Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/08 nk. 14-16
  • Ndenge nini nakoki kokima komekama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini nakoki kokima komekama?
  • Lamuká!—2008
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini nakoki kokima komekama?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Ndenge ya kolonga komekama
    Lamuká!—2014
  • Ndenge nini nakoki kotɛmɛla komekama?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Tólonga bolɛmbu ya nzoto na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 10/08 nk. 14-16

Mituna oyo bilenge batunaka

Ndenge nini nakoki kokima komekama?

◼ Karen akendaki na fɛti moko mpe elekaki ata miniti zomi te, amonaki bilenge mibali mibale bakɔti na basaki ya minene. Moto nyonso na fɛti yango ayebaki biloko oyo ezalaki na kati ya basaki yango. Mwa moke liboso, Karen ayokaki bilenge yango bazali koloba ete masanga ekozala beboo na fɛti yango. Karen ayebisaki baboti na ye likambo yango te. Alobaki na nse ya motema ete bilenge yango bazali kosala masɛki. Kutu, akanisaki ete mbala mosusu mikóló bakozala na esika yango.

Na mbala moko, Karen ayokaki moto moko atɛlɛmi nsima na ye mpe alobi na ye ete: “Boni yo otɛlɛmi kaka boye, olingi kobebisa fɛti na biso?” Ntango abalukaki amonaki ete ezalaki moninga na ye Jessica nde azalaki koloba na ye; asimbaki milangi mibale ya masanga oyo autaki kofungola. Apesaki Karen molangi moko mpe alobaki na ye ete, “Koyebisa ngai te ete okoli naino te mpo obanda kosepela na bomoi!”

Karen alingaki koboya. Kasi, komekama yango ezalaki makasi koleka ndenge akokaki kokanisa. Ezalaki mpenza te mpo na masanga. Kasi, lokola Jessica azali moninga na ye, Karen alingaki te Jessica amona ete alingi kobebisa fɛti. Lisusu, Jessica azalaka mwana malamu. Mpe soki ye azali komɛla masanga, mpo na nini Karen amɛla te? Karen alobaki na nse ya motema ete, ‘Kutu, ezali kaka masanga. Ezali bangi to pite te.’

NTANGO ozali elenge, komekama eyaka na balolenge mingi. Mbala mingi, komekama yango etalelaka basi, mpo na bilenge mibali mpe mibali, mpo na bilenge basi. Ramon,a elenge moko ya mbula 17, alobi boye: “Na kelasi, bilenge basi bazalaka matumoli mingi. Balukaka kosimbasimba bana mibali mpo bátala soki bakosala nini. Batikaka te ata soki oboyi!” Deanna oyo azali mpe na mbula 17, akutanaki na likambo ya ndenge wana. Alobi boye: “Mokolo moko, elenge mobali moko atyaki lobɔkɔ na ye na lipeka na ngai. Natindikaki ye, mpe nalobaki na ye ete, ‘Ozali kosimba ngai mpo na nini? Nayebi ata yo te!’”

Yo mpe okoki kokutana na komekama; mpe okoki komona lokola nde komekama yango ezali kosila te. Ndenge elenge moklisto moko alobaki yango, “komekama ezali lokola moto moko azali kokoba kobɛta ko-ko-ko ata soki moto moko azali kondima te.” Okutanaka na komekama mingi? Na ndakisa, omekamaka mingi na makambo oyo?

□ Likaya

□ Masanga

□ Bangi

□ Pornografi

□ Pite

□ Makambo mosusu ․․․․․

Soki okutanaka na makambo yango mosusu, koloba mbala moko te ete obongi te kozala moklisto. Okoki koyekola kokima bamposa ya mabe mpe kolonga komekama. Ndenge nini? Osengeli koyeba makambo oyo ebimisaka komekama. Tótalela makambo misato.

1. Kozanga kokoka. Mposa ya kosala mabe ezalaka epai ya moto nyonso ya kozanga kokoka. Ata ntoma Paulo, oyo azalaki moklisto oyo akɔmeli, alobaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” (Baloma 7:21) Tomoni ete ata moto oyo aleki sembo akoki na bantango mosusu komona ete azali na “mposa ya mosuni mpe mposa ya miso.” (1 Yoane 2:16) Kasi, kotya ntango nyonso makanisi na mposa ya kosala mabe ebakisaka mokakatano, mpamba te Biblia elobi ete: “Mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu.”​—Yakobo 1:15.

2. Makambo mosusu. Komekama ezalaka bisika nyonso. Elenge moko na nkombo Trudy alobi boye: “Na kelasi mpe na mosala, bato balobelaka ntango nyonso makambo ya kosangisa nzoto. Na televizyo mpe na bafilme bamonisaka yango ntango nyonso lokola likambo ya malamu mpenza. Bamonisaka mpenza te mpasi oyo yango ememaka!” Trudy ayebi malamu mabe oyo makambo yango ekoki kosala. Alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 16, tolinganaki na elenge mobali moko mpe nazalaki kokanisa ete ezalaki mpenza bolingo ya solo. Kasi, mama afandisaki ngai mpe alobaki na ngai ete soki natiki nzela yango te, nakozwa zemi. Nayokaki mpasi mingi na motema ete mama na ngai aloba na ngai maloba ya ndenge wana! Kasi, sanza mibale na nsima, nakómaki na zemi.”

3. “Bamposa oyo ekangani na bolenge.” (2 Timote 2:22) Yango ekoki kozala mposa oyo elenge nyonso azalaka na yango, na ndakisa mposa ya kondimama na baninga mpe komonisa ete yo mpe oyebi makambo. Bamposa yango ezali mabe te, kasi soki elenge akebi na yango te, ekoki kokóma mpasi mpo akima komekama. Na ndakisa, koluka ete baninga bámona ete yo mpe oyebi makambo ekoki kotinda yo oboya kolanda bizaleli malamu oyo baboti na yo bateyaki yo. Yango nde ekómelaki Steve ntango akómaki na mbula 17. Alobi boye: “Mwa moke nsima ya kozwa batisimo, nakómaki motomboki, nakómaki kosala makambo nyonso oyo baboti na ngai bazalaki kopekisa ngai.”

Ya solo, ezali pɛtɛɛ te mpo na kolonga makambo oyo touti kolobela. Atako bongo, okoki kolonga komekama. Ndenge nini?

◼ Ya liboso, osengeli koyeba komekama oyo ekómelaka yo mingi. (Ekoki kozala ete osalaki yango mwa likoló.)

◼ Na nsima, omituna boye: ‘Ntango nini nakutanaka na komekama yango mingi?’ Ezalaka:

□ Na kelasi

□ Na mosala

□ Ntango ozali yo moko

□ Ntango mosusu ․․․․․

Koyeba ntango oyo okutanaka na komekama moko boye ekoki kosalisa yo okima yango. Na ndakisa, tótalela likambo oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Likambo nini ekokaki kosalisa Karen ayeba ete fɛti yango ekozala malamu te? Ndenge nini akokaki kokima komekama oyo akutanaki na yango?

◼ Lokola osili koyeba (1) likambo oyo emekaka yo mpe (2) ntango oyo okutanaka na komekama yango, okoki sikoyo koluka ndenge ya kolonga yango. Osengeli libosoliboso koluka ndenge ya kopekisa to kokima makambo oyo emekaka yo. Komá awa na nse makambo oyo okoki kosala.

․․․․․

․․․․․

(Bandakisa: Soki nsima ya kelasi okutanaka mbala na mbala na baninga ya kelasi oyo basɛngaka yo omɛla likaya elongo na bango, mbala mosusu ekoki kozala malamu obanda koleka na nzela mosusu mpo okutana na bango te. Ntango ofungoli Internet, soki mbala mingi okutaka ete batindeli yo bililingi ya bato bazali bolumbu, okoki koluka kokɔtisa programɛ oyo ekopekisa bililingi wana ekɔtaka na adrɛsi e-mail na yo. Lisusu, osengeli kopona malamu maloba oyo okokoma ntango olingi kosala bolukiluki na Internet.)

Ya solo, okoki kokima komekama nyonso te. Ata soki okimi yango lelo, mokolo mosusu okoki kokutana na likambo moko oyo ekomeka yo makasi, mbala mosusu na ntango oyo okanisaki te. Okoki kosala nini mpo na yango?

Omibongisa. Ntango Yesu ‘amekamaki na Satana,’ atɛmɛlaki ye mbala moko. (Malako 1:13) Mpo na nini? Mpo ayebaki liboso oyo asengeli kosala soki komekama ya ndenge wana ekómeli ye. Kanisá naino: Yesu azalaki robo te. Akokaki mpe kokwea na komekama. Nzokande, asilaki kozwa ekateli ya kotosa Tata na ye ntango nyonso. (Yoane 8:28, 29) Yesu alobaki solo ete: “Nakitaki uta na likoló mpo na kosala, mokano na ngai te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.”​—Yoane 6:38.

Komá awa na nse bantina mibale oyo mpo na yango osengeli kolonga komekama oyo okutanaka na yango mbala na mbala mpe makambo mibale oyo okoki kosala mpo na kolonga yango.

1. ․․․․․

2. ․․․․․

Kobosana te, ntango okwei na komekama, elakisi ete okómi moombo ya bamposa na yo. (Tito 3:3) Mpo na nini okotika ete bamposa na yo etambwisaka yo? Osengeli kopekisa bamposa na yo mpo omonisa ete okɔmeli na esika otika ete bamposa na yo etambwisaka yo.​—Bakolose 3:5.

Okokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/​ypf

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa na lisolo oyo.

MITUNA YA KOMANYOLA

◼ Bikelamu ya kokoka bakoki mpe komekama?​—Genese 6:1-3; Yoane 8:44.

◼ Soki olongi komekama, bosembo na yo ekosala nini epai ya basusu?​—Masese 27:11; 1 Timote 4:12.

[Etanda na lokasa 15]

MEKÁ KOSALA BOYE

Meká kozwa boussole mpe tɛlɛmisá yango na boye ete likɔnga na yango etala na nɔrdi. Na nsima, tyá emá pembeni ya boussole yango. Likambo nini ekosalema? Likɔnga ya boussole ekolakisa lisusu na nɔrdi te. Kasi, ekolakisa na ngámbo ya emá.

Lisosoli na yo ezali lokola boussole. Soki eteyami malamu, ekosalisa yo ozwaka bikateli ya malamu. Kasi, baninga ya mabe bazali lokola emá pembeni ya boussole; bakoki kobenda yo osala makambo oyo ekobebisa lisosoli na yo. Liteya nini okoki kozwa? Salá makasi ya koboya bato mpe makambo oyo ekoki kobebisa lisosoli na yo!​—Masese 13:20.

[Etanda na lokasa 15]

LIKANISI

Bongisá biyano oyo okoki kopesa ntango moto ameki yo osala likambo moko ya mabe. Komitungisa te. Ezali kosɛnga kaka te oloba na ye maloba ya kotyola. Mbala mingi, esɛngaka kaka oloba na maloba ya polele ete oboyi na motema moko. Na ndakisa, soki moninga moko ya kelasi apesi yo likaya, okoki koloba boye: “Kolekisa ntango na yo mpamba te. Namɛlaka likaya te!”

[Elilingi na lokasa 15]

Ntango okwei na komekama, elakisi ete okómi moombo ya bamposa na yo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto