Konúngisa Bana: Mateya ya ebandeli
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA NIGERIA
Lokola ebele ya bamama, soki ozwi likatami ya konúngisa mwana na yo, oponi kosalela likoki oyo Mozalisi ya bato abongisaki na bolingo nyonso. Mabɛ́lɛ oyo esalemi na nzoto na yo ekokokisa bamposa ya sikisiki mpo na bilei ya mwana na yo, ekopesa nzela na bokóli malamu. Ekobatela ye lisusu na bamaladi oyo emonanaka mingi. Mpo na ntina yango nde O.M.S. (Organisation Mondiale de la Santé) elobi ete: “Mabɛ́lɛ ya mama ezali bilei oyo eleki malamu mpo na mwana moke. Bilei binso oyo basalelaka na esika ya mabɛ́lɛ ya mama, lokola miliki ya ngɔ́mbɛ, miliki ya mputulu mpe pɔtɔpɔ́tɔ ya masangu, ya lɔ́sɔ, to mosusu ezali na nsé.”
Konúngisa mwana ezali na litomba mpe epai na yo. Biberó ya kosukola to ya kotɔkisa ezali te mpe okotambolatambola te na butu kati na kúku mpe eteni ya ndako ya kolala mpo na kolamba bilei mpo na mwana na yo. Konúngisa mabɛ́lɛ ekomemela yo lisusu matomba na nzoto na yo mpamba te ekosalisa bokiti ya kilo oyo ozwaki na boumeli ya zemi mpe ekosalisa libumu na yo ezonga na lolenge na yango ya liboso. Epai mosusu, boyekoli emonisi ete mpo na basi oyo bazali konúngisa, kanser ya mabɛ́lɛ ezwaka bango mingi te.
Lisangá libengami Fonds des Nations unies pour l’enfance elobi ete: “Ya solo, bamama banso bakoki konúngisa bana na bango.” Yo mpe mbala mosusu okoki kosala yango. Nzokande, ntango mosusu ozali kososola ete konúngisa ezali pɛtɛɛ te na lolenge oyo ozalaki kokanisa, mingimingi soki ozali kosala yango mpo na mbala ya liboso. Konúngisa mabɛ́lɛ ata ezali likambo ya kobotama, ezali likambo eyaka yango moko te, esengeli koyekola lolenge ya kosalela yango. Ntembe ezali te ete mikolo mingi, to mwa bapɔ́sɔ, ekozala ntina mpo na yo mpe mpo na mwana na yo, mpo na kokómisa momeseno oyo elɛngi.
Liboso ya kobótama ya mwana
Soki olóngaki te konúngisa mwana na yo ya liboso, solola na bamama oyo balóngaki na kosala yango. Bakoki kosalisa yo na kopɛngola to na kosilisa mikakatano, mpe kondimisa yo ete ozali mpenza na makoki ya konúngisa mwana.
Na boumeli ya zemi mpe nsima na yango, ezali likambo ya ntina ete omipemisaka mingi mpe olyaka malamu. Breastfeeding, mwa búku ya O.M.S., elobi boye: “Bilei ya malonga te liboso mpe na boumeli ya zemi ekoki kobebisa bokóli ya mwana kati ya libumu. Ekoki lisusu kopekisa mama na kobomba ebele ya mafuta oyo ekosala mabɛ́lɛ oyo esengeli. Mama asengeli bongo, na boumeli ya zemi mpe na eleko ya konúngisa, kolya bilei ya malamu mpe ya ndenge na ndenge.”
Ezali lisusu ntina na kobatela mabɛ́lɛ na yo. Na boumeli ya basanza ya nsuka ya zemi, na ntango ozali kosukola, sukolá mabɛ́lɛ na yo, kasi kopakola yango sabúni te. Bambuma ya nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ ebimisaka mai moko oyo ebomaka mikrobe mpo na kobatela nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ ete ezala maimai mpe kobatela yango na mikrobe. Sabúni ekoki kokaukisa nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ mpe kolongola to kobebisa mai na yango. Soki mabɛ́lɛ na yo ekauki to ezali kosala mokosa, okoki kopakola yango mafuta ya pɛpɛlɛ, kasi pɛngolá kotya yango na nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ to likoló na mbuma ya nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ.
Na kala, minganga bazalaki kosɛnga bamama ete “bákembisa” nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ na bango na boumeli ya zemi na kofináká yango makasi. Atako ekanisamaki ete ngalasisi yango ekopɛngola mpasi na nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ na ntango ya konúngisa, bolukiluki emonisi ete ngalasisi yango ezali kopesa bolamu mingi te. Mbala mingi, mpasi na nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ emonanaka soki lolenge ya kolalisa mwana liboso ya mabɛ́lɛ ya mama ezali mabe.
Molai mpe lolenge ya mabɛ́lɛ ezali na ntina mingi te, kasi elɛzi akoki te kosimba nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ oyo ekɔta na kati to oyo ezali patátálu. Omitalela na kofináká malɛmbɛmalɛmbɛ nsɔ́ngɛ́ mokomoko ya mabɛ́lɛ na lisalisi ya mosapi na yo ya monene mpe ya mibale mpo na kondimisama ete nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ na yo ezali kobima. Soki ezali kobima te, yebisá yango na monganga na yo. Ntango mosusu akosɛnga na yo olata lomposo (coquille) ya mabɛ́lɛ na boumeli ya zemi to na ntango oyo ozali konúngisa te. Mbala mingi mposo ezali kolɛmbisa mokakatano oyo.
Mikolo ya liboso
Ezali malamu mpo na yo kobanda konúngisa mwana na yo na ngonga oyo elandi kobotama na ye. Okoki kokanisa ete nokinoki nsima na kobóta, mama mpe mwana balɛmbi mingi na boye ete bakoki koyambana te. Kasi mbala mingi mama azwaka makasi na ntango yango mpe, nsima ya kozwa mwa miniti mpo na komesana na esika na ye ya sika, mwana akoluka na molende nyonso kobondisama na mabɛ́lɛ.
Bamama oyo babóti sika bapesaka epai na bana na bango oyo babotami sika eloko moko ya lángi mosaka mpe sángisángi oyo ebengami colostrum. “Wolo ya mai” oyo ezali na ntina mingi mpo na elɛzi oyo abotami sika. Ezali na biloko oyo ezali kobundisa mikrobe. Kati na yango ezali na vitamini mingi mpe ezali na sukali mpe mafuta mingi te, yango nde esali ete ezala bilei bileki malamu mpo na mikolo ya liboso ya bomoi. Soki azali na motungisi mosusu na nzoto te, elɛzi azali na mposa ya bilei to bimeli mosusu te. Komelisa mwana biberó likoló na konúngisa ezali na likámá ya kolendisa ye na koboya komela mabɛ́lɛ ya mama, mpo ete biberó esɛngaka milende mingi te epai ya mwana.
Mbala mingi, bamama babandaka kobimisa mabɛ́lɛ oyo ezangi colostrum na mikolo mibale to mitano nsima na kobota. Na ntango yango, koyikana na makila kati na mabɛ́lɛ ekovimbisa yango kozanga ntembe mpe ekosala ete yango eyoka mpasi. Ezali likambo oyo esalemaka. Konúngisa esengeli kokitisa mpasi wana. Nzokande, mbala mosusu, nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ ekómi patátálu mpo na kovimba ya mabɛ́lɛ. Lokola konúngisa ekómi matáta, osengeli kobimisa mwa mabɛ́lɛ na kosaleláká misapi. Okolónga kosala yango na kosaleláká mabɔkɔ na yo mibale mpo na kofina libɛ́lɛ moko na moko, kobanda na ntina na yango kino kokóma na nsɔ́ngɛ́.
Likoki ezali te ya koyeba boike ya mabɛ́lɛ oyo mwana ameli, kasi ómitungisa te, nzoto na yo esalemi mpo na kokokisa bamposa ya mwana, ata soki ozali na mapása. Na ntango ozali konúngisa mingi, ozali mpe kobimisa mabɛ́lɛ mingi. Ezali moko ya bantina mpo na yango osengeli te kobakisa likoló na konúngisa, bimeli mosusu na nzela ya bibeló, lokola miliki ya mputulu to miliki ya ngɔ́mbɛ. Soki ozali kosala yango, mwana na yo akomela mabɛ́lɛ mingi te, mpe yo moko okobimisa mabɛ́lɛ mingi te.
Gabrielle Palmer kati na búku na ye The Politics of Breastfeeding (Sɛkɛlɛ́ ya komelisa mwana mabɛ́lɛ ya mama) akomaki ete: “Bana oyo bazali kobotama nsima ya basanza oyo esengeli bazali na motau te lokola bazalaki kokanisa yango mpe bakoki kobongisa bilei na bango na lolenge bango moko balingi mpe na lolenge oyo nzoto ya mama na bango esɛngi, soki bobele batikeli bango nzela.” Likanisi ya ntina ezali oyo ya kopesa mpe ya kosɛnga: na ntango mwana na yo azali kosɛnga bilei na ye (mingimingi na koleláká), ozali kopesa. Na ebandeli, akosɛnga nsima na bangonga nyonso mibale to misato. Osengeli konúngisa mwana na yo na mabɛ́lɛ nyonso mibale, ntango nyonso oyo azali komela. Mpo na bana mingi, bilei ya kokoka eumelaka miniti 20 kino 40, atako basusu bazali kosepela na koumela mpe komipemisa mbala na mbala. Bana oyo bamelaka malɛmbɛmalɛmbɛ bakoki kozwa kino ngonga moko mpo na kosilisa komela mabɛ́lɛ. Mbala mingi, mwana na yo azali komela malamu soki azali konúnga soko mbala mwambe to koleka na mokolo mobimba, soki ozali koyoka ete azali komela mpe soki azali kopolisa bilamba na ye mbala mwambe to koleka na mokolo mobimba nsima na mokolo ya mitano.
Na ntango ozali konúngisa, lolenge oyo ozali kosimba mwana na yo na libɛ́lɛ ezali mpenza na ntina mingi. Lisusu osengeli komesana na konúngisa mwana. Soki atyami malamu te, mwana akomela mabɛ́lɛ mingi te. Bana basusu baboyaka nkutu komela mabɛ́lɛ.
Likambo mosusu oyo emonanaka mingi ekoki kobima na ntina na etɛmɛlo ya mabe: nsɔ́ngɛ ya mabɛ́lɛ na ye ekopaswama to ekosala mpasi. Búku Breastfeeding Source Book elobi: “Ebele na makambo ekoki kosala ete nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ esala mpasi, kasi lolenge oyo mwana ‘azali kokanga’ nsɔ́ngɛ́ ya mabɛ́lɛ ezali likambo ya ntina, mpe yango etali na meko monene lolenge oyo motó ebongisami liboso ya libɛ́lɛ. Mpo na kozala na etɛmɛlo malamu, mwana na yo asengeli kozala pene na libɛ́lɛ, motó alimá, liboso ya nsɔ́ngɛ́ ya libɛ́lɛ mpo ete abenda yango te na ngámbo moko.”
Na lolenge oyo eleki malamu, bibebu ya mwana esengeli kokangama na libɛ́lɛ, soko basentimɛtɛlɛ misato na nsima ya nsɔ́ngɛ́ ya libɛ́lɛ. Okoyeba ete etɛmɛlo ezali malamu, soki nzoto mobimba ya mwana na yo ebaluki epai na yo, soki azali komela ntango molai, soki azali kopema mpe azali na esengo mpe soki nsɔ́ngɛ́ ya libɛ́lɛ ezali kosala mpasi te.
Ntango nini kokilisa mwana mabɛ́lɛ
Nsima na mwa bapɔ́sɔ ya ebandeli, yo mpe mwana na yo bosili koyebana mpe mbala mosusu bosili kotya momesano malamu kati na bino. Mpo na basanza minei kino motoba oyo ezali kolanda, mwana na yo akozala na mposa ya bilei mpe bimeli mosusu te bobele mabɛ́lɛ na yo. Na nsima ya eleko wana, ekosengela na yo kobakisa mokemoke bilei bisusu lokola ndúnda, pɔtɔpɔ́tɔ, mbuma. Nzokande, kino mwana na yo akokóma na sanza libwa to zomi, bilei na ye ya moboko ekozala mabɛ́lɛ; ezali bongo malamu na konúngisa ye ntango nyonso liboso ya kopesa ye bilei ya makasi.
Na boumeli ya ntango boni osengeli konúngisa mwana? Na boumeli ya ntango molai, lokola O.M.S. esɛngi yango. Ebele na bamama bazali konúngisa mabɛ́lɛ kino mbula ya mibale, komibanzabanzáká mingi mpo na bana na bango, kasi mpo na manáka te. Búku Mothering Your Nursing Toddler (Lolenge ya koleisa mwana na yo) elobi ete: “Ezali mpasi te na komona soki bana na biso bazali na mposa ya kolanda komela mabɛ́lɛ, esengo na bango na komela mabɛ́lɛ mpe mawa na bango soki bakilisi bango yango. Ntina na liboso kasi ya malamu ya kolanda konúngisa, ezali bongo kosepelisa mwana.”
Mozalisi ya bolingo
Na ntango ozali kopesa mabɛ́lɛ epai na mwana na yo ekoki kozala na butu mpenza, na ntango basusu kati na libota balali, kanisá na Mozalisi oyo asalaki likoki yango. Ata soki ozali koyeba te makambo ndenge na ndenge oyo ezali kopesa yango nzela, okososola na nzela ya likamwisi oyo ya konúngisa mayele mpe bolingo ya Mozalisi na biso.
Kanisá naino: mpo na bana, ezali na bilei mosusu te kitoko koleka mabɛ́lɛ ya mama. Ezali kokokisa malamu bamposa na bango mpo na oyo etali bilei mpe bimeli na boumeli ya basanza ya liboso ya bomoi na bango. Lisusu, ezali monɔ́ ya kokamwisa oyo ezali kobatela mwana na makɔnɔ. Ezali na likámá te, ezali pɛto, ezali kosɛnga kolamba te mpe ezali kosɛnga mosolo te. Ezali bipai binso na mokili, mpe ezali kobima mingi na meko oyo mwana azali kokóla.
Kanisá lisusu ete konúngisa ezali eleko moko malamu ezala mpo na mama to mpo na mwana. Bilei, masoló kati na mama mpe mwana, bokutani ya nzoto, mɔ́tɔ ya nzoto, nyonso wana ezali kobimisa boyokani makasi ya bolingo kati na mama mpe mwana.
Ya solo, Mozalisi ya likoki oyo ya kokamwa abongi kozwa masanzoli oyo eleki. Na ntembe te, tokoloba lokola David mokomi na Nzembo, oyo akomaki ete: “Nakotɔnda yɔ [Yehova] mpɔ ete nasalami na motindo na kokamwa mingi; misala na yɔ ijali na kokamwa mingi.”—Njembo 139:14.
[Etanda na lokasa 12]
Mibali, bósunga basi na bino
• Monisá epai na mwasi na yo ete ondimi ete anúngisa. Ndimisá ye mpe lendisá ye na bolingo nyonso.
• Sungá mwasi na yo ete alyaka na lolenge ya bokatikati na boumeli ya zemi mpe na eleko ya konúngisa.
• Sɛnzɛlá ete amipemisa malamu. Mwasi oyo alɛmbi mingi akozala na mikakatano mpo na kobimisa mabɛ́lɛ mingi. Na kotyáká likebi na bana mosusu mpe na kosanganáká na misala ya ndako, okokitisa mokumba na ye.
• Soki mwasi na yo azali komipemisa mpe azali na esengo, mabɛ́lɛ na ye makobima malamu. Salá ete azala na esengo ntango nyonso. Yokamelá mitungisi na ye mpe sungá ye ete asilisa yango.
[Etanda na lokasa 13]
Mabɛ́lɛ mpe biberó
“Konúngisa mwana mabɛ́lɛ epesaka vitamini mingi, ezali pɛto, ezali kobatela mwana na maladi oyo ezali komonana mingi mpe ezali kokitisa makámá ya kozwa kanser na mabɛ́lɛ mpe ya eboteli ya mama. Lisusu, miliki ya ngɔ́mbɛ ezali ntalo mingi, mpe kolamba yango esɛngaka kosangisa yango mbala mingi na mai oyo ezali pɛto te mpe epesami na bana na biberó oyo etɔkisami te. Na mikili ya bobólá, bokeseni ezali monene mpenza ete bazali kokanisa ete milió moko ya bana bakokaki kobikisama mbula na mbula na mokili soki bamama bazalaki bobele konúngisa bana na bango na boumeli ya sanza minei kino motoba ya liboso.”—The State of the World’s Children 1993 (Ezalela ya bana na mokili), Búku ya Fonds des Nations Unies pour l’enfance.