Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/2 nk. 24-28
  • Bózalaka na botondi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bózalaka na botondi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bantina mosusu ya kozala na botondi
  • Bilembo ya botondi
  • Botondi oyo euti na motema
  • Kokokana na ntango na biso
  • Ndenge nini okoki komonisa botondi
  • Ndakisa kitoko ya Mwasi mobola oyo akufela mobali
  • Kokundola makambo oyo ezali kotinda na botondi ezali na litomba
  • “Bómimonisa bato ya Botɔndi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Monisá ete ozali na botɔndi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • “Bómimonisa bato ya botɔndi”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tómonisa botɔndi mpo na oyo tozali na yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/2 nk. 24-28

Bózalaka na botondi

“Tika ete kimya na Klisto eyangela kati na mitema na bino . . . . Mpe bózalaka na botondi.”​—BAKOLOSE 3:15.

1. Kati na mokili oyo ezangi botondi, na likama nini baklisto basengeli komibatela na yango?

NA EKEKE ya 20, ekeke ya mobulu, bato mingi bazali koyeba lisusu te oyo elimboli kozala na botondi. Na boumeli ya bambula, ezali kokoma mpasi koleka mpo na koyoka maloba ya botondi lokola “Soki olingi“ mpe “merci”. Kozanga botondi ezali lelo kati na “mopepe” to elimo ya moimi oyo epalangani kati na bato ya mokili. (Baefese 2:1, 2) Atako baklisto “bazali bato na mokili te”, basengeli kobika kati na yango lokola ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ezali naino. (Yoane 17:11, 16) Na bongo basengeli kokengela ete elimo yango ya kozanga botondi ezala na bopusi likoló na bango te mpe etinda bango te na kozanga kozala na botondi mingi.

2. (a) Na mitindo nini basaleli ya Jéhovah bakoki komonisa botondi na bango epai ya Jéhovah? (b) Basengeli kosala nini lisusu, longola komonisa botondi na bango na maloba?

2 Mbala mingi baklisto bazalaka na libaku ya komonisa botondi na bango mpo na malamu ya Nzambe na masolo na bango. Ntembe ezali te, mingi na bango basambelaka moko na moko Tata na bango ya likoló, Jéhovah mokolo na mokolo, mpo na kotondo ye na ntina ya bolamu na ye. Bamonisaka mpe botondi na bango ntango ya makita ya baklisto na kosanganaka na mabondeli oyo masalemaka mpo na lisanga mpe na koyembaka banzembo ya Bokonzi. Solo, ezali petee na komonisa botondi na yo na maloba. Kasi ntoma Paulo alendisaki bandeko na ye baklisto ya Kolose ete balakisa botondi na bango bobele na maloba te, kasi lisusu na misala, kati na bomoi na bango ya mikolo nyonso. Ekomami: “Tika ete kimya ya Klisto eyangela kati na mitema na bino, mpo bobiangami kati na nzoto moko mpo na kozwa kimya yango. Bozalaka mpe na botondi.”​—Bakolose 3:15.

Bantina mosusu ya kozala na botondi

3. Mpo na nini tosengeli biso banso kozala na botondi epai na Nzambe?

3 Moto nyonso ya bomoi azali na bantina ebele ya kozala na botondi. Ntina oyo eleki monene ezali ete azali kosepela na bomoi yango moko, mpamba te nyonso oyo tozali na yango to oyo tokanisi kosala ekozanga motuya mbalakaka soki tobungisi bomoi. Mokomi na Nzembo David alendisaki bato banso ete babosana te likanisi oyo: “Liziba ya bomoi ezali epai na yo [Jéhovah Nzambe].” (Nzembo 36:9) Ntoma Paulo azongelaki solo yango ya seko epai na bato ya Atene ntango alobaki na ngomba ya Ale. (Misala 17:28) Ee, bobele likambo ya kozala na bomoi mpamba ezali likambo na ntina oyo ekotinda na kozala na botondi. Lisusu, botondi na biso ezali kokola ntango tozali kokanisa na makoki oyo Nzambe asalaki biso na yango-koyoka elengi ya bilei, kozala na mayoki, koyoka nsolo, komona mpe koyoka - mpo tokoka kosepela na bomoi mpe na biloko ya kokamwa bizalisamaki, oyo bizingi biso.

4. Nini ekopekisa biso ete tomona makabo ya bomoi lokola likambo moke te?

4 Nzokande, mingi bazali kotalela ete kosepela na makabo yango ya kitoko ezali likambo monene te. Kaka soki bazangi likoki moko, lokola komona to koyoka nde bato mingi basosolaka matomba oyo bayebaki motuya na yango nyonso te ntango bazalaki na nzoto kolongono. Baklisto ya solo basengeli ntango nyonso kokeba ete bazanga botondi bongo te. Basengeli kosala milende makasi mpo na kokoba kozala na botondi, kolandaka bongo ndakisa ya mokomi na nzembo oyo alobaki: “E Jéhovah, Nzambe na ngai, yo osali makambo mingi, misala na yo ya kokamwa mpe makanisi na yo mpo na biso; mosusu lokola yo azali te. Soki nazali na mposa ya kolimbola mpe ya koloba yango, ekomi mingi koleka oyo nakoki koyebisa.”​—Nzembo 40:5.

5. Atako bayaki kozwa matomba mosusu epai na Jéhovah, ezaleli nini ya nsoni Bayisraele bamonisaki?

5 Na maloba kitoko Nzembo 106 elobeli na mokuse misala ya nguya oyo Jéhovah asalaki mpo na basali na ye, Bayisraele. Motindo Nzambe azalaki kosala epai na bango eyaki kobakisama likoló na bolamu oyo azali komonisa epai na bato banso mpe na bisengo ya bomoi oyo azali kopesa bango. Kasi mokomi na nzembo alobi ete ata bolamu wana, Bayisraele balandaki te kozala na botondi mpo na mapamboli ya lolenge mosusu oyo bazalaki na yango. Totangi na verset ya 13: “Babosanaki noki makambo yango: bayokaki toli na ye te.” Ezalaki boumeli na ntango te nde ebebisaki mokemoke botondi na bango, mpo na komema bango nsima na bambula mingi na kobosana oyo Nzambe asalaki mpo na bango. Te, babosanaki noki makambo yango - na baposo oyo elandaki makamwisi oyo Jéhovah asalaki mpo na bango ntango bakatisaki mai Motane. (Exode 16:1-3) Likambo na mawa, lokola emonisi yango makambo mayaki nsima, kozanga botondi ekomaki momesano mabe epai na bango.

Bilembo ya botondi

6. Mpo na nini dime ezalaki lisengi eleki ndelo te?

6 Jéhovah alakisaki na Bayisraele mitindo misato ya sikisiki mpo na komonisa ete bazalaki solo kotonda ye mpo na bolamu na ye. Moko na yango etalaki kopesa dime oyo basengaki bango, na kopesaka ndambo moko na zomi na mbuma mpe na nyama na bango nyonso. (Levitike 27:30-32) Lisengisi yango elekaki ndelo te: ezali Nzambe nde azalisaki moi, mabelé oyo ezali kobota, mbula mpe likamwisi ya kokolisa biloko, boye te? Na kopesaka ndambo moko na zomi epai na banganga oyo bazalaki kosala na esika mosantu ya Jéhovah, bazalaki bongo komonisa botondi na bango epai na Jéhovah ye moko.

7. (a) Bokeseni nini ya ntina ezalaki kati na dime mpe makabo mapesamaki mpo na Jéhovah? (b) Makabo mazalaki komonisa nini mpo na Bayisraele?

7 Esengamaki mpe na Moyisraele mokomoko ete apesa Nzambe makabo oyo motuya na yango etalaki mayoki na ye ya mozindo. Atako motuya moko etangamaki te, makabo yango esengelaki kozala bambuma ya liboso ya masango, ya vinyo mpe ya nsuki na bampate. (Mituya 15:17-21; Deteronome 18:4) Lisusu, Jéhovah ayebisaki ete basali na ye ‘basengelaki kopesa na kokakatana te’, mpe basengelaki kopesa “bambuma eleki kitoko kati na bambuma ya liboso oyo eteli.” (Exode 22:29; 23:19) Na bongo Bayisraele bazalaki na libaku ya komonisa polele botondi na bango epai na Jéhovah. Bazalaki na likoki ya kolakisa bonene ya botondi na bango na nzela na motuya ya makabo na bango. Bakopesa bobele liboke moko ya miwiti, to motema ya kokaba ekotinda bango bapesa ekoló mobimba? Moto nyonso to libota nyonso bakokaki bongo komonisa botondi na bango na lolenge ya bolingo mpenza.

8. (a) Matomba mibale nini mautaki na bibongiseli etali bolokoti? (b) Na lolenge nini bato banso oyo bibongiseli ya bolokoti etalaki, bakokaki komonisa kokaba mpe botondi na bango?

8 Nzela ya misato ya kolakisa botondi na bango ezalaki na boyokani na bibongiseli ya Nzambe oyo etalaki mosala ya kolokota. Na ntango ya kobuka mbuma, biteni mosusu ya bilanga bisengelaki kotikala na bambuma na yango nyonso mpo na babola. Meko yango ezalaki koteya bobele koyokela mawa mpe kokanisa babola te, kasi ezalaki mpe kondimisa ete bango bakobika na bisengasenga te kozanga kosala milende, mpo yango mbele esepelisaki bango te. (Levitike 19:9, 10) Etando ya elanga oyo esengelaki kotikama mpo na babola eyebisamaki te. Kasi, soki baloni ya Yisraele bamonisi elimo ya kokaba na kotikaka mwa eteni monene na nsuka ya bilanga na bango, komonisaka bongo mawa epai na mobola, bakokumisa Nzambe. (Masese 14:31) Bango moko basengelaki kozwa likatami soki eteni yango ya mabelé ekozala moke to monene. Kasi Nzambe alendisaki makasi ezaleli ya kokaba na kopesaka etinda ete liboke nyonso babosani na elanga mpe mbuma nyonso etikali likoló na nzete to na elanga na vinyo etikala mpo na balokoti. (Deteronome 24:19-22) Na nsima, balokoti bazalaki na likoki ya komonisa botondi na bango epai na Jéhovah mpo na bibongiseli yango, na kokendeke na esika na ye ya losambo kopesa ndambo moko na zomi na mbuma balokotaki.

Botondi oyo euti na motema

9. Na bosolo, mpo na nini baoyo bazalaki na elimo ya moimi bazalaki komisala mabe?

9 Soki Bayisraele bazalaki maboko petee na makabo na bango, mbele lipamboli na Jéhovah ezalaki likoló na bandako na bango. (Tala Ezekiele 44:30; Malaki 3:10) Kasi ata bazalaki kobuka mbuma mingi, bazalaki koboya kopesa makabo. Bongo Nzambe akebisaki bango na nzela ya mikonzi to basakoli mpo na kolamusa botondi na bango. Na bosolo, Bayisraele ya moimi bazalaki komisala mabe, mpamba te Jéhovah akokaki te kopambola baoyo bazalaki koboya kopesa makabo mpo na losambo to epai na babola.

10. (a) Matomba ya esengo ya bokundoli makambo oyo esalamaki na mokonzi Ezekiase mpo na botondi mazalaki nini? (b) Mbano yango ya malamu eumelaki ntango molai?

10 Na libaku moko, bokundoli ya makambo oyo mokonzi Ezekiase asalaki esukaki na feti moko ya esengo oyo eumelaki mikolo 14 na Yelusaleme. Bayisraele, lokola balamukaki na elimo, babandaki koboma biloko nyonso ya losambo ya bikeko, mpe ‘bapesaki makabo mipiko na mipiko. Ntango Ezekiase mpe mikolo bayaki kotala mipiko na makabo, bakumisaki Jéhovah mpe libota na ye Yisraele’. (2 Ntango 30:1, 21-23; 31:1, 6-8) Kasi, likambo na mawa, nsima na kozongela ntango na ntango losambo ya solo, Bayisraele bazalaki kokwea lisusu kati na kozanga botondi. Na nsuka, Nzambe akokaki lisusu kokanga motema te, mpe apesaki nzela ete libota ekende na boombo na Babilone. Yelusaleme mpe tempelo na yango ebomamaki. (2 Ntango 36:17-21) Na nsima, wana esilaki bango kozonga, ezaleli ekomaki lisusu mabe na boye ete Jéhovah alobaki na Bayuda ete na moimi na bango, bazalaki koyiba ye mpe kobotola ye.​—Malaki 3:8.

11. Lisolo ya Yisraele ebimisi motinda nini oyo ekoki kosalisa baklisto ya lelo?

11 Liteya nini tokoki kozwa na ezaleli ya kobongwanabongwana ya Bayisraele? Liteya oyo: Wana etondaki motema na bango na botondi bazalaki komonisa yango na esengo na kopesaka “mipiko” ya makabo na Jéhovah. Kasi ntango botondi na bango ekimaki to elembaki, tokoki koloba bazalaki kosala lisusu ata likabo moko ya mosuni na esengo te. Ekoki kokoma ete baklisto oyo bamipesi bazala na ezaleli yango ya mabe na eleko na biso? Ee, mpamba te kozanga kokoka ya moto ekangani ntango nyonso na bomoto na biso. Likambo na esengo, Nzambe akomisaki na mokanda misala na ye epai na Yisraele mpo ete biso, baoyo tozali na bomoi na ntango na nsuka ya biloko ya lelo, tokoka kozwa na yango mbano.​—Baloma 15:4; 1 Bakolinti 10:11.

12. (a) Na nini bomoi ya basaleli ya Jéhovah na eleko na biso ekokani na oyo ya Bayisraele ya kala? (b) Mituna nini tosengeli komituna?

12 Ndenge moko na Bayisraele, basaleli ya Jéhovah ya eleko na biso bazali na bantina mingi ya kozala na botondi. Tozali mpe kozwa bolamu mingi koleka bato ya eleko na biso. Mpamba te, toyebi mikano ya Jéhovah mingi koleka libota ya kala ya Yisraele. Toyekoli ete na bolingo Nzambe apesaki Mwana na ye mbeka, mpe toyebi mapamboli nyonso oyo mbeka yango ekomema epai na baoyo bandimami na ye. Lisusu, tozali na libaku malamu ya kozala na bomoi kati na paradis ya elimo; uta 1919, na bongo, Jéhovah akotisi libota na ye kati na makambo malamu ya elimo. Ee, ba Témoins de Jéhovah bazali mpenza na bantina mosusu ya kozala na botondi. Na bongo tomituna mituna oyo: Bonene ya botondi na biso epai na Nzambe ezali nini? Ndenge nini tokoki komonisa botondi na biso na ekeke ya 20?

Kokokana na ntango na biso

13, 14. Atako baklisto bazali na nse na mibeko ya Moïse te, likoki ezali ya kosala bokokani kati na masengami na bango epai na Jéhovah mpe mobeko etalaki dime?

13 Baklisto bazali na nse ya mibeko na Moïse te, oyo ezalaki kolakisa lolenge ya komonisa botondi na bango epai na Nzambe. (Bagalatia 3:24, 25) “Mbeka” ya masanzoli oyo tozali kopesa na Jéhovah, ezali “mbuma na bibebu oyo ezali kokumisa polele nkombo na ye”. (Baebele 13:15) Ezali mpenzampenza na nzela yango nde baklisto bakoki komonisa botondi na bango epai na Nzambe. Kasi tokoki kosala bokokani, oyo ekoki kopesa mateya, kati na mikumba na bango epai na Jéhovah mpe mibeko mitalaki dime, makabo mpe bolokoti.

14 Kopesa dime elimbolaki kopesa na sikisiki ndambo moko na zomi - mpe yango ezalaki lisengisi. Ndenge moko, na ntango na biso, basaleli nyonso ya Jéhovah basengeli kotosa mitinda mosusu ya sikisiki, oyo bakoki koboya kokokisa te. Tosengeli koyangana elongo ntango nyonso, kosakola na bato nyonso nsango malamu ya Bokonzi ya Jéhovah mpe kosalisa bazalani na biso mpo bakoma bayekoli ya Klisto.​—Baebele 10:24, 25; Matai 24:14; 28:19, 20.

15. Lelo, bilembo nini ya bonene ya kokaba na biso ekokani na oyo emonisamaki na bibongiseli oyo etalaki makabo mpe bolokoti kati na Yisraele ya kala?

15 Toloba mpe mpo na bibongiseli bitalaki makabo mpe bolokoti. Motuya moko to eteni ya kopesa etyamaki te mpo na likambo yango. Ndenge moko, Makomami malobi te ntango boni Témoin de Jéhovah mokomoko asengeli kolekisa na mosala ya bulee. Ntango oyo elekisami na koyekola Liloba na Nzambe mpe na kosakola nsango malamu na bato mosusu etali ekateli na nkuku ya motema ya kokaba mpe ya bolingo. Etali mpe mosaleli mokomoko ya Nzambe mpo na kotika ete motema na ye ezwa ekateli mpo na motuya na makabo ya mosuni oyo azali kopesa mpo na kokolisa matomba ya Bokonzi. Engebene bonene ya botondi na ye, akomema “mipiko” to, na bokeseni, akomema bobele oyo ekoki. (2 Ntango 31:6) Kasi, lokola na Yisraele ya kala, na meko oyo akomonisa botondi na ye, akozwa mpe mapamboli ya Nzambe.

Ndenge nini okoki komonisa botondi

16-18. Na mitindo nini mosusu mpenza baklisto bakoki komonisa botondi na bango?

16 Moko na mitindo eleki malamu ya komonisa botondi epai na Jéhovah ezali kobanda mosala ya pionnier. Botondi na yo ezali mpenza monene mpo ete motema na yo elinga mosala yango? Mbala mingi tomonaki ete mpo na kolonga kozala pionnier, esengeli libosoliboso kozala na mposa ya kosalela Nzambe lokola pionnier, mpe, ya mibale, komilukela nzela ya kosala yango. Soki moto moko azali na botondi ya monene epai na Nzambe, mposa makasi ya kosalela ye na lolenge ekoki ekobima na motema na ye oyo efuluki na botondi. Ozali na mposa yango? Ata soki sikawa ozali na likoki ya kosala mosala ya pionnier te, yango esengeli te koboma elimo ya pionnier kati na yo. Kokakatana te na kosalisa to kolendisa ba pionniers na motema mobimba.

17 Soki ozali na likoki ya kozala pionnier sikawa te, okoki kosala mosala ya pionnier auxiliaire ntango na ntango? Mbula na mbula, na bileko mosusu, lisanga ya boklisto elendisaka basangani na yango mpo basala molende mpenza kati na mosala ya kosakola. Mpo na oyo etali ntango oyo tozali kopesa na mosala ya bulee, motinda ezali oyo: botondi ezali kopusa na likabo ya bolingo.

18 Lolenge mosusu ya kozala na botondi ezali kosangana na ebongiseli ya kotonga, oyo basaleli na Nzambe bazali na yango kati na mokili mobimba. Kati na mikili mingi, bazali kotonga ba Salles du Royaume ya sika mpe koyeisa monene oyo ekomi mike mingi. Bazali kotonga ba Salles ya ba assemblées mpe kobakisa bisika kati na bandako ya kolala mpe ba imprimeries ya ba béthels mosusu. Oyo nde mabaku tozali na yango mpo na komonisa botondi na biso epai na Jéhovah na kosanganaka na kokokisama ya mikano yango ya kotonga na nzela ya mosala na biso to na nzela ya lisalisi na biso ya mosolo!

Ndakisa kitoko ya Mwasi mobola oyo akufela mobali

19. Eloko nini ebendi likebi na biso koleka na Libonza ya mwasi mobola mokufeli mobali?

19 Ndakisa ya lokumu ya Biblia oyo etali komonisa botondi na nzela ya libonza ya biloko na bolingo malamu ezali oyo ya mwasi mokufeli mobali oyo Yesu alobelaki. (Luka 21:1-4) Mwasi yango ayebaki malamu ete mea mibale na ye ya motuya moke mpenza, ekosalisa bobele mwa moke mpenza na kobongisa tempelo mpe mpo na baoyo bazalaki kosala kuna. Kasi na komonaka esika yango mpe banganga oyo bazalaki kosala wana, azalaki komiloba te: ‘Bazali kobika malamu koleka ngai, kati na ndako moko kitoko mingi koleka mwa ndako na ngai.’ Solo tempelo ezalaki na biloko ya motuya, kitoko. “Ekembisamaki na mabanga kitoko mpe na biloko bipesamaki mbeka mpo na yango”. (Luka 21:5) Kasi yango epekisaki mwasi-mokufeli mobali wana te mpo na kopesa libonza. Alingaki komonisa botondi na ye epai na Jéhovah, kasi epai na bato oyo bazalaki kosala na tempelo te.

20. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli yango ya lokumu lokola mwasi mobola mokufeli mobali?

20 Na mikolo na biso, basaleli ya Nzambe bazali kozwa liteya na ndakisa yango. Ndenge moko na mwasi mobola oyo akufelaki mobali, bayebi ete mabonza na bango, ya minene to te, mazali mpo na Nzambe. Mpe bazali na kondimisama ete lisanga ya Nzambe awa na mabelé esalemi na boye ete moto te akoki komizwela na yango litomba ya mosolo. Bandako ya la Société etongami mpe ebongisami mpo na kosalisa baoyo bamipesi kosala kuna na makasi nyonso, mpo mosala na bango epesa nzela na kobimisa motuya moleki monene ya ba Biblia mpe ya mikanda kitoko mikolimbolaka Biblia, mpe esalisa malamu koleka matomba ya Bokonzi. Oyo bokeseni nini na moyibi ya nsoni ya mabonza oyo esalamaki na bateyi mosusu ya nsango malamu na televizio mpe oyo bazulunalo elobelaki mikolo mileki.

Kokundola makambo oyo ezali kotinda na botondi ezali na litomba

21, 22. Bokundoli oyo esalami mpo na kotinda biso na botondi esengeli kobota nini kati na mitema oyo esepelaka na bokabi ya Nzambe?

21 Bayisraele bamonisaki ete ebongaki bakaniselaka bango ntango nyonso masengami na bango liboso na Jéhovah, mpenzampenza ntina ya kozala na botondi. Mbala mingi, ntango makambo yango mayebisamelaki bango, botondi ezalaki kobotama lisusu na motema na bango, mpe bazalaki komonisa yango bobele na maloba te, kasi lisusu na misala. Bazwaki bongo mposa ya kopesa na Jéhovah biloko mingi, “mipiko”, mpo na kokokisa bamposa ya ndako ya losambo na ye.

22 Tika ete basangani na “Yisraele na Nzambe” ya ntango na biso mpe “ebele monene” ya baninga na bango bazala ntango nyonso na mayoki ya lolenge yango. (Bagalatia 6:16; Emoniseli 7:9)! Tika ete mitema na bango ya botondi epusa bango na kopesa masanzoli, “mipiko”; epai na Jéhovah! Bongo, bakoka koloba na bosolo nyonso: “Tozali na botondi epai na Nzambe oyo akabaka mpe atondi bolingo, Jéhovah.”

Bozongeli

◻ Mpo na nini baklisto basengeli ntango nyonso komeka bonene ya botondi na bango?

◻ Mpo na nini basaleli ya Jéhovah bazali ntango nyonso na bantina mosusu ya kozala na botondi?

◻ Na makambo nini mpenza Bayisraele bakokaki komonisa botondi na bango epai na Jehovah?

◻ Na ndakisa ya Bayisraele, makambo nini ya sikisiki tokoki kosala mpo na komonisa botondi na biso?

◻ Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya mwasi mobola akufela mobali oyo apesaki libonza na tempelo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto