Omibongisa mpo na koyekola esakweli ya Yisaya!
1 “Basambeli ya sembo bakoki kolikya ete Yehova . . . akopesa nzela te ete mokili ya Satana ebakisa mokolo ata moko koleka ndenge bosembo esɛngi.” Oyo nde maloba ya kolendisa! Kasi, tozwi maloba yango wapi? Tozwi yango na buku Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso I. Esakweli ya Yisaya ezali nde na makambo oyo ezali kotinda biso tóndima likambo wana ya kolendisa? Ɛɛ! Mokanda wana ya Biblia elobeli lobiko mingi mpe na ndenge ya polele. (Yis. 25:9) Na yango, tokolendisama mingi ntango tokoyekola eteni wana ya Liloba ya Nzambe na Boyekoli ya Mokanda ya lisangá. Tokobanda koyangana na boyekoli yango pɔsɔ nyonso? Mpo na nini tosengeli kozangisa yango te?
2 Na Yisaya 30:20 (NW), Yehova abengami “Molakisi Monene.” Moklisto mokomoko asengeli koyoka na likebi mpenza ntango Yehova azali koloba na biso na nzela ya Liloba na ye mpe ya mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo ebimisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45; Yis. 48:17, 18) Esengeli mpe kosala bongo mpo na buku Esakweli ya Yisaya I. Okoki kosala nini mpo ozwa matomba mingi na boyekoli yango?
3 Omibongisa mpo na kopesa biyano: Zwáká ntango pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kobongisa boyekoli ya mokanda. Tángá paragrafe mokomoko ya eteni oyo epesami na programɛ. Kanisá na mituna ya paragrafe mokomoko. Tyá bilembo na biyano na buku na yo. Bavɛrsɛ oyo euti na mokanda ya Yisaya ekomami na makomi ya moindo. Tángá yango malamumalamu. Tángá mpe bavɛrsɛ mosusu oyo batye maloba na yango na buku te mpo na koyeba ntina oyo batye yango wana. Manyolá makambo oyo ozali koyekola. Mpe na ntango ya boyekoli, pesá biyano oyo obongisaki mpo bandeko ya etuluku na bino bázwela yango litomba.
4 Ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli asengeli kosalisa bayangani nyonso básalela Biblia malamu mpe bámona ntina ya makambo oyo bazali koyekola. Soki ozali moto ya liboso ya koyanola na motuna, pesá eyano ya mokuse mpe ya polele. Soki moto mosusu asili kopesa eyano ya liboso, okoki kolobela makanisi mosusu oyo eyokani na likambo oyo bozali kotalela. Na ndakisa, okoki komonisa boyokani oyo ezali kati na vɛrsɛ moko ya ntina mpe motó ya likambo oyo bozali kotalela. Salá makasi opesa biyano na maloba na yo moko, mpe okoyoka esengo oyo eutaka na kopesa biyano na makita.
5 Tiká ete biso nyonso tózala na mposa makasi ya koyekola elongo nsango ya ntina mingi oyo ezali na mokanda ya Yisaya. Yango ekolendisa biso tózala na esengo mokolo na mokolo, wana tozali kozela lobiko oyo euti na Yehova!—Yis. 30:18.