. Uta kala mpenza, ezala na ntango ya eleko ya ebandeli ya molungé to na ntango ya eleko ya ebandeli ya mpiɔ, bamilió ya bandɛkɛ bazali kokatisa molɔ́ngɔ́. Basalaka mibembo na bango na lisalisi ya mwese na ntango ya moi to na lisalisi ya minzɔ́tɔ na ntango ya butu. Soki likoló lizipami na mapata, basalelaka champ magnétique terrestre. Bakoki nkutu koyeba nzela na nsolo to na makɛlɛlɛ moke.

Lolenge oyo “batyaka kálati” na bango ezali likambo oyo liyebani naino te. Toyebi epai kuna mayɔndɛ́lɛ makendaka, kasi toyebi lolenge bango bakendaka te. Atako bongo, soki tomoni mayɔndɛ́lɛ masangani esika moko na eleko ya ebandeli ya mpiɔ, tokoki bobele kosepela na mayele ya Nzambe oyo apesaki bango likoki ya kosala mibembo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Astrolabe ezalaki esaleli mpo na koluka latitude.

[Etanda na lokasa 18]

Bolóngi ya mibembo

Ntáká: Na eleko ya molungé ya mobu 1966, liyɔndɛ́lɛ moko ya mai na arctique balatisaki yango mompɛ́tɛ́ na nɔ́rdi ya mboka Pays de Galles, na Grande-Bretagne. Na Desɛ́mbɛ na mobu yango, bamonaki yango​—na libaku moko boye​—na Nouvelle-Galles du Sud, na Australie. Liyɔndɛ́lɛ yango lipumbwaki bakilomɛtɛlɛ koleka 18 000 na boumeli ya basanza motoba. Mpiko ya ndenge wana ekoki kokamwisa te epai na mayɔndɛ́lɛ ya mai na arctique. Na mbula moko, basusu batambolaka na mokili mobimba mbala mingi.

Mbangu: Pluviers dominicains bazali mbala mosusu bandɛkɛ ya mobembo oyo baleki mbangu. Basusu bakatisaki bakilomɛtɛlɛ 3 200 oyo ekaboli Hawaii mpe bisanga Aléoutiennes bobele na bangonga 35​—elingi koloba bakilomɛtɛlɛ 91 na ngonga moko!

Molende: Sylvettes rayées ya Amerika ya nɔ́rdi, oyo ezali na kiló bobele bagramɛ 20, bazali bapumbwi banene. Na mobembo na bango na Amerika ya súdi, bakatisaki ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 3 700 ya Atlantique na boumeli ya mikolo misato na ndambo kozanga komipemisa. Molende wana ekokani na oyo ya mopoti mbangu oyo akoki kosala bakilomɛtɛlɛ 1 900 kozanga komipemisa. Na boumeli ya mobembo na ye, sylvette abungisaka soko katikati ya kiló na ye​—ndɔ́tɔ ya baoyo balingaka bakiló mingi.

Kokóma na ngonga: Lolenge moko na liyɔndɛ́lɛ, nkɔngí (cigogne), oyo emonisami awa na likoló, eyebani mpo na kokóma na ye na ngonga. Mosakoli Yilimia alobeli yango lokola ndɛkɛ oyo “eyebi ntango ebongisami na ye” mpe ntango na ye ya “kokóma.” (Yilimia 8:7) Pene na nkɔngí milió moko na ndambo balekisaka eleko ya ebandeli ya molungé na Israël.

Makoki ya kopumbwa: Mpo na puffin ya Grande-Bretagne, yango elingaka kofanda esika mosusu te. Balongolaki puffin ya mwasi na zúmbu na yango na Grande-Bretagne mpe bakendaki na yango na Boston, na Etats-Unis; ntáká ya bakilomɛtɛlɛ soko 5 000. Ntango batikaki yango, ekatisaki Atlantique na mikolo zomi na mibale na ndambo mpe ekómaki na zúmbu na yango na Grande-Bretagne liboso ya mokanda oyo eyaki na mpɛpɔ na nsango na yango. Likambo ya kokamwisa koleka ezali oyo ete bandɛkɛ bakatisaka te Atlantique Nord na ntango ya mibembo na bango.

[Elilingi na lokasa 16]

Nkɔngí moyebi ya ngonga, mbula na mbula ezongaka na ntango na yango

[Elilingi na lokasa 17]

Ndɛkɛ na nkombo grue, ikei mobembo na kopumbwáká na lolenge ya lɛ́tɛlɛ V

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

Fɔtɔ́: Caja Salamanca y Soria

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto