Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 83
  • Ndenge nini nakoki kotɛmɛla komekama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini nakoki kotɛmɛla komekama?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo osengeli koyeba
  • Oyo okoki kosala
  • Ndenge ya kolonga komekama
    Lamuká!—2014
  • Tólonga bolɛmbu ya nzoto na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ndenge nini nakoki kokima komekama?
    Lamuká!—2008
  • Ndenge nini nakoki kokima komekama?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 83
Elenge mobali moko amekami ntango amoni mwasi moko ná mobali na ye bazali kolakisana lolango, bilenge mibali mibale bazali kotala aparɛyi moko mpe elenge mwasi moko aleki wana

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini nakoki kotɛmɛla komekama?

Ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” (Baroma 7:21) Omiyoká naino bongo te? Soki bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo oboya kolanda bamposa na yo ya mabe ntango omekami.

  • Oyo osengeli koyeba

  • Oyo okoki kosala

  • Makambo bilenge mosusu balobi

Oyo osengeli koyeba

Mbala mingi komekama ná mbamba ya baninga etambolaka nzela moko. Kutu, Biblia elobaka ete “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:33) Mbamba ya baninga to oyo eutaka na radio to televizyo ekoki kolamwisa mposa na motema na yo mpe kotinda yo osala mabe; ekoki kutu kotinda yo ‘olanda ebele ya bato mpo na mikano ya mabe.’​—Kobima 23:2.

“Mposa ya kolinga ete basusu bándima yo ekoki kotinda yo osala likambo nyonso oyo bazali kosala, kaka mpo bándima yo.”​—Jeremy.

Kanisá naino: Mpo na nini ekoki kozala mpasi otɛmɛla komekama soki ozali komitungisa mingi mpo na oyo basusu bakokanisa?​—Masese 29:25.

Na mokuse: Kotika te ete mbamba ya baninga etinda yo otya pembeni mibeko oyo otosaka.

Oyo okoki kosala

Yebá mateya oyo ondimaka. Soki oyebi te makambo oyo ondimaka, okoki kokóma lokola mwana-popi oyo basusu bakoki kosakana na yango. Eleki malamu kolanda toli oyo ya Biblia: “Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo; bókangama makasi na oyo ezali malamu.” (1 Batesaloniki 5:21) Soki oyebi mateya oyo ondimaka, ekozala mpasi te okangama na yango mpe otɛmɛla likambo nyonso oyo eyokani te na yango.

Kanisá naino: Mpo na nini ondimaka ete mibeko ya Nzambe ezali mpo na bolamu na yo moko?

“Namonaka ete soki nakangami na makambo oyo nandimaka mpe natɛmɛli komekama, basusu bapesaka ngai limemya mingi mpo na yango.”​—Kimberly.

Ndakisa ya kolanda: Danyele. Ekoki kozala ete ntango azalaki naino elenge mpenza, Danyele “akanaki na motema na ye” ete akotosa mibeko ya Nzambe.​—Danyele 1:8.

Elenge mobali oyo azali na bansinga oyo ekangi ye, akómi lokola mwana-popi oyo bazali kosakana na ye

Soki oyebi te makambo oyo ondimaka, okoki kokóma lokola mwana-popi oyo basusu bakoki kosakana na yango

Yebá bolɛmbu na yo. Biblia elobeli “bamposa ya bolenge;” bamposa oyo ezalaka makasi mingimingi ntango ozali elenge. (2 Timote 2:22) Ezali kaka te mposa ya kosangisa nzoto, kasi mpe mposa ete basusu bándima yo to mposa ya kozwaka yo moko bikateli liboso okokisa mbula oyo esengeli mpo na yango.

Kanisá naino: Biblia elobi ete “moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.” (Yakobo 1:14) Mposa nini eyelaka yo makasi?

“Yebá komekama oyo ezalaka mpasi otɛmɛla yango. Salá bolukiluki mpo oyeba ndenge ya kobundisa komekama yango mpe komá makanisi oyo okoki kosalela. Na ndenge yango, mbala ya nsima oyo okokutana na komekama yango okoyeba ndenge ya kotɛmɛla yango.”​—Sylvia.

Ndakisa ya kolanda: Davidi. Na ntango moko boye, atikaki bamposa na ye moko mpe mbamba ya basusu ekweisa ye. Kasi Davidi azwaki mateya na mabunga oyo asalaki mpe alukaki kobongisa makambo. Abondelaki Yehova boye: “Zalisá motema ya pɛto na kati na ngai, mpe tyá kati na ngai elimo ya sika, oyo ezali ngwi.”​—Nzembo 51:10.

Yebá komipekisa. Biblia elobi: “Kotika mabe elonga yo te.” (Baroma 12:21) Yango elingi koloba ete esɛngi kaka te okwea na komekama. Okoki kopona kosala makambo ya malamu.

Kanisá naino: Ndenge nini okoki komipekisa mpe kosala oyo ezali malamu na likambo oyo ekoki kotinda yo osala mabe?

“Nakanisaka ndenge nakomiyoka soki nakwei na likambo moko oyo namekami na yango. Nakomiyoka malamu? Mbala mosusu nakomiyoka malamu, kasi ekoki kozala kaka mpo na mwa ntango. Nakomiyoka kaka bongo nsima ya mikolo? Te, nakoyoka mabe mpenza. Ebongi mpenza nasala yango? Te!”​—Sophia.

Ndakisa ya kolanda: Paulo. Atako andimaki ete azalaki na bamposa mabe, Paulo ayebaki komipekisa. Akomaki boye: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai mpe kokómisa yango lokola moombo.”​—1 Bakorinti 9:27.

Na mokuse: Yo moko nde okopona oyo okosala soki okutani na komekama.

Kobosana te, komekama ezalaka mpo na libela te. Melissa, elenge mwasi ya mbula 20; alobi boye: “Makambo mingi oyo ezalaki komekama monene mpo na ngai ntango nazalaki na eteyelo ya katikati ekómá sikoyo na ntina te. Soki nakanisi yango, ekitisaka ngai motema ete komekama oyo nazali kokutana na yango lelo oyo, ekoleka na yango mpe mokolo mosusu nakomona ete nasalaki malamu ndenge natɛmɛlaki yango.”

Makambo bilenge mosusu balobi

Olivia

“Kozala na ekateli mpe mpiko ya kokangama na ekateli yango esalisaka ngai natɛmɛla komekama. Na ndakisa, soki nalobi ete nakosala likambo moko boye te, nakangamaka na ekateli yango mpe nakanisaka yango lisusu te mpe natikaka te ete moto mosusu abongola ekateli na ngai.”​—Olivia.

Jared

“Batyaka bilenge mingi mbamba mpo na kokende bafɛti mpe kosala makambo nyonso oyo etambolaka nzela moko na yango​—komɛla masanga, kosalela drɔgɛ mpe kosangisa nzoto. Namonaka ete kosolola na baboti na ngai polele mpo na yango esalisaka ngai mpenza. Lisusu, kozala na makambo ya kosala ntango nazali na mosala te esalisaka ngai naboya kosala likambo moko ya mabe.”​—Jared.

Mayan

“Moko ya komekama oyo ezalaka mpasi kotɛmɛla yango ezali ya kosala likambo moko oyo ezali mabe te mpo na basusu kasi ekoki kozala mabe mpo na ngai​—na ndakisa, ntango nalingi kopona eloko ya kosala mpo na kozwa mwa mopɛpɛ. Osengeli koyeba mateya oyo ondimaka mpo na koboya mbamba ya ndenge wana mpe yango esɛngaka ntango mpe eksperiansi.”​—Mayan.

Julian

“Osengeli koyeba makambo oyo ezalaka mpasi te okwea na yango. Osengeli koyeba esika nini na Internet ekoki kotya yo na komekama, makambo ya mbindo mpe osengeli koyeba oyo okosala soki ekómeli yo. Osengeli koyeba liboso oyo okosala soki ekómeli yo mpo okwea na komekama te.”​—Julian.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto