Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 84
  • Mpo na nini nalobaka ntango nyonso te maloba ya malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini nalobaka ntango nyonso te maloba ya malamu?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini nalobaka maloba mabe?
  • Kopekisa lolemo
  • Salelá lolemo na ndenge oyo ekomonisa bolingo mpe limemya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mpo na nini nalobi bongo?
    Lamuká!—2012
  • Salelá malamu nguya ya lolemo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • “Ntango na kozala nyɛɛ mpe ntango na koloba”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 84
Elenge mobali oyo azali koluka kokanga maloba oyo ebimi na monɔkɔ na ye

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini nalobaka ntango nyonso te maloba ya malamu?

“Na bantango mosusu nayebaka kopekisa lolemo na ngai, kasi na bantango mosusu monɔkɔ elobaka makambo oyo yango moko elingi kozanga ete bɔɔngɔ etinda yango!”​—James.

“Soki nazali kobanga, nalobaka kozanga kokanisa, kasi soki nazali na kimya nalobaka mingi koleka oyo nasengeli koloba. Yango wana mbala mingi, nabebisaka ntango nyonso makambo.”​—Marie.

Biblia elobi: “Lolemo ezali mɔtɔ” mpe “mwa mɔtɔ moke ekoki kotumba zamba ya monene mpenza!” (Yakobo 3:5, 6) Mbala mingi maloba na yo elukelaka yo makambo? Soki ezali bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo.

  • Mpo na nini nalobaka maloba mabe?

  • Kopekisa lolemo

  • Makambo bilenge mosusu balobi

Mpo na nini nalobaka maloba mabe?

Kozanga kokoka. Biblia elobi: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi. Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka.” (Yakobo 3:2) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tobɛtaka libaku kaka te ntango tozali kotambola, kasi mpe na maloba na biso.

“Lokola nazali na bɔɔngɔ ya kozanga kokoka mpe lolemo ya kozanga kokoka, ekozala bozoba soki nalobi ete napekisaka yango na ndenge ya kokoka.”​—Anna.

Koloba mingi. Biblia elobi: “Na ebele ya maloba, makambo ya kobuka mibeko ezangaka te.” (Masese 10:19) Bato oyo balobaka mingi kasi bayokaka moke, bazangaka te koloba makambo oyo ekosilikisa basusu.

“Ezalaka ntango nyonso te bato oyo balobaka mingi na likita moko boye nde bazalaka bato ya mayele koleka. Yesu nde moto oyo alekaki bato nyonso na mayele awa na mabele, ata bongo na bantango mosusu azalaki kofanda nyɛɛ.”​—Julia.

Maloba ya kotyola. Biblia elobi: “Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga.” (Masese 12:18) Maloba ya kotyola mpe elobamaka kozanga kokanisa; elingi koloba maloba ya kozokisa mpo na kosilisa moto valɛrɛ. Bato oyo basalelaka maloba ya kotyola bakoki koloba, “nazalaki kaka kosala masɛki!” Kasi koyokisa moto nsɔni ezali likambo ya masɛki te. Biblia elobi na biso tólongola ‘maloba ya kofinga ná mabe nyonso.’​—Baefese 4:31.

“Nalingaka kosala masɛki mpe kosɛkisa bato mpe mbala mingi yango ebendelaka ngai makambo.”​—Oksana.

Elenge mobali oyo azali koluka kozongisa nkisi ya mino na tube na yango

Soki olobi likambo moko, okoki kozongisa yango lisusu te kaka ndenge okoki te kozongisa nkisi ya konika mino oyo obimisi

Kopekisa lolemo

Koyeba kopekisa lolemo ekoki kozala mpasi, kasi toli ya Biblia ekoki kosalisa. Na ndakisa, tótalela makambo oyo elandi.

“Bóloba na motema na bino, . . . mpe bófanda nyɛɛ.”​—Nzembo 4:4.

Na bantango mosusu kofanda nyɛɛ ezalaka malamu koleka. Elenge mwasi moko na nkombo Laura, alobi boye: “Ndenge namiyokaka ntango nasiliki ekokanaka te ndenge oyo namiyokaka na nsima. Soki nkanda ekiti, mbala mingi nasepelaka ndenge nalobaki te likambo nakanaki koloba.” Kofanda naino nyɛɛ ata mpo na mwa basegɔnde ekoki kopekisa yo oloba maloba mabe.

“Litoi emekaka nde maloba te ndenge monɔkɔ emekaka bilei?”​—Yobo 12:11.

Okoki kokima makambo mingi ya mawa soki liboso ya koloba likambo, omituni mituna oyo elandi mpo oyeba nini ezali na makanisi na yo:

  • Ezali solo? Ezali boboto? Ezali na ntina?​—Baroma 14:19.

  • Nakomiyoka ndenge nini soki moto moko alobi na ngai bongo?​—Matai 7:12.

  • Ekomonisa ete nazali komemya makanisi ya moto mosusu?​—Baroma 12:10.

  • Ezali ntango ya malamu ya koloba likambo yango?​—Mosakoli 3:7.

“Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.”​—Bafilipi 2:3.

Toli yango ekosalisa yo okóma kotalela basusu na makanisi malamu, mpe yango nde ekosalisa yo opekisa lolemo na yo mpe okanisa liboso ya koloba likambo. Ata soki ekómi retare mpe osí olobaki likambo moko oyo esalaki moto mpasi na motema, komikitisa ekosalisa yo osɛnga bolimbisi mpe osala yango nokinoki soki likoki ezali! (Matai 5:23, 24) Na nsima zwá ekateli ya kosala nyonso opekisaka lolemo na yo.

Makambo bilenge mosusu balobi

Taylor

“Soki lisolo ekómi elɛngi, epesaka ngai mposa ya koloba makambo oyo eyeli ngai kaka boye na makanisi. Kasi soki nazeli ata miniti zomi mpo na kokanisa ndenge maloba na ngai ekosala basusu to soki ekobakisa eloko ya ntina na lisolo yango, esalisaka ngai napekisa lolemo na ngai malamu koleka.”​—Taylor.

Brandon

“Soki moto moko alobi likambo oyo esali yo mpasi, ezali malamu kotalela nini etindi ye aloba bongo. Mbala mingi, ezalaka kaka maloba ya mbalakaka mpe okoki kokipe yango te. Na bantango mosusu, okoki komona mabe ndenge balobi na yo bongo, kasi mbala mosusu ezali mpe na makambo ya solo na kati. Kosolola malamu mpe na kimya ezali sekele mpo na kobongisa makambo ya ndenge wana.”​—Brandon.

Jessica

“Ezalaka pɛtɛɛ koboya koloba makambo ya mabe soki eyeli biso te liboso na makanisi. Na bantango mosusu tosengeli kobongisa ndenge na biso ya kotalela makambo mpe bato. Soki tosali bongo, yango ekopekisa biso tóloba makambo oyo ekoki kosala bango mpasi na motema.”​—Jessica.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto