Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/08 lok. 1
  • Tókolisa mayele na biso ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókolisa mayele na biso ya kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Monisáká molende na mosala ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge ya kosalisa bato ya sika mpo báyeba kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Omityela mikano ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 4/08 lok. 1

Tókolisa mayele na biso ya kosakola

1 Tata na biso ya likoló asepelaka mingi komona basaleli na ye bazali kokola na elimo. Yango esangisi mpe kokóma mosakoli oyo akɔmeli mpe ayebi mpenza kosakola nsango malamu. Paulo alendisaki Timote, oyo azalaki mokɛngɛli, ete akoba komipesa na kotánga mpe na koteya, mpo bokoli na ye emonana polele. (1 Tim. 4:​13-15) Biso nyonso tosengeli kosala makasi tókolisa mayele na biso ya kosakola, ata soki tozali basakoli oyo bamesaná na mosala ya kosakola.

2 Tómityela mikano: Mpo na kokolisa mayele na biso ya kosakola ezali kosɛnga komityela mikano. Wapi mwa mikano oyo tokoki komityela? Tokoki kosala makasi tóyeba kosalela malamu Biblia, mopanga na biso ya elimo. (Ef. 6:17) Ntango mosusu, tokoki kosala makasi tómesana na lolenge moko ya kosakola, na ndakisa kopesa litatoli na balabala, na telefone, to na bisika ya mombongo. Mbala mosusu, tokoki kosala makasi tózongelaka bato na ndenge oyo ekosalisa bango bákola. Mokano mosusu ya malamu ekoki kozala ya kokolisa makoki na biso ya kobanda mpe kokoba koyekola na bato Biblia.

3 Bibongiseli oyo esalisaka biso: Makita ya lisangá, mingi mpenza Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya Mosala, ebongisami mpo na kosalisa biso tókóma basakoli oyo bakɔmeli. Soki tozali kosala milende mingi mpo na kobongisa makita, koyangana na makita yango, mpe kosalela makambo oyo toyokaka kuna, tokozwa mpe matomba mingi.​—⁠2 Kol. 9:⁠6.

4 Mpo tókolisa mayele na biso ya kosakola, tozali na mposa ya lisalisi ya basusu. (Mas. 27:17) Ntango tobimi na ndeko na mosala ya kosakola, soki tozali kotya likebi na ndenge na ye ya kosolola na bato, yango ekosalisa biso tóbongisa lolenge na biso ya kosakola. Longola yango, mokɛngɛli ya etuluku na biso ya boyekoli ya mokanda akoki koyebisa ndeko moko asalisa biso. Ezali mpenza lipamboli soki mobongisi-nzela to mosakoli moko ya molende asalisi biso tókolisa mayele na biso ya kosakola mpe tózwa esengo mingi na mosala ya kosakola! Ezali nde na mosakoli moko ya sika na etuluku na biso ya boyekoli ya mokanda? Ntango mosusu tokoki koluka kobima na ye na mosala ya kosakola.

5 Mosala ya kosakola ezali na ntina koleka misala nyonso oyo bato basalaka lelo oyo. Ntango tozali kopesa Yehova “mbeka ya lisanzoli,” tosengeli kopesa oyo tozali na yango ya malamu koleka. (Ebe. 13:15) Soki tosali makasi tókolisa mayele na biso ya kosakola, tokozala basali ‘oyo bazali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo bazali kosembola liloba ya solo malamumalamu.’​—⁠2 Tim. 2:⁠15.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto