Manaka mpo na Pɔsɔ ya 28 Desɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 28 DESƐMBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yosua 12-15
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi. Lobelá lisolo “Omibongisi mpo na koyembela Yehova na makita?”
Min. 10: Ndenge ya kopesa biyano. Lisolo elongo na bayangani oyo ekolobela makambo oyo bato ya teritware na bino balobaka mpo na kokata lisolo. Bósala elakiseli ya mokuse oyo ekomonisa moko ya makambo oyo bato balobaka mbala mingi mpo na kokata lisolo. (Talá buku Comment raisonner, nkasa 57-60.)
Min. 10: Ndenge ya kobanda koyekola na bato Biblia. Yebisá dati oyo bokobima mpo na koluka kaka bato ya koyekola na bango Biblia na sanza ya Yanuali. Matomba nini emonani na lisangá na bino uta ebongiseli yango ebandaki? Sɛngá mobongisi-nzela to mosakoli moko alobela lolenge ya kobanda koyekola na bato oyo ebimisaki matomba na teritware ya lisangá na bino to asala elakiseli mpo na komonisa yango.
Min. 10: Mokanda oyo tokokabola na Yanuali. Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na buku yango. Sololá na mosakoli moko mpo na kolobela mayele ndenge na ndenge oyo bokoki kosalela mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na buku yango na litatoli ya libaku malamu. Lendisá basakoli nyonso bámityela mokano ya kobanda koyekola na bato Biblia na sanza ya Yanuali.