Baboti—bosimba mitema ya bana na bino uta bolenge na bango
‘Bobokolaka bana na bino na mateya mpe mpamela ya Jehovah.’—BAEFESE 6:4.
1. Likambo nini esalemaki na boumeli na eleko moko ya mpasi mpenza mpo na Yesu?
YESU KLISTO azalaki kokende na Yelusaleme elongo na bayekoli na ye. Mwa ntango moke liboso, mbala mibale ayebisaki bango ete akozwa minyoko mingi mpe akobomama kati na mboka yango. (Malako 8:31; 9:31) Engebene lisolo ya Biblia, na boumeli ya eleko yango ya mpasi mpenza mpo na Yesu, “bato bazalaki komemela ye mpe bana na bango ya mike mpo ete asimba bango.”—Luka 18:15.
2. (a) Mpo na ntina nini, ndenge ezali komonana, bayekoli alukaki kobengana bato? (b) Yesu asalaki nini mpo na yango?
2 Emonaki bayekoli bongo basalaki nini? Bangangelaki bato yango mpe bamekaki kopekisa bango mpe kozongisa bango, bakanisaki na ntembe te ete bazalaki kosalisa Yesu, mpo ete bato batungisa ye to baluka kotutana na ye mpamba mpamba te. Kasi Yesu asilikaki mpe alobaki na bango: Botika bana mike baya epai na ngai; bomeka kopekisa bango te.’. . . Mpe akamataki bana kati na maboko na ye mpe abandaki kopambola bango na kotyaka maboko likolo na bango.” (Malako 10:13-16) Ee, ata makambo nyonso oyo atungisamaki na yango na makanisi mpe na motema na ye, Yesu alekisaki ntango elongo na bana mike.
Liteya mpo na baboti
3. Liteya nini baboti basengeli kozwa na lisolo yango?
3 Baboti, bokoki kozwa liteya na lisolo yango: Ata mitungisi na bino to masengami na bino ezali nini, bapesaka ntango mpo na bana na bino. Yango esengeli kozala likambo ya liboso. Na ndenge yango bokokoka kokotisa kati na bango bizaleli malamu ya elimo oyo ekobatela motema na bango mpe ekotya bango na nzela malamu. (Deteronome 6:4-9; Masese 4:23-27) Eunice mpe Loïs, mama mpe nkoko ya Timoté, bazwaki tango mpo na kopesa ye mateya oyo esimbaki motema na ye ya bomwana mpe ememaki ye ete akoma mosali na Nzambe oyo amipesi.—2 Timote 1:5; 3:15.
4. Bana bazali na motuya nini, mpe ndenge nini baboti basengeli kolakisa ete bazali kotalela bango na motuya monene?
4 Baboti baklisto basengeli te kozanga kozala na likebi mpo na bana oyo Jéhovah Nzambe apesi bango. Ee, bana bazali likabo ya motuya ya Jéhovah. (Nzembo 127:3) Na yango, bolekisaka ntango elongo na bango, bosimba mitema na bango. Kolandaka bongo ndakisa oyo mama na Timoté mpe nkoko na ye batikaki. Bosengeli kopesa ntango mpo na bango, bobele mpo na koloba na bango na ntina na etamboli na bango mpe kopamela bango te, kasi lisusu, na ndakisa, mpo na kolya elongo na bango, kotanga elongo na bango, kosakana elongo na bango mpe kotya bango na mbeto. Ezali likambo na ntina ete bosala nyonso wana elongo na bana na bino.
5. Tanga ndakisa ya tata moko oyo amonisaki ete azalaki kopesa motuya monene na mikumba na ye.
5 Mobali moko ya mokili ya Japon, moto na mosolo mingi, oyo akomaki Témoin de Jéhovah andimaki bosolo ya motinda yango. Mpo na yango, tala oyo tokokaki kotanga kati na zulunalo moko (Mainichi Daily News ya le 10 Février 1986) na nse ya motó na likambo “Mokonzi moko ya JNR alongwé na mosala mpo na kozala elongo na libota na ye”! “Mokonzi monene moko ya kompanyi ya banzela ya bingbunduka ya mokili ya Japon (JNR) aponaki kolongwa na mosala na esika ete akabwana na libota na ye. . . . Mobali yango Tamura, alobaki: ‘Bato mingi bakoki kosala mosala ya directeur général to mokonzi monene. Nzokande, bobele ngai moko nde nazali tata ya bana na ngai.’” Baboti, bozali kokamata mikumba na bino na motuya lolenge yango?
Eleko oyo ezali kopesa nkaka na mokumba ya baboti
6. Mpo na nini kobokola bana malamu na mikolo ya lelo ezali mpasi boye?
6 Ekoki kozala ete kobokola bana ndenge liloba ya Nzambe esengi, “na mateya mpe mpamela ya Jéhovah”, ata mbala moko te ezalaki mpasi lokola lelo. (Baefese 6:4) Ezali bongo mpamba te tozali kobika na mikolo ya nsuka mpe ete Satana elongo na bademo na ye bazali kobimisa bampasi minene, mpo bazali na nkanda, awa eyebi bango ete batikali bobele na ntango mokuse. (2 Timote 3:1-5; Emoniseli 12:7-12) Milende ya baboti mpo na kobokola bana na bango engebene mokano na Nzambe mibebisami na “mopepe” ya elilingi likoló na yango Satana azali koyangela “Mopepe” yango, to elimo oyo ezali na moimi mpe kozanga botosi, ezali bipai binso lokola mopepe oyo tozali kopema.—Baefese 2:2.
7, 8. (a) Televizio ekoki kokotisa nini kati na ndako, mpe nzokande baboti mingi basalaka nini? (b) Mpo na nini baboti oyo basalelaka télévizio lokola mobateli ya bana bazali kokokisa malamu te mikumba na bango?
7 Mpenzampenza télévizio, ezali kokotisa elimo ya mokili, mopepe yango ya mabe, kati na bandako. (1 Bakolinti 2:12) Na bongo, mingi kati na baprograme ya télévizio ezali komonisa bizaleli ya bato na mbindo, ya mibali oyo basanganaka na mibali, baoyo bazali na bopusi makasi kati na makambo matali masano, miziki, théâtre mpe bongo na bongo. (Baloma 1:24-32) Bana na bino bazali kozwama noki na makanisi ya mabe mpe na bilakiseli ya mbindo oyo télévizio ezali kolakisa lokola mpe bazwamaka noki na ntango ya kobeba ya mopepe oyo bazali kopema. Nzokande baboti mingi basalaka nini?
8 Basalelaka télévizio lokola mobateli ya bana. Bazali koloba na bana na bango: “Sikawa te, mwana na ngai, nazali na mosala, kende kotala télévisio. Engebene molobi moko ya télévisio oyo ayebani, wana ezali “maloba oyo tozali koyoka mbala mingi koleka, kati na bandako mingi ya Amerike.” Nzokande, kotika bana batala ba emisio nyonso ezali lokola kotika bango bamitambwisa bango moko. (Masese 29:15) Baboti oyo bazali kosala bongo bazali kokokisa malamu te mikumba na bango, lokola emonisi yango molobi ya télévizio oyo toutaki kolobela, na maloba oyo: “Koteya bana esengaka ntango mpe ezali mokumba monene. Tosengeli kopesa yango na moto mosusu te, to na télévizio soki moke te.
9. Mpo na kobebisama ya lolenge nini bana basengeli mpenza kobatelama?
9 Nzokande, mpo na ntango ya mpasi oyo tozali na yango, ekoki kozala ete, lokola bayekoli na Yesu oyo tolobelaki liboso, bobandi kotika bana na bino pembeni, mpo na komipesa na misala oyo bomoni ete eleki ntina. Kasi, eloko nini ezali na ntina koleka bana na bino? Bomoi na bango ya elimo ezali na likama! Mbala mosusu ozali komikundola ete nsima na likama oyo esalamaki na 1986 na centrale nikleere ya Tchernobyl (Union Soviétique), balongolaki bana na bisika yango mpo na kobatela bango na mipepe mabe. Ndenge moko, soki bolingi kobatela kolongono ya elimo ya bana na bino, bosengeli kobatela bango na “mopepe” mabe ya mokili, mopepe oyo ebimaka mbala mingi na télévizio.—Masese 13:20.
10. Maziba mosusu nini ya “mopepe” mabe mazali likama mpo na bana, mpe ndakisa nini ya Biblia ezali komonisa likambo yango?
10 Kasi maziba mosusu ya “mopepe” mabe mazali, oyo ezali koluka koboma bizaleli malamu mpe kobebisa makanisi ya bana. Soki mwana azali na baninga mabe na kelasi to na zongazonga na ye, baninga yango bakoki kolimwisa solo kati na motema na ye oyo elendisami malamu te. (1 Bakolinti 15:33) Tokoki kozwa liteya na likambo oyo ekomelaki Dina, mwana mwasi ya Yakobo, oyo “azalaki na momesano ya kobima mpo na kotala bana basi ya mboka.” Elenge mobali moko asanganaki na ye na makasi. (Genese 34:1, 2) Bana basengeli koteyama mpe kolakisama malamu mpo na kobika na mitambo ya mokili oyo ebebi lisusu koleka na eleko ya Dina.
Uta na bomwana mpenza-Mpo na nini?
11. (a) Ntango nini baboti basengeli kobanda koteya bana bango? (b) Matomba nini kitoko bakoki kolikya kozwa?
11 Kasi ntango nini baboti basengeli kobanda koteya bana na bango? Engebene Biblia, Timoté ateyamaki “longwa na bomwana mpenza”. (2 Timote 3:15) Toyeba ete liloba na greke bréphos oyo esalelami awa elakisaka mingi mwana oyo abotami naino te. Tozali kokuta yango na Luka 1:41, 44, epai elobami ete mwana moke Yoane aninganaki kati na libumu ya mama na ye. Nzokande, liloba bréphos esalelami lisusu mpo na kolakisa bana babotami sika ya Bayisraele baoyo bomoi na bango ezalaki na likama na eleko Moïse abotamaki. (Misala 7:19, 20) Mpo na oyo etali Timoté, liloba yango ezali bongo kolakisa eleko oyo azalaki mwana moke mpenza, abotami sika to bébé, kasi bobele te eleko oyo azalaki elenge-mwana. Na kozongisaka makanisi na nsima kino esika yango ekoki kosuka, Timoté azalaki komikundola ete ateyamaki na makomi mosantu, uta ntango azalaki naino bébé. Mpe oyo nde matomba kitoko ezwamaki! (Bafilipi 2:19-22) Kasi, mwana abotami sika akoki solo kozwa mbano na mateya na ntango wana?
12. (a) Ntango nini bana mike babandaka mbala mosusu kozala na mayoki mpe koyoka makambo? (b) Ntango nini mpe ndenge nini baboti basengeli kobanda kopesa mateya ya elimo epai na bana na bango?
12 Na 1984, professeur Edward Zigler, ya université Yale, alobaki ete “moko na makambo minene oyo eyaki koyebana mpo na oyo etali boyekoli ya bizaleli ya bato to psychologie, ezali likoki ya kokamwa oyo bana mike bazalaka na yango ya koyeba makambo.” Tala oyo tokokaki kotanga kati na zulunalo moko (Health) na ntina yango: “Bolukiluki ya kala mingi te ezali koluka komonisa ete ata liboso ya kobotama, ba bébé bamonaka, bayokaka, bayebi koyoka elengi mpe ’bazalaka’ na mayoki. Emonani bongo ete ata mbala moko te tokoki kokanisa ete ntango ekoki naino te mpo baboti babanda koteya bana na bango. (Deteronome 31:12) Na ebandeli, bakoki kolakisa bango bililingi mpe kolobela bango masolo to istware. Masaru lbuka, mosali na mokanda Na maternelle, ntango esili koleka mingi (angl.), alobaki ete ‘bambula ya ntina ezali bambula misato ya liboso ya bomoi na bango’. Ntina na yango ezali ete makanisi ya bomwana ezali mpenza petepete mpe ekotisaka boyebi na bolembu moko ya kokamwa, ndenge emonisi yango motindo bana bayekolaka monoko ya sika na lombangu. Professeur moko ya université ya New York, oyo ayebi mingi mateya ya bana mike, alobaki nkutu ete “baboti basengeli kobanda koyekolisa bana na bango kotanga uta ntango babimi na esika ya kobotama na maternité!
13. Likambo nini ezali komonisa likoki ya koyeba makambo oyo bana mike bazalaka na yango?
13 Tala oyo mwasi moko ya mokili Canada akomaki mpo na likoki ya koyeba makambo, ya mwana na ye: “Mokolo moko, nazalaki kotanga istware moko ya mokanda mpo na masolo ya Biblia mpo na Shaun, mwana na ngai ya mobali ya mbula minei na ndambo. Lokola napemaki, nakamwaki mingi ndenge abandaki kokoba istware yango, na kotangaka liloba mokomoko yango lokola ekomami kati na Mokanda mpo na masolo ya Biblia. . . . Nasalaki ndenge moko mpo na istware ya mibale, mpe ya misato, mpe namonaki ete ayebaki yango nyonso na motó. . . . Na bongo, azalaki na likoki ya kotanga masolo 33 ya liboso ya mokanda yango, na bankombo ya bato mpe ya bisika oyo ezalaka mpasi na kotangaa.”
14. (a) Nani akamwi te na makoki ya bana mike? b) Mokano ya baboti baklisto esengeli kozala nini? c) Esengeli kobongisa mwana mpo na makambo nini, mpe mpo na nini?
14 Baoyo bayebi likoki ya kokamwa oyo bana mike bazalaka na yango ya koyeba makambo, bakamwi te na makambo ya ndenge yango. Glenn Doman, directeur ya bisika ya koyekola makoki ya moto, alobaki ete: “Soki toteyaki ba bébé na esika ete toteya bana, mbele mokili etondi na bato ya mayele koleka, lokola Einstein, Shakespeare, Beethoven mpe Leonard de Vinci.” Na ntembe te, mokano ya baboti baklisto ezali te ya kobimisa bato na mayele mingi na mokili, kasi ya kosimba mitema ya bana na bango mpo ete basalela Nzambe bomoi na bango mobimba. (Masese 22:6) Basengeli kobanda kosala yango liboso mpenza ete mwana na bango ya mobali to ya mwasi akende na kelasi, mpo na kobongisa ye mpo na mikakatano oyo akokutana na yango kuna. Na ndakisa, na eteyelo ya maternelle to na bisika ya kobatela bana, bafeti ezali mabaku ya bisengo oyo ekoki kobenda mwana. Asengeli bongo kokanga ntina mpo na nini basaleli na Jéhovah basanganaka na yango te, soki te, akokoma mbala mosusu koyina lingomba ya baboti na ye.
Ndenge nini kosimba motema ya mwana
15, 16. Mikanda nini mikoki kosalisa baboti na kosimba motema ya mwana na bango, mpe ndenge nini bakoki kosalela yango na lolenge malamu?
15 Mpo na kosalisa baboti ete basimba mitema ya bana na bango, ba Témoins de Jéhovah basalaki mikanda lokola mokanda Boyoka Moteyi monene. Mokanda yango ezali kolobela bilambo, oyo bikoki kozala kitoko, kati na mokapo elobi “Bato mibale baoyo bakumisaki bilambo ya mbotama.” Kasi ezali nde kolimbola ete bilambo mibale oyo ya mbotama elobelami kati na Biblia esalemaki epai na bapakano, bato oyo bazalaki kosambela Jéhovah te, mpe ete na mokomoko na yango ‘bakataki motó ya moto. (Malako 6:17-29; Genese 40:20-22) Ndenge nini okoki kosalela makambo yango mpo na kosimba motema ya mwana na yo?
16 Bokoki kozwa likebi ya mwana na bino na kosalelaka makanisi masalelami kati na mokanda Moteyi Monene. Boloba na ye: “Toyebi ete nyonso oyo ekomami kati na Biblia, ekomamaki na ntina, boye te?” Mpe botuna ye: “Mpo na yo, Nzambe azali bongo koloba na biso nini mpo na bilambo ya mbotama?” Na ndenge yango bokosalisa mwana na bino ete akanisa mpo na likambo yango mpe akoma na bosukisi malamu. Longola mokanda Moteyi Monene, mikanda misusu mibongisamaki mpo ete baboti basalela yango, mpenzampenza Mokanda mpo na masolo ya biblia mpe molongo ya masolo “Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye”, oyo mazali kobima kati na mokomoko ya banimero ya Mosenzeli uta Janvier 1986. Bozali kosalela makambo yango mpo na kokolisa boyebi ya bana na bino mpe oyo ya bino moko bobele se na libaku yango?
17. Batoli nini ya kosalela, baboti basengeli kolanda?
17 Bosengeli kotalela mpe kozongela kotalela elongo na mwana na bino mateya matali makambo oyo akokutana na yango na eteyelo. Bosalisa ye akanga ntina ete akozongisa monoko epai na Jéhovah lokola bino mpo na makambo oyo azali kosala. (Baloma 14:12) Bolobela makasi makambo malamu oyo Jéhovah azali kosala mpo na biso, mpo na kolona bongo mposa ya kosepelisa Jéhovah kati na motema na ye. (Misala 14:17) Bosala na lolenge ete bantango ya boyekoli ezala bantango ya esengo. Bana balingaka ba istware; na bongo bosala makasi mpenza ete boteya bango na motindo ya nguya, oyo ekosimba mitema na bango. Mabota mingi bazwaka libaku malamu ya kosala yango te, mpamba te basangani na yango baliaka mbala na mbala esika moko te. Makambo mazali koleka ndenge nini epai na bino? Soki bozali na ezaleli yango, bokoki komibongisa na lolenge mosusu te?—Tala Misala 2:42, 46, 47.
18, 19. (a) Baboti basengeli kotalela nini wana ezali bango koteya bana na bango, mpe tosili kokanga ntina ya likambo nini? (b) Nini ebendi likebi na yo kati na lolenge oyo tata oyo tokamati ndakisa na ye ateyaki mwana na ye ya mobali, mpe mpo na yo, matomba nini baboti bakoki kozwa soki bozali komekola ye?
18 Boumeli ya boyekoli esengeli kozala engebene bokoli ya mwana. Mpo na mwana moke, oyo azali na likoki ya kokanga makambo mingi te, bozwaka bantango mikuse mikuse ya boyekoli mbala mingi mokolo na mokolo. Mpe, moke na moke, boyeisa yango molai mpe botalela mosala moleki monene. Tosili bongo kokanga ntina ya kokana bantango ya koyekola mbala na mbala elongo na mwana. (Genese 11:18-21) Tata moko, oyo azali na bambula ntuku nsambo, apesaki ndakisa malamu na lolenge na ye ya koteya mwana na ye ya mobali, oyo azali sikawa nkulutu. Esili koleka mwa bambula mingi, alimbolaki lolenge na ye ya kosalela na maloba oyo:
19 “Ntango akokisaki mbula moko, nabandaki kolobela ye, na ntango ya kolala, ba istware ya Biblia, na koyokanisaka yango na mayele na ye mpe na lolenge ete esimba makanisi na ye; Uta abandaki koloba, wana ekomaki ye na mbula mibale, tozwaki momeseno ya kongumbama na mabolongo pene na mbeto na ye mpe kolakisa ye alandaka biso na kozongelaka maloba ya losambo ya Tata na Biso. . . . Ekomaki ye na mbula misato, nabandaki koyekola Biblia mbala na mbala elongo na ye. . . . Azalaki kolanda kati na mokanda na ye na kozongelaka maloba oyo ngai nazalaki koloba. Na ndenge yango, ayekolaki kotanga malamu mpe kobimisa polele ata maloba oyo mazalaki mpasi mingi na kotanga. . . . Lisusu, mpo ete basolo ya Biblia ekotela ye na bozindo, toyekolisaki ye akanga na motó baversé ya petepete ya Biblia. Ntango abandaki kokende na eteyelo ya maternelle, ayebaki baversé ntuku misato to koleka. Mbula oyo elandaki, ntango akotaki na eteyelo ya primaire, ayebaki baversé ntuku nsambo. . . . Liboso akende kolala, mwana na ngai asengeli kotangela ngai na motó mwa baversé ya Biblia. Soki alamuki na ntongo, mbala mingi apesaka ngai mbote na kotangaka lisusu na motó mwa baversé.”
20. Formation nini esengeli kopesa mwana, mpe ndenge nini bokoki kosalisa ye ete asangana na esengo na mosala ya kosakola ndako na ndako?
20 Na koteyaka moke moke mwana na bino, na kopesaka ye ndakisa malamu mpe na kopamelaka ye na lolenge ekoki, bokopesa ye ebandeli malamu kati na bomoi, mpe akotondo bino seko mpo na yango. (Masese 22:15; 23:13, 14) Moko na makambo na ntina ya mateya yango etali kolakisa ye uta bomwana mosala ya kosakola. Sala na boye ete asepela na yango na kosalisaka ye ete asangana na yango mpenza. Tata oyo toutaki kolobela azalaki lisusu koloba mpo na mwana na ye ete: “Likoki yango ye kotanga biteni ya Biblia esalisaka ye mingi na mosala ya kosakola ndako na ndako, mpamba te bato mingi bazali mpenza kokamwa na yango mpe bazali kokakatana te mpo na kondima kozwa bazulunalo elimbolaka Biblia oyo azali kolakisa bango. Azali kosangana na mosala yango ya boklisto uta ezalaki ye na bambula misato, mpe [ekomi ye na bambula motoba] azali kozwa matomba koleka mwasi na ngai mpe ngai moko mpo na oyo etali kokabola mikanda oyo milimbolaka Biblia.”—Réveillez-vous! ya 8 Mai 1965, nkasa 3, 4.
21. (a) Likabo nini eleki kitoko baboti bakoki kopesa epai na bana na bango? (b) Toli nini ememeli baboti, mpe bango banso basengeli kosalaka nini elongo na bana na bango?
21 Na ntembe te, baboti baklisto bazali na likabo kitoko ya kopesa epai na bana mbango, ezali boyebi ya Jéhovah, bakisa mpe elikya ya bomoi ezangi nsuka kati na mokili ya sika, mokili kitoko epai kimya mpe esengo ekozala. (Masese 3:1-6, 13-18; 13:22) Likoló na nyonso, bolona kati na mitema ya bana na bino kondima mpo na bosolo ya elikya yango ya kitoko, mpe mposa ya kosalela Jéhovah. Bosala na boye ete ezala petee mpo na bango na kosalela losambo ya solo mpe ete yango esepelisa bango. (1 Timote 1:11) Bokotisa kati na bango elikya epai na Jéhovah uta bolenge na bango mpenza. Mpe bozangaka soki moke te ntango mpo na koyekola mbala na mbala elongo na bango. Bopesa nzela na eloko moko te ete epekisa bino kosala yango. Bokanisaka mokolo na mokolo bamposa na elimo ya bana na bino mpe lolenge loleki malamu ya kokokisa yango na kosimbaka mitema na bango. Bozali solo na misala mingi mpe na mikakatano; Satana mpe mokili na ye bazali kosala ete ezala bongo. Kasi bomikundola ndakisa na Yesu! Bozangaka soki moke te ntango mpo na koyekola mbala na mbala elongo na bana na bino.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liboso mpenza ete ayeba kotanga, mwana ayebaki na motó ba istware yango bobele na koyokaka bakasete ya mokanda yango.
Bozongeli
□ Ndenge nini Biblia ezali komonisa ete mokumba ya liboso ya baboti ezali ya kokokisa bamposa ya bana na bango?
□ Na mikolo na biso, mpo na nini baboti basengeli kosala milende mpenza mpo na kobatela bana na bango?
□ Mpo na nini ezali ntina monene na koteya bana uta bolenge na bango mpenza?
□ Batoli nini ya malamu, ekoki kosalisa baboti ete basimba motema ya bana na bango?
□ Likambo nini baboti baklisto basengeli soki moke te kotya pembeni?
[Elilingi na lokasa 19]
Koloba ata mbala moko te ete ntango ekoki naino te mpo na koteya mwana na yo.