Manaka mpo na pɔsɔ ya 20 sanza ya 1
PƆSƆ EBANDI NA 20 SANZA YA 1
Loyembo 34 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 1 par. 18-23, etanda na lok. 14 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ebandeli 11-16 (Min. 10)
No. 1: Ebandeli 14:17–15:1-11 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Soki moto alobi: ‘Mpo na nini bolobaka ete lingomba ya solo ezali kaka moko?’—rs lok. 287 par. 3 (Min. 5)
No. 3: Abadona (Abaddôn)—Anzelu ya libulu mozindo ezali nani?—it-1-F lok. 12 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Sɛngá bandeko bátánga Matai 7:6-11. Bólobela ndenge bavɛrsɛ yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Min. 10: Monisá limemya epai ya baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bino. (1 Tes. 5:12, 13) Lisolo na bayangani na mituna oyo elandi: (1) Na ndenge nini bankulutu basalaka mosala makasi na lisangá? (2) Ndenge nini tokoki komonisela bankulutu lokumu oyo eleki mpenza? (3) Mpo na nini tosengeli kolendisa baoyo bazali kokamba biso? (4) Ndenge nini tokoki kolendisa bankulutu mpe mabota na bango? (5) Kotosa baoyo bazali kokamba biso ebimisaka matomba nini na lisangá mpe epai ya bankulutu?
Min. 10: “Zalá mpenza moninga ya mosala.” Mituna mpe biyano. Sɛngá na bayangani bálobela likambo moko oyo bayekolaki epai ya moninga oyo babimaki na ye na mosala ya kosakola.
Loyembo 93 mpe libondeli