BATO OYO BIBLIA ELOBELI
Manaene—Tyá makambo ya elimo na esika ya liboso lokola ye
Manaene azalaki na kati ya baoyo bazalaki kokamba lisangá ya Antiokia na siɛklɛ ya liboso. “Atángaki kelasi esika moko ná Erode moyangeli ya etúká.” (Mis. 13:1) Na yango Manaene atángaki kelasi ya malonga mpenza mpe mbala mosusu abɔkwamaki na libota moko ya bozwi.
Atako bongo, Manaene aponaki kokóma mokristo mpe kopesa mabɔkɔ na lisangá. Asalelaki te kelasi oyo atángaki to ndenge oyo ayebanaki na bakonzi mpo na komitombola. Kasi, alukaki nde kosalela bandeko na ye bakristo.
Ndakisa ya Manaene emonisi ete kosalela Yehova ezali likambo oyo eleki ntina koleka koluka makambo ya minene na mokili oyo. Lokola Manaene, tosengeli kotya makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na biso na esika ya koluka makambo ya minene na mokili oyo. (Mat. 6:33) Lisusu, atako tozwaka kelasi na motuya, ‘tolukaka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina’ mpe tosalaka nyonso ete kobakisa bakelasi epekisa biso te kosambela Yehova.—Flp. 1:9, 10.