03-09/08/2026
LOYEMBO 113 Tozali na kimya
Monisáká limemya na bikateli ya basusu
“Bósambisa te moto oyo azali na makanisi oyo ekeseni na oyo ya bino.”—ROM. 14:1.
NA MOKUSE
Ndenge ya komonisa limemya epai ya bandeko na biso bakristo ntango bazwi bikateli oyo esepelisi biso te.
1-2. Mpo na nini na bantango mosusu bikateli na biso ekesanaka na oyo ya bakristo mosusu?
ESILÁ kokóma ete basusu básambisa yo mpo na ekateli moko oyo ozwaki? Esilá kokóma ete osambisa ndeko moko mpo na ekateli moko oyo azwaki? Na ntembe te mingi kati na biso tokoki koyanola ɛɛ na mituna yango mibale.
2 Tosengeli kokamwa te ndenge na bantango mosusu bikateli na biso ekesanaka na oyo ya bakristo mosusu ya sembo. Mpo na nini? Mpo biso nyonso tokokani te. Mokomoko na biso azali na lolenge na ye ya kotalela makambo. Makanisi na biso elandaka mimeseno na biso, libota oyo toutá mpe makambo oyo tokutaná na yango na bomoi. Kasi tosengeli te kotika ete bokeseni na lolenge na biso ya kotalela makambo ebebisa kimya mpe bomoko ya lisangá.—Ef. 4:3.
3. Nini ekoki kotinda biso tósambisa ndeko moko mpo na ekateli oyo azwi?
3 Ntango ndeko moko azwi ekateli oyo esepelisi biso te, tokoki komona ete tosengeli koyebisa ye abongola ekateli na ye, to tokoki koyebisa basusu ete azwi ekateli ya mabe. Na ntembe te, tozalaka na ntina malamu ya kosala yango. Tolingaka bandeko na biso bakristo, mpe tolingaka oyo eleki malamu mpo na bango. (Mas. 17:17) Yango wana tolingaka te komona bango bázwa ekateli oyo na nsima ekopesa bango mawa to oyo ekoki kobebisa boyokani na bango na Yehova.
4-5. Tosengeli kosala nini soki ndeko moko azwi ekateli oyo ekeseni na oyo tolingaki kozwa soki ezalaki biso?
4 Tosengeli kosolola na ndeko oyo azwi ekateli oyo tosepeli na yango te? Ezali na makambo oyo esɛngi kotalela. Na ndakisa, soki toyebi ete azali kokanisa kosala likambo moko oyo Biblia epekisi, na ntango wana lokola tolingaka ye, tosengeli kosalisa ye asembola makanisi na ye. (Mas. 27:5, 6) Bongo, tosengeli kosala nini soki ndeko moko azwi ekateli ya kosala likambo moko oyo ebuki mibeko ya Nzambe te, kasi ekeseni kaka na ndenge oyo tolingaki kosala soki ezalaki biso? Eyano ezali na vɛrsɛ oyo esimbi lisolo na biso. ‘Tósambisa te moto oyo azali na makanisi oyo ekeseni na oyo ya biso.’—Rom. 14:1.
5 Atako bongo, tokoki komona ete ezali mpasi komemya ekateli oyo moto azwi. Na lisolo oyo, tokolobela ntina oyo tosengeli komemya bikateli ya basusu mpe ndenge oyo tokoki kosala yango. Kasi liboso, tólobela mwa makambo oyo esɛngaka moto ye moko azwa ekateli oyo ekoki kotinda biso tósambisa ye mpo na yango.
BIKATELI NINI OYO MOTO YE MOKO AZWI EKOKI KOTINDA BISO TÓSAMBISA YE?
6-7. Lobelá ndakisa oyo ekoki kosala ete tósambisa basusu mpo na bikateli na bango.
6 Ndenge tomonaki yango, tokoki komona ete makambo mosusu esengeli kosalema kaka na ndenge oyo tolingi mpo na esika oyo toutá to mpo na makambo oyo tokutaná na yango. Tokoki komona ete basusu mpe bazali na makanisi moko na biso. Kasi, mbala mosusu ezali bongo te. Tózwa mwa bandakisa. Ndakisa 1: Liboso ayebá solo, ndeko mobali moko abɔkwamaki epai ya tata oyo azalaki komɛla masanga mingi. Na fɛti moko, ndeko yango amoni bandeko mosusu bazali komɛla masanga. Asepeli te mpe ayebisi bango ete bazali kosala likambo ya mabe. Ndakisa 2: Ndeko mwasi moko abiki na maladi moko ya makasi. Na nsima, ndeko yango ayoki ete ndeko mwasi mosusu azali mpe kobela maladi yango. Ndeko mwasi yango alingi kosalisa ye, na yango atye ndeko yango mbamba azwa kaka bankisi oyo ye azwaki—mbala mosusu na nzela ya bilei moko boye to kosalela nkisi ya monganga to nkisi ya bonkɔkɔ. Ndakisa 3: Ndeko mobali moko azalaki na lingomba moko ya lokuta. Ayinaka lolenge ya bomoi oyo azalaki na yango kala. Ntango ayoki ete ndeko moko akendaki ebembe na ndako-nzambe moko, abɛti libaku.a
7 Tózwa mwa bandakisa mosusu. Ndakisa 4: Ndeko mobali moko akolaki na ntango oyo bato mingi bazalaki komona ete ebongi te mibali bákolisa mandefu to basi bálata patalo na makita to na mosala ya kosakola. Atako ndeko yango ayebi bambongwana oyo euti kosalema na ndenge na biso ya kotalela likambo yango, atingami kaka na koyebisa basusu ete bandeko mibali basengeli te kotika mandefu mpe ete bandeko basi basengeli kolata robɛ na makita to na mosala ya kosakola. Ndakisa 5: Nkulutu moko ayebaki ndeko moko oyo abakisaki bakelasi mosusu mpe na nsima atikaki solo. Sikoyo ndeko mobali moko ya elenge na lisangá azwi ekateli ya kobakisa bakelasi mosusu. Etungisi nkulutu yango mpe aluki kondimisa elenge yango ná baboti na ye bábongola ekateli na bango.
8. (a) Nini ekoki kosala ete moboti moko abanda kosambisa baboti mosusu? (b) Kozala na makanisi mabe epai ya basusu ekoki kosala nini na lisangá?
8 Tózwa sikoyo ndakisa oyo etali baboti. Ndakisa 6: Lokola ozali moboti, osalaka makasi ya kobɔkɔla bana na yo “na mitinda mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4) Kasi okoki komona lokola ete baboti mosusu oyo bazali bakristo bakangaka miso na makambo mingi. Na ndakisa, bapesaka bana na bango nzela ya kozonga ndako ata ngonga epusani, kobɛta masano ya video ya mobulu te, to ya kozala na telefone ntango bazali naino mike. Na yango mwana na yo akoki komona ete ozali makambo makasi. Akoki kotuna: “Mpo na nini ozali te lokola baboti ya moninga na ngai?” Likambo ya ndenge wana ekoki kosala ete okóma kotyola baboti mosusu. Likambo ya solo ezali ete ekateli nyonso ya mokristo oyo ekeseni na oyo ya biso ekoki kotinda biso tósambisa ye mpo na yango. Na ndakisa, tokoki komituna mpo na ndenge oyo asalelaka mbongo na ye, mbala boni akendaka mibembo, to kominanola oyo aponaka. Kasi tosengeli kotika te ete ndenge na biso ya kotalela makambo ezala na ntina mingi koleka bomoko na biso ya lisangá.
9. Nini tosengeli kobosana te? (Talá mpe elilingi.)
9 Atako ekateli ya ndeko moko ekoki kokesana na oyo ya bandeko mosusu, yango elakisi kaka te ete ekateli moko ezali malamu mpe mosusu ezali mabe. (Rom. 14:5) Ya solo, Biblia elendisi bakristo ‘bákanisaka ndenge moko’ na oyo etali mibeko ya Yehova, kasi yango elakisi te ete tosengeli kokanisaka ndenge moko na makambo nyonso. (2 Ko. 13:11) Tokoki kokokanisa bikateli na biso moko na esika oyo toponi ntango tolingi kokende mobembo. Mbala mingi, ezalaka na banzela mingi ya ndenge na ndenge oyo ememaka na esika kaka moko. Toponaka nzela oyo tosepeli na yango mpe oyo eyokani na makoki na biso. Ndenge moko mpe, bakristo bakoki kozwa bikateli ekeseni na makambo oyo etali bango moko, kasi mokano ezali kaka moko: Koluka kosepelisa Yehova. Na yango, tósambisaka te basusu mpo na bikateli oyo bazwi.—Mat. 7:1; 1 Tes. 4:11.
Bato oyo basalaka mibembo bazalaka na banzela mingi oyo bakoki kopona mpo na kokóma esika oyo bazali kokende; ndenge moko mpe, bakristo bakoki kozwa bikateli oyo ekeseni na makambo oyo etali bango moko ntango bazali kosalela Yehova (Talá paragrafe 9)
NTINA YA KOMONISA LIMEMYA NA BIKATELI YA BASUSU
10. Na kotalela Yakobo 4:12, ndingisa nini tozali na yango te, mpe mpo na nini?
10 Biblia epesi bantina mingi ya komonisa limemya na bikateli ya basusu. Tótalela ndambo na yango. Tozali te na ndingisa ya kosambisa basusu mpo na makambo oyo etali bango moko. (Tángá Yakobo 4:12.) Yehova azali Moto oyo apesaka mibeko mpe Mosambisi ya sembo. Kaka ye nde azali na lotomo ya koyebisa biso oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli kosala te. Na yango, bandeko na biso bakozongisa monɔkɔ epai ya Yehova kasi epai na biso te. (Rom. 14:10) Tozali na lotomo te to ndingisa te ya kosambisa to koloba mabe mpo na bikateli ya basusu na kolanda mibeko to makanisi na biso moko.b
11. Ndenge nini tokoki kobatela kimya ya lisangá? (Talá mpe elilingi.)
11 Yehova alingi ete basaleli na ye bázala na bomoko, kasi te ete bázala ndenge moko. Ya solo, Yehova asepelaka na bokeseni oyo ezali kati na biso! Tomonaka yango na biloko oyo akelá. Na ndakisa, ata nkasa mibale ya nzete moko ezalaka ndenge moko te. Meká kokanisa na oyo etali bato. Na kati ya bato koleka miliare 8 oyo bazali na mabele, ata moto moko te akokani mpenza na mosusu na bomoto to na ndenge ya komonana na miso. Yehova akelaki biso mpo tózala ndenge moko te. Mpe amizelaka te ete tókokana na basusu. Kasi alingaka nde ete tózala na bomoko. Na yango, na esika ete tótika makambo oyo ekesenisi biso ekabola biso, tolendisaka nde kimya. Tozwaka na motuya mingi bomoko ya lisangá koleka makanisi na biso mpe makambo oyo tosepelaka na yango.—Rom. 14:19.
Yehova akelaki biso mpo tózala ndenge moko te, kasi alingaka nde ete tózala na bomoko (Talá paragrafe 11)
NDENGE YA KOMONISA LIMEMYA NA BIKATELI YA BASUSU
12-13. Nini tosengeli kobatela na makanisi soki tomoni ete ndeko moko “abɛti libaku”? (Bagalatia 6:1; talá mpe etanda “Ntango osepeli te na ekateli ya basusu.”)
12 Ntango basusu bazwi ekateli na makambo oyo etali bango moko. Omituna boye: ‘Ndeko yango alingi nde ‘kobɛta libaku’ to kaka kosala likambo na lolenge oyo ekeseni na oyo nalingi?’ Soki alingi nde kobɛta libaku, elingi koloba, kosala likambo moko oyo Biblia epekisi, omituna boye: ‘Ngai nde nabongi mpenza mpo na kosembola ye, to ezali na moto mosusu oyo abongi mpenza kosala yango?’ Soki yo nde obongi mpo na kosala yango, luká kosolola na ye na elimo ya boboto. (Tángá Bagalatia 6:1.) Nzokande, mbala mingi okoki komona ete ekateli oyo ndeko azwi ezali mabe te kasi ekeseni nde kaka na oyo yo olingaki kozwa. Soki ezali bongo, koluka te kolobaloba mpo na ekateli oyo azwi to kotyola yango. Monisá limemya na lotomo na ye ya kozwa bikateli ye moko, mpe kosambisa ye te.—Rom. 14:2-4.
13 Tózwa ndakisa oyo: Soki okei ná moninga na yo na restora, okotingama kaka ete asɛnga bilei oyo yo mpe osɛngi? Te. Okomonisa limemya na lotomo na ye ya kopona bilei oyo alingi. Tókende tózonga, ye nde moto akolya bilei yango kasi yo te. Mpe soki yo nde ozalaki na esika na ye, na ntembe te olingaki kondima te ete moninga na yo aponela yo bilei oyo ye asepeli na yango. Ndenge moko mpe, tokomonisa limemya epai ya basusu soki totiki bango bázwa bikateli kozanga kotinda bango na makasi bálanda makanisi na biso.
14. Ndenge nini okoki kobatela bomoko ya lisangá ntango ozali kozwa ekateli oyo etali yo moko? (1 Bakorinti 8:12, 13)
14 Ntango ozali kozwa ekateli na makambo oyo etali yo moko. Okoki kobatela bomoko ya lisangá soki osali nyonso mpo na koboya kobɛtisa basusu libaku. (Tángá 1 Bakorinti 8:12, 13.) Na bantango mosusu, okoki komona ete ekateli oyo olingi kozwa “epesami nzela,” elingi koloba, endimami. Kasi soki ekobɛtisa ndeko na yo libaku, ekozala nde na “litomba”?c (1 Ko. 10:23, 24) Na ntango yango, na esika otingama na lotomo na yo, ekozala malamu otya makambo oyo esepelisaka yo pembeni. (Rom. 15:1) Kasi ebongi ete basusu bamemya bikateli na biso na makambo oyo etali biso moko? Ɛɛ. Basengeli komemya bikateli na biso kaka ndenge biso mpe tosengeli komemya oyo ya bango. Kasi tosengeli mpe kobatela na makanisi toli ya Biblia oyo ezali na Baroma 12:18, oyo elobi: “Soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso.” Yango wana, tosalaka nyonso oyo esengeli mpo na kobatela kimya na basusu mpe koboya kobɛtisa basusu libaku kaka mpamba.
15. Ndenge nini bankulutu babatelaka bomoko ya lisangá? (1 Bakorinti 4:6)
15 Bankulutu bamonisaka limemya na bikateli ya basusu. Bankulutu babatelaka bomoko ya lisangá ndenge batyaka te mibeko na makambo oyo etali moto ye moko mpe bakendaka “mosika te koleka makambo oyo ekomamá” na Biblia. (Tángá 1 Bakorinti 4:6.) Bakendaka mpe mosika te koleka batoli oyo euti na Biblia oyo ezalaka na mikanda na biso. Lisusu, ntango esɛngi básalisa ndeko moko, bankulutu basalaka nyonso bákangama kaka te na makambo oyo bayebi ntango bazali kopesa toli. Na esika ya kosala bongo, basalelaka nde Liloba ya Nzambe mpo na kopesa toli.—Yis. 48:17, 18.
16. Ndenge nini nkulutu akoki komonisa limemya na ekateli oyo lisangani ya bankulutu ezwi?
16 Nkulutu akomonisa mpe limemya na ekateli oyo lisangani ya bankulutu ezwi. Ntango lisangani ya bankulutu esali libondeli, bolukiluki mpe esaleli mitinda ya Biblia, na nsima ezwi ekateli mpo na likambo moko, nkulutu nyonso asengeli kondima ekateli yango ata soki bandimi te likanisi na ye. (Ef. 5:17) Lisusu, bankulutu basalaka makasi ya kolanda mpenza litambwisi oyo bazwi na Biblia mpe na mikanda na biso. Na ndakisa, nkulutu akozwa te kaka mwa maloba na mikanda na biso kozanga atalela lisolo mobimba kaka mpo na kolongisa makanisi na ye.
17. Matomba nini tokozwa soki tozali komemya bikateli ya basusu?
17 Ndenge tomoni yango, biso nyonso tokokani te. Mokomoko na biso azali na lolenge na ye ya kotalela makambo mpe azali na makambo oyo asepelaka na yango. Kasi bokeseni yango ezali malamu! Bisika ndenge na ndenge oyo toutá mpe bomoto ndenge na ndenge oyo tozali na yango esali ete lisangá ezala esika moko ya malamu. Yango wana, na esika tótika bokeseni oyo tozali na yango ekabola biso, tobatelaka nde kimya. Tosalaka makasi tóbɛtisa basusu libaku te. Tomemyaka bikateli ya basusu na makambo oyo etali bango moko. Ntango tozali kosala bongo, ekosala ete tózwa mbano mpo na milende na biso. Tokozala na esengo mpe na bomoko na lisangá.— Nz. 133:1; Mat. 5:9.
LOYEMBO 89 Yoká, tosá Yehova
a Mpo na komona makambo oyo ekoki kosalisa mokristo azwa ekateli soki akokende to te na molulu moko ya kokunda ebembe to ya libala na esika moko ya losambo, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2002.
b Na bantango mosusu, esɛngaka ete bankulutu básambisa baoyo babuki mibeko ya Nzambe. Atako bongo, bankulutu babatelaka na makanisi ete bazali kosambisa mpo na Yehova na kolanda mibeko na ye ya sembo, kasi makanisi na bango moko te.—Talá mpe 2 Ntango 19:6.
c Na ndakisa, talá buku Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 35, pwɛ 5.