Omibongisi mpo na koyembela Yehova na makita?
1 Ntango tozali kobongisa makita, tosengeli mpe kobongisaka nzembo mpo na kokumisa Yehova. Talelá makanisi oyo elandi.
2 Luká koyeba ntina ya maloba: Mokapo oyo esimbi motó ya likambo ya loyembo mokomoko mpe mikapo mosusu oyo ezali na nsuka ekosalisa yo oyeba ntina ya maloba na yango.
3 Yekolá koyemba: Pɔsɔ na pɔsɔ, na Losambo na kati ya libota, bokoki kozwaka mwa miniti mpo na koyekola nzembo ya sika. Bóyekola banzembo oyo tokoyemba na makita ya pɔsɔ wana na kolanda miziki oyo ebɛtami na piano. Bokoki mpe koyekola ndenge ya koyemba nzembo mosusu ya sika soki bozali koyoka ndenge oyo eyembami na CD Tóyembela Yehova—Na mingongo, No. 1.
4 Okoyemba nzembo ya sika oyo ezali na buku Tóyembela Yehova ntango tokozwa yango? Okoyemba yango soki ozali kozwa ntango ya kotalela maloba ya banzembo mpe ozali koyekola ndenge ya koyemba yango.