Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Février nk. 8-13
  • Ndimbola ya batisimo mpe ntina na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndimbola ya batisimo mpe ntina na yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • OYO BATISIMO EMONISAKA
  • OYO BATISIMO YA BAKRISTO ESƐNGI
  • “NA NKOMBO YA TATA MPE YA MWANA MPE YA ELIMO SANTU”
  • Kozwa batisimo ekomemela yo mapamboli mingi!
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Batisimo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpo na nini kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Février nk. 8-13

13-19/04/2026

LOYEMBO 52 Komipesa mpe batisimo

Ndimbola ya batisimo mpe ntina na yango

“Bókómisa bato bayekoli . . . , bóbatisa bango.”—MAT. 28:19.

NA MOKUSE

Tokomona oyo batisimo emonisaka, ntina na yango, mpe oyo yango esɛngi.

1. Nini emonisi ete batisimo ezali moko ya mateya ya moboko ya Biblia?

TOZALAKA mpenza na esengo ntango bato ya sika bazwi batisimo! Oyebaka ete esengo ya ndenge wana ezalaki mpe na likita ya liboso ya lisangá ya bokristo? Na likita yango, ntoma Petro asalaki diskur oyo elimbolaki liteya ya moboko oyo etali batisimo mpe bato bazwaki batisimo. (Mis. 2:​38, 40, 41) Ntoma Paulo akomaki ete “mateya ya ebandeli oyo etali Kristo” esangisi mpe “mateya oyo etali babatisimo.” (Ebr. 6:​1, 2) Ata soki liteya etali batisimo ezali moko ya mateya ya ebandeli, tosengeli kokanga malamu ntina na yango. Mpo na nini?

2. Mpo na nini tosengeli koyeba malamu ndimbola ya batisimo?

2 Kaka ndenge moboko ya makasi ekoki kosalisa ndako epikama makasi, koyeba malamu ndimbola ya batisimo ekoki kosalisa biso tózala na kondima makasi. Tosengeli koyeba malamu ndimbola na yango ezala tozali komibongisa mpo na kozwa batisimo to tozwá batisimo eleki bambula mingi. Yango wana na lisolo oyo, tokoyanola na mituna oyo: Batisimo emonisaka nini? Batisimo ya bakristo esɛngaka nini? Mpe mpo na nini tozwaka batisimo na nkombo ya Tata, ya Mwana, mpe ya elimo santu?

OYO BATISIMO EMONISAKA

3. Batisimo emonisaka nini?

3 Kozwa batisimo emonisaka na miso ya bato ete ondimi solo oyo etali Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo, obongoli motema na masumu na yo, osali bambongwana na bomoi na yo mpo osalela Yehova, ondimi ete Yesu azali nzela ya lobiko oyo Nzambe atye, mpe olaki Nzambe na libondeli ete olingi mpenza kosala mokano na Ye elongo na ebongiseli na Ye. Nsima ya kolaka Nzambe bongo, to komipesa, mpe kozwa batisimo, obandi kotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.

4. Kozindisama mobimba na mai emonisaka nini? (Talá mpe elilingi.)

4 Na ntango ya batisimo, bakozindisa yo mobimba na mai mpe na nsima bakobimisa yo,a lokola nde okufi mpe bakundi yo, na nsima osekwisami. (Talá mpe Bakolose 2:12.) Batisimo emonisaka ete osali bambongwana minene na bomoi na yo. Na ndenge nini? Ntango ozindi na mai, omonisi ete okiti bomoi ya kala oyo ozalaki na yango. Ntango obimi na mai, obandi bomoi ya sika mpo na kosala libosoliboso mokano ya Nzambe.

Bililingi: Mobali moko azali kozwa batisimo nsima ya kosala bambongwana minene. 1. Azali kotala lisano ya boxe na TV. 2. Azali komɛla likaya. 3. Azali komɛla masanga mingi. 4. Na nsima, azwi batisimo na pisini moko.

Ntango ozwi batisimo, otiki bomoi na yo ya kala mpe obandi bomoi ya sika mpo na kosala libosoliboso mokano ya Nzambe (Talá paragrafe 4)


5. Milende oyo ozali kosala mpo na kozwa batisimo ekokani na nini, mpe mpo na nini? (1 Petro 3:​18-21)

5 Tángá 1 Petro 3:​18-21. Tokoki kokokanisa milende oyo ozali kosala mpo na kozwa batisimo na mosala oyo Noa asalaki mpo na kotonga masuwa. Soki obandi koyekola sika makambo etali Yehova, mosala monene oyo okosala mpo okóma tii na batisimo ekoki kolekela yo; ekoki kutu komonana lokola mosala monene oyo Noa asalaki mpo na kotonga masuwa. Kasi, ezali mpenza na ntina kosala nyonso wana? Mpo na Noa, ezalaki mpenza na ntina. Nzambe ye moko asalaki plan ya masuwa, mpe Noa asengelaki kolanda plan yango na likebi mpenza mpo na kobatela bomoi na ntango ya Mpela. Na nzela ya kondima na ye mpe lisalisi ya Nzambe, Noa atosaki mpe atongaki masuwa. Lokola Noa, yo mpe okoki kolonga kosala ‘nyonso oyo Nzambe apesi yo mitindo.’—Eba. 6:22.

6. Na ndenge nini batisimo ekoki kobikisa yo?

6 Na vɛrsɛ 21, ntoma Petro akomaki ete batisimo ezali “kobikisa bino.” Ya solo, ezali kaka kozindisama na mai mpamba te nde epesaka lobiko; yango mpe te nde elongolaka masumu. Kaka makila ya Yesu nde ekoki kopɛtola yo na masumu. (1 Yoa. 1:7) Kasi, batisimo ezali likambo ya ntina mingi na kati ya makambo nyonso oyo Nzambe asɛngi, mpe ntango ozwi batisimo ozali “kosɛnga Nzambe lisosoli ya malamu.” Mpo na yango, Yehova akosepela kolimbisa masumu na yo. Na ndenge yango, batisimo ezali ‘kobikisa yo,’ to komema yo na lobiko ya seko.

OYO BATISIMO YA BAKRISTO ESƐNGI

7. Ndenge nini makambo esengeli kosalema na ntango ya batisimo?

7 Longola lisɛngami ya kozindisama mobimba na mai, Biblia elobeli makambo mingi te mpo na batisimo. Atako bongo, esalisi biso tóyeba makambo oyo ebongi kosala. Na ndakisa, mitinda ya Biblia esalisaka baoyo bakozwa batisimo báyeba ndenge oyo basengeli kolata mpe esalisaka baoyo bazali kotala báyeba bizaleli oyo basengeli komonisa. (1 Ko. 14:40; 1 Tim. 2:9) Lelo, mbala mingi bankulutu nde babatisaka bato, kasi toboyaka kokumisa nkulutu oyo azwi mokumba yango. (1 Ko. 1:​14, 15) Lisusu, batisimo endimamaka, ezala epesami na miso ya bato ebele to te.—Mis. 8:36.

8. Mituna nini batunaka baoyo bakozwa batisimo, mpe mpo na nini? (Misala 2:​38-42) (Talá mpe elilingi.)

8 Biblia emonisi ete tosengeli ‘koloba polele mpo na lobiko,’ elingi koloba, kolobela kondima na biso. (Rom. 10:​9, 10) Na yango, ebongi mpe kosala bongo na ntango ya batisimo, likambo oyo ezali na ntina mingi mpo na kozwa lobiko! Yango wana batunaka baoyo bakozwa batisimo mituna mibale. Ya liboso: “Osili kobongola motema, komipesa na Yehova na libondeli, mpe ondimi ete Yehova akopesa biso lobiko na nzela ya Yesu Kristo?” Motuna yango emonisaka mingimingi makambo oyo moto asili kosala mpo azwa batisimo, mpe ekokani na makambo oyo Petro ayebisaki ebele ya bato na Pantekote básala. Motuna ya mibale: “Okangi ntina ete awa ozali kozwa batisimo ozali kokóma Motatoli ya Yehova mpe kokɔta na ebongiseli na ye?” Motuna yango ekundwelaka biso ete mpo bomoi na biso eyokana na elaka na biso ya komipesa na Nzambe, tosengeli kolanda litambwisi oyo epesami na nzela ya ebongiseli ya Yehova mpe kosalela Nzambe elongo na bakristo mosusu, ndenge kaka bayekoli ya Yesu ya siɛklɛ ya liboso basalaki. (Tángá Misala 2:​38-42.) Baoyo bayanoli na motema mobimba “ɛɛ” na mituna yango mibale bakoki mpo na kozwa batisimo.

Bato ya mbula ekeseni oyo bakozwa batisimo bazali koloba polele mpo na lobiko na liyangani moko.

Batisimo esangisi mpe ‘koloba polele mpo na lobiko’ (Talá paragrafe 8)d


9. Makambo nini moto nyonso asengeli kosala mpo Nzambe andima ye?

9 Ata liboso obanda koyekola solo, ekoki kozala ete ozalaki komitambwisa malamu mpe osalaki masumu ya minene te. To mbala mosusu obɔkwamá na baboti oyo bazali bakristo, oyo basalisaki yo olinga Yehova. Osengeli kaka kobongola motema mpe kozwa batisimo mpo Nzambe andima yo? Ɛɛ. Ata soki tozalaki na bomoi ya ndenge nini, biso nyonso tosengeli kondima ete tozwá lisumu ya Adama, mpe yango ekabolaki biso na Nzambe. (Nz. 51:5) Kasi ntango tozali koyekola koyeba Yehova, toponaka kotya mokano na ye na esika ya liboso na bomoi na biso. Na nsima, tokoki kobongola motema mpo na masumu na biso ya kala mpe kobongwana, elingi koloba, kobanda bomoi oyo esepelisaka Tata na biso ya likoló. Nsima na yango nde tokoki kozwa batisimo.—Mis. 3:19.

10. Osengeli kosala nini soki ozwaki batisimo ntango ozalaki mondimi ya lingomba mosusu?

10 Ata soki ozwaki batisimo ntango ozalaki mondimi ya lingomba mosusu, osengeli kaka kozwa batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova. Mpo na nini? Mpo oyebaki malamu te mateya ya solo oyo etali Yehova Nzambe mpe Yesu. Mpe ata soki omipesaki na Nzambe na libondeli, ntango osalaki elaka yango, ozalaki na boyebi ya sikisiki te ya mokano na ye. Na Efese, ntango ntoma Paulo akutanaki na bato oyo bazwaki batisimo liboso kasi bayebaki malamu te mateya ya bokristo, azwaki bibongiseli mpo bábatisama lisusu.b (Mis. 19:​1-5) Lelo oyo mpe, batisimo endimamaka kaka soki moto azali na boyebi ya sikisiki ya mokano ya Nzambe.

“NA NKOMBO YA TATA MPE YA MWANA MPE YA ELIMO SANTU”

11. Kozwa batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu” elimboli nini? (Matai 28:​18-20)

11 Yesu apesaki mitindo ete bayekoli ya sika bábatisama “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Tángá Matai 28:​18-20.) Alingaki koloba nini? Na Biblia, mbala mingi liloba “nkombo” emonisaka lokumu oyo moto azali na yango. Ekoki mpe komonisa mokumba mpe bokonzi ya nkolo-nkombo yango. Na yango, ntango tosali likambo “na nkombo ya” moto to eloko moko, tondimi bokonzi oyo ezali nsima ya nkombo yango. (Talá mpe Matai 10:41.) Tótalela ndenge oyo okoki kondima mokumba mpe bokonzi ya Tata mpe ya Mwana mpe mosala ya elimo santu ya Nzambe.

12. Kobatisama na nkombo ya Tata elimboli nini? (Emoniseli 4:11) (Talá mpe elilingi.)

12 Na nkombo ya Tata. Elimboli kondima ete Yehova azali Tata na biso ya likoló, to Mopesi-bomoi. Azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe Mozalisi ya biloko nyonso. (Tángá Emoniseli 4:11.) Tondimaka mpe ete azali Moyoki ya libondeli, mpe tosalelaka nkombo na ye na limemya mpe kozanga kokakatana ntango tozali kobondela ye to kolobela ye epai ya basusu. (Nz. 65:2) Kasi, kobatisama na nkombo ya Tata esuki kaka wana te. Bato oyo bayokaki Petro na mokolo ya Pantekote bayebaki makambo etali Yehova banda kala, kasi basengelaki sikoyo kondima ye lokola Moto oyo, na bolingo nyonso, apesi lobiko ya seko na nzela ya Yesu Kristo.—Rom. 5:8.

Moko ya bandeko basi oyo bazwaki batisimo sika na elilingi ya liboso azali kobondela na ndako na ye.

Nsima ya batisimo na yo, kobá kondima mokumba mpe bokonzi ya Tata (Talá paragrafe 12)


13. Na ndenge nini tozwaka batisimo na nkombo ya Mwana? (Talá mpe elilingi.)

13 Na nkombo ya Mwana. Elimboli kondima ete Yesu azali Mwana se moko ya Nzambe oyo abotamaki. Tondimaka ete Yesu azali “nzela” kaka moko oyo ekoki kosalisa biso tózala na boyokani malamu na Yehova. (Yoa. 14:6) Yesu azali mpe Mosikoli na biso, moto oyo akufaki mpo na biso mpo tókoka kozwa bomoi. Koyeba makambo yango etindaka biso tólanda ndakisa na ye mikolo nyonso ya bomoi na biso, kaka te mokolo oyo tozwi batisimo. (1 Yoa. 2:6) Yango wana tosakolaka na molende lokola ye, mpe totikaka eloko moko te epekisa biso kosala yango. (Luka 4:43) Tondimaka ata koyika mpiko na minyoko mpo tósalela Nzambe na bosembo. (2 Tim. 3:12) Lisusu, tondimaka ete Yesu azali “mokonzi ya lisangá,” yango wana tolandaka na esengo litambwisi ya baoyo ye apesi mokumba ya kokamba mpe kobatela bayekoli na ye.—Ef. 4:​8, 11, 12; 5:23.

Moko ya bandeko mibali oyo bazwaki batisimo sika na elilingi ya liboso azali kotángela moto vɛrsɛ na mosala ya kosakola ndako na ndako.

Nsima ya batisimo na yo, kobá kondima mokumba mpe bokonzi ya Mwana (Talá paragrafe 13)


14. (a) Na ndenge nini tozwaka batisimo na nkombo ya elimo santu? (Talá mpe elilingi.) (b) Babatisimo nini mosusu baoyo batyami mafuta na elimo bazwaka? (Talá etanda “Babatisimo oyo baoyo batyami mafuta na elimo bazwaka.”)

14 Na nkombo ya elimo santu. Elimboli kondima solo na oyo etali elimo santu. Ezali moto te, to eteni moko ya Bosato, kasi ezali nde nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala. Tondimaka ete elimo santu nde etambwisaki basakoli mpe bakomi ya Biblia, yango wana totángaka Biblia mbala na mbala mpe tosalelaka mateya na yango. (2 Pe. 1:​20, 21) Lisusu, toboyaka kosala masumu ya minene, mpo etamboli ya ndenge wana ekoki kozangisa biso elimo ya Nzambe, mpe kopekisa yango esala malamu na kati ya lisangá.—Ef. 4:30.

Moko ya bandeko basi oyo bazwaki batisimo sika na elilingi ya liboso azali kotánga Biblia na ndako na ye.

Nsima ya batisimo na yo, kobá kondima mosala ya elimo santu (Talá paragrafe 14)


Babatisimo oyo baoyo batyami mafuta na elimo bazwaka

Longola kozwa batisimo na mai, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazwaka mpe babatisimo mosusu.

  • Babatisamaka na elimo santu ntango baponami mpo na kosala elongo na Kristo na likoló. (Mat. 3:11)

  • ‘Babatisamaka na kati ya Kristo’ na ndenge bakómaka na bomoko makasi na Kristo na boye ete bakoki kobengama nzoto ya Kristo. (Gal. 3:​27, 28; 1 Ko. 12:27)

  • Babatisamaka mpe na kati ya liwa ya Kristo mpo balandaka na bosembo mpenza ndakisa na ye tii na nsuka ya bomoi na bango awa na mabele mpe basekwaka mpo na bomoi na likoló. (Rom. 6:​3-5)

15. Tosengeli kozala na ekateli nini?

15 Soki ozali mokristo oyo azwá batisimo, kobá komikundwela ntango nyonso “mateya oyo etali babatisimo”c mpe kozala na bomoi oyo eyokani na elaka oyo osalaki epai ya Yehova ntango omipesaki na ye mpe ozwaki batisimo. Bongo soki ozwi naino batisimo te? Eloko moko ezali kopekisa yo kosala yango? Lisolo oyo elandi ekolobela makambo oyo okoki kosala mpo ozwa batisimo.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Batisimo ya bakristo emonisaka nini?

  • Mituna nini batunaka baoyo bakozwa batisimo, mpe mpo na nini?

  • Kozwa batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu” elimboli nini?

LOYEMBO 161 Nasepeli kosala mokano na yo

a Liloba ya Grɛki baptisma, oyo ebongolami “batisimo,” elimboli “kozindisa.” Na yango batisimo emonisaka kozindisa moto mobimba na mai, kasi te komwangisa to kosopela moto kaka mai ndenge mangomba mosusu eteyaka.

b Bato yango ya Efese bazwaki “batisimo ya Yoane.” (Mis. 19:3) Yoane Mobatisi alendisaki Bayuda bábongola motema mpo na masumu na bango ya kobuka Mobeko ya Moize, mpe abatisaki baoyo babongolaki motema. (Mrk. 1:​4, 5) Kasi, batisimo ya Yoane esilaki ngala ntango Mobeko ya Moize esukaki. Kobanda wana, Nzambe andimaka “batisimo kaka moko” oyo ezali komema na lobiko.—Ef. 4:5.

c Talá na jw.org mpe na JW Library® lisolo “Batisimo ezali nini?” na masolo “Biyano na mituna ya Biblia.”

d NDIMBOLA YA ELILINGI: Na liyangani moko, baoyo bakozwa batisimo batɛlɛmi mpo na koloba polele mpo na kondima na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto