MAKAMBO YA KOYEKOLA
Yekolá kotyela nguya ya Yehova ya kobikisa motema
Tángá Mitángo 13:25–14:4 mpo na komona ndenge Bayisraele batyelaki Yehova motema te.
Talelá lisolo mobimba. Ntango Bayisraele babimaki na Ezipito, mpo na nini bakokaki kotya motema na likoki ya Yehova ya kobikisa bango? (Nz. 78:12-16, 43-53) Nini esalaki ete bátyela lisusu Yehova motema te? (Mib. 1:26-28) Ndenge nini Yosua ná Kalebe bamonisaki ete batyelaki Yehova motema?—Mit. 14:6-9.
Kɔtá na mozindo. Bayisraele bakokaki kosala nini mpo bátyela lisusu Yehova motema mingi? (Nz. 9:10; 22:4; 78:11) Boyokani nini ezali kati na kotyela Yehova motema mpe kozala na limemya epai na ye?—Mit. 14:11.
Bimisá mateya. Omituna boye:
‘Makambo nini ekoki kosala ete ezala mpasi natyela Yehova motema?’
‘Nini ekosalisa ngai natyela Yehova motema mingi sikoyo mpe na mikolo ekoya?’
‘Natyaka mpenza motema ete bolɔzi monene ezali koya?’—Luka 21:25-28.