31/08–06/09/2026
LOYEMBO 89 Yoká, tosá Yehova
Kebá na ndenge ozali koyoka
“Bókeba na ndenge bozali koyoka.”—LUKA 8:18.
NA MOKUSE
Ntina oyo tosengeli koyokaka na likebi na makita mpe na mabaku mosusu ya koteyama na Yehova mpe ndenge oyo tokoki kosala yango.
1-2. (a) Ndenge nini Yehova akokisaka bamposa ya elimo ya basaleli na ye lelo oyo? (Nzembo 23:1, 2, 5) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
LELO oyo, Yehova azali kopesa biso ebele ya bilei ya elimo. Na ntembe te, tokoki koloba lokola Davidi, oyo ayembaki ete: “Yehova azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko te.”—Tángá Nzembo 23:1, 2, 5.
2 Lolenge moko oyo Yehova apesaka biso bilei ya elimo lelo oyo ezali na nzela ya makita ya lisangá. Na makita na biso, mbala mingi toyekolaka makambo oyo toyebi. Ata soki ‘topikami makasi na solo,’ tosengeli na makundoli yango. (2 Pe. 1:12) Kasi, ntango makita elobeli likambo oyo toyokaka mbala na mbala, ezalaka mpasi olanda na likebi? Soki bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo. Tokomona ntina oyo tosengeli koyokaka na likebi na makita. Tokomona mpe ndenge baoyo bateyaka na lisangá bakoki kosalisa basusu báyokaka na likebi. Na nsuka, tokolobela mwa makambo oyo ekoki kosalisa biso tózala bayoki malamu mpenza. Kasi liboso, tólobela naino soki nani nde alobaka na biso.
KOBOSANAKA TE ETE YEHOVA NDE ALOBAKA NA BISO
3. Ndenge nini Yehova alobaka na biso, mpe ndenge nini basaleli na ye basalelaka Liloba na ye?
3 Yehova alobaka na biso na nzela ya Liloba na ye, Biblia. (2 Tim. 3:16, 17) Yesu mpe ayebaki yango. Azalaki kosalela malamumalamu Liloba ya Nzambe na boye ete etindaki bayoki na ye bátuna: “Ndenge nini moto oyo ayebi Makomami malamu boye, nzokande atángá kelasi te?” (Yoa. 7:15) Bato ya mitema sembo basepelaki mingi ntango bayokaki ndenge Yesu azalaki kolimbola Liloba ya Nzambe. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso, na ndakisa ntoma Paulo mpe Apolosi, bazalaki mpe kosalela mbala na mbala Makomami ntango bazalaki kokanisa na bato. (Mis. 17:2, 3; 18:24, 28) Biso Batatoli ya Yehova toyebi ete mateya oyo ezalaka na mikanda, baemisyo, badiskur, mpe bavideo na biso eutaka nde na Biblia. Bato mingi oyo bayaka na makita na biso bakamwaka ndenge oyo tosalelaka Biblia. Baoyo basalaka masolo na makita yango basalelaka mingi Biblia mpo na koteya, basukaka kaka te na kotánga yango kasi bamonisaka mpe bayangani ndenge ya kosalela makambo oyo elobi.—Luka 24:32.
4. Liloba “koyoka” epesaka likanisi nini?
4 Ndenge oyo liloba “koyoka” esalelami mbala mingi na Biblia epesaka likanisi ya kotosa moto moko. Na yango, ntango Yehova alobaka na biso na nzela ya Liloba na ye na makita mpe tokangi ntina soki mokano na ye ezali nini, ezalaka pɛtɛɛ mpenza tótosa ye. Tokoki kondima ete Yehova asepelaka ntango toyokaka ye mpe tosalelaka makambo oyo toyoki.—Mas. 27:11.
MPO NA NINI TOSENGELI KOYOKAKA NA LIKEBI NA MAKITA?
5. Kolinga Yehova ekotinda biso tósala nini? (Yoane 4:23, 24; 1 Yoane 5:3)
5 Mpo tolingaka Yehova. (Mat. 22:37) Soki tozali koyekola mingi makambo etali Yehova, tokokóma kolinga ye lisusu mingi. Bolingo ya ndenge wana ekokolisa mposa ya koyoka, kotosa, mpe kosambela ye na ndenge oyo ayebisi biso na Liloba na ye.—Tángá Yoane 4:23, 24; 1 Yoane 5:3.
6. Toyekolaka nini na makita na biso na oyo etali kosalisa bato?
6 Mpo tolingaka bato. (Mat. 22:39) Na makita na biso, Yehova ateyaka biso ndenge ya kosalisa bandeko na biso bakristo mpe baoyo bayebi ye naino te. Na ndakisa, mwa buku Lingá bato—Kómisá bango bayekoli esalisaka biso tókolisa bizaleli oyo ekosalisa biso na mosala ya kosakola. Ezalaka mpasi mpo na yo kobanda lisolo na bato na ndenge ya pɛtɛɛ? Soki bongo, tyáká mingimingi likebi na ndenge oyo bandeko bamonisaka ndenge ya kosala yango na badevuare ya bana-kelasi, na likita ya kati ya pɔsɔ.
7. Mpo na nini ezali na ntina mingi tókoba koyokaka Yehova?
7 Mpo tolingaka bomoi. Kotosa Liloba ya Nzambe elakisi bomoi mpo na biso, kaka ndenge ezalaki mpo na basambeli ya solo na ntango ya kala. (Mib. 32:44-47) Ntango toyokaka na makita na biso, tozwaka malendisi oyo tosengeli na yango mpo na kokoba koyika mpiko wana tozali kozela mokili ya sika oyo ezali koya. (Rom. 8:25) Koyoka Yehova lelo oyo ezali na ntina mingi mpo tozali kobika na mikolo ya nsuka mpe tosengeli kotikala ekɛngɛ na elimo.—Mat. 24:42-44; Em. 1:3.
NDENGE YA KOSALISA BASUSU BÁYOKAKA NA LIKEBI NA MAKITA
8. Mpo na nini bandeko mibali oyo bateyaka na estrade basengeli kokoba kokolisa makoki na bango ya koteya?
8 Bandeko mibali oyo bateyaka na estrade, mingimingi baoyo basalaka badiskur ya bato nyonso, basengeli kokoba kokolisa makoki na bango ya koteya. Kobongisa malamu lisolo mpe kosalela malamu Biblia nde ebendaka bato ya sika na solo mpe esalisaka bandeko na biso bakristo bátikala na kati ya solo. Na yango, baoyo basalaka masolo na makita basengeli kobosana te ete masolo na bango ekoki kosalisa mingi koleka. Soki ozwi libaku yango, talelá ndenge oyo okoki kosalela makambo oyo elandi na masolo na yo. Makambo yango etaleli mingimingi baoyo basalaka badiskur ya bato nyonso, kasi tokoki mpe kosalela yango na lisolo nyonso oyo tozwi.—2 Tim. 4:2; Tito 1:9.
9. Mpo na nini lisolo na yo esengeli kozala mpasi te mpo na kokanga ntina?
9 Bongisá lisolo na yo mpo ezala polele. Lokola molobi nyonso, olingaka ete bato bálanda yo na likebi. Kasi okoki kolongola likebi ya bayoki soki lisolo na yo ezali mpenza mpasi mpo na kokanga ntina. Okoki kosala nini mpo lisolo na yo ezala pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina? Talá mwa makanisi oyo ekosalisa yo: (1) Salá makasi ya komonisa polele makanisi ya ntina na lisolo na yo. (2) Lobelá makanisi yango moko nsima ya mosusu, pemáká mwa moke liboso oleka na likanisi oyo elandi mpo bayoki báyeba ete oleki na likanisi mosusu ya ntina. (3) Zongelá na mokuse makanisi yango na nsuka ya lisolo na yo.
10. Mpo na nini ezali na ntina koluka kosepela na lisolo oyo okosala?
10 Luká kosepela na lisolo na yo. Okosala lisolo na yo na esengo soki omoni makambo oyo esepelisi yo. (Mas. 2:4, 5; Mis. 4:20) Na yango, komanyola na bavɛrsɛ mpe lisolo oyo ozwi ekosalisa yo omona makambo yango. Ndeko mobali moko ya bambula 70 na Etats-Unis abosanaka te diskur moko oyo ayokaki ntango azalaki elenge mpenza, alobi: “Tii lelo nabosanaka te ndenge molobi alendisaki biso tómanyolaka na mozindo ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe. Alobaki na komindimisa mpe alimbolaki polele ndenge ya kosala yango. Diskur yango ebongolaki bomoi na ngai; esalisaki ngai nakɔtaka na mozindo ntango nazali kotánga Biblia mpe nakolisa boninga na ngai na Yehova.”
11. Mpo na nini ezali malamu komonisa bandeko makambo ya sikisiki oyo basengeli kosala na diskur na yo? (1 Timote 4:13-16)
11 Luká koyeba mposa ya bayoki na yo, mpe lakisá bango oyo bakoki kosala. Na esika osuka kaka na kolobela makambo ndenge ezali, salelá nde Biblia mpo na kolendisa mpe komonisa bango oyo bakoki kosala. Na ndakisa, ntoma Paulo ayebisaki Timote makambo ya sikisiki mpo na kosalisa ye atikala makasi na elimo na mokumba na ye na Efese. (Tángá 1 Timote 4:13-16.) Kanisá mposa ya bayoki na yo, mpe salisá bango bámona ndenge oyo bakoki kosalela makambo yango na bomoi na bango.
12. Mpo na nini ezali malamu koleka koloba ndenge olobaka ntango ozali kosala diskur?
12 Mekámeká lisolo na yo na mongongo makasi mpo okoka kosala yango lokola ozali kosolola na bato. Na esika okoma liloba mokomoko oyo okoloba na diskur na yo mpe otángaka yango na lisolo na yo, luká koloba ndenge olobaka, na bongo ekozala pɛtɛɛ bato bálanda yo mpe bákanga ntina. Mwa buku Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya elobi boye: “Lobá ndenge olobaka mpe maloba na yo emonisa ndenge oyo ozali koyoka mpo na likambo ozali kolobela mpe mpo na bato oyo bazali koyoka yo.” Soki maloba na yo ezali kouta na motema, bayoki na yo bakolanda yo na likebi mpenza, bakosepela mpe bakosalela mateya yango.
13. Mpo na nini bandeko oyo bateyaka na lisangá basengeli kosɛnga toli epai ya bandeko oyo bazali balobi malamu? (Talá mpe elilingi.)
13 Sengá lisalisi epai ya ndeko oyo azali molobi malamu. Ndenge nini okoki kosala yango? Okoki kolakisa ndeko moko oyo azali molobi malamu ndenge oyo obongisi diskur na yo, mpe na nsima salelá makanisi oyo apesi yo. Lisusu, sɛngá ye ayoka yo ndenge ozali komeka kosala lisolo na yo mpo ayebisa yo bisika oyo okoki kobongisa. (Mas. 1:5) Toyebaka ntango nyonso te bisika ya kobongisa, mpe tokoki koyeba te soki tozali kobimisa makanisi ya ntina polele mpe na pɛtɛɛ. Tolingi kokóma balobi malamu mpe bateyi ya makoki mpo tókoka kosalisa bayoki na biso bázwa matomba na biloko ya motuya ya elimo oyo ezali na Liloba ya Nzambe.a
Sɛngá ndeko oyo azali molobi malamu asalisa yo okolisa makoki na yo ya koteya (Talá paragrafe 13)
NDENGE YA KOZALA MOYOKI MALAMU
14. Mpo na nini tosengeli kotalelaka makundoli ya Yehova lokola mokomi ya Nzembo 119? (Nzembo 119:24, 111, 167)
14 Tokozala bayoki malamu soki tozali kosepela mingi na makundoli ya Yehova. Tosengeli na makundoli ya Nzambe mpo na kolonga mikakatano oyo tozali kokutana na yango sikoyo na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Tim. 3:1) Soki na bantango mosusu tozali komona ete toyokaka kaka likambo moko oyo tosilá koyoka mbala mingi, ekozala malamu tómanyola na ndenge oyo mokomi ya Nzembo 119 azalaki kotalela makundoli ya Yehova.—Tángá Nzembo 119:24, 111, 167.
15. Mpo na nini tosengeli kokoba kosepela na bilei ya elimo oyo tozwaka na makita?
15 Tosengeli kotalela na ndenge oyo ebongi bilei ya elimo oyo tozwaka, kaka ndenge Bayisraele basengelaki kotalela na ndenge oyo ebongi mana oyo Yehova azalaki kopesa bango lokola bilei ntango bazalaki na esobe. (Kob. 16:15, 31) Na ntembe te, Bayisraele basepelaki na mana na ebandeli. Eutaki epai ya Yehova, ezalaki elɛngi, mpe ebatelaki bango na bomoi. Kasi, na nsima, basusu balɛmbaki kolya mana mikolo nyonso. (Mit. 21:5) Liteya ezali nini? Tosengeli soki moke te komona bilei ya elimo oyo tozwaka lokola eloko tomesaná na yango to ezongelamaka kaka mpamba. Kasi, tosengeli kobosana te ete Yehova nde apesaka yango. Tóbosana te ete ebongiseli ya Yehova ebongisaka malamumalamu bilei yango. Tosengeli mpe kokanisa ndenge bwanya oyo tozwaka na bilei yango ya elimo ekoki kobikisa bomoi na biso.—Mas. 3:13, 16-18; Yoa. 17:3.
16. Makambo nini esalisaka bandeko mosusu oyo basaleli Yehova bambula mingi báyokaka na likebi nyonso na makita? (Talá etanda “Mwa makanisi mpo na koyokaka malamu.”)
16 Tokoki kokóma bayoki malamu soki tozali kosala makambo oyo ekosalisa biso. Talá makambo oyo esalisi bandeko mosusu oyo basaleli Yehova bambula mingi báyokaka na likebi nyonso na makita. Ashley, oyo azali kosalela Yehova eleki sikoyo bambula 30, alobi boye: “Komibongisa nde sekele ya kolanda na likebi. Soki namibongisi te, ezalaka mpasi nayanola mpe makanisi na ngai eyengayengaka.” József, oyo azali kosalela Yehova esali sikoyo bambula 52, alobi: “Nasepelaka koyoka masolo oyo ezongelamaka mingi, mpo kotalela yango na lolenge mosusu esalisaka ngai nakanga malamu ntina na yango.” Mpe abakisi boye: “Soki ndeko moko azali mpenza molobi malamu te, natyaka likebi na nsango oyo euti na Liloba ya Nzambe oyo azali koteya, kasi te na lolenge na ye ya kosala masolo.”
17. Okoki kosala nini mpo oyokaka na likebi nyonso? (Talá mpe elilingi.)
17 Kosalela makanisi oyo elandi ekoki kosalisa yo oyokaka na likebi nyonso. (1) Soki okolya liboso ya kokende makita, lyá bilei ya pɛpɛlɛ mpo olala te. (2) Kómá na ngonga mpe zwá esika ya kofanda liboso makita ebanda. (3) Kangá volimi ya telefone na yo mpe kotika yango te elongola likebi na yo na makita. (4) Luká komona makambo oyo ekolobelama. (5) Taláká molobi. (6) Zwáká banɔti ya mikuse, to saláká mwa mayemi ya makanisi ya ntina. (7) Tyá likebi na bavɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo ezali kosalema mpe ndenge oyo molobi azali komonisa yango na molɔngɔ. (8) Omituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kosalela yango mpo na kosalisa moto moko na lisangá to na mosala ya kosakola?’ (9) Liboso ya kokende liyangani ya monene to ya moke, talá motó ya likambo ya mokolo, masolo oyo ekosalema, mpe bavɛrsɛ oyo esimbi lisolo mokomoko. (10) Fandá kimya mpe landá na likebi miziki mpe video oyo etyamaka liboso liyangani ebanda mpo obongisa motema na yo.
Kobá koyoka makundoli ya Nzambe, kotika te baaparɛyi elongola likebi na yo (Talá paragrafe 17)
KOBÁ KOYOKA YEHOVA
18. Mpo na nini tosengeli kokoba koyokaka na likebi na makita?
18 Tosengeli kokoba koyokaka na likebi na makita, mpo na lolenge yango nde totikaka Yehova atambwisa biso na ‘nzela ya bosembo.’ (Nz. 23:3; 31:3) Tozalaka na mposa ya batoli wana oyo ebongi oyo tozwaka mpo tólongwa te na nzela yango lokola masuwa oyo ememami na mopɛpɛ. Na yango, ‘tókeba na ndenge tozali koyoka’ mpe tósalela batoli oyo tozwaka na makita. (Luka 8:18) Mpo baoyo bayokaka Yehova bakozala na esengo lelo mpe na bomoi ya seko na mikolo ekoya.—Nz. 119:2, 14.
LOYEMBO 87 Yaká kozwa makasi!
a Mpo na komona makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa yo okóma moteyi ya makoki mpe molobi malamu, talá mwa buku Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya mpe buku Zwá matomba na eteyelo ya mosala ya Teokrasi.