Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Février nk. 14-19
  • Kobá kosala makasi mpo okola tii na batisimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobá kosala makasi mpo okola tii na batisimo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NTINA OYO BATO MOSUSU BAKAKATANAKA
  • NTINA YA KOBOSANA TE ETE NSUKA EKÓMI PENE
  • MATOMBA YA KOZWA BATISIMO SIKOYO
  • Ndimbola ya batisimo mpe ntina na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Okoki mpo na komipesa na Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • ‘Kobá kolanda’ Yesu nsima ya batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Koumela te mpo na kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Février nk. 14-19

20-26/04/2026

LOYEMBO 49 Tósepelisa motema ya Yehova

Kobá kosala makasi mpo okola tii na batisimo

“Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami.”—2 KO. 6:2.

NA MOKUSE

Sikoyo nde ntango ya kokómisa makasi boninga na Yehova mpe kozwa batisimo.

1. (a) Mpo na nini ezali na ntina kozwa batisimo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

OMIPESÁ na Yehova na libondeli mpe ozwá batisimo na mai mpo na komonisa yango? Soki bongo, osɛngá Nzambe lisosoli ya pɛto. (1 Pe. 3:21) Ntango osalaki bongo, opesaki ndakisa malamu epai ya bilenge mpe bato ya sika na lisangá. Na yango ozwaki ekateli moko ya malamu mpenza! Kasi, bongo soki ozwi naino batisimo te? Na ntembe te olingaka Yehova mpe olingi kosala mokano na ye. Oyebi ete kozwa batisimo ezali na ntina mpo masumu na yo elimbisama mpe mpo Yehova andima yo. (Mis. 2:​38-40) Kasi mbala mosusu ozali kokakatana. Nini ekoki kosalisa yo? Na lisolo oyo, tokolobela (1) ntina oyo basusu bakakatanaka mpo na kozwa batisimo, (2) mpo na nini ezali likambo ya bwanya kobatela na makanisi ete nsuka ekómi pene, mpe (3) matomba oyo okozwa soki osali makasi ozwa batisimo kozanga koumela.

NTINA OYO BATO MOSUSU BAKAKATANAKA

2. Mpo na nini bato mosusu bakakatanaka kozwa batisimo?

2 Bato mosusu bakakatanaka kozwa batisimo mpo babangaka. Na ndakisa, atako balingi kosalela Yehova, babangaka ete bakokoka te kosepelisa ye mpenza. Soki yo mpe omiyokaka bongo, talelá lisusu bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekoki kondimisa yo ete Yehova asɛngi te ete ozala moto ya kokoka, mpe ete asepelaka na losambo na yo ntango ozali kopesa ye nyonso oyo ekoki mpo na yo. (Nz. 103:​13, 14; Kol. 3:23) Soki obangaka botɛmɛli, sɛngá Yehova apesa yo mpiko mpo oloba lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Yehova azali pene na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?”—Nz. 118:6.

3. Nini mosusu ekoki kopekisa bato mosusu kozwa batisimo? (Talá mpe elilingi.)

3 Bato mosusu mpe oyo balingaka Yehova bakakatanaka kozwa batisimo mpo bakanisaka ete bazali na boyebi mingi te. Kasi boyebi nini osengeli mpenza kozala na yango mpo na kozwa batisimo? Tótalela ndakisa moko na Biblia. Nsima ya koningana ya mabele na bolɔkɔ oyo batyaki bango, ntoma Paulo ná Silasi basakwelaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ ná bato ya ndako na ye. Na ntembe te mobali yango ná libota na ye bakangaki ntina ete Nzambe nde asalaki likamwisi yango. Lisusu, bayekolaki mwa makambo mingi kaka na butu yango. Yango etindaki bango ‘bábatisama kozanga koumela.’ (Mis. 16:​25-33) Soki oyebi Yehova, olingaka ye na motema na yo mobimba, oyebi mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli, obongoli motema na masumu na yo, mpe ozwi ekateli ya kotosa mibeko na ye na bomoi na yo, okoki mpo na kozwa batisimo.—Mrk. 12:30.

Paulo ná Silasi bazali koteya mokɛngɛli ya bolɔkɔ ná bato ya ndako na ye na butu. Bato yango bazali koyoka na likebi.

Paulo ná Silasi bateyaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ ná bato ya ndako na ye, mpe yango esalaki ete ‘bábatisama kozanga koumela’ (Talá paragrafe 3)


4. Bato mosusu bakakatanaka kozwa batisimo mpo batyaka makanisi na nini? (Talá mpe elilingi.)

4 Bato mosusu mpe balingaka kosepelisa Nzambe kasi batyaka makanisi mingi na oyo yango ekosɛnga bango. Ya solo, liboso ya kozwa ekateli nyonso, ebongi kotalela oyo yango ekosɛnga. (Luka 14:​27-30) Kasi, bato mosusu bamitungisaka mpo na makambo oyo ekosɛnga bango bámipimela mpo na kosalela Nzambe. Candace, oyo ayebá solo banda bomwana, amiyokaki ndenge wana ntango abandaki lisusu koyekola Biblia ntango akómaki mokóló. Alobi boye: “Nayebaki oyo nasengelaki kosala mpo na Yehova, kasi nazalaki kolinga kosala yango te mpo nazalaki kosepela na makambo oyo nazalaki kosala na mokili. Nayebaki ete ekozala mpasi natika makambo yango.” Bato mosusu bamonaka ete bakokoka te kozala na etamboli malamu oyo Yehova asɛngi na baoyo bazwi batisimo. Babangaka ete nsima ya kozwa batisimo básala lisumu ya monene mpe bálongolama na lisangá. Soki makanisi ya ndenge wana nde ezongisaka yo nsima, okoki kosala nini?

Ndeko mwasi moko azali koyekola Biblia na mwasi moko. Ntango ndeko mwasi azali koloba, mwasi yango amimoni na makanisi ndenge azali komɛla masanga mpe kobina na nganda moko elongo na baninga na ye.

Bato mosusu oyo balingaka kosepelisa Nzambe bamitungisaka mpo na makambo oyo ekosɛnga bango bámipimela mpo na kosalela ye (Talá paragrafe 4)


5. Tosengeli kotya makanisi na nini ntango tozali kokakatana kozwa batisimo? (Matai 13:​44-46)

5 Ntango tolingi kosomba eloko moko, totalaka kaka te mosolo oyo yango ekosɛnga, kasi totalaka mpe valɛrɛ ya eloko. Soki valɛrɛ ya eloko yango eleki mosika ntalo na yango, na ntembe te tokosomba yango mbala moko. Ndenge moko mpe, ntango tozali kokanisa soki tosengeli kozwa batisimo, tosengeli kotalela kaka te bambongwana oyo yango ekosɛnga ete tósala, kasi mpe valɛrɛ monene ya kozala na boyokani malamu na Yehova. Yesu asalelaki ndakisa mibale mpo na koteya likambo yango. (Tángá Matai 13:​44-46.) Na ndakisa mokomoko, mobali moko atɛkaki biloko na ye nyonso na esengo mpo akoka kosomba eloko ya motuya oyo amonaki. Yo mpe omoni eloko moko ya motuya mingi: solo ya Bokonzi. Na yango, soki ozali kokakatana mpo na kosala bambongwana oyo esengeli mpo bomoi na yo eyokana na solo yango, kanisá na likebi bandakisa wana ya Yesu. Okoki komituna boye: ‘Nandimaka mpenza ete solo oyo nayekoli ezali na valɛrɛ mingi? Nazwaka na motuya boyokani na ngai na Yehova, elikya oyo apesi ngai, mpe lisangá mobimba ya bandeko ya bolingo?’ Biyano na yo ekoki kosalisa yo osala makambo oyo esengeli mpo omonisa botɔndi na yo mpo na solo, to oyeba makambo oyo ezali kopekisa yo osalela makambo oyo oyebi mpe ozwa batisimo.

6. Ndenge nini tokoki kokóma na motema ya kitoko mpe ya malamu?

6 Na ndakisa na ye ya moloni, Yesu amonisaki ete motema ya bato mosusu ekoki kopekisa bango bákola na elimo. Kasi, Yesu amonisaki mpe ete bato mosusu bakoyoka nsango ya Bokonzi “na motema ya kitoko mpe ya malamu” mpe bakondima yango. (Luka 8:​5-15) Soki ozali komona ete motema na yo ezali mobimba te, kolɛmba nzoto te. Yehova akoki kosalisa yo ‘ozwa motema ya sika,’ oyo ekondima litambwisi na ye. Na yango, sɛngá Yehova na libondeli asalisa yo obongisa motema na yo mpo solo ya Bokonzi ekola kati na yo.—Ezk. 18:31; 36:26.

7-8. Mpo na nini bilenge mosusu bazali kokola te tii na kozwa batisimo? (Talá mpe elilingi.)

7 Bilenge mosusu oyo balingaka Yehova bazali kokoka te kokola tii kozwa batisimo mpo na mbamba ya basusu. Na ndakisa, balakisi mosusu na eteyelo bapesaka bana-kelasi toli ete “báfungwama na makanisi” na oyo etali kondima bizaleli mosusu, ata oyo ebuki mibeko ya Nzambe. Kasi toli ya ndenge wana ekoki komema na likama. (Nz. 1:​1, 2; Mas. 7:​1-5) Okoki kokima likama yango soki olandi ndakisa ya mokomi ya nzembo oyo alobaki na Yehova ete: “Nakómi na mayele ya kososola mingi koleka bateyi na ngai nyonso, mpo nakanisaka na mozindo makundoli na yo.”—Nz. 119:99.

8 Balapolo emonisi ete baboti mosusu oyo bazali Batatoli bazongisaka batisimo ya bana na bango nsima. Baboti yango batyaka makanisi nyonso na kelasi ya bana mpe mosala oyo basengeli koyeba, to mpe basalisaka bana te bámityela mikano ya elimo. Elenge, okoki kosala nini soki omoni ete baboti na yo bakoki kosala makambo mosusu mingi mpo na kosalisa yo okola na elimo? Mpo na nini te osolola na bango likambo yango? Yebá ete mbula na yo esengeli te kopekisa yo kokóma na boninga makasi na Yehova.—Mas. 20:11.

Elenge mobali moko azali kosolola na baboti na ye na lisalisi ya liteya 23 ya buku “Sepelá na bomoi libela na libela!”

Mpo na nini te oyebisa baboti na yo ete olingi kozwa batisimo? (Talá paragrafe 8)


9. Mpo na nini bato mosusu bakoki koumela mpo na kozwa batisimo?

9 Moto mosusu oyo asili kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo akoki koumela kosala yango mpo na mbamba ya baninga, mbala mosusu kutu azelaka kozwa batisimo nzela moko na moto moko boye. Na ndakisa, moninga moko to moto moko ya libota akoki koyebisa ye azela mpo bázwa batisimo mokolo moko. Ezali mabe te kozwa batisimo mokolo moko na bato oyo olingaka. Kasi, yango nde mpenza esengeli kotinda yo oboya kozwa batisimo sikoyo? Kobosana te, komipesa na Nzambe ezali elaka oyo moto ye moko asalaka. Na yango, batisimo na yo esengeli te kotalela oyo moto mosusu azali kosala.—Rom. 14:12.

NTINA YA KOBOSANA TE ETE NSUKA EKÓMI PENE

10. Mpo na nini basusu bakoki koumela mpo na kokola na elimo?

10 Longola bantina oyo touti kolobela, bato mosusu bakoki koumela mpo na kokola na elimo mpo bazali komona ete ntango oyo etikali mpo nsuka eya ezali naino mingi. Kasi kokanisa bongo ebongi mpenza? Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo mbala mosusu bozali kokanisa te.”—Luka 12:40.

11. Na kotalela Nzembo 119:​60, tosengeli kosala nini na mibeko ya Yehova ntango toyekoli koyeba ye malamu?

11 Bolingo nde esengeli kotinda biso tómipesa na Yehova. Ntango toyekoli koyeba malamu Nzambe na biso ya bolingo, ekotinda biso mpe tólinga mingi mibeko na ye mpe tótosa yango nokinoki ntango toyekoli yango. (Tángá Nzembo 119:60.) Moyekoli Yakobo amonisaki ntina mosusu ya kotosa nokinoki mibeko ya Yehova: Moko te kati na biso ayebi oyo ekosalema lobi. Mokolo mosusu tokozala ata na libaku mosusu te ya “[kosala] oyo ezali malamu,” na yango tosengeli kosalela sikoyo makambo oyo toyebi.—Yak. 4:​13-17.

12. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu ya elanga ya vinyo?

12 Bongo ndakisa ya Yesu ya elanga ya vinyo? Yesu amonisaki te ete bato mosusu basalaki kaka ngonga moko kasi bazwaki lifuti ndenge moko na baoyo basalaki mokolo mobimba? Ezali bongo. Kasi, oyebi mpo na nini basali oyo basalaki kaka ngonga moko babandaki mosala nzela moko na baninga te? Balobaki: “Mpo moto moko te azwi biso na mosala.” Basali wana baboyaki te kosala mosala mokolo mobimba—bazwaki bango nde na mosala te. Ntango kaka babengaki bango, bakendaki mbala moko kosala mosala. (Mat. 20:​1-16) Lelo oyo, Yesu abengi biso tókóma bayekoli na ye mpe tósala mosala ya Bokonzi. Tosengeli kondima libyangi na ye ntango kaka toyoki yango.

13. Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya mwasi ya Lota?

13 Moto oyo azali koumela kosala bambongwana mpo na kokola na elimo akoki koya komona ete kosala mbongwana na ngonga ya nsuka mpo na kosepelisa Nzambe ezali mpenza mpasi. Yesu ayebaki yango mpe akebisaki bayekoli na ye ete: “Bókanisa mwasi ya Lota.” (Luka 17:​31-35) Mwasi yango ayebaki malamu ete etumbu ya Nzambe mpo na Sodoma ná Gomora ezalaki koya; kasi, emonani ete alongaki te kolongola motema na ye na biloko oyo atikaki na nsima. (Eba. 19:​23-26) Lisolo na ye ekundweli biso mpe ete porte ya lobiko ekotikala polele mpo na libela te. Na ntango oyo Nzambe atye, porte yango ekokangama mpenza na fungola mpo na libela.—Luka 13:​24, 25.

14. Bisakweli ya Biblia oyo etali nsuka esengeli kotinda yo osala nini?

14 Mokolo na mokolo, makambo oyo ezali kosalema na mokili ezali kokokisa bisakweli ya Biblia oyo etali nsuka ya mokili oyo. Ata soki makambo yango mosusu naino ekómeli yo moko te, komona oyo ezali kosalema na esika moko mpe mosusu esengeli kotinda yo oumela te mpo na kokola tii na batisimo. Tótalela ndakisa moko ya siɛklɛ ya liboso. Ntoma Petro alendisaki bakristo ete ‘bázala ekɛngɛ,’ to ‘bálala mpɔngi te,’ mpo “nsuka ya makambo nyonso [ekómaki] pene.” (1 Pe. 4:7; msl.) Emonani ete “nsuka” yango ezalaki nde kobebisama ya Yerusaleme ná tempelo na yango. Baoyo Petro akomelaki mokanda bazalaki kofanda mosika ya Yerusaleme; na yango balingaki koyoka mbala moko te mpasi oyo kobebisama ya engumba yango ekomema. (1 Pe. 1:1) Kasi, komona kokokisama ya esakweli yango elingaki kotinda bango bátyela bilaka mosusu nyonso ya Yehova motema mingi. Ndenge moko mpe, ntango ozali komona kokokisama ya bisakweli oyo elobeli nsuka, ekotinda yo ozala ekɛngɛ mpe omityela mokano ya kozwa batisimo.

15. Ndenge nini tokomonisa ete tobosani te koya ya mokolo ya Yehova? (2 Petro 3:​10-13)

15 Na mokanda na ye ya mibale, Petro amonisaki makambo oyo tosengeli kosala mpo tómonisa ete tobosani te koya ya mokolo ya kosambisama ya Yehova. Mpo na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, mokolo yango ezalaki mosika makasi mpenza; kasi, Petro ayebisaki bango ‘bábatela na makanisi,’ to ‘bázela na mposa makasi,’ mokolo yango. (Tángá 2 Petro 3:​10-13; msl.) Tokoki kobatela mokolo yango na makanisi soki tosili komibongisa mpe tozali na mposa makasi ete eya. Tokomonisa mposa makasi yango soki tozali kosala “misala ya etamboli ya bosantu mpe misala oyo emonisaka ezaleli ya kokangama na Nzambe.” Kanisá ndenge Yehova asepelaka komona yo ozali kosala ‘misala oyo emonisi ete okangami na ye’! Akosepela mpe mingi mpenza komona yo omipesi na ye mpe ozwi batisimo.

MATOMBA YA KOZWA BATISIMO SIKOYO

16. Ntango nini eleki malamu ya kokola tii na batisimo? (2 Bakorinti 6:​1, 2) (Talá mpe bililingi.)

16 Ntango ya malamu koleka ya kokola tii na kozwa batisimo ezali nde sikoyo. (Tángá 2 Bakorinti 6:​1, 2.) Mokube moto ya Etiopi oyo Filipe akutanaki na ye amonaki ntina ya kozwa batisimo mbala moko. Ntango kaka akangaki ntina ya nsango malamu mpe amonaki libaku ya kozwa batisimo, alobaki te ete: ‘Nayekola naino makambo mosusu mingi oyo etali nsango malamu. Tokomona mai mosusu na nzela.’ Alobaki bongo te, kasi atunaki Filipe: “Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” (Mis. 8:​26, 27, 35-39) Ndakisa moko malamu mpenza! Nsima ya kozwa batisimo, mokube yango “akobaki nzela na ye, azali kosepela.”

Bililingi: 1. Mokube moto ya Etiopi azali kokɔta na mai mpe Filipi alingi kobatisa ye. 2. Moyekoli ya Biblia mpe ndeko mwasi ya elilingi ya liboso bazali kosolola na esengo na bankulutu mibale na Ndako ya Bokonzi.

Ndakisa ya mokube moto ya Etiopi ezali koteya biso ete ntango ya malamu koleka ya kokola tii na batisimo ezali nde sikoyo (Talá paragrafe 16)a


17. Okoki kondima ete Yehova akosala nini?

17 Soki ozali kokakatana mpo na kozwa batisimo, yebá ete Yehova alingi kosalisa yo okóma na boyokani malamu na ye. (Rom. 2:4) Akoki kosalisa yo olongola kobanga, mitungisi, to mbamba oyo ekoki kopekisa yo kokola tii na batisimo. Soki ozwi batisimo mpe Nzambe apesi yo lisosoli ya malamu, na ntembe te okomona ete “biloko oyo ezali na nsima” ezali lisusu na ntina te mpo na yo. (Flp. 3:​8, 13) Okoki sikoyo kotya miso na “biloko oyo ezali na liboso,” elingi koloba, kokokisama ya bilaka ya Yehova epai ya baoyo bamipesi na ye mpe bazwi batisimo.—Mis. 3:19.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mpo na nini basusu bakakatanaka kozwa batisimo?

  • Mpo na nini ezali likambo ya bwanya te kozongisa batisimo nsima?

  • Ntango nini eleki malamu ya kokola tii na batisimo?

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

a NDIMBOLA YA ELILINGI: Kaka ndenge mokube moto ya Etiopi alobaki na Filipe ete alingi kozwa batisimo, moyekoli ya Biblia asengeli koyebisa bankulutu mposa na ye ya kozwa batisimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto