Okolinga komata velo?
SOKI mopaya akómi na Dhaka, mboka-mokonzi ya Bangladesh, mbala moko akomona likambo oyo ekobenda likebi na ye. Na kati ya ebele ya bato akomona ebele ya bavelo! Ebele ya bavelo yango etambolaka na banzela ya minene mpe ya mike, ememaka bato mpe biloko.
Na Dhaka, basalelaka velo mingi mpo na kotambola to komema biloko. Motángo ya bavelo oyo eyebani ezali soki 80 000, kasi na kotalela ebele ya bavelo oyo etambolaka na balabala mikolo nyonso, bato mosusu balobaka ete motángo wana ezali moke. Kutu, bakomá kobenga Dhaka engumba oyo ezali na bavelo mingi koleka na mokili!
Bavelo ya liboso
Atako bazalaki kosalela kiti oyo etambolaka na boyangeli ya Louis XIV, mokonzi ya France (1638-1715), balobaka ete Jonathan Gable, moto moko ya Amerika oyo azalaki misionɛrɛ na Japon na bambula ya 1870, nde asalaki velo oyo babendaka na mabɔkɔ. Balobaka ete asalaki yango mpo na mwasi na ye oyo azalaki makasi te mpe ete na ebandeli bapesaki yango nkombo jinrikisha na monɔkɔ ya Japonais, oyo elimboli motuka oyo moto abendaka. Nsukansuka, ekómaki kobengama “rickshaw” na Lingelesi to velo na Lingala. Nsima ya bambula, mitindo ndenge na ndenge ya velo yango ebimaki na Azia mobimba mpe ezalaki lolenge ya transport ya ntalo moke. Ntango Charles Taze Russell (na lobɔkɔ ya mobali) oyo azalaki kotambwisa mosala ya Bayekoli ya Biblia (ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana) akendaki na Japon na 1912, ye ná bato oyo azalaki na bango batambolaki na mboka yango na bavelo wana.
Na Dhaka, velo ya pinɛ misato ebimaki na nsuka ya bambula ya 1930. Na bokeseni na velo ya pinɛ mibale, oyo moto azalaki kobenda na bibende mibale oyo bazalaki kokangisa na velo yango, oyo ya pinɛ misato ezalaki monene koleka. Motambwisi azalaki kofanda liboso mpe kotambwisa yango na makolo. Yango ezalaki kopesa ye likoki ya komema bato to biloko mpe kokende na yango mosika, mpe kotambola kozanga mokakatano na nzela oyo etondi na mituka mpe bato.
Velo ya mayemi
Bavelo mingi ya Dhaka ezali na mayemi. Momeseno wana ya kotya mayemi na bavelo eutaki wapi? Ntango velo yango ebimaki liboso na Dhaka, ekutaki bato bazali kosalela tomtoms, sharete oyo mpunda ezalaki kobenda, oyo ezalaki komema bato mpe biloko. Ekoki kozala ete batambwisi ya velo bazalaki kotya mayemi na bavelo yango mpo na kobenda bato. Nsukansuka, langi oyo bazalaki kotya mpe makambo oyo bazalaki kokoma mpo na kosala piblisite ekómaki mayemi.
Bavelo yango na mayemi na yango ekamwisaka mpenza bato oyo bamoni yango mpo na mbala ya liboso. Ezalaka mpenza mayemi likoló ya bapinɛ. Kutu, Syed Manzoorul Islam, moto moko ya mayele ya Bangladesh abengi bavelo yango ya Dhaka “bandako ya mayemi oyo etambolaka.” Batyaka mayemi ya langi ndenge na ndenge, bililingi mpe biloko mosusu.
Moyemi mokomoko azalaka na ndenge na ye ya kosala yango mpe makambo oyo asepelaka koyema. Mayemi mosusu emonanaka lokola piblisite ya bafilme ya kala mpe ya sika ya Inde mpe ya Bangladesh. Emonisaka ndenge bomoi ezalaka na mboka mpe na engumba mpe ntango mosusu emonisaka makambo ya bomoi ya bato mpe makambo ya politiki. Mbala mingi bayemaka banyama, bandɛkɛ, bokila, mpe bazamba.
Na bambula ya 1950, bavelo ya mayemi ezalaki mingi te. Lelo oyo, bato oyo basalaka mayemi bazali soki 200 to 300. Mpo na kosala bavelo yango, bazwaka bitenibiteni ya biloko ya kala mpe bakangisi yango. Na ndakisa, bazwaka eteni ya tɔnɔ ya mafuta to mpe ya eloko mosusu oyo ebebá, mpe bayemaka bililingi kitoko oyo etondi na langi. Velo ya mayemi emonisaka bonkɔkɔ ya ekólo Bangladesh. Lolenge mpe kitoko na yango ekesenisaka yango mpenza na bavelo mosusu.
Motambwisi ya velo
Na ntembe te, omoni ete moto oyo atambwisaka velo yango asalaka mosala makasi. Kanisá naino ete olekisaka mokolo mobimba, komema bato mpe mikumba ya kilo. Bato oyo bamataka na velo yango bakoki kozala bamama ya ndako, bana-kelasi, bato ya mimbongo to basombi ná biloko na bango. Mbala mingi, bato mibale to misato to mpe koleka bamataka na velo moko. Velo yango ekoki mpe komema basaki ya loso, ya mbala, ya matungulu ya moto ya mombongo oyo azali kokende kotɛka na zando. Ntango mosusu, akoki kofanda likoló mpenza ya biloko na ye. Moto oyo azali kotala na mosika akoki komona ete ekoki kosalema te ete moto amema ebele ya kilo bongo. Nzokande, ata na nse ya moi makasi to mbula, motambwisi ya velo wana asalaka mosala yango kozanga komilelalela.
Mingi bakimá kosala bilanga na bamboka ya bobola mpe bayá koluka mbongo ya koleisa mabota na bango. Lokola balongaka te kozwa misala ya mbongo mingi, mingi batikaka mabota na bango mpo na koya kosala mosala ya kokumba velo. Basalelaka makasi na bango ya nzoto mpo na kozwa mwa badolare mokolo na mokolo.
Lolenge kaka moko ya transport
Velo ezali se kokóma mingi na Dhaka mpo mboka yango ezali na bangomba te mpe ezali na banzela ebele ya mikemike oyo motuka ekoki koleka te. Lokola lolenge yango ya transport ebebisaka mopɛpɛ te, bato mingi basepelaka na yango.
Na bingumba mingi ya Azia, bavelo yango ezali lisusu mingi te ndenge ezalaki liboso. Lokola bato bakómi mingi mpe lolenge ya bomoi ebongwani, bavelo yango ebongi lisusu mpenza te. Kasi, atako bato mosusu bakómi komona yango lokola esilá ngala, bato bazali kosala makasi mpo na kobimisa yango eloko ya sika.
Ntango ozali kosala mobembo na Dhaka, okoki kopona kotambola na bisi, taxi, tukutuku, velo oyo ezali na pinɛ misato to mpe velo ya mayemi ndenge na ndenge oyo etambolaka na motɛrɛ. Kasi, okobosana te soki otamboli na velo wana na banzela oyo etondi na bato!
[Elilingi na lokasa mobimba 23]