04-10/05/2026
LOYEMBO 53 Komibongisa mpo na kokende kosakola
Kolisá “mayele ya koteya” na mosala ya kosakola
“Sakolá liloba . . . na motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya.”—2 TIM. 4:2.
NA MOKUSE
Tokotalela ndenge misato ya kokolisa makoki na biso ya koteya na mosala ya kosakola.
1. Tosengeli kokolisa nini, mpe mpo na nini? (2 Timote 4:2) (Talá mpe elilingi.)
YESU ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bókómisa bato bayekoli. . . , bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Mat. 28:19, 20) Etinda yango emonisi ete bakristo nyonso basengeli kozala bateyi. Ya solo, Yehova nde abendaka bato oyo bazali “na ezaleli oyo ebongi,” mpe baanzelu basalisaka biso mpo tómona bato yango. (Mis. 13:48; Yoa. 6:44; Em. 14:6) Kasi, biso mpe tosengeli kokokisa mokumba na biso, elingi koloba kozala bateyi ya malamu. Tótalela ndakisa ya ntoma Paulo mpe Barnabasi. Biblia elobi ete ntango basakolaki na sinagoga na Ikoniumu, “bateyaki malamu mpenza, bongo ebele ya Bayuda mpe ya Bagrɛki bakómaki bandimi.” (Mis. 14:1) Ezali polele ete Paulo ná Barnabasi bakolisaki “mayele ya koteya.” (Tángá 2 Timote 4:2.) Ezali mpe malamu bakristo nyonso bákolisa mayele yango.
Tokoki koyekola makambo mingi na oyo etali “mayele ya koteya” na ndakisa ya Yesu mpe ya bayekoli na ye, lokola ntoma Paulo mpe Barnabasi (Talá paragrafe 1)
2. Mpo na nini bakristo mosusu bamonaka ete bakokoka te kokolisa mayele ya koteya?
2 Bato mosusu bamonaka ete bakokoka te kokolisa makoki na bango ya koteya mpo batángá mingi te to mpo bayebaka kolimbola makambo malamu te. Mibali mosusu oyo Biblia elobeli bamonaki mpe ete bazali na makoki mingi te. (Kob. 4:10; Yir. 1:6) Bato mosusu balɛmbaka nzoto mpo na makoki na bango ya koteya mpo bamonaka ete basakolaka kasi mosala na bango ebotaka mbuma te lokola oyo ya basusu. Nzokande, moto nyonso te oyo tosololi na ye to tokutani na ye nde akondima nsango malamu. Mpe kozwa mbuma ya malamu na mosala ya kosakola etaleli kaka milende na biso te. Ndenge tolobaki yango, Yehova ná baanzelu nde basalisaka biso tómona bato ya mitema sembo. Atako bongo, tolingaka kosala oyo tokoki mpo na koyebisa bato nsango malamu na ndenge oyo ekosepelisa bango. Mpo na kosalisa biso tókóma bateyi ya malamu, lisolo oyo ekolobela ndenge misato oyo tokoki kokolisa mayele na biso ya koteya na mosala ya kosakola.
TYELÁ BATO LIKEBI
3. Mpo na nini Yesu azalaki kosimba mitema ya bato?
3 Biblia elobi ete Yesu “ayebaki eloko nini ezalaki na kati ya moto.” (Yoa. 2:25) Maloba yango emonisi ete Yesu ayebaki ndenge oyo bato bazalaki kokanisa mpe nini ezalaki kotinda bango básala boye to boye. Yesu azalaki kosimba mitema ya bato mpo azalaki koyeba bamposa na bango. Ayebaki ete bato bazalaki kolya malamu te na elimo mpe ete bazalaki konyokwama mpo na bonkɔkɔ mpe mibeko kilikili oyo bakonzi ya mangomba batyaki. (Mat. 9:36; 23:4) Yango wana na lisolo na ye likoló ya Ngomba, Yesu ateyaki bato makambo oyo ekosalisa bango mpenza. Bato mingi bazalaki kosepela koya epai ya Yesu mpo azalaki kolobela makambo oyo bazalaki mpenza kokutana na yango.
4. Ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka bato likebi? (Talá mpe bililingi.)
4 Tokoki komonisa ete totyelaka bato oyo tokutani na bango likebi soki tozali kosala makasi tóyeba nini ezali kotungisa bango. Bato nyonso oyo tosakwelaka bamonaka mpasi na lolenge moko to mosusu, mpo mokili ya Satana etondi na makambo ya mabe. Soki tobosani likambo yango te, ekoki kosalisa biso tómitya na esika ya bato ya teritware na biso. Na ndakisa, toyoki ete likambo moko euti kosalema esika tofandi, oyo ekoki kotungisa bato ya teritware na biso? Baboti bazali nde komitungisa mpo na makambo oyo ekoki kokómela bana na bango na eteyelo? Kozwa mosala ezali mpasi mpo na bato mingi? Meká kokanisa ndenge bomoi ya bato ezali na ‘ntango oyo ya mpasi mpenza’ lokola bayebi te elikya oyo Biblia epesi.—2 Tim. 3:1; Yis. 65:13, 14.
Luká koyeba makambo ya bomoi ya baoyo ozali koteya, mpe yebá kotyela bango likebi (Talá paragrafe 4)
5. Na mokumba na ye ya moteyi, ndenge nini Yesu akesenaki na Bafarisai? (Matai 11:28-30)
5 Yesu azalaki kotyela bato likebi, mpe bazalaki komona yango na ndenge oyo azalaki kosalela bango makambo. Yesu akesenaki mpenza na Bafarisai, oyo bazalaki kotyola bato mpe komona bango ete bazangá ntina! (Mat. 23:13; Yoa. 7:49) Kasi, Yesu azalaki kosalela bato makambo na boboto mpe na limemya. Azalaki “na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa”; yango mpe esalaki ete azala moteyi ya malamu. (Tángá Matai 11:28-30.) Biso mpe tosengeli kosalelaka bato makambo na boboto mpe limemya.
6. Ndenge nini tokoki komonisa boboto mpe limemya epai ya baoyo baboyi to batɛmɛli nsango na biso?
6 Bato mosusu balingaka koyoka nsango na biso te, basusu kutu batɛmɛlaka yango. Tosengeli kosala nini? Yesu alobaki ete tosengeli kosuka kaka te na kondima botɛmɛli. Alobaki ete tosengeli “kosala malamu na bato oyo bazali koyina [biso],” “kopambola baoyo bazali kolakela [biso] mabe,” mpe ata “kobondela mpo na baoyo bazali kofinga [biso].” (Luka 6:27, 28) Tokolonga kosala bongo epai ya bato oyo baboyi nsango na biso soki tolobi na motema na biso ete bazali na makanisi ya mabe te. Ya solo, bato mosusu bazali batɛmɛli minene. Kasi, bato mosusu bakoki kotɛmɛla biso mpo bazali komitungisa mpo na mokakatano moko na libota to mpo na likambo moko oyo etali biso kutu te. Mbala mosusu toyei nde kotala bango na ntango oyo bazali na mayoki ya malamu te. Ezala ndenge nini, tosengeli kolanda toli oyo ete “maloba na [biso] ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo [tosengeli] kopesa moto mokomoko eyano.” (Kol. 4:6) Soki tozali komitya na esika ya bato mpe koluka koyeba bamposa na bango, tokosilika nokinoki te mpe yango ekoki kosalisa biso tózala bateyi ya malamu.
SALELÁ LILOBA YA NZAMBE
7. Makambo oyo Yesu azalaki koteya bato ezalaki kouta wapi? (Yoane 7:14-16)
7 Yesu azalaki koteya bato makanisi oyo euti epai na ye moko te. Mateya na ye ezalaki kouta na Liloba ya Nzambe, mpe azalaki koteya yango na ndenge ya pɛtɛɛ mpo bato bákanga ntina mpe bábosana yango te. Biblia eyebisi biso ete Yesu azalaki koteya “lokola moto oyo azali na bokonzi, kasi lokola bakomeli te.” Bato “bakamwaki mingi” na ndenge na ye ya koteya. (Mrk. 1:22) Mpo na kondimisa bato mateya na bango, bakomeli ya ntango ya Yesu bazalaki kozongela maloba ya balakisi minene ya mangomba. Kasi Yesu azalaki ntango nyonso koteya bato makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe. Lokola Yesu azalaki Mwana ya Nzambe mpe autaki na likoló, akokaki kosalela ebele ya bwanya na ye mpo na kokamwisa bato mpe ata kolakisa bango ete bayebi eloko te. Kasi asalaki bongo te. Ateyaki nde makambo etali mokano ya Nzambe mpe Liloba na ye. (Tángá Yoane 7:14-16.) Na yango, Yesu apesaki bayekoli na ye ndakisa malamu mpenza.
8. Ndenge nini ntoma Petro alandaki ndakisa ya Yesu?
8 Bayekoli ya Yesu mpe bazalaki kosalela Liloba ya Nzambe ntango bazalaki koteya. Na ndakisa, tótalela diskur oyo ntoma Petro asalaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Petro azalaki moto oyo atángá mingi te. Kasi, asimbaki mitema ya bato oyo bazalaki koyoka ye ntango alimbolaki bisakweli ya Biblia oyo Yesu akokisaki. (Mis. 2:14-37) Yango ebimisaki nini? “Baoyo bandimaki liloba na ye na motema mobimba babatisamaki, mpe na mokolo wana bato soki 3000 babakisamaki.”—Mis. 2:41.
9. Mpo na nini tosengeli kosalela Liloba ya Nzambe ntango tozali koteya bato?
9 Esaleli moko te ekoki kosimba mitema ya bato malamu koleka Liloba ya Nzambe. (Ebr. 4:12) Yango wana, tosengeli kosalela Biblia mingi ntango tozali koteya bato. Mposa na biso ezali ya ‘kosakola liloba,’ kasi te makanisi na biso moko. (2 Tim. 4:2) Masese 2:6 elobi: “Yehova ye moko apesaka bwanya; boyebi ná bososoli eutaka na monɔkɔ na ye.” Na yango, ntango tozali kosalela Biblia mpo na koteya basusu, tozali kotika nde Yehova aloba. (Mal. 2:7) Tolingi bato báyeba ete Biblia ezali na makambo oyo eleki mosika bwanya ya bato. Ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe epesaka boyebi oyo tosengeli na yango mpo na kosepelisa Mozalisi na biso mpe kozala na bomoi ya esengo, oyo ezali na ntina.—2 Tim. 3:16, 17.
10. Ndenge nini tokoki kobenda likebi ya moyekoli ya Biblia na Liloba ya Nzambe?
10 Ntango ozali komibongisa mpo na koyekola na moto, kanisá ndenge oyo okobenda likebi ya moyekoli na yo na makambo oyo Biblia eteyaka. Moyekoli asengeli kokanga ntina ete atako tosalelaka bililingi mpe bavideo mpo na kobimisa mateya, toyekolaka libosoliboso nde Biblia. Na yango, bótánga bavɛrsɛ oyo esimbi lisolo mpe salisá moyekoli akanisa ndenge ya kosalela yango. Ntango bozali kolobela bililingi to bavideo, kobosana te kosalisa moyekoli akanga ntina ya mitinda ya Biblia oyo ezali na kati. Mpo na kosala yango, ezali na ntina te oloba mingi to otánga bavɛrsɛ ebele. Kasi, tikelá moyekoli ntango ya kokanga ntina ya vɛrsɛ mokomoko oyo botángi, to kutu ya kozongela kotánga vɛrsɛ moko soki esengeli. Na ndenge yango, tokozala bato oyo bayekolaka na bato buku, elilingi to video te, kasi nde Biblia.—1 Ko. 2:13.
11-12. (a) Ndenge nini tokoki komonisa motema molai epai ya bayekoli ya Biblia? (Misala 17:1-4) (Talá mpe elilingi.) (b) Likambo nini basusu bakoki kozala na mposa ya koyeba mpo na Biblia, mpe ndenge nini tokoki kosalisa bango?
11 Soki moyekoli azali na mokakatano ya kondima liteya moko, kobá ‘kosakola liloba . . . na motema molai mpenza.’ Bato nyonso bakolaka na elimo ndenge moko te. Bayekoli mosusu bakoki kozala na mposa ya ntango mingi liboso bákanga ntina ya mateya oyo biso tomonaka ete ezali pɛtɛɛ. Esɛngaki ete Paulo asakwela Bayuda na Tesaloniki na mabaku mingi, asalela Makomami mpo na kosolola na bango, liboso ete basusu kati na bango bákanga ntina.—Tángá Misala 17:1-4.
12 Tokomonisa mpe motema molai soki tozali kotuna bayekoli mituna mpo na koyeba makanisi na bango, mpe tozali komipekisa mpo tóloba mingi te. Salá makasi oyokaka bango na likebi mpe oyeba ntina oyo bazali kotalela likambo moko na ndenge moko boye. Na nsima, bótánga mpe bólobela bavɛrsɛ ya sikisiki mpo na kosalisa bango bákanga ntina ya likanisi ya Nzambe na likambo yango. Lisusu, kobosana te: Bato mosusu bamesaná na Biblia te mpe bayebi ata moke te makambo oyo ezali na kati. Mpo na nini te olakisa ye Biblia ya papye? Okoki kolobela “Maloba ya ebandeli na Liloba ya Nzambe,” oyo ezali na nkasa ya ebandeli ya Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika, mpo na komonisa makambo ya motuya oyo ezali na kati ya Biblia. Na nsima, soki olingi kolakisa ndenge Biblia ekoki kosalisa bango, okoki kosalela vɛrsɛ moko to mibale oyo ezali na motuna 15 mpo bámona ndenge Biblia ekoki kosalisa biso tózala na esengo. Na mokuse, soki ozali komonisa bayekoli na yo ya Biblia ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kosalisa bango, bakobanda kosalela makambo oyo ozali koteya bango.
Moteyi ya malamu ayokaka nde mingi, alobaka mingi te (Talá paragrafe 11-12)
BENDÁ LIKEBI NA BANGO EPAI YA YEHOVA
13. Ntango tozali koteya, tosengeli kobenda likebi ya bato epai ya nani? Pesá ndakisa.
13 Mokano na biso ezali ya kosalisa bato báyekola koyeba Yehova mpe bápusana penepene na ye. (Yak. 4:8) Na likambo yango, mosala na biso ezali lokola ya moto oyo asimbi torche mpo na kosalisa moto mosusu amona eloko moko na esika ya molili. Mpo na kosala yango, akotya torche epai na ye moko te. Kasi akolakisa yango esika eloko yango ezali. Ndenge moko mpe, ntango tozali koteya, tosengeli kobenda likebi ya bato epai ya Yehova, kasi te epai na biso moko.
14. Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli na biso bálinga kosepelisa Yehova?
14 Ntango ozali koyekola Biblia na moto, salisá moyekoli akolisa mposa ya kosepelisa Yehova. (Mas. 27:11) Ezali te lokola nde ozali kaka kosalisa moyekoli alanda lolenge moko boye ya kosala makambo, lokola nde azali kokɔta na etuluku to moziki moko boye. Mposa ezali ete moyekoli na yo asala bambongwana na etamboli na ye mpo asepelisa Yehova. Na ndakisa, soki moyekoli na yo azali na mokakatano mpo na kotika momeseno moko ya mabe, okoki kotuna ye: “Mpo na nini Yehova ayinaka momeseno yango? Mpo na nini Yehova azali kosɛnga ete otika likambo oyo osepelaka na yango? Ndenge nini likambo oyo Yehova asɛngi emonisi ete alingaka yo?” Soki ozali kosalisa moyekoli na yo akanisaka Yehova mingi, akobanda komona ete Yehova azali Tata oyo aleki malamu mpo na biso. Mpe yango ekosalisa moyekoli na yo alinga kosepelisa Yehova.
KOBÁ KOKOLISA MAYELE YA KOTEYA
15. Okoki kosala nini mpo na kokoba kokolisa mayele na yo ya koteya?
15 Okoki kosɛnga Yehova na libondeli asalisa yo omitalela mpo omona makambo oyo okoki kobongisa mpo okolisa lisusu mayele na yo ya koteya. (1 Yoa. 5:14) Na nsima, mpo osala na boyokani na mabondeli na yo, tyáká likebi na formasyo oyo Yehova apesaka na makita ya lisangá. Okoki kosɛnga bateyi mosusu ya makoki bókende elongo koyekola Biblia na moyekoli na yo. Na nsima tuná bango soki eleki ndenge nini. Kobosana mpe te ete yo omesani na makambo oyo ozali koteya, kasi moyekoli amesaná na yango te. Na yango, meká kotalela yango ndenge ye akoki kotalela yango. Na nsima, salisá moyekoli na yo amona ete makambo oyo toteyaka ezali mpenza nsango malamu. Yango ekoki kotinda ye akóma na boninga makasi na Yehova mpe ekoki komemela ye esengo ya solosolo.—Nz. 1:1-3.
16. Mpo na nini ezali malamu tókoba kokolisa mayele na biso ya koteya?
16 Koteya basusu makambo ya Yehova ezali moko ya makambo oyo epesaka biso esengo oyo eleki monene. Na mokili ya sika, mosala yango ya koteya oyo epesaka esengo ekosalema lisusu mingi. Na yango, tiká ete tókoba kotyela bato likebi, tósalelaka Liloba ya Nzambe, mpe tóbendaka likebi na bango epai ya Yehova ntango tozali kosakola nsango malamu. Soki tosali bongo, tokokolisa mayele na biso ya koteya na mosala ya kosakola.
LOYEMBO 65 Kende liboso!