Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/09 lok. 20
  • Salisá bana na yo bákola malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salisá bana na yo bákola malamu
  • Lamuká!—2009
  • Masolo mosusu
  • Tv eyibaka ntango na biso?
    Lamuká!—2007
  • Salelá televizyo na mayele
    Lamuká!—2000
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baboti—bosimba mitema ya bana na bino uta bolenge na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 10/09 lok. 20

Salisá bana na yo bákola malamu

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA CANADA

◼ Zulunalo moko (The New York Times) elobi boye: “Televizyo ekoki mpenza koteya moto.” Nzokande, “kofanda liboso na yango bangonga mingi ebebisaka nzoto mpe makanisi ya bana,” mpe epekisaka bango koyeba kosalela motó na bango, koyekola, mpe kosolola na bato mosusu.

Zulunalo moko emonisi ete nsima ya kolandela mimeseno ya bana 2 500, bato ya mayele na lopitalo ya bana na Seattle, na etúká ya Washington na États-Unis, bamonaki ete “bana ya mbula 1 tii 3 oyo bazalaki kotala televizyo mingi, bakómaki motó likolólikoló ntango bakómaki na mbula nsambo.” Bana yango bazalaki kobundisa baninga na bango, bazalaki motema mokuse mpe bazalaki kokoka kotya likebi te ntango molai. Jane Healy, moto moko ya pisikoloji alobi boye: “Baboti ya bana mingi oyo bazalaki motó likolólikoló bamonaki ete bana na bango babongwanaki ntango bapekisaki bango kotalaka televizyo.”

Baboti bakoki kosala nini mpo bana na bango bálekisaka ngonga mingi te na kotala televizyo? Ankɛtɛ moko oyo basalaki epesaki makanisi oyo: Katelá bana ntango oyo basengeli kotalaka televizyo mpe ngonga boni basengeli kolekisaka liboso na yango mokolo na mokolo. Kotika te ete televizyo ezwa esika na bino baboti. Kutu, soki likoki ezali, pesáká bana misala ya ndako. Poná baprogramɛ oyo bana na yo bakoki kotalaka, mpe kangá televizyo ntango yango esili. Soki likoki ezali, taláká baprogramɛ yango elongo na bana na yo mpe bólobelaka makambo oyo bozali kotala. Yo moko mpe osengeli komityela ndelo mpo na ntango oyo osengeli kolekisaka liboso ya televizyo.

Kosalisa bana bázala mayele mpe báyeba kosolola na bato mosusu esɛngaka ntango, milende mpe komipekisa. Kasi, ezali mpenza na matomba. Lisese moko ya Biblia endimisi likambo yango; elobi boye: “Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye; ata ntango akokóma mobange akopɛngwa na yango te.” (Masese 22:6) Kobɔkɔla bana elimboli mpe koteya bango bizaleli ya malamu.

Batatoli ya Yehova basalelaka buku Yekolá epai ya Moteyi Monene mpo na koteya bana bizaleli ya malamu. Ya solo, soki baboti bazali kosolola malamu mpe kotyela bana na bango likebi ntango bazali naino mike, bakozwa matomba. Nini ekoki komemela bato esengo koleka komona bana na bango bakoli malamu mpe bakómi mikóló oyo babongi kotyela motema?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto