27/04–03/05/2026
LOYEMBO 99 Tozali na bandeko ebele
Omibongisi mpo na mikakatano oyo ekoki koya nsima ya batisimo?
“Matambe na ngai etikala na banzela na yo.”—NZ. 17:5.
NA MOKUSE
Ndenge oyo bakristo oyo bazwi batisimo sika bakoki komibongisa mpo na mikakatano oyo ekoki kobima na kati ya lisangá.
1-2. Tokoki kosala nini mpo tómibongisa mpo na mikakatano oyo ekoki kobima na lisangá? Pesá ndakisa.
TOYEBAKA ete tokokutana na mikakatano na mokili oyo ya Satana. Yango wana Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Biloko oyo ebɛtisaka libaku ekozanga te.” (Mat. 18:7) Lokola toyebi bongo, tosengeli komibongisa mpo na mikakatano oyo ekoki koya, mpe mikakatano yango mosusu ekoki kozala mpe matata elongo na bandeko na biso bakristo.
2 Tózwa ndakisa moko. Ebongiseli ya Yehova elendisaka biso tómibongisa mpo na makama oyo ebimaka yango moko. Ndenge nini tomibongisaka? Liboso, tolukaka koyeba makama nini ekoki kobima na esika oyo tofandi. Ezali na ntina mingimingi soki tozali bato ya sika na esika yango. Nsima ya koyeba makama oyo ekoki kobima, tosengeli kozwa bibongiseli mpo na oyo tokosala mpo ntango likama ekoya ekuta biso tosili komibongisa. (Mas. 21:5) Ndenge moko mpe, tokoki koluka koyeba mikakatano oyo tokoki kokutana na yango na lisangá mpe komibongisa banda sikoyo mpo soki mikakatano ebimi, ekuta biso tosili komibongisa. Na ndenge yango, mikakatano yango ekoningisa biso makasi te mpe ekobebisa te boyokani na biso na Yehova. (Nz. 17:5) Na yango, tólobela mikakatano misato oyo ekoki kobima mpe ndenge oyo tokoki komibongisa mpo na mokomoko na yango.a
NDEKO MOKO APESI YO MPASI
3. Mokakatano nini tokoki kokutana na yango na lisangá?
3 Ozali koyeba lisusu ndenge oyo omiyokaki mbala ya liboso oyo oyanganaki na makita mpe omonaki bolingo na kati ya basaleli ya Yehova? Na ntembe te ondimaki mpenza ete omoni solo! (Yoa. 13:35; Kol. 3:12) Mwasi moko na nkombo Blancab amiyokaki bongo. Kasi nsima ya kozwa batisimo, akutanaki na likambo moko oyo akanisaki kutu te. Alobi boye: “Ndeko mwasi moko asalelaki ngai makambo na boboto te mpenza. Namonaki mpe ete azalaki koloba mabe mpo na bandeko mosusu. Nakanisaki te ete likambo ya bongo ekoki kosalema; nayekolaki ete Batatoli ya Yehova basalaka makasi bázala bato ya kimya mpe ya boboto.” Ya solo basaleli ya Yehova basalaka makasi mpo na komekola bizaleli na ye mpe kobongisa bomoto na bango ya bokristo, kasi bazali bato ya kokoka te. (Ef. 4:23, 24; 1 Yoa. 1:8) Na yango, ekoki kokóma ete ndeko moko aloba to asala likambo moko oyo epesi yo mpasi. (Yak. 3:8) Likambo ya mawa, mikakatano ya ndenge wana esali ete basusu bátika kosalela Yehova.
4. Nini ekoki kosalisa yo oyeba oyo okosala ntango ekokóma ete ndeko moko apesi yo mpasi? (Baefese 4:32)
4 Okoki kosala nini banda sikoyo mpo oyeba oyo okosala ntango ekokóma ete ndeko moko apesi yo mpasi to nkanda? Zalá na momeseno ya kosalela toli oyo ezali na Baefese 4:32. (Tángá.) Soki osali makasi ozala ntango nyonso na boboto mpe na motema mawa, na ntembe te okobendana mpambampamba te na basusu. Omityela mokano ya kolimbisa basusu na motema moko ntango basali mabunga. Nini ekoki kosalisa yo osala bongo? Kanisá mbala boni osɛngaka Yehova alimbisa mabunga na yo mpe osepelaka ndenge alimbisaka ntango nyonso. (Mat. 6:12) Soki ozali ntango nyonso na botɔndi mpo na ndenge Yehova alimbisaka yo na motema moko, okomona ete ezali mpasi te yo mpe olimbisaka basusu.
5. Vɛrsɛ nini ekoki kosalisa biso ntango moto moko apesi biso nkanda? (Masese 19:11) (Talá mpe bililingi.)
5 Tángá Masese 19:11. Biblia elobi ete ntango moto moko apesi biso nkanda, mayele ya kososolac ekoki kokitisa nkanda na biso. Vɛrsɛ yango esalisi Rima, oyo azwi batisimo eleki kaka mwa bambula. Alobi boye: “Ntango bandeko basali likambo oyo epesi ngai mpasi to nkanda, nakanisaka mbala moko Masese 19:11. Natalelaka bomoi na bango ná makambo oyo bakutaná na yango, mpe namekaka kokanisa ntina oyo mbala mosusu basalaki likambo yango. Nalukaka mpe kobima na bango na mosala ya kosakola. Kosala bongo esalisaka ngai nayeba bango malamu.” Yango ezali toli moko malamu mpenza! Okoki koyekola koyeba bandeko malamu banda sikoyo. Soki oyebi bango malamu, okomona ete ekozala mpasi mpenza te olimbisa bango soki ekómi ete básala to báloba likambo oyo epesi yo mpasi.
Soki ozwani matata na ndeko moko na lisangá, luká kobima elongo na ye na mosala ya kosakola (Talá paragrafe 5)
6. Nini ekoki kosalisa biso tózala na boyokani ya malamu na bandeko na lisangá?
6 Okoki kosala nini mpo ozala na boyokani ya malamu na bandeko ya lisangá? Wana ozali koyekola koyeba bandeko, lukáká bizaleli na bango ya malamu. (Talá mpe Masese 10:12; Rom. 12:10; Flp. 2:2, 3) Talá ndenge kosala bongo esalisaki Marko, ndeko mobali moko oyo azwaki batisimo sika. Ntango akómaki kolekisa ntango mingi elongo na bandeko ya lisangá na bango, akómaki komona mabunga na bango. Nini esalisaki Marko abɛta libaku te mpo na mabunga ya bandeko? Alobi boye: “Nayaki komona ete mabunga ya bandeko ezalaka kaka ya mikemike, soki okokanisi yango na masumu minene oyo bato ya mokili basalaka. Namonaki polele ete nasengeli te kolandela mabunga mikemike ya bandeko na ngai bakristo. Yango wana nakómaki kotya likebi mingi kaka na bizaleli na bango ya malamu.” Soki yo mpe osali bongo, okozala na boyokani malamu na bandeko na lisangá.
OBANDI KOYOKA MPOSA YA BILOKO OYO OTIKÁ NA NSIMA
7. Nini ekoki kosala ete tóyoka lisusu mposa ya biloko oyo totiká na nsima?
7 Ntango okómaki Motatoli ya Yehova, na ntembe te osepelaki ndenge otiki mokili mabe ya Satana. Mbala mosusu omilobaki: ‘Ndenge nini moto akoki mpenza koyoka lisusu mposa na yango?’ Nzokande, ntango okutani na mikakatano ya makasi, okoki kobanda kokanisa lisusu, mpe kutu koyoka mposa makasi, ya biloko mosusu oyo otikaki mpo obanda kosalela Yehova. (Talá mpe Mitángo 11:4-6.) Na ndakisa, ekoki kozala ete bandeko mosusu bazwaki ekateli ya kotika mosala moko ya malamu mpo ezalaki kozwa bango ntango mingi. Basusu, ntango bakómaki koyekola Biblia, baninga na bango ya motema baboyaki bango. Basusu mpe balongaki momeseno moko oyo ezalaki kopesa bango mwa elɛngi kasi ezalaki momeseno ya mbindo. Ekozala mpenza mawa soki mokristo apesi nzela ete eloko moko oyo azalaki kosala kala emema ye mosika na Yehova! Okoki kosala nini banda sikoyo mpo ata soki nini eyei, ozongela soki moke te biloko oyo otiká na nsima?
8. Liteya nini tozwi na ndakisa ya Abrahama ná Sara?
8 Biblia ezali na bandakisa ya basaleli ya sembo ya Yehova oyo bakokaki mpe kobanda koyoka mposa ya biloko oyo batikaki na nsima. Na ndakisa, mpo na kotosa etinda ya Yehova, Abrahama ná Sara batikaki Ure, oyo ezalaki engumba ya bozwi mpe bakendaki kofanda na bahema. (Ebr. 11:8, 9) Emonani ete na bantango mosusu bazangaki te kokanisa ndenge bomoi ezalaki malamu na Ure. Kasi “soki bazalaki kaka kokanisakanisa” to soki bazalaki na mposa makasi ya bomoi na bango ya kala, bakokaki koluka kozongela biloko ya malamu oyo batikaki na Ure. Na esika básala bongo, batyaki makanisi na mikolo ekoya.—Ebr. 11:15, 16.
9. Ndenge nini ntoma Paulo atalelaki biloko oyo atikaki na nsima? (Bafilipi 3:7, 8, 13)
9 Ntoma Paulo mpe atikaki biloko mosusu mpo na kosalela Yehova. Liboso akóma mokristo, ayekolaki Mobeko ya Bayuda na lisalisi ya Gamaliele, molakisi oyo bato bazalaki komemya mingi. (Mis. 22:3) Paulo akokaki kokóma moto monene mpenza na Lingomba ya Bayuda. (Gal. 1:13, 14) Kasi, ntango andimaki nsango malamu, atikaki nyonso wana nsima na ye. Nsima ya kokóma mokristo, bomoi na ye ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ? Te. Babɛtaki ye, batyaki ye na bolɔkɔ, mpe bato ya ekólo na ye moko bayinaki ye. (2 Ko. 11:23-26) Soki atyaki makanisi kaka na mikakatano wana mpe akokanisaki bomoi oyo akómaki na yango na oyo azalaki na yango liboso, akokaki komona ete liboso akóma mokristo azalaki malamu koleka. Kasi, Paulo atyaki makanisi na lokumu monene oyo akómaki na yango ya kozala moyekoli ya Yesu Kristo mpe ya kozwa mbano ya malamu mpenza na mikolo ekoya. Paulo andimaki ete mapamboli yango elekaki mosika mpenza makambo nyonso oyo amipimelaki.—Tángá Bafilipi 3:7, 8, 13.
10. Makambo nini tosengeli kokanisaka mbala na mbala? (Marko 10:29, 30) (Talá mpe bililingi.)
10 Liteya ezali nini? Soki obandi kokanisa makambo oyo otikaki mpo na kokóma mokristo, omikundwela mpe ntina oyo otikaki yango. (Mos. 7:10) Okokanisa biloko oyo otikaki na nsima na mapamboli oyo ozwi ndenge ozali na kati ya solo. Ozali moninga ya motema ya Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Mas. 3:32) Ozwi libota ya bandeko ya elimo oyo balingaka yo. (Tángá Marko 10:29, 30.) Mpe ozwi elikya ya malamu mpenza mpo na mikolo ezali koya! (Yis. 65:21-23) Soki ozali mbala na mbala kokanisa mapamboli oyo ozwi ndenge ozali kosalela Yehova, okoyoka mposa mpenza te ya biloko oyo otiká na nsima.
Na esika ya kokanisa kaka biloko oyo otiká na nsima, sepelá nde na mosala ya motuya oyo Nzambe apesi yo (Talá paragrafe 10)e
11. Liteya nini ozwi na lisolo ya ndeko Rosemary?
11 Ndeko mwasi moko na nkombo Rosemary azwaki batisimo ntango akómaki na bambula 50. Talá oyo asalaki mpo ayoka lisusu mposa te ya biloko oyo atikaki na nsima. Alobi boye: “Na ebandeli, nazalaki kokanisa fɛti ya Noele mingi, mpo ezalaki ntango ya esengo oyo tozalaki kolekisa na libota. Nazalaki kosepela kopesa bato oyo nalingaka bakado. Nazalaki kosepela ndenge bana bazalaki kozinga nzete ya Noele mpe komona ndenge bazali kosepela ntango bafungoli bakado na bango.” Nini esalisaki ye? Ndeko Rosemary alobi boye: “Namonaki eloko nakoki kosala na esika ya fɛti ya Noele. Mbala moko na kati ya mbula, nabengisaka bato ya libota na ngai, napesaka bango bakado, mpe nayebisaka bango ntina oyo nalingaka bango.” Rosemary akutanaki mpe na mokakatano mosusu. Alobi boye: “Ntango nakómaki Motatoli ya Yehova, baninga na ngai ya kala batikaki ngai. Na bantango mosusu, nazalaki koyoka mposa na bango mpe komiyoka ete nazali ngai moko.”d Nini esalisaki ye? Akómaki koyokana na bandeko basi mpo bábima elongo na mosala ya kosakola. Alobi boye: “Kosala bongo esalisi ngai nazwa baninga ya sika, oyo nalingaka mpe oyo nazwaka na motuya.” Liteya nini okoki kozwa na lisolo ya ndeko mwasi yango? Okoki koyoka mposa ya eloko oyo ezalaki kosepelisa yo liboso oyeba solo, kasi okoki kolonga kotya eloko mosusu ya malamu koleka na esika na yango. (Flp. 4:8, 9) Mpe kobosana te: Soki ozali na Yehova, okozwa ntango nyonso koleka oyo otikaki mpo na kosalela ye.
BASUSU BATIKI YEHOVA
12. Likambo nini oyo ekoki kosalema na lisangá epesaka mpasi mingi?
12 Ntango okómaki Motatoli ya Yehova, na ntembe te osepelaki ndenge otiki mokili moko ya mabe mpe okɔti na paradiso ya elimo epai bato bazali na bizaleli ya pɛto. (Yis. 65:14) Kasi na bantango mosusu, okoki koyoka ete moto moko asali lisumu ya monene na lisangá. Ekoki ata kokóma ete moto alongolama na lisangá. (1 Ko. 5:13) Likambo ya ndenge wana etungisaki ndeko mwasi moko na nkombo Samar. Alobi boye: “Mwa moke nsima ya batisimo na ngai, nkulutu moko asalaki lisumu ya monene mpe alongolamaki na lisangá. Yango eningisaki mpenza kondima na ngai mpo nandimaki te ete nkulutu akoki kosalela Yehova mpe lisangá lisumu.” Ya solo, tosengeli ntango nyonso kotyela bandeko na biso motema ete balingaka Yehova mpe balingaka kotikala sembo epai na ye. (1 Ko. 13:4, 7) Kasi, tosengeli kozala na bokatikati; mbula na mbula bato mosusu balongolamaka na lisangá. Mpe ekoki kosala mpasi mingi koleka soki moto oyo olingaka to oyo omemyaka mingi nde aponi kotika Yehova.
13. Ndenge nini okoki komibongisa banda sikoyo mpo kondima na yo eningana te soki moto oyo olingaka atiki Yehova?
13 Ndenge nini okoki komibongisa banda sikoyo mpo kondima na yo eningana te soki moto oyo olingaka atiki Yehova? Kobá kokómisa makasi boyokani na yo moko na Yehova. (Yak. 4:8) Kotika te ete boyokani na yo na Nzambe esimbama na bosembo ya moto mosusu. Na ndakisa, ata soki mbala mingi tosambelaka Yehova elongo na libota mpe na lisangá, biso moko mpe tosengeli kobondelaka mpe kotángaka Biblia mbala na mbala.—Nz. 1:2; 62:8.
14. Liteya nini tozwi na ndakisa ya ntoma Petro? (Yoane 6:66-68)
14 Tokoki mpe kozwa liteya na ndenge oyo ntoma Petro asalaki ntango bayekoli mingi batikaki kolanda Yesu. Mbala mosusu Petro ye moko mpe abulunganaki na ntango yango. Kasi talá maloba na ye oyo ezali na Yoane 6:66-68. (Tángá.) Na esika ya kotya likebi nyonso na oyo basusu basalaki, Petro atyaki makanisi na maloba ya solo oyo ayokaki epai ya Yesu. Na yango, Petro atikaki te kolanda Yesu. Ndenge moko mpe lelo, ata soki basusu batiki kosalela Yehova, yango ebongoli te motuya ya mateya ya solo oyo oyekoli na lisalisi ya ebongiseli ya Nzambe. Kangamá na solo yango! Samar, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Namikundwelaka ntango nyonso ete makambo ya mabe oyo ndeko moko asali, elakisi te ete lisangá mobimba to ebongiseli ya Yehova nde esali yango; elakisi mpe te ete mabe yango ezali na kati ya bizaleli ya Yehova.”
15. Liteya nini ozwi na lisolo ya Emily?
15 Tótalela ndakisa ya Emily. Pɔsɔ moko mpamba nsima ya batisimo ya Emily, mama na ye asundolaki libota na bango mpe alongolamaki na lisangá. Emily alobi boye: “Nakanisaki ata moke te ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalema. Ezalaki mokakatano ya monene mpenza mpo na ngai, mpe nayokaka mpenza mposa ya mama na ngai.” Nini esalisi Emily? Alobi boye: “Nazali ngai moko te. Nazwaka lisungi epai ya tata na ngai mpe bandeko ya lisangá, oyo bazali lokola libota na ngai. Moto nyonso azali na mokakatano na ye. Yango wana ezali na ntina tókangama na bandeko mpe tólendisanaka.” (1 Pe. 5:9) Osengeli kozela te ete mokakatano moko eya liboso okómisa boyokani na yo na bandeko makasi. Kobá kosala yango banda sikoyo. Na ndenge yango, ata soki nini ekómi, na ntembe te okomona te ete ozali kaka yo moko.
16. Likambo nini tosengeli kobosana te? (Talá mpe elilingi.)
16 Lisusu, kobosana te ete Yehova apesaka disiplini na baoyo ye alingaka. (Ebr. 12:6) Alingi ete bato nyonso oyo balongolamá na lisangá bázonga. (2 Pe. 3:9) Na yango soki moto moko oyo olingaka alongolami na lisangá, yebá ete bankulutu bakosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa ye azongela Yehova.—2 Tim. 2:24, 25.
Soki moto oyo olingaka alongolami na lisangá, yebá ete bankulutu balingaka kosalisa ye azongela Yehova (Talá paragrafe 16)f
17. Tokoki komindimisa likambo nini?
17 Tolobeli kaka mwa ndambo ya mikakatano oyo okoki kokutana na yango nsima ya batisimo. Ya solo, mosusu ekoki komonana minene, kasi ozali na ntina ya kobanga te. Nzokande, ezali na makambo mingi oyo okoki kosala mpo na komibongisa. Mpe kobosana ata moke te ete ozali na lisalisi ya monene koleka: Yehova Nzambe. Azali pene ya kosalisa yo, mpe alingi kosalisa yo libela na libela! (1 Pe. 5:10) Akopesa yo ntango nyonso makasi mpe akosalisa yo oyika mpiko ata soki okutani na mokakatano nini. Soki okobi kondima lisalisi ya Yehova, ata mokakatano moko te ekokoka kokabola yo na ye!—Nz. 119:165; Rom. 8:38, 39.
LOYEMBO 154 Bolingo ekosuka te
a Atako lisolo oyo elobeli Batatoli ya Yehova oyo bazwi batisimo sika, ekoki kosalisa biso nyonso.
b Topesi bango bankombo mosusu.
c Mayele ya kososola ezali likoki ya komona mosika koleka oyo ezali komonana na miso. Ezaleli yango ekoki kosalisa biso tósosola to tóyeba ntina oyo moto alobi to asali likambo oyo epesi biso mpasi to nkanda.
d Ezala tozali na bato oyo toyekolaka na bango Biblia to te, biso nyonso tosengeli kosalisa bayekoli ya Biblia mpe baoyo bazwi batisimo sika bámona ete bazali na esika na lisangá. Talá paragrafe 15 mpe 16 ya lisolo “Ndenge oyo ndeko nyonso akoki kosalisa bayekoli ya Biblia bákola tii bázwa batisimo” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 03/2021.
e NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi moko na mosala ya kosakola amoni ekipi moko ezali kobɛta bale, mpe akanisi ntango ye moko azalaki kobɛta bale. Na nsima, ndeko mwasi yango azali koteya mwasi moko oyo abɛtaka bale, mbala mosusu moninga oyo bazalaki kobɛta na ye ekipi moko.
f NDIMBOLA YA ELILINGI: Bankulutu mibale bayei kotala mobali moko oyo alongolamá na lisangá mpo na kolendisa ye azongela Yehova.