Ozali koyeba lisusu?
Otángaki na likebi masolo nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya mbula oyo? Meká naino koyanola na mituna oyo elandi:
Nini etindaka biso tópesa Yehova nkembo?
Tosalaka yango mpo tozalaka na limemya makasi epai ya Yehova mpe tolingaka ye mingi. Topesaka ye mpe nkembo mpo tolingi ete basusu báyeba ye.—w25.01, lok. 3.
Soki moto apesi biso mpasi, nini ekoki kosalisa biso tólimbisa ye mpenza?
Tondimaka mayoki oyo tozali na yango; kasi, kotika koyoka mpe kobomba nkanda ekoki kosalisa biso tókóma nkandankanda te na motema na biso.—w25.02, nk. 15-16.
Mpo na nini moyekoli Marko azali ndakisa malamu mpo na bilenge mibali?
Marko andimaki mokumba ya kosalela basusu. Atako ayokaki mpasi mpe alɛmbaki nzoto na likambo moko oyo ekómelaki ye, Marko atikaki te kosalela basusu. Akómaki moninga ya Paulo mpe ya bakristo mosusu oyo bakɔmɛli na elimo.—w25.04, lok. 27.
Yesu alingaki koloba nini ntango abondelaki: “Nayebisi bango nkombo na yo”? (Yoa. 17:26)
Bayekoli na ye basilaki koyeba nkombo ya Nzambe. Kasi Yesu asalisaki bayekoli na ye báyeba bomoto ya Yehova, oyo esangisi mikano, misala, mpe bizaleli na Ye.—w25.05, nk. 20-21.
Soki tozali na bopɔlɔ, tokondima nini?
Tokondima ete toyebi makambo mosusu te. Na ndakisa, toyebi te ntango nsuka ekoya to ndenge oyo Yehova akoki kosalisa biso na ntango wana. Toyebi mpe te makambo oyo ekosalema lobi to ndenge oyo Yehova ayebi biso malamu.—w25.06, nk. 15-18.
Ndenge nini tokoki kozwa matomba na lisolo to diskur ya bato nyonso?
Tokoki komituna boye: ‘Elembeteli nini bapesi mpo na kondimisa bato liteya yango ya Biblia? Ndakisa nini ya malamu epesami oyo nakoki kosalela ntango nazali koteya? Nani akoki kosepela na likambo oyo balobeli?’—w25.07, lok. 19.
Mateya nini tokoki kozwa na ndenge Nzambe alimbisaki Davidi?
Davidi asalaki masumu ya minene, kasi ntango abongolaki mpenza motema, Yehova alimbisaki ye. (1 Bak. 9:4, 5) Ntango Yehova alimbisi, abombaka te lisumu oyo moto asalaki to alukaka te kobimisa yango na nsima.—w25.08, lok. 17.
Soki moyekoli ya Biblia azali kokanga ntina te ya likambo moko, okoki kosala nini?
Soki moyekoli ya Biblia azali kokoka te kokanga ntina ya likambo oyo olimboleli ye malamu na kotalela Biblia, bóleka likambo yango mpe luká kozongela yango nsima.—w25.09, lok. 24.
Biblia elobi ete lisumu ezali na “nguya ya bokosi.” (Ebr. 3:13) Na ndenge nini?
Lisumu ekoki kobenda biso tósala makambo ya mabe. Ekoki mpe kotinda biso tóbanda komitunatuna, na ndakisa soki Nzambe alingaka biso mpenza.—w25.10, lok. 16.
Makambo nini misato ekoki kosalisa biso tósalaka mabondeli oyo euti na motema?
(1) Tokoki kokanisa bizaleli ya Yehova. (2) Tokoki kokanisa mikakatano oyo tozali na yango mpe kokɔtisa yango na libondeli, na ndakisa soki esengeli tólimbisa moto. (3) Tokoki kolekisa ntango mingi na kobondela. Yango ekoki kosalisa biso tóbimisa makanisi na biso ya kati mpenza.—w25.10, nk. 19-20.
Ndenge nini tokoki kosalisa mibange?
Tokoki kotala to kobenga baoyo bazali mibange. Tokoki mpe kokende kotika bango epai ya monganga. To tokoki kosalela mayele ndenge na ndenge ya kosakola elongo na bango.—w25.11, nk. 6-7.
Makambo nini ya ntina ekumisaka libala ya bakristo?
Esɛngi kotosa mibeko ya Leta oyo esengeli. Kosala nyonso mpo makambo oyo ekosalema na molulu mpe fɛti ya libala emonisa bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe. Bózala na bopɔlɔ na molato na bino mpe bóboya mimeseno oyo eyokani te na Biblia. Bósolola malamu ntango bozali kobongisa fɛti ya libala.—w25.12, nk. 21-24.