Komisá elikya na yo makasi epai ya Yehova
Basaleli moto moko likita mpo báboma ye. Bakonzi minene nyonso ya mboka bayokani mpe bazwi likanisi ya kosɛnga ete bábimisa mobeko moko ya sika na mboka. Balingi ete bápesa etumbu ya liwa na moto nyonso oyo akosambela te ndenge oyo Leta akosɛnga.
OSI oyoka likambo ya ndenge wana? Banda kala, ebele ya bato balukaki kobombama nsima ya mibeko mpo na kosala makambo ya mabe. Likambo oyo tolobi awa esalemaki na mikolo ya mosakoli Danyele, na bokonzi ya Perse. Mokonzi Dalio abimisaki mobeko moko oyo elobaki boye: “Mpo na mikolo ntuku misato, soko nani akobondela nzambe to moto, kozanga bobele [mokonzi], abwakama na kati ya libulu ya nkosi.”—Danyele 6:7-9.
Danyele alingaki kosala nini liboso ya likama wana ya liwa? Alingaki kokoba kotyela Yehova, Nzambe na ye, motema, to alingaki nde kozonga nsima mpe kotosa maloba ya mokonzi? Lisolo elobi na biso boye: “Wana eyebaki Danyele ete mokanda yango ekomami, akendaki na ndako na ye; mpe na eteni na ye ya likoló maninisa mafungwaki epai na Yelusaleme; mpe ye akweaki na mabɔlɔngɔ na ye mbala misato na mokolo moko mpe abondelaki mpe atɔndaki liboso ya Nzambe na ye, lokola esalaki ye liboso.” (Danyele 6:10) Makambo oyo esalemaki na nsima mpe ndenge oyo nyonso wana esukaki, toyebi yango malamu. Mpo na kondima na ye, Danyele abwakamaki na libulu ya bankosi, kasi Yehova ‘azipaki minɔkɔ ya bankosi’ mpe abikisaki mosaleli na ye ya sembo.—Baebele 11:33; Danyele 6:16-22.
Ntango ya komitalela yango oyo
Lelo oyo, basaleli ya Yehova bafandi na kati ya mokili oyo balingi bango te. Bato bazali kokana kobebisa bolamu na bango ya nzoto mpe ya elimo. Na ndakisa, koyinana kati na bato ya mposo ekeseni oyo engalaki na bikólo mosusu ebomisaki Batatoli mingi. Na bisika mosusu, basaleli ya Yehova bazangaki bilei, bakutanaki na mikakatano ya mbongo, makama lokola mpela, koningana ya mabele to mopɛpɛ makasi esalemaki na mboka na bango; bazwaki maladi makasi, mpe makambo mosusu ya mpasi na bomoi na bango. Longola yango, bakutanaki na minyoko, bayikelaki motungisi na bisika ya mosala mpiko, mpe bakutanaki na masɛnginya ndenge na ndenge mpo na kosala mabe; nyonso wana ekokaki kozala likama mpo na elimo na bango. Monguna monene, Satana, azali na mokano ya kobebisa basaleli ya Yehova; yango wana, azali kosalela mayele nyonso oyo amoni ete akoki kolonga na yango.—1 Petelo 5:8.
Tokoki kosala nini liboso ya makambo motindo yango? Ya solo, moto nyonso abangaka soki bomoi na ye ezali na likama, kasi tókanisaka maloba ya kolendisa ya ntoma Paulo ete: “[Yehova] alobaki ete, Nakotika yo soko moke te, [nakosundola] yo mpe te. Boye biso toyebi kozala na molende awa elobi biso ete, Nkolo azali mosungi na ngai, nakobanga te. Moto akosalela ngai nini?” (Baebele 13:5, 6) Tokoki kotya elikya ete Yehova atalelaka basaleli na ye ndenge yango, ata na moi ya lelo. Kasi, koyeba ete Yehova alaki ete akosunga biso ezali ndenge moko te na kondima ete akosunga biso mpenza. Yango wana, ezali na ntina mpenza tótalela soki nini mpenza esimbi elikya na biso epai ya Yehova mpe tósala nyonso oyo tokoki mpo na kolendisa mpe kobatela elikya yango. Soki tosali bongo, “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekosɛnzɛla mitema na [biso] mpe [makanisi] na [biso] kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:7) Na bongo, soki tomekami, makanisi na biso ekobulungana te mpe tokozala na mayele ya koyikela yango mpiko.
Mpo na nini totyelaka Yehova motema?
Tozali na bantina mingi ya kotyela Yehova, Mozalisi na biso, motema. Ntina ya liboso ezali ete Yehova azali Nzambe ya bolingo, abatelaka mpenza basaleli na ye. Na bisika mingi, Biblia emonisi ete Yehova azali na bolingo mpe abatelaka basaleli na ye. Mose ayebisaki makambo oyo Yehova asalaki mpo na libota na ye Yisalaele, ntango akomaki boye: “Azwaki ye na mikili ya zelo, mpe na lisobe na molengeli mpe na kolela na banyama; azingaki ye mpe abatelaki ye, akɛngɛlaki ye [lokola] mbuma ya liso na ye.” (Deteronome 32:10) Na mikolo na biso, Yehova azali kobatela basaleli na ye, ezala mokomoko to bango nyonso esika moko. Na ndakisa, ntango bitumba ezalaki na ekólo Bosnie, Batatoli mosusu bazangaki biloko ya kolya; yango wana Yehova apesaki bango bilei na nzela ya molende ya bandeko na bango ya Croatie mpe ya Autriche. Bandeko yango basalaki nyonso, basalaki mobembo oyo esɛngaki baleka na bisika ya makama mpo na komemela bandeko na bango biloko ya kosunga bango.a
Lokola Yehova azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, akoki kobatela basaleli na ye ata soki bakutani na makambo ya lolenge nini. (Yisaya 33:22; Emoniseli 4:8) Ata soki Yehova atiki nzela ete basaleli na ye mosusu bámonisa bosembo na bango tii liwa, azalaka pembeni na bango mpe asalisaka bango bátikala kaka sembo, apesaka bango makasi ya kotikala ngwi, kozala na esengo mpe kimya tii na nsuka. Yango wana, tokoki kozala na elikya lokola oyo ya mokomi ya nzembo, ye alobaki boye: “Nzambe azali ekimelo mpe nguya na biso; amonani solo na kosunga na ntango na mpasi. Boye tokobanga te, ata mokili ekoningana, ata ngomba ikobwakama kati na mai monene.”—Nzembo 46:1, 2.
Biblia ezali komonisa mpe ete Yehova azali Nzambe ya solo. Yango elingi koloba ete soki alaki makambo, azangaka te kokokisa yango. Kutu, Biblia elobi ete azali Nzambe oyo “akobukaka lokuta te.” (Tito 1:2) Lokola Yehova alobaki mbala na mbala ete akobatela mpe akobikisa basaleli na ye, tokoki mpenza kolikya ete akoki kokokisa bilaka na ye mpe azali pene ya kokokisa yango.—Yobo 42:2.
Ndenge ya kolendisa elikya na biso
Atako makambo ezali mingi oyo ezali komonisa biso ete tokoki kotyela Yehova motema, tókanisa te ete tokoki kobungisa elikya yango te. Ezali boye mpamba te, na mokili, bato mingi bazali mpenza na kondima epai ya Nzambe te, mpe elimo yango ekoki kolɛmbisa elikya oyo tozali kotyela Yehova. Yango wana, tosengeli kosala molende makasi mpo na kolendisa mpe kobatela elikya yango. Yehova ayebi likambo yango malamu, mpe alakisi biso ndenge oyo tokoki kolendisa mpe kobatela elikya yango.
Ya liboso, apesi biso Biblia, mokanda oyo ezali na maloba na ye; kati na yango balobeli makambo minene oyo asalelaki basaleli na ye. Omituna naino motuna oyo: elikya nini okoki kotyela moto oyo oyebi kaka na nkombo ? Tobanzi ete moto ya ndenge yango okotyela ye elikya moke, to mpe okotyela ye elikya te. Mpo otyela ye elikya, osengeli koyeba makambo na ye, ezali bongo te? Ntango tozali kotánga masolo ya Biblia mpe komanyola yango, tokómaka koyeba Yehova mpe banzela na ye ya kokamwa malamumalamu mpe tomonaka mpenza ete azali moto ya kotyela motema. Yango ebakisaka elikya na biso epai na ye. Mokomi ya nzembo apesaki ndakisa moko ya malamu mpenza ntango abondelaki Nzambe ete: “Tiká nakanisa lisusu yango esalaki Yah; tiká nakanisa misala na yo ya kokamwa, yango na kalakala. Nakobanzaka mpe mosala na yo nyonso, nakosolola yango nyonso esali yo.”—Nzembo 77:11, 12.
Longola Biblia, tozali mpe na esika mosusu ya kozwa bilei ya elimo, elingi koloba mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo lisangá ya Yehova ezali kobimisa. Mikanda yango elobelaka makambo mingi, kati na yango tozali na masolo, oyo esimbaka mpenza mitema, masolo ya bomoi ya basaleli ya Nzambe na mikolo na biso, oyo emonisaka ndenge oyo Yehova asalisaki bango mpe asungaki bango na ntango ya mpasi. Na ndakisa, tozali na lisolo ya Martin Poetzinger, ndeko oyo akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi; ndeko yango abɛlaki makasi ntango azalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na mokili moko ya Mpoto, mosika na mboka na ye. Azalaki lisusu na mbongo te, mpe minganga baboyaki kosalisa ye. Kasi, Yehova asundolaki ye te. Nsukansuka, akutanaki na mokambi ya lopitalo moko ya mboka yango. Lokola moto yango ya boboto mingi azalaki mpenza kondima Biblia, asalisaki Ndeko Poetzinger lokola mwana na ye mpenza, mpe asɛngaki ye ata likuta moko te. Kotánga masolo ya ndenge wana ekoki mpenza kolendisa elikya na biso epai ya Tata na biso oyo azali na likoló.
Ndenge mosusu ya malamu oyo Yehova asalisaka biso mpo tólendisa elikya na biso epai na ye ezali libaku malamu ya kobondela ye. Ntoma Paulo alobi na biso na maloba ya bolingo mpenza ete: “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbo mpe na matɔndi.” (Bafilipi 4:6) Na kati ya “makambo nyonso” oyo vɛrsɛ yango elobeli, tokoki kotánga mayoki, bamposa, mabanzo mpe mitungisi na biso. Soki tozali komipesa na kobondela mingi mpe kobondela na bozindo, elikya na biso epai ya Yehova ekokóma makasi koleka.
Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabele, azalaki ntango mosusu kokende na esika ya ye moko mpo na kobondela na kimya. (Matai 14:23; Malako 1:35) Liboso ya kozwa bikateli ya minene, alekisaki kutu butu mobimba na kobondela Tata na ye. (Luka 6:12, 13) Na yango, Yesu amonisaki mpenza ete azalaki kotyela Yehova elikya makasi mpe yango esalisaki ye na koyikela komekama nyonso ya nsɔmɔ mpiko, komekama oyo ekómelá naino moto mosusu te. Maloba na ye ya nsuka likoló ya nzete ya mpasi ezalaki oyo: “Tata nazali kotika [elimo, NW] na ngai na mabɔkɔ na yo.” Maloba yango ya elikya emonisaki ete tii na nsuka, elikya na ye epai ya Tata na ye ekitaki ata moke te, atako Yehova atikaki ye amona mpasi wana.—Luka 23:46.
Lolenge mosusu lisusu ya kolendisa elikya na biso epai ya Yehova ezali ya: kosangana ntango nyonso na baoyo batyelaka ye elikya na motema mobimba. Yehova asɛngaki basaleli na ye báyanganaka mbala na mbala,mpo báyekola makambo na ye mpe bálendisana. (Deteronome 31:12; Baebele 10:24, 25) Koyangana yango elendisaki elikya na bango epai ya Yehova, epesaki bango makasi ya koyika mpiko ntango kondima na bango ekutanaki na komekama makasi. Na ekólo moko ya Afrika epai mosala ya kosakola epekisamaki, Leta aboyaki ete bapolisi bábatelaka Batatoli ya Yehova, baboyaki kopesa bango mikanda soki balingi kosala mobembo, baboyaki kokoma bango na buku ya Leta soki babalani, baboyaki kosalisa bango na balopitalo, mpe baboyaki ete bázwa bango na misala. Ntango etumba ebandaki na etúká moko ya ekólo yango, bato 39 ya lisangá moko ya pembeni, na bana mike, bafandaki soki sanza minei na nse ya gbagba moko na kati ya esobe mpo na kokima babɔmbi oyo bazalaki kobwaka na engumba na bango. Atako bazalaki na mpasi makasi ya ndenge wana, kotalela mokapo moko ya Biblia mokolo na mokolo mpe kosala makita mosusu elendisaki bango mingi. Yango esalisaki bango báyikela mpasi makasi wana mpiko mpe batikala makasi na elimo. Lisolo oyo emonisi mpenza ntina ya kosangana mbala na mbala na basaleli ya Yehova.
Na nsuka, mpo na kolendisa elikya na biso epai ya Yehova, tosengeli kolanda komipesa na mosala ya kosakola Bokonzi, tosengeli kozalaka ntango nyonso na mposa ya koteya bato mosusu nsango malamu. Lisolo ya elenge moko mosakoli ya molende na Canada, oyo akómaki pene ya kokufa na maladi ya leucémie emonisi yango. Atako maladi na ye ezalaki makasi, alingaki kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Ntango mpasi na ye ekitaki mwa moke, asalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya sanza moko. Na nsima, maladi na ye ekómaki lisusu makasi mpe, mwa basanza na nsima, akufaki. Atako bongo, tii na nsuka atikalaki makasi na elimo, elikya na ye epai ya Yehova ekitaki ata moke te. Mama na ye alobaki boye: “Tii akufaki, azalaki komibanzabanza mingi mpo na bato mosusu koleka mpo na ye moko. Azalaki kolendisa bato báyekola Biblia, azalaki koyebisa bango ete, ‘Tokozala elongo na Paladiso.’”
Tómonisaka elikya na biso epai ya Yehova na misala
“Lokola nzoto oyo ezangi mpema esili kokufa, bongo kondima oyo ezangi misala esili kokufa lokola.” (Yakobo 2:26) Maloba yango oyo Yakobo alobaki na ntina etali kondima ekoki mpe kolobama mpo na elikya na biso epai ya Yehova. Ata soki, na monɔkɔ tozali koloba ete totyelaka Nzambe elikya, ezali na ntina moko te soki tozali komonisa yango te na misala na biso. Abalayama atyelaki Yehova elikya na motema mobimba mpe amonisaki yango na ndenge oyo azalaki kotosa mibeko na ye; kutu, andimaki ata kokaba mwana na ye Yisaka mbeka. Lokola Abalayama azalaki na elikya mpe botosi ya ndenge wana, ayebanaki lokola moninga ya Yehova.—Baebele 11:8-10, 17-19; Yakobo 2:23.
Tosengeli kozela te ete tókutana naino na komekama makasi mpo na komonisa ete totyelaka Yehova elikya. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Oyo azali sembo na likambo lileki moke azali mpe sembo na likambo monene. Oyo azali sembo te na likambo lileki moke azali mpe sembo te na likambo lileki monene.” (Luka 16:10) Tosengeli koyeba kotyela Yehova elikya na makambo oyo tokutanaka na yango mokolo na mokolo, tosengeli kotosaka ye ata na makambo oyo tokoki komona ete ezali na ntina te. Ntango tozali komona ete kotosa ezali komemela biso matomba, elikya na biso epai ya Tata na biso oyo azali na likoló ekokóma makasi mpe ekosalisa biso tobundisa mimekamo minene to ya makasi koleka.
Lokola tozali kopusana na nsuka ya mokili mabe oyo, basaleli ya Yehova bakobanda kokutana na komekama mpe makama mingi. (Misala 14:22; 2 Timote 3:12) Soki tozali koluka banda sikoyo ete elikya na biso epai ya Yehova ezala makasi, tokoki kozala na elikya ya kobika mpe kokɔta na mokili ya sika oyo alaki biso—ezala na kobika na bolɔzi monene, to mpe lisekwa. (2 Petelo 3:13) Tótika te ete kozanga elikya, ata na likambo nini, ebebisa boyokani na biso ya motuya na Yehova. Na bongo, likambo oyo balobaki mpo na Danyele nsima ya kobima na libulu ya bankosi, ekolobama mpe mpo na biso ete: “Mpota soko ya lolenge nini ezwamaki na ye te mpo ete [atyaki elikya epai ya, NW ]Nzambe na ye.”—Danyele 6:23.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1994, nkasa 23-27.
[Elilingi na lokasa 9]
Soki tozali kotánga masolo ya basaleli ya sembo ya Yehova, basaleli lokola Martin Poetzinger, kondima na biso ekolendisama