Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/05 lok. 5
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • LISOLO NO. 1
  • BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 12/05 lok. 5

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 26 Desɛmbɛ 2005. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 7 Novɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 26 Desɛmbɛ 2005. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—⁠Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Tokoki kosala nini mpo na komindimisa ete tozali kolendisa bato “na bolingo”? (Flmo. 9) [be lok. 266]

2. Ndenge nini tokoki “kolendisa na mateya oyo epesaka litomba”? (Tito 1:⁠9) [be lok. 267 par. 1-2]

3. Mpo na nini ezali na ntina ete masukulu na biso elendisaka bato, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? [be lok. 268 par. 1-3, etanda]

4. Na ndakisa ya Moize, ndenge nini kosalisa basusu na kokanisa makambo oyo Yehova asalá mpo na basaleli na ye ekolendisa bango? (Det. 3:28; 31:​1-8) [be lok. 268 par. 5–lok. 269 par. 2]

5. Mpo na nini koloba na ndenge oyo emonisi ete tozali kosepela na makambo oyo Nzambe azali kosala sikoyo ná oyo akosala na mikolo ezali koya, ekolendisa bato oyo bazali koyoka biso? [be nk. 270-271]

LISOLO NO. 1

6. Libongoli ya Septante ezali nini, mpe mpo na nini ezali na ntina mpo na baklisto? [si lok. 307 par. 12–lok. 310 par. 14]

7. Bamasorete bazalaki banani, mpe makambo nini mpenza basalaki oyo esalisaki na kobongola Biblia? [si lok. 310 par. 18; lok. 311 par. 20-21]

8. Biblia nini mpenza esalelamaki mingi mpo na kobongola Makomami ya Liebele ya Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi, mpe mpo na nini tokoki koloba ete libongoli yango ezali ya malamu mpenza mpe ebongi na kotyelama motema? [si lok. 312 par. 28, 30]

9. Ndenge nini Baklisto ya liboso bamonisaki mposa makasi ya kosakola Liloba ya Nzambe? [si lok. 315 par. 1-5]

10. Boyekoli ya bamaniskri oyo tozali na yango lelo oyo mpe ya Makomami mosantu emonisi nini na oyo etali Biblia? [si lok. 320 par. 32]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Lokola Yehova aboyaki Davidi atonga tempelo, yango emonisi ete andimaki te bitumba oyo Davidi abundaki? (1 Nta. 22:​6-10)

12. Na libondeli oyo Salomo asalaki na bofungoli ya tempelo, ndenge nini amonisaki ete Yehova atyaka likebi na bamposa ya basaleli na ye kaka te soki bazali ebele, kasi mpe na moto mokomoko oyo abangaka ye? (2 Nta. 6:​29, 30)

13. “Bademo ya motindo ya bantaba” oyo balobeli na 2 Ntango 11:15 ezali banani?

14. Lokola Basa abandaki koyangela na ‘mobu ya misato’ ya boyangeli ya Asa mpe ayangelaki kaka mbula 24, ndenge nini tokoki koyokanisa likambo yango na maloba oyo ete Basa ‘abundisaki Yuda’ na ‘mobu ya ntuku misato na motoba ya bokonzi ya Asa’? (1 Mik. 15:33; 2 Nta. 16:⁠1)

15. Ndenge nini 2 Ntango 20:​22, 23 emonisi polele makambo oyo ekokómela mokili ya Satana?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto