Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/08 lok. 1
  • “Bómimonisa bato ya botɔndi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bómimonisa bato ya botɔndi”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • “Bómimonisa bato ya Botɔndi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bózalaka na botondi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • ‘Tómonisa botɔ́ndi’
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Opesaka bato matɔndi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 4/08 lok. 1

“Bómimonisa bato ya botɔndi”

1 Ntango Yesu abikisaki mibali zomi oyo bazalaki na maba, kaka moko na bango nde azongaki kopesa ye matɔndi. Yesu atunaki boye: “Bato zomi bapɛtwamaki te? Bongo, bamosusu libwa bazali wapi?” (Luka 17:​11-19) Ezali na ntina mingi tómonisaka botɔndi mpo na likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza, oyo euti na Yehova Nzambe, Tata na biso ya likoló oyo alingaka biso mpe akabelaka biso mingi!​—⁠Kols. 3:15; Yak. 1:⁠17.

2 Wapi mwa bantina oyo tozali na yango ya kotɔnda Nzambe? Tozali na botɔndi mpo na lisiko, likabo oyo eleki makabo nyonso oyo Nzambe apesá bato. (Yoa. 3:16) Tozali mpe na botɔndi na ndenge Yehova abendá biso epai na ye. (Yoa. 6:44) Bomoko oyo tozali na yango na bandeko na biso baklisto ezali mpe ntina mosusu ya kotɔnda Yehova. (Nz. 133:​1-3) Na ntembe te, oyebi makabo mosusu mingi oyo Yehova apesaka biso. Tolingi ata moke te kozala lokola Bayisalaele oyo bazangaki botɔndi mpe babosanaki makambo nyonso ya malamu oyo Yehova asalelaki bango!​—⁠Nz. 106:​12, 13.

3 Monisáká ete ozali na botɔndi: Ekoki kozala ete mibali zomi oyo Yesu abikisaki basepelaki na likambo oyo asalelaki bango, kasi moko kaka nde amonisaki ete azali na botɔndi. (Luka 17:15) Biso mpe tomonisaka ete tozali na botɔndi na ndenge tosakolaka na molende. Soki tozali mpenza na botɔndi mpo na nyonso oyo Tata na biso ya likoló oyo alingaka biso asalá mpo na biso, motema na biso ekotinda biso tóyebisa basusu makambo na ye, mpo na komonisa ete tozali komekola bolingo mpe bokabi na ye. (Luka 6:45) Soki tozali koyebisa basusu ‘misala ya kokamwa ya Yehova mpe mikano na ye mpo na biso,’ tokokóma lisusu na bolingo mingi mpe botɔndi mingi mpo na Yehova.​—⁠Nz. 40:⁠5.

4 Salisá basusu bámonisa botɔndi: Tosengeli koluka mabaku ya kosalisa bana na biso mpe bayekoli ya Biblia bázalaka na botɔndi. Baboti bazali na mabaku mingi ya kosala yango, na ndakisa ntango bazali kotala biloko oyo Yehova akelá elongo na bana na bango. (Lom. 1:20) Ntango tozali koyekola na moto Biblia, tokoki kotuna ye boye: “Likambo oyo eteyi biso ete Yehova azali Nzambe ya ndenge nini?” Soki moyekoli ya Biblia akómi na botɔndi mingi, akobanda kolinga Nzambe mingi mpe akosala nyonso mpo na kosepelisa ye.

5 Na mikolo oyo ya nsuka, bato mingi bakipaka te bolamu oyo basusu basalelaka bango mpe bamonisaka botɔndi te. (2 Tim. 3:​1, 2) Na ntembe te, Yehova asepelaka mpenza ntango amonaka basaleli na ye ya sembo bazali kosakola na molende mpo na komonisela ye botɔndi na bango!​—⁠Yak. 1:​22-25.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto