Bana bazali “libula oyo euti na Yehova”
NINI eyelaka yo na makanisi ntango oyoki liloba “libula”? Mbala mosusu omonaka mbongo, lopango, to eloko moko ya motuya oyo moto moko ya libota atikelá yo. Ata soki ezali eloko nini, libula ezalaka na motuya mpe na ntembe te olingaka mpenza kobatela yango malamu.
Biblia ebengi bana “libula oyo euti na Yehova.” (Nz. 127:3) Ya solo, baboti bakristo bamonaka bana na bango lokola likabo ya motuya oyo Tata na bango ya likoló apesi bango mpe balingaka kosala nyonso oyo bakoki mpo na kobatela bango mpe kokokisa bamposa na bango ya mosuni, ya mayoki, mpe ya elimo.
Kasi, likambo ya mawa ezali ete baboti mosusu lelo oyo batalelaka bana te lokola likabo oyo euti epai ya Nzambe. (Yis. 49:15; 2 Tim. 3:1-3) Basusu balingaka mpenza kokokisa bamposa ya bana na bango kasi ezalaka mpasi kosala yango mpo na mikakatano ndenge na ndenge. Mikakatano nini esalaka ete ezala mpasi mpo na baboti kokokisa bamposa ya bana na bango? Yehova asɛngi baboti nini? Mpe ndenge nini baboti bakristo bakoki kolonga kobɔkɔla bana na bango?
MIKAKATANO
Mbamba ya libota mpe ya esika oyo bofandi. Na bisika mosusu na mokili, bato bapesaka baboti oyo bazali na bana ebele limemya mingi. Na yango, mabota mpe bato ya zingazinga batyaka babalani mingi mbamba bázala na bana ebele, mbala mosusu koleka oyo mwasi ná mobali bakokoka kobɔkɔla bango moko.
Komitungisa mpo na lobi. Na bikólo oyo bana bakufaka mingi mpo na kolya malamu te, maladi, mpe mpo lisalisi ya monganga ezalaka mingi te, baboti mosusu babotaka bana ebele mpo ata ndambo bákóma mikóló. Babalani mosusu bakoki kopona kozala na bana ebele na makanisi ete bakosalisa bango ntango bakokóma mibange. Ezalaka ndenge wana mingimingi na bikólo oyo guvɛrnema ezwá bibongiseli te mpo na kosalisa mibange.
Koyeba kopekisa mabota. Na bisika mosusu, babalani mosusu bazalaka mpenza te na bankisi mpo na kopekisa zemi. Basusu babangaka mikakatano oyo bankisi yango ekoki kobimisa na kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango. Nzokande basusu bazalaka na likoki te ya kosalela bankisi oyo epekisaka zemi mpo ezalaka ntalo mingi.a
YEHOVA ASƐNGI BABOTI NINI?
Lekisáká ntango elongo na mwana mokomoko
Bákokisaka bamposa ya bana na bango. Yehova apesi baboti mokumba ya kokokisa bamposa ya mosuni ya bana na bango ya mike. Alingi ete baboti básala mosala makasi mpo na kopesa mwana mokomoko bilei, bilamba, mpe esika ya kolala. Yehova asɛngi mpe na baboti báteya bana na bango. Na yango baboti bakristo batindaka kaka bana te bákende kotánga na esika mosusu. Kasi, balingaka kofanda na bana ndako moko wana bazali kokola mpo bálandela kelasi oyo bazali kotánga mpe bátyela bango likebi, oyo ekosalisa bana bámiyoka malamu, ete babatelami, mpe ete balingaka bango. Atako bongo, Yehova azali makambo makasimakasi te; asɛngi te ete baboti bázala bazwi. Kutu, baboti oyo Yehova aponaki mpo bábɔkɔla Mwana na ye se moko oyo alingaka mingi bazalaki babola, kasi basalaki mosala makasi mpo na kokokisa bamposa na ye.—Mat. 13:55, 56; Luka 2:24.
Toli ya Biblia: “Ya solo, soki moto azali te kopesa bato na ye, mpe mingimingi bato ya libota na ye biloko oyo basengeli na yango, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.”—1 Tim. 5:8.
Yehova ayebi ete baboti bakoki kozala na mposa ya lisungi wana bazali kokóma mikóló. Kutu, lolenge moko oyo bana bakoki kokumisa baboti na bango ezali ya kozwa bibongiseli mpo na kosalisa baboti ntango bakokóma mibange. (Kob. 20:12; 1 Tim. 5:4) Kasi, Yehova asepelaka ntango baboti bazali kokanisa libosoliboso ndenge oyo bakosalisa bana na bango na esika bákanisa kaka ndenge oyo bana bakosalisa bango.—2 Ko. 12:14.
Básalisa bana na bango básalela Yehova. Baboti bakristo bazali mpe na mokumba ya kosalisa bana na bango bálinga Yehova mpe básambela ye. Amonaka ete kopesa bana formasyo ya elimo nde likambo eleki ntina ntango baboti bazali kobɔkɔla bana na bango.—Mib. 6:6, 7.
Toli ya Biblia: “Bókoba kobɔkɔla [bana na bino] na mitinda mpe na makebisi ya Yehova.”—Ef. 6:4.
YEHOVA ALINGI ETE BÓLONGA
Bólobela liboso bana boni bokolinga kobota
Bótya motángo ya bana oyo bokobota. Soki bokani kozala na bana, bótalela malamumalamu makambo ya bomoi na bino. Na ndakisa, bokozala na likoki ya koleisa, kolatisa, koteya mpe kotángisa bana ebele? Soki bongo te, sololá na molongani na yo mpo bótya motángo ya bana oyo bokobota mpo bózala na likoki ya kokokisa bamposa ya bana nyonso na ndenge oyo Yehova asɛngi. Ya solo, Yehova ayebi ete makambo nyonso ekoki te kosalema kaka ndenge bobongisaki liboso. (Mos. 9:11) Kasi akopambola milende nyonso oyo bokosala mpo na kokokisa malamu mokumba na bino ya baboti.
Toli ya Biblia: “Mikano ya moto oyo asalaka mosala makasi ememelaka ye litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akosuka mobola.”—Mas. 21:5.
“Nani kati na bino oyo alingi kotonga ndako molai akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga, mpe komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?”—Luka 14:28.
Yehova azala na esika ya liboso na libota na bino. Bótya losambo ya Yehova na esika ya liboso na libota na bino. Soki bozali na bana, bózala na ekateli ya kosalisa mokomoko na bango alinga Yehova. Bósalisa bango bátyaka likebi mpe bázwaka mateya na makita ya lisangá. Bósalaka Losambo na kati ya libota pɔsɔ nyonso. Bópesaka bana na bino formasyo na mosala ya kosakola. Kopesa te mokumba na yo ya moboti epai ya mwana mosusu ya mokóló to epai ya ndeko mosusu ya libota. Kobɔkɔla bana mpo bálinga Yehova esɛngaka ntango mpe milende, kasi mbano ezalaka monene.
Toli ya Biblia: “Nazali na esengo monene te koleka oyo: ete nayokaka bazali koloba ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”—3 Yoa. 4.b
Bótyela Yehova motema. Ezala bozali kokanisa kozala na bana to bozali na bana sikoyo, botyá motema ete mibeko ya Yehova ezali na ntina mingi koleka makanisi to mimeseno ya bato ya mboka na bino.
Kokokisa bamposa ya elimo ya bana esɛngaka ntango mpe milende
Soki bozwi ekateli ete bokobota bana mingi te, bótya motema ete Yehova akokoba kokokisa bamposa na bino ata ntango bokokóma mibange. Bótɛmɛla mbamba ya kotalela bana lokola ebongiseli oyo ekosalisa bino ntango bozwi pansiɔ. Bozali na ntina te ya kobanga ete bokozanga moto ya kosalisa bino. Yehova alaki ete akokokisa bamposa na bino, mpe akokisaka ntango nyonso makambo oyo alaki.—Yos. 23:14.
Toli ya Biblia: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba, mpe kotya motema te na mayele na yo moko. Kanisá ye na banzela na yo nyonso, mpe akosembola banzela na yo.”—Mas. 3:5, 6.
“Nazalaki elenge mpe sikoyo nakómi mobange, kasi namoná naino te moto ya sembo asundolami, to bana na ye bazali koluka limpa.”—Nz. 37:25.
“Bókoba koluka liboso Bokonzi mpe bosembo na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.”—Mat. 6:33.
Bana bazali likabo ya motuya oyo Yehova apesi baboti. Na ntembe te Yehova asepelaka mpenza ntango baboti bakristo bazali kobɔkɔla bana na bango na ndenge oyo ye alingi! Bakokisaka na bolingo nyonso bamposa ya mosuni, ya mayoki, mpe ya elimo ya bana na bango; batyaka motángo ya bana oyo bakobota; mpe batyaka na bosembo nyonso mibeko ya Nzambe na esika ya liboso koleka makanisi to mimeseno ya bato ya mboka na bango. Na ndenge yango, baboti bakristo bamonisaka ete bana na bango bazali likabo ya motuya mingi—“libula oyo euti na Yehova.”
a Mwasi ná mobali nde bakotya bango moko motángo ya bana oyo bakobota, ntango oyo bakobota, mpe soki bakosalela bankisi oyo epekisaka zemi. Moto moko te asengeli kosambisa bango mpo na bikateli na bango moko. (Rom. 14:4, 10-13) Lisusu, babalani bakristo babatelaka na makanisi toli oyo ezali na 1 Bakorinti 7:3-5.
b Atako bana oyo vɛrsɛ yango elobeli ezali bayekoli ya Kristo, moboti akoki mpe komiyoka lokola Yoane.