Nazali na bomoi ya mpasi
NAZALAKI mpenza elenge, wana nasengelaki kokutana na makambo ya mpasi ya bomoi. Okoki kozala na makanisi lolenge moko na ngai na komona ete bomoi kati na mokili ya lelo etondi mpenza na bokesene. Ezali bongo mpo na mokomoko na biso. Biso banso tozwaka maladi. Ezali solo ete bamoko kati na biso bakómaka mibangé kozanga kobɛla bamaladi makasi, kasi biso banso tosukaka bobele na kokufa.
Nakanisaka mbala mingi liwa koleka lolenge nasengelaki kokanisa yango. Nzokande, tiká ete nayebisa bino ntina nini, mpe mpo na nini, nakoki koloba ete nazwaki matomba na makambo oyo ekómelaki ngai.
Ntango nazalaki na mbula libwa
Nabotamaki na Sɛtɛ́mbɛ 1968 na Brooklyn, New York. Nazalaki mwana ya nsuka kati na bana mitano. Tata azalaki ebɔ́sɔ́nɔ́ mpe mama azalaki kosala lokola mobombi-mosolo (caissière) mpo na kokokisa bamposa na biso. Ntango nazalaki na mbula libwa, mama amonaki ete libumu na ngai evimbaki na ngámbo moko. Amemaki ngai na lopitalo. Monganga ayokaki eloko moko lokola libanga ya monene. Mpe mwa mikolo na nsima, bakɔtisaki ngai na lopitalo Kings County.
Nsima wana mama akendaki, nabandaki kolela mpamba te nazalaki kobanga. Mokolo oyo elandaki, bato mibale balataki bilamba ya bulé bamemaki ngai na ndako basalaka lipasó. Nazali komikundola ete eloko ya nsuka oyo namonaki na ndako baakolaka bato ya maladi (salle de réanimation) ezalaki bongo kongenga moko ya makasi likoló na motó na ngai mpe nayokaki ete bazalaki kotya ngai eloko moko likoló na monɔkɔ. Minganga balóngaki na kolongola néphroblastome (lolenge moko ya kanser), bakisá mpe ngei moko na ndambo ya libale (foie).
Nalekisaki pɔ́sɔ mitano na ndako oyo baakolaka bato ya maladi. Minganga bazalaki kosukola bampota na ngai mokolo na mokolo. Nazalaki konganga ntango bazalaki kolongola ngai babándi (sparadrap). Mpo na kolɛmbisa mpasi, minganga batindaki moto moko mpo ete ameka kobongola ngai makanisi. Nazali komikundola ete moto yango alobelaki ngai mingi na ntina na mimbemba (grénouilles).
Nsima na kobima na ndako oyo baakolaka bato ya maladi, natikalaki lisusu pɔ́sɔ minei kati na lopitalo. Na boumeli ya ntango wana, kosalisama na radiothérapie ebandaki. Yango ezalaki mpasi mingi, bobele mpo na radiothérapie yango moko te, kasi mpe mpo ete nasengelaki kolala na libumu, oyo ezalaki naino kosala mpasi na ntina na lipasó. Kosalisama wana ezalaki kopesama mikolo nyonso, kobanda mwayambo kino mwamitano.
Ntango nabimaki na lopitalo na nsuka ya Novɛ́mbɛ 1977, nakóbaki kosalisama na radiothérapie, mpe kozonga na ndako. Ntango kosalisama wana esilaki, nabandaki kosalisama na chimiothérapie. Mikolo nyonso, kobanda mwayambo kino mwamitano, nasengelaki kolamuka na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpe kokende na lopitalo mpo bátuba ngai bantonga ya bankisi makasi. Monganga azalaki kokɔtisa ngai ntonga kati na mosisa mpe kotindika nkisi nokinoki. Nazalaki kolela mpamba te nazalaki kobanga bantonga, kasi mama alobaki na ngai ete esengelaki nayikela yango mpiko mpo ete naoka nzoto malamu.
Kosalisa na nzela ya chimiothérapie ebimisaki bampasi mosusu makasi na nsima. Ezalaki kopesa ngai mposa ya kosánza mpe nazalaki kosánza mbala mingi. Makila na ngai ekitaki mpe nsuki na ngai nyonso esilaki.
Nakɔndaki mpo na maladi
Na eleko ya ebandeli ya molungé oyo elandaki, mokolo mwalomingo ya Pásiká, wana tozalaki komibongisa mpo na kokende na ndakonzambe, makila ebandaki kobimela ngai na zolo na ntina na kokita na ngai ya makila. Baboti na ngai bamekaki kosalisa ngai, kasi balóngaki te. Minganga bakangisaki kobima wana ya makila na kotondisáká bándi kati na zolo na ngai, kasi makila ebandaki sikawa kobima na nzela ya monɔkɔ. Lokola kobima yango ya makila elɛmbisaki ngai mingi, bakɔtisaki ngai na lopitalo. Mpo ete mopɛpɛ mabe na bango ezwa ngai te, baoyo bazalaki koya kotala ngai basengelaki kolata bagáa, monganza mpe robe. Na nsima ya pɔ́sɔ moko, makila na ngai emataki mpe epesaki ngai nzela ya kobima longwa na lopitalo.
Nokinoki, chimiothérapie ezongelamaki. Nakokaki te kokende na kelasi mpe nazangaki yango mpenza. Nazalaki lisusu komona baninga na ngai te mpe nasakanaki na bango elongo lisusu te. Nabandaki kozwa mateya ya kelasi na ndako, mpamba te, engebene minganga, nasengelaki kokende na eteyelo te wana nazalaki kosala chimiothérapie to mpe nokinoki nsima ya kosilisa yango.
Na eleko ya molungé wana, lokola momeseno, nalingaki kokende kotala bankɔ́kɔ na ngai na Géorgie, kasi napesamelaki nzela te mpo na kokende. Nzokande, lopitalo ebongisaki kotambola mpo na bato ya maladi ya kanser na lobálá ya kominanola (parc d’attraction) na New Jersey. Atako na kozonga na ngai nalɛmbaki, kasi nazalaki na esengo.
Nasilisaki chimiothérapie na nsuka ya mobu 1978, kasi nakóbaki kozwa mateya ya kelasi na ndako mpe yango eumelaki koleka mibu misato. Ntango nazongaki na eteyelo na Yanuáli 1981, ezalaki mpenza mpasi mpo na komesana nsima ya koteyama na ndako na boumeli ya ntango molai. Mbala mosusu nazalaki kobunga wana nazalaki komeka koluka kelasi na ngai. Nzokande, nalingaki mpenza eteyelo, mingimingi mateya ya miziki, kobɛta masini mpe ngalasisi. Bamoko kati na bayekoli bazalaki na boboto, kasi basusu bazalaki kotumola ngai.
Mpasi ezongi lisusu
Lokola libumu na ngai ezalaki ya kovimba, bilenge babandaki kotuna ngai: “Ozali na zemi?” Monganga ayebisaki ngai ete namitungisa te, ezalaki libale na ngai nde ekómaki kozongela bonene na yango. Nzokande, na Mársi, nsima ya kosalisa ekizamɛ́, monganga azongisaki ngai lisusu na lopitalo. Nabandaki kolela. Nakendaki kelasi bobele na boumeli ya basanza mibale na ndambo.
Balongolaki ngai ndambo ya mosuni oyo evimbaki (tumeur) kati na libale na ngai. Nsima na yango ntango nalamukaki, moto ya liboso oyo namonaki ezalaki bongo mama. Azalaki kolela. Ayebisaki ngai ete nazalaki lisusu na kanser mpe eloko oyo evimbaki ezalaki monene mingi koleka na boye ete ekoki kolongolama te, na yango esengelaki kosalela chimiothérapie mpo na koyeisa yango moke. Nazalaki bobele na mbula 12.
Kosalisama wana ezalaki kosalema na lopitalo, bapɔ́sɔ nyonso, nazalaki kokenda kuna mpo na mikolo mibale to misato. Lokola momeseno, mposa ya kosánza ezalaki koyela ngai mpe nazalaki kosánza. Bilei ezalaki ata na elɛngi moko te mpo na ngai mpe nsuki na ngai nyonso esilaki na motó. Kosalisama na chimiothérapie elandamaki kino na 1981. Na ntango yango, na Apríli, nazongelaki lisusu kotangisama na ndako.
Na ebandeli ya 1982, ntango nakɔtaki na lopitalo mpo na kozwa lipasó, nalɛmbaki mingi na boye ete balífulumɛ́ basengelaki kosalisa ngai mpo na komata mpe kokita na emekeli ya kiló. Na lisalisi ya chimiothérapie, eloko oyo evimbaki ekitaki. Na bongo, minganga balóngaki na kolongola yango elongo na ndambo mosusu ya libale. Natikalaki lisusu na lopitalo na boumeli ya basanza soko mibale. Pene na katikati ya mobu 1982, nazongelaki lisusu chimiothérapie, oyo ekóbaki kino na ebandeli ya 1983.
Na boumeli ya eleko yango, nazalaki na mawa mpamba te nakokaki lisusu te kokende na eteyelo. Kasi, na nsima, nsuki na ngai ekólaki lisusu mpe nabandaki komiyoka malamu. Nazalaki na esengo ya kozala na bomoi.
Nazongi lisusu na eteyelo
Molakisi na ngai oyo azalaki koteya ngai na ndako azwaki bibongiseli ete nazwa lipɔlɔ́mi elongo na banakelasi oyo natángaki na bango elongo na boumeli ya ntango moke na mobu 1981. Nasepelaki mingi mpo na yango, ezalaki esengo mpo na komona lisusu baninga na ngai mpe kozwa baninga basusu ya sika. Mokolo ya kopesa mapɔlɔ́mi na Yúni 1984, nakangaki baninga na ngai mosusu mpe balakisi na ngai bafɔtɔ́; mpe libota na ngai, bakangaki ngai bafɔtɔ́ mpo na kokundola molulu wana ya ntina.
Bobele na eleko ya molungé yango, nakendaki kotala bankɔ́kɔ na ngai na Georgie mpe natikalaki kuna pene na eleko wana mobimba. Ntango nazongaki na nsuka ya Augústo, ntango ekokaki mpo na komibongisa mpo na bozongi ya kelasi. Ya solo, nazongaki na eteyelo. Nazalaki mpenza na esengo!
Namonisi bosepeli na makambo ya losambo
Dawn mpe Craig bakesanaki na bayekoli mosusu, mpe nabendamaki epai na bango. Ntango napesaki bango makabo mpo na Eyenga ya Mbótama, bayebisaki ngai ete basanganaka na milulu ya fɛ́ti yango te. Natunaki bango: “Bozali Bayuda?” Craig ayebisaki ngai ete bazalaki Batatoli ya Yehova mpe Eyenga ya Mbótama ezalaki na boyokani moko te na boklisto. Apesaki ngai bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, oyo ezalaki kolobela likambo yango.
Namonisaki bosepeli na ntina na lingomba na bango, oyo emonanaki ete ekeseni mpenza na oyo ya ngai. Ntango nazalaki kokenda na ndakonzambe, nazalaki mbala nyonso koyoka bobele likambo moko mbala na mbala: ‘Ndimelá Yesu Klisto, zwá batisimo mpe okokende na likoló.’ Kasi yango ezalaki komonana mpamba mpo na ngai. Nakómaki kokanisa mpo na yango ete: wana makambo mazali mpenza pɛtɛɛ, boye ozali moto ya mayele koleka, to eloko moko ezali kotambola malamu te. Nayebaki ete nazalaki moto ya mayele koleka te, na bongo, namonaki ete likambo moko lizalaki kotambola malamu te kati na mateya ya ndakonzambe.
Na nsima, Craig abandaki koyekola Biblia elongo na ngai na ntango ya bopemi ya midi. Mokolo moko, abyangaki ngai na liyangani ya Batatoli ya Yehova, mpe nakendeki. Nakutaki Craig mpe nafandaki mpembeni na ye mpe libota na ye. Nakamwaki mingi na oyo namonaki: bato ya mposo ndenge na ndenge bazalaki kosambela Nzambe kati na bomoko. Oyo nayokaki ekamwisaki mpe ngai mingi.
Ntango Craig mpe ngai tozalaki lisusu na kelasi moko te, tokokaki lisusu koyekola Biblia elongo te mpamba te tozalaki lisusu kolya na ntango moko te. Mama ya Craig abengaki mama na ngai na telefone mpo na kosɛnga ye nzela ya koyekola elongo na ngai, kasi mama aboyaki. Na nsima, apesaki ngai nzela ya kokende na makita ya boklisto. Na bongo, nabéngaki na Ndako ya Bokonzi moko oyo nimero na yango ya telefone ezalaki kati na búku ya banimero ya telefone, mpe bayebisaki ngai ete likita moko lizalaki na 9:00 ya ntɔ́ngɔ́ na mwalomingo. Na mwapɔ́sɔ, natambolaki soko bandako 30 kino na Ndako ya Bokonzi mpo na komindimisa ete nayebi nzela.
Ntango nakómaki na ntɔ́ngɔ́ elandi, moto moko atunaki ngai soki nautaki na Ndako ya Bokonzi mosusu. Nayebisaki ye ete oyo ezalaki mbala na ngai ya liboso ya koya na makita kasi, nasilaki koyekola na boumeli ya mwa ntango mokuse. Abyangaki ngai na boboto nyonso ete nafanda mpembeni na ye mpe mwasi na ye. Makita ezalaki mpenza na bokeseni na milulu ya ndakonzambe. Nakamwaki na komona molende ya bato mingi mpo na kopesa biyano na boumeli ya eteni oyo ekosalemaka na mituna mpe biyano. Ata bana mike mpe bazalaki kopesa biyano. Natombolaki lobɔkɔ mpe nayanolaki na motuna moko. Uta mokolo wana, nakóbaki koyangana na makita mpe nabandaki kokóla na boyebi ya solo ya Biblia.
Mpasi ezongeli ngai lisusu
Na Desɛ́mbɛ 1986, na boumeli ya mbula na ngai ya nsuka na eteyelo ya katikati, nasalaki ekizamɛ́ ya monganga lokola momeseno. Eloko oyo monganga amonaki na mompúlúlú na ngai ya lobɔkɔ ya mobali ebangisaki ye mingi. Na yango, abengisaki ngai lisusu mpo na baekizamɛ́ mosusu ya radio. Ntango nayebaki ete eloko moko ezalaki malamu te, nabandaki kolela.
Balongolaki lisusu ndambo ya mosuni; monganga asalelaki ntonga moko mpo na kolongola ndambo ya eloko oyo evimbaki na mompúlúlú na ngai. Emonanaki ete ezalaki kanser. Ya solo, biloko oyo bivimbaki bizalaki misato, oyo moko na yango ezalaki monene na mpembeni ya misisa oyo ezali pene na motema. Nsima na kolobela yango elongo na monganga, tozwaki ekateli ete nasengelaki komela bankisi mibale ya chimiothérapie mpo na koyeisa moke biloko oyo bivimbaki liboso ya lipasó. Makambo oyo eyaka na nsima ezalaki bobele yango moko lokola na momeseno: kolongwa ya nsuki nyonso, mposa ya kosánza, kosánza mpe kokita ya makila.
Liboso, natungisamaki na makanisi, kasi na nsima nabandaki kosala mabondeli mingi epai na Yehova mpe yango elendisaki ngai. Kopesama ya mapɔlɔ́mi esengelaki kosalema na nsima ya basanza soko motoba. Balakisi na ngai bazalaki na boboto mpe bazalaki komitya na esika na ngai; batunaki ngai bobele ete napesa bango mokanda ya monganga mpe namitungisa te na ntina na makambo na ngai ya eteyelo.
Mikakatano na eteyelo
Nazalaki te bobele na mikakatano ya kolanda mateya ya kelasi mpo ete nazalaki maladi, kasi mpo ete nsuki na ngai mpe ebandaki kolongwa. Ntango nasombaki ekoti ya nsuki (perruque), baninga na ngai ya kelasi balobaki ete nsuki na ngai ezalaki kitoko mpenza, bayebaki te ete ezalaki ekoti ya nsuki. Nzokande, mwana mobali moko ayaki koyeba yango. Mbala na mbala oyo nazalaki kokɔta na kelasi, azalaki kokoma liloba “ekoti ya nsuki” na etánda, ye na baninga na ye babandaki kosɛka mpe kotyola. Matumoli na bango nyonso wana ezalaki kotungisa ngai na makanisi.
Na nsima, mokolo moko, liboso ya bato mingi, moto moko alongolaki ngai ekoti ya nsuki na nsima. Nabalukaki nokinoki mpe nalokɔtaki yango. Nzokande, bilenge mingi bamonaki motó na ngai oyo ezangá nsuki, yango epesaki ngai mpasi mingi. Nakendaki na ebuteli mpe nalelaki. Mokolo oyo elandaki, namonaki na bilongi ya banakelasi mosusu ete bayokaki mabe na likambo oyo esalamaki. Baninga na ngai ya kelasi bayebisaki ngai ete elenge mwasi moko afutaki elenge mobali moko mpo ete alongola ngai ekoti ya nsuki.
Likambo ya makila
Na ntina na chimiothérapie, makila na ngai ekitaki mingi. Lisusu, makila ezalaki kobima na zolo, ntango mosusu, mbala mibale to misato na mokolo. Nabatisamaki naino te, kasi nazwaki etɛlɛmɛlo makasi mpe nalobaki ete lokola nazali moko ya Batatoli ya Yehova, nakondima makila te. (Misala 15:28, 29) Yaya na ngai ya mwasi alendisaki mwana na ye moko ya moke ya mwasi mpo aloba na ngai ete alingi te ete nakufa. Tata azalaki na nkanda makasi. Azalaki kosɛngisa ngai ete nandima makila. Mpe mama alɛmbaki te mpo na koloba na ngai ete Nzambe akolimbisa ngai soki nandimi ete bazongisa ngai makila.
Bobele na ntango yango, minganga bakebisaki ngai ete kokita ya makila motindo wana, ekokaki kopesa ngai mpasi ya motema to likámá na misisa ya motó. Lokola nazwaki ekateli ya kotikala ngwi, basɛngisaki ngai ete natya mabɔkɔ na mokanda moko oyo ezali komonisa ete soki nakufi, etali bango te. Mosika te, nakómaki malamu mpo na kozonga na ndako mpe kokende lisusu na kelasi. Nzokande, na ntina na makila na ngai oyo ezalaki kokita mingi, minganga bazwaki ekateli ya kokitanya chimiothérapie na radiothérapie. Nalandelaki kosalisama wana mokolo na mokolo na nsima ya kelasi, uta na nsuka ya Apríli kino na ebandeli ya Yúni 1987.
Kopesama ya mapɔlɔ́mi mpe batisimo
Kopesama ya mapɔlɔ́mi ezalaki molulu moko ya ntina. Yaya na ngai ya mwasi asungaki ngai na kosomba robe mpe nasombaki ekoti ya nsuki ya sika. Mama mpe bandeko na ngai ya basi mibale bazalaki na molulu wana mpe na nsima tokendaki elongo mpo na kolya bilei moko oyo nakoki kobosana yango te.
Na ntango wana, nazalaki kozwa chimiothérapie te to radiothérapie mpe te. Kasi, mwa bapɔ́sɔ na nsima, monganga abéngisaki ngai mpe alobaki ete nakende na lopitalo mpo na kolandela lisusu kosalisama na chimiothérapie. Nalingaki kokende te, mpamba te, na nsima ya pɔ́sɔ moko nasengelaki kokende na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na Yankee Stadium, na New York City. Kasi, mama alobaki na ngai ete nakakatana te mpo ete nasilisa kosalisama nokinoki. Yango nde nasalaki.
Nasepelaki mingi na boumeli ya liyangani yango, mpamba te, mwapɔ́sɔ, Yulí 25, 1987, nasengelaki kobatisama. Bapolisi bakambaki biso kino na Orchard Beach, esika ya kobatisama. Nsima na kobatisama, nazongaki na libándá ya masano mpo na kolanda manáka oyo etikalaki mpo na mokolo wana. Na mpokwa yango, nalɛmbaki mingi mpenza, kasi mwalomingo na ntɔ́ngɔ́ namibongisaki mpo na kokende na mokolo ya nsuka ya liyangani.
Nakutani lisusu na likambo ya makila
Mokolo oyo elandaki, na nsima ya nzangá, nakɔtaki lopitalo na mɔ́tɔ ya 39 °C na nzoto, mikrobe na ngei mpe kokita mingi ya makila. Monganga atungisaki ngai ete soki natye mabɔkɔ te na lokasa ya kondima kozongisama makila, akozwa nzela epai na Leta mpo ete azongisa ngai makila na makasi. Nabangaki mingi. Libota na ngai lizalaki na bopusi likoló na ngai. Nkutu, yaya na ngai ya mwasi asɛngaki ngai ete nazwa makila na ye, kasi naboyaki.
Nabondelaki Yehova mingi ete asalisa ngai natikala ngwi. Na esengo nyonso, makila na ngai ebandaki komata mpe bopusi likoló na ngai mpo na kondima makila esilaki. Atako nazalaki lisusu ata na mosisa moko ya malamu te, nasengelaki kokóba na chimiothérapie. Na bongo, monganga moko afungolaki nzela moke na nsé ya lipeka na ngai mpo na kopesa nzela na kokɔtisa tiyó ya moke na nzela na yango bakokaki kotuba ngai bankisi.
Na ntango ya lisoló na ntina na kolongolama ya biloko bivimbaki oyo ezalaki na mompúlúlú na ngai, monganga alobaki ete akozongisa makila te, longola bobele soki esɛngisami. Mama atunaki ngai ete napesa makanisi oyo ekomonisa ete nandimi yango. Na bongo, nandimaki ye. Kasi, na nsima, namiyokelaki mawa mpamba te yango elingaki koloba ete nandimaki kozongisama makila. Nokinoki, nabandaki koluka monganga oyo akokaki kopesa ndanga ete akosalela makila te. Bolukiluki na ngai emonanaki lokola ete ekolónga te, kasi na nsuka nayaki kozwa monganga moko. Mokolo ya lipasó mobongisamaki mpo na Yanuáli 1988.
Monganga apesaki ngai ata kondimisama te ete nakobika. Kasi mokolo oyo ezalaki liboso ya mokolo ya lipasó, ayaki na eteni ya ndako esika ngai nazalaki mpe alobaki: “Nakomeka kopasola.” Nazalaki kobanga; nazalaki bobele na mbula 19 mpe nalingaki kokufa te. Kasi alóngaki na kolongola biloko misato oyo evimbaki ná ndambo monene ya mompúlúlú na ngai. Likambo ya kokamwa, nasalaki na lopitalo bobele pɔ́sɔ moko. Nsima ya bopemi ya basanza soko mibale na ndambo, nabandelaki lisusu chimiothérapie na bampasi oyo, lokola na momeseno, elandaka nsima na yango.
Bobele pene ne eleko yango, tata na ngai mpe azwaki kanser. Mwa basanza na nsima, mokolo moko na butu, mama akutaki ye akufi na eteni ya ndako ya kolala. Nsima ya liwa na ye, nabandaki koyekola mosala ya mokomeli (secrétariat) na eteyelo moko oyo bayekolaka misala. Nazalaki malamu na nzoto, na makanisi mpe na elimo. Nabandaki nkutu mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
Mpasi ezongi lisusu
Na Apríli 1990, nakendaki na elambo ya libala ya yaya na ngai ya mobali na Augusta, na etúká ya Georgie. Yaya na ngai ya mobali alobaki na ngai ete: “Lokolo na yo ezali mpenza monene.”
Natunaki ye: “Okanisi ete ezali nini?”
Ayanolaki ngai: “Nayebi te.”
Nalobaki na ye ete: “Ekoki mbala mosusu kozala kovimba.”
Na ntango nazongaki na New York City, nakendaki epai ya monganga. Kolongola ndambo ya mosuni oyo esalemaki na nsé ya anesthésie emonisaki kanser mosusu na lokolo na ngai ya mwasi. Ekizamɛ́ emonisaki ete mokuwa ebebaki te, kasi eloko oyo evimbaki ezalaki monene koleka mpo na kolongolama. Nazongelaki lisusu chimiothérapie.
Mwa moke na nsima, nabandaki kosánza mbala na mbala, mpe biloko kati na misɔpɔ́ ezalaki kotambola lisusu te. Lipasó ya nokinoki ebongisaki yango. Kasi, esengelaki básala ngai lisusu lipasó mpamba te misɔpɔ́ na ngai ekanganaki esika moko. Makila na ngai ekitaki na bagalami minei, mpe monganga alɛmbaki te na koloba ete: “Osengeli kondima makila. Okokufa. Mbala mosusu okolekisa butu te.” Nalɔtaki ndɔ́tɔ ya nsɔ́mɔ na ntina na malita mpe liwa.
Na Ɔkɔtɔ́bɛ, nakómaki malamu mpenza mpo ete balongola ngai eloko oyo evimbaki. Balongolaki mpe soko 70 % ya mopende na ngai. Toyebaki te ete nalingaki mpenza kokoka lisusu kotambola. Kasi esengelaki natambola mpo na kokende na New York City. Na yango, na lisalisi ya thérapie mpe ekateli na ngai, nabandaki kotambola, liboso na lisalisi ya déambulateur (kiti oyo etambolaka), nsima, na béquilles (biloko mibale oyo basimbaka mpo na komitambwisa na yango), na nzeté, mpe na nsuka, na appareil orthopédique (masini ya kosembola lokolo), oyo ezalaki kopesa ngai nzela ete mabɔkɔ matikala mpamba mpo na kosalela Biblia kati na mosala ya kosakola ndako na ndako. Na boumeli ya chimiothérapie, nakitaki kino na bakiló 27; nazali na bolai ya 1,55 m mpe nazalaka mpenzampenza na bakiló 54. Lokola bakiló na ngai ezalaki kozonga mpe lokolo na ngai ezalaki kokóma monene, minganga bazalaki kofungola masini wana mbala na mbala mpo na koyeisa yango monene. Na nsuka, ntango nakómaki pene ya kiló oyo nazalaka na yango, basalelaki ngai masini mosusu.
Bomoi ezali ntango nyonso mpasi
Na eleko ya molungé ya 1992, nazalaki komiyoka malamu mpe nazalaki nkutu kokana kobanda mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na Novɛ́mbɛ, nazwaki nkomá oyo epesaki ngai esengo mingi. Elobaki ete lisoló ya bomoi na ngai ekoki kolendisa basusu, nabyangamaki mpo na kolobela yango na zulunalo Lamuká! Pɔ́sɔ moko na nsima, esengo na ngai ebongwanaki mawa.
Ekizamɛ́ ya radiographie lokola na momeseno emonisaki biloko bivimbaki na mompúlúlú na ngai bobele moko ya malamu oyo natikalaki na yango. Nalelaki na boumeli ya bangonga mingi. Nabikaki wana balongolaki ngai ngei moko, ndambo ya libale, pene na mompúlúlú na ngai nyonso ya lobɔkɔ ya mwasi, bakisá mpe ndambo ya lokolo na ngai, kasi moto moko te akoki kobika na kobungisáká mampúlúlú mibale. Na mbala oyo lisusu, libota na ngai mpe baninga na ngai bazalaki mpembeni na ngai, mpe nazwaki ekateli ya kobundisa lisusu bokɔnɔ.
Basalelaki lisusu chimiothérapie mpo na kolɛmbisa biloko oyo bivimbaki. Engebene makanisi ya monganga-mopasoli moko, ekokaki kolongolama mpe kotika mompúlúlú. Na Mársi 1993, nakɔtaki na ndako basalaka lipasó. Nayaki koyeba na nsima ete bafungolaki, batalaki nokinoki mpe bakangaki mpota. Biloko oyo bivimbaki ekokaki kolongolama te kozanga ete bálongola mompúlúlú. Uta ntango wana, bazali komeka kolimwisa yango na chimiothérapie oyo eleki makasi.
Bomoni sikawa mpo na nini nakanisaka liwa mbala mingi? Nakokaki kokanisa na mozindo na ntina na liwa mpe na elikya oyo ezali mpo na mikolo mizali koya soki nazalaki na nzoto kolɔngɔ́nɔ́? Nandimi te. Nzokande, oyo nandimisami na yango, ezali ete likambo oyo lileki ntina ezali te ya kozala na bomoi to kokufa sikawa, kasi nde lipamboli ya Yehova Nzambe, bobele Ye moko nde akoki kopesa biso bomoi ya seko. Kokanisa na libaku ya kozala na bomoi na mokili na ye ya sika, kokitisa mikumba na ngai likoló na ye, mpe kozala elongo na baninga oyo bazali na elikya moko lokola ngai, ezali makambo oyo mazali kolendisa ngai.—Nzembo 55:22; Emoniseli 21:3, 4.
Nazali na esengo mpo ete bilenge mosusu bazali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́. Nakanisi ete lisoló oyo likopusa mingi kati na bango kosalela yango, mpo na kolanda te mikano mizangi ntina, kasi mpo na kosalela Yehova. Oyo nde esengo na kozala na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ libela na libela kati na mokili ya sika ya Nzambe! Ntina ya minganga ekozala lisusu te, lopitalo ekozala mpe te, ntonga te, batiyó ya kokɔtisa na nzoto mpe te. Eloko moko te ekokundwela biso lisusu mokili oyo enuni, ya maladi mpe ebɛlɛmi na kokufa.—Lisoló ya Kathy Roberson.
[Elilingi na lokasa 16]
Ntango nazwaki lipɔlɔ́mi na eteyelo ya katikati
[Elilingi na lokasa 18]
Nazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokabola bilei na liyangani ya zongazonga na New York