Manaka mpo na pɔsɔ ya 27 sanza ya 1
PƆSƆ EBANDI NA 27 SANZA YA 1
Loyembo 106 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 2 par. 1-11 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ebandeli 17-20 (Min. 10)
No. 1: Ebandeli 17:18–18:1-8 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Yesu akendeki likoló na nzoto ya mosuni te—rs lok. 296 par. 1-3 (Min. 5)
No. 3: Aba (Abba)—Ndenge nini Biblia esaleli liloba “Aba,” mpe ndenge nini bato basalelaki yango na ndenge ya mabe?—it-1-F lok. 13 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 5: Bandá koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso. Diskur. Lobelá bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na mosala ya kosakola na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya mibale, mpe lendisá bandeko nyonso básangana na mosala yango. Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa 4, bósala elakiseli moko ya mokuse.
Min. 15: Mikano na yo ya elimo ezali nini? Lisolo ekouta na buku Tobongisami, lokasa 117, paragrafe 2 tii na nsuka ya mokapo. Sololá na mosakoli moko to basakoli mibale oyo bakokisaki mokano na bango ya mosala ya ntango nyonso. Elendiseli nini bazwaki epai ya basusu? Mikakatano nini balongaki? Mapamboli nini bazwi?
Min. 10: “Kotikela bato bazulunalo mbala na mbala esalisaka mpo na kobanda koyekola na bango Biblia.” Mituna mpe biyano. Sɛngá na bayangani báyebisa ndenge babandaki boyekoli ya Biblia na moto moko oyo bazalaki kotikela ye bazulunalo mbala na mbala.
Loyembo 103 mpe libondeli