Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/05 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 12 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 19 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 26 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 2 Yanuali
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 12/05 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 12 Desɛmbɛ

Loyembo 32

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ mpe Lamuká! ya 22 Desɛmbɛ. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango, oyo ebongi mpenza. Nsima ya elakiseli mokomoko, lobelá ndenge tokoki kosalela vɛrsɛ moko na lisolo na lolenge ya pɛtɛɛ.

Min. 15: “Eteyelo oyo esalisaka biso tósalela makambo na ndenge ebongi.” Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2005.

Min. 20: “Mateya oyo ememaka na bomoi.”a Bongisá liboso mpo mosakoli moko to basakoli mibale bálobela matomba oyo bazwi na mateya ya Nzambe.

Loyembo 101 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 19 Desɛmbɛ

Loyembo 160

Min. 5: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mosala ya kosakola na mokolo ya 25 Desɛmbɛ mpe 1 Yanuali. Yebisá bayangani nyonso bámema Lamuká! ya Yanuali 2006 na Likita ya Mosala ya pɔsɔ oyo ekolanda.

Min. 15: “Monisá ete osepelaka na bato​—⁠Na koyokanisáká masolo na yo na bamposa na bango.”b Salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge mosakoli akoki koyokanisa lisolo na ye na makambo moto oyo azali kosolola na ye alobi.

Min. 25: “Mwana na yo akoki kozwa ekateli ya mayele?”c Ekosalema na nkulutu moko. Sɛngá ndeko moko oyo ayebi kotánga malamu atánga baparagrafe. Bólobela bavɛrsɛ nyonso oyo batii maloba na yango na lisolo te. Nsima ya kotalela paragrafe 2, bómonisa bokeseni oyo ezali kati na bana mibale oyo balobeli na paragrafe 16-17, mpe baoyo balobeli na etanda oyo ezali na nkasa 16-17 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1991. Mpo na kosukisa, lendisá baboti nyonso bátalela lisolo yango mobimba na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe bábanda mbala moko kotalela mitinda ya Biblia oyo etali makila elongo na bana na bango, mpe bámekameka makambo yango elongo na bana na bango mpo na kosalisa bango báyeba koyebisa bato, na mpiko nyonso, makambo oyo bandimaka. Batata basengeli kosala ete mwana mokomoko oyo asili kozwa batisimo azala na karte na ye Instructions médicales prévisionnelles mpe ete mwana mokomoko oyo azwi naino batisimo te azala na karte na ye Document d’identité médical. Ntango nyonso oyo moto moko akɔti lopitalo mpe emonani ete akoki kokutana na mokakatano na likambo etali makila, bankulutu basengeli kosɛnga lisalisi na Komite mpo na boyokani na minganga.

Loyembo 56 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 26 Desɛmbɛ

Loyembo 85

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Desɛmbɛ. Soki lisangá na bino ekobongola programɛ na yango ya makita na mbula ya sika, yebisá lisangá programɛ yango ya sika. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Yanuali, mpe monisá esika oyo basakoli bakoki kozwa makanisi mpo na ndenge ya kolakisa yango.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: Makambo ya sika oyo ekómi kobima na Lamuká! Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá mbongwana oyo esalemi na Lamuká! ndenge emonisamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Marsi 2005, lokasa 1, paragrafe 5-6. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na lisolo “Epai ya batángi,” na Lamuká! ya Yanuali 2006, nkasa 3-4. Lobelá bandakisa oyo emonisi ndenge zulunalo yango ezali kobenda likebi ya batángi mbala moko na Biblia. Sɛngá bayangani bálobela likanisi ya sika oyo ezali na lokasa 31. Tokokoba kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli nzela moko na Lamuká!, ntango tokutani na moto mbala ya liboso. Kasi, tóbosana te ete mpo na bato oyo totikelaka bazulunalo mbala na mbala to baoyo basepelaka kozwa bazulunalo na biso mbala na mbala, tokotikela bango kaka Lamuká! moko na sanza. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe Lamuká! ya Yanuali. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango, oyo ebongi mpenza. Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali ekozala mpe na lolenge ya mibale ya kolakisa Lamuká ya Yanuali, oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa masolo mosusu oyo ezali na kati ya Lamuká! yango. Bokoki kosalela ndenge yango mibale ya kolakisa Lamuká! yango na sanza mobimba.

Loyembo 222 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 2 Yanuali

Loyembo 5

Liyebisi: Masangá esengeli te kosala Likita ya Mosala oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ya 2 Yanuali liboso ya dati yango, longolá kaka masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala yango. Masangá nyonso esengeli kotalela siplema oyo ezali kolobela liyangani ya etúká kaka na pɔsɔ oyo ezali na programɛ. Soki lisangá moko ekozala na liyangani ya zongazonga na pɔsɔ wana, bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda basengeli koyebisa bandeko ya bituluku na bango esika mpe dati oyo liyangani ya etúká ekosalema.

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: “Tósalela mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia na mayele.”d Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2002, lokasa 1.

Min. 25: “‘Lobiko ekómi pene’​—⁠Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2006.”e Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Nsima ya kotalela paragrafe 1, tángá mokanda ya biro ya 15 Desɛmbɛ 2005, oyo eyebisi liyangani ya etúká oyo bino bokokende. Lendisá bayangani nyonso bámibongisa libelalibela mpo na liyangani.

Loyembo 48 mpe libondeli ya nsuka.

[Footnotes]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto