Tozalaki biso moko te ntango kondima na biso emekamaki
Vicky azalaki mwana kitoko mpenza mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Tozalaki na esengo mingi ntango abotamaki, na ebandeli ya eleko ya molunge ya 1993. Tozalaki kofanda na engumba moko ya moke na sudi ya Suède, mpe tozalaki na bomoi ya malamu.
NTANGO Vicky akokisaki mbula moko na ndambo, makambo ebandaki kobeba. Nzoto ya mwana ezalaki lisusu malamu te, yango wana tokendaki na ye na lopitalo. Tokoki kobosana te ntango oyo monganga ayebisaki biso ete mwana na biso azali na kanser ya makila (leucémie lymphoblastique aiguë).
Ezalaki mpasi mpo na kondima ete mwana na biso azali kobɛla maladi wana mabe. Abandaki koyeba makambo mpe mbala moko akómaki pene na liwa. Mpo na kobɔndisa biso, monganga alobaki ete bakoki kosalisa ye na tekiniki ya monganga babengi chimiothérapie mpe kozongisa ye makila mbala na mbala. Yango ezalaki likambo mosusu oyo ebakiselaki biso mpasi koleka.
Kondima na biso emekami
Tolingaki mpenza mwana na biso mpe tozalaki na mposa bápesa ye nkisi oyo eleki malamu. Kasi, toboyaki mpenza bázongisa ye makila. Tondimaka Liloba ya Nzambe, Biblia, oyo eyebisi polele ete baklisto basengeli ‘koboya makila.’ (Misala 15:28, 29) Toyebaki mpe ete kozongisa makila yango moko ezali likama. Bato mingi bazwi bamaladi mpe bakufi mpo bazongisaki bango makila. Ndenge mosusu ya kosala ezalaki kaka kosalisa ye na bamasini ya ntalo mpe na mayele mosusu, kasi kozongisa ye makila te. Na likambo oyo, etumba na biso mpo na kondima ebandaki.
Tokokaki kosala nini? Tokendaki na Biro mpo na makambo matali minganga, na filiale ya Batatoli ya Yehova na Suède mpo básalisa biso.a Mbala moko, batindaki ba fax na balopitalo ebele na Mpoto mobimba, mpo na koluka lopitalo mpe monganga oyo akondima kosala chimiothérapie, kozanga kozongisa makila. Molende mpe bolingo oyo bandeko na biso baklisto bamonisaki mpo na kosalisa biso, elendisaki biso mingi. Tozalaki biso moko te na etumba na biso mpo na kondima.
Nsima ya mwa ngonga, monganga moko na lopitalo moko na Homburg/Saar, na Allemagne andimaki. Bibongiseli ezwamaki mpo tókende kuna mokolo oyo elandaki mpo básala Vicky baekzame. Ntango tokómaki, bandeko na biso baklisto ya lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na Homburg, na bandeko na biso mosusu ya mosuni, bayaki koyamba biso. Mpe ndeko moko ya Komite mpo na boyokani elongo na minganga ya mboka wana ayambaki biso malamu mpenza. Akendaki kotika biso na lopitalo mpe asungaki biso mingi. Tobɔndisamaki na komona ete ezala na mboka mopaya, tozalaki na bandeko ya elimo oyo bazalaki kosunga biso.
Ntango tokutanaki na monganga Graf na lopitalo, tobɔndisamaki lisusu. Azalaki na boboto mingi mpenza mpe alobaki na biso ete akosala nyonso mpo na kosalisa Vicky kozanga kozongisa ye makila. Ata soki makila na ye ekiti mingi mpenza (5 g/dl), akomeka kosalisa ye kozanga kozongisa ye makila. Alobaki lisusu ete ekzame oyo tosalisaki liboso mpe ndenge tosalaki noki mpo na kokende na Vicky kuna, ezali kopesa elikya ya kosalisa ye malamu. Alobaki ete ezalaki mbala na ye ya liboso ya kosala chimiothérapie kozanga kozongisa moto makila, na maladi lokola oyo ya Vicky. Topesaki matɔndi mingi mpe tosepelaki mpo na mpiko oyo monganga Graf azalaki na yango mpo na kosunga biso.
Mikakatano ya mbongo
Mokakatano ekómaki sikoyo ya koyeba, ndenge nini tokozwa mbongo mpo básalisa Vicky? Tokamwaki ntango bayebisaki biso ete mpo na mbula mibale oyo asengelaki kozwa bankisi, esengelaki kofuta soki deutsche mark 150 000. Ebele ya mbongo wana tozalaki na yango te, kasi esengelaki ete bábanda naino kosalisa Vicky. Lokola tobimaki na Suède mpe toyaki na Allemagne mpo na koluka lisalisi, tokokaki kozwa lisalisi ya Leta te. Tozalaki wana, na mwana na biso oyo azalaki kobɛla makasi, monganga oyo andimaki kosalisa ye amonanaki, kasi tozalaki na mbongo mingi te.
Minganga basungaki biso ntango bayebisaki biso ete bakoki kobanda kosalisa mwana soki tofuti mark 20 000 mpe tondimaki ete tokofuta mbongo oyo ekotikala na nsima. Tozalaki na ndambo ya mbongo, mpe baninga mpe bandeko basalisaki biso, mpe tofutaki mark 20 000—kasi tokokaki kosala ndenge nini mpo na mbongo oyo etikalaki?
Tomonaki lisusu ete tozalaki biso moko te na etumba na biso mpo na kondima. Ndeko moko moklisto, oyo kutu toyebaki ye te, andimaki kofutela biso mbongo wana. Kasi, lokola tokokaki kozwa bibongiseli mosusu, tosalelaki te likabo ya bolingo malamu oyo apesaki.
Monganga abandi mosala
Babandaki kosalisa mwana na chimiothérapie. Mikolo mpe bapɔsɔ elekaki. Na bantango mosusu, ezalaki mpasi, ezala mpo na biso mpe mpo na mwana. Kasi, tozalaki kosepela mpe kozongisa matɔndi ntango nyonso oyo azalaki kokóma mwa moke malamu. Basalaki ye chimiothérapie na boumeli ya sanza mwambe. Makila ya Vicky ekitaki mpenza makasi (6 g/dl), kasi monganga Graf abongolaki maloba na ye te.
Eleki sikoyo mbula motoba, mpe ekzame ya nsuka emonisi ete maladi yango ezali lisusu te. Sikoyo azali malamu mpenza mpe azali ata na elembo moko te ya maladi yango. Ya solo, ezali lokola likamwisi ete Vicky azongi nzoto kolɔngɔnɔ. Toyebi ete bana mingi bakufaka na maladi wana, ata soki basali bango chimiothérapie mpe bazongisi bango makila mbala na mbala.
Soki tolongaki etumba na biso mpo na kondima, ezali mpo na lisalisi ya bandeko na biso baklisto, mpe ya minganga. Biro mpo na makambo matali minganga ezalaki kosalisa biso mokolo na mokolo. Monganga Graf na baninga na ye basalelaki mayele na bango mpo na kobikisa Vicky. Mpo na nyonso wana, tozali kozongisa matɔndi mingi.
Kondima na biso elendisamaki
Kasi, likolo na oyo nyonso, tozali kozongisa matɔndi epai ya Nzambe na biso, Yehova, mpo na bolingo na ye, ndenge abateli biso mpe alendisi biso na lisalisi ya Liloba na ye, Biblia. Soki tozongisi makanisi na nsima, tokomona ete toyekoli makambo mingi mpe kondima na biso elendisami na likambo oyo tokutanaki na yango na bomoi na biso.
Sikoyo, mposa na biso ezali ya kobatela boyokani makasi elongo na Yehova Nzambe mpe koteya mwana na biso ntina ya kotosa mibeko na ye na bomoi na biso. Tolingi mpenza kopesa ye libula malamu ya elimo ya bomoi ya seko na Paladiso oyo ekoya awa na mabele.—Euti na motángi moko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biro mpo na makambo matali minganga etalaka mosala ya Bakomite mpo na boyokani elongo na minganga na mokili mobimba. Bakomite yango esalemi na baklisto oyo basalaka mosala yango na bolingo malamu, oyo bayekoli ndenge ya kosolola na minganga mpo na kosalisa Batatoli oyo bazali na maladi. Ezali na bakomite koleka 1 400 oyo ezali kosunga bandeko oyo bazali na maladi na mikili koleka 200.