Zalá mpenza moninga ya mosala
1. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya ntoma Paulo ntango tozali kosakola elongo na mosakoli mosusu?
1 Ntoma Paulo amonaki ete mbala nyonso oyo azalaki elongo na bandeko na ye bakristo, ezalaki libaku ya ‘kolendisana.’ (Rom. 1:12) Ntango ozali kosakola elongo na mosakoli mosusu, osalelaka libaku yango mpo na kosalisa mpe kolendisa ye? Ekozala malamu koyebisa moninga makambo oyo esalisaki yo omesana na mosala ya kosakola, na esika ya kofanda kaka nyɛɛ.
2. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa moninga oyo tobimi na ye abanga te, mpe mpo na nini kosala bongo ezali na ntina?
2 Salisá ye abanga te: Basakoli mosusu babangaka; yango ekoki komonanaka na elongi mpe na mongongo na bango. Tokoki kosalisa bango bábanga te soki tozali kopesa bango longonya oyo ebongi mpenza. Tokoki kosala lisusu nini mpo na kosalisa bango bábanga te? Mokɛngɛli-motamboli moko ayebisaka moninga oyo azali kosakola elongo na ye makambo oyo ebangisaka ye mpe ndenge oyo kobondela mbala na mbala esalisaka ye atika kobanga. Ndeko mobali mosusu mpe amonisaki eloko esalisaka ye mpo abanga te: “Esɛngaka kobanda na mwa kosɛka. Ntango mosusu, esɛngaka nabondela mpo na kosala bongo.” Eloko moko esalisá yo mpo obangaka te na mosala ya kosakola? Mpo na nini te koyebisa yango na ndeko oyo obimi elongo na ye?
3. Makambo nini tokoki koyebisa mosakoli oyo tobimi elongo na ye mpo esalisa ye abongisa lisusu mosala na ye ya kosakola?
3 Lakisá ye mayele ya mosala: Omonaki lolenge moko ya pɛtɛɛ ya kobanda lisolo? Ekoki kozala motuna moko to likambo moko oyo esalemaki na esika oyo bofandi, oyo ekobonga mpenza mpo na kobanda lisolo. Ntango mosusu osalelaki na maloba na yo moko, maloba ya kobanda lisolo oyo ezalaki na Mosala na biso ya Bokonzi mpe ebimisaki matomba. Yebisá yango mosakoli oyo obimi na ye elongo! (Mas. 27:17) Ntango bozali kokende mpo na kozongela moto, okoki koyebisa ye ntina ya bozongeli yango mpe ndenge oyo okani kokokisa yango. Nsima ya koyekola na moto Biblia, okoki kolimbwela moninga na yo mpo na nini oponaki likambo boye to boye, vɛrsɛ moko, to lolenge moko ya koteya mpo eyokana na mposa ya moyekoli yango.
4. Mpo na nini tosengeli kosepela kosalisa baninga na biso basakoli?
4 Basakoli ya ekeke ya liboso basukaki kaka te na kosalisa bato oyo bazalaki bandimi te. Bazalaki mpe kolendisana bango na bango. (Mis. 11:23; 15:32) Ntoma Paulo apesaki elenge Timote formasyo mpe alendisaki ye ayebisa basusu makambo oyo ayekolaki. (2 Tim. 2:2) Ntango tozali kobosana te kosala malamu epai ya baninga na biso bakristo na mosala ya kosakola, tokobakisa esengo mpe makoki na bango ya kosakola, mpe tokosepelisa Tata na biso ya likoló.—Ebr. 13:15, 16.