Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 28 Desɛmbɛ 2009.
1. Ndenge nini bakristo bakoki lelo oyo kosalela etinda oyo ezali na Kolimbola Mibeko 14:1? [w05 1/1 lok. 28; w04 15/9 lok. 27 par. 5]
2. Ndenge nini etinda oyo ezali na Kolimbola Mibeko 20:5-7 ekoki kosalelama na lisangá ya bokristo lelo oyo? [w04 15/9 lok. 27 par. 6]
3. Na ndenge nini ekólo Yisraele ekesanaki na bikólo mosusu na makambo ya bitumba? (Mib. 20:10-15, 19, 20; 21:10-13) [cl nk. 134-135, par. 17]
4. Nini ekoki kosalisa biso tósalela Yehova na motema ya esengo? (Mib. 28:47) [w95 15/1 lok. 16 par. 4-5]
5. Ndenge nini baboti bakoki kozwa liteya na ndakisa oyo esalelami na Kolimbola Mibeko 32:9, 11, 12, oyo emonisi bolingo ya Yehova mpo na Yisraele? [w01 1/10 lok. 9 par. 7-9]
6. Ndenge nini tosengeli kotalela maloba ya kozimbisa oyo Rahaba alobaki epai ya bato oyo mokonzi atindaki mpo báluka banɔngi? (Yos. 2:4, 5) [w93 15/12 lok. 25 par. 1]
7. Ndakisa ya Bayisraele oyo ezali na Yosua 3:15, 16 eteyi biso likambo nini? [w04 1/12 lok. 9 par. 6]
8. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yosua akataki likambo ya Akana, oyo ayibaki? (Yos. 7:20-25) [w04 1/12 lok. 11 par. 4]
9. Ndenge nini Yosua 9:22, 23 emonisi ete Liloba ya Nzambe ezangaka te kokokisama? [w04 1/12 lok. 11 par. 3; si lok. 44, par. 13]
10. Ndakisa ya Kalebe ekoki kolendisa biso na nini? (Yos. 14:8, 10-12) [w04 1/12 lok. 12 par. 2; w93 15/5 lok. 29 par. 1]