Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ip-1 mok. 1 nk. 5-10
  • Mosakoli moko ya kala kasi nsango na ye etaleli mikolo na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosakoli moko ya kala kasi nsango na ye etaleli mikolo na biso
  • Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mobali moko ya sembo na ntango ya mobulu
  • Nsango ya lobiko
  • Okoloba: Ngai oyo! Tinda ngai?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Tobongisa makambo kati na Nzambe mpe biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Yisaya​—I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mosakoli moko ya Nzambe amemeli bato pole
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
Makambo mosusu
Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
ip-1 mok. 1 nk. 5-10

Mokapo ya Yambo

Mosakoli moko ya kala kasi nsango na ye etaleli mikolo na biso

Yisaya 1:1

1, 2. (a) Makambo nini ya mawa tozali komona na mokili lelo oyo? (b) Na maloba nini sɛnatɛrɛ moko ya États-Unis amonisi ete azali komitungisa mpo ete bizaleli ya bato ebebi?

NANI lelo oyo alingaka te komona ete bampasi oyo ezali konyokola bato esila? Kasi, mbala mingi mposa na biso ekokisamaka te! Tolukaka kozala na kimya, kasi bitumba ezali ntango nyonso konyokola biso. Tolingaka mibeko mpe tolingaka kosala makambo na molɔngɔ, kasi tokokaka te kopekisa moyibi oyo etondi mboka mobimba, kosangisa nzoto na basi na makasi, mpe kobomana. Tolingaka kotyela bazalani na biso motema, kasi esɛngaka na biso kokanga bandako na fungola mpo na komibatela. Tolingaka bana na biso mpe tosalaka makasi mpo na koteya bango bizaleli malamu, kasi mbala mingi tokokaka kosala eloko te ntango balandaka makambo mabe ya baninga na bango.

2 Tokoki mpenza kozala na makanisi ndenge moko na Yobo, ye alobaki ete bomoi ya moto ezali mokuse mpe ‘etondi na mpasi.’ (Yobo 14:1) Emonani ete likambo yango ezali mpenza bongo lelo oyo, mpamba te bizaleli ya bato ezali kobeba na ndenge moko oyo emonanaki naino te liboso. Sɛnatɛrɛ moko ya États-Unis alobaki ete: “Sikawa kowelana kati na bikólo ya nguya (guerre froide) esili, kasi likambo ya mawa mpenza ezali ete, mokili ekómi na bonsomi ya kobimisa matata mpo na kozongisa mabe mpe mobulu oyo ezali kouta na bokabwani ya bikólo, bamboka mpe mangomba . . . Tozali lisusu kosalela mpenza te mitinda na biso ya bizaleli malamu, yango wana bilenge mingi bayebi lisusu te nini basengeli kosala, balɛmbi nzoto mpe makanisi na bango ebulungani. Tozali kobuka mbuma oyo euti na kozanga kokokisa mokumba ya moboti, koboma libala, kobebisa bana, bazemi ya bilenge, kokata kelasi, komɛla bangi, mpe mobulu na babalabala. Ezali lokola ndako na biso ebukanaki te ntango mabele eninganaki makasi na ntango oyo bikólo ya nguya ezalaki kowelana, kasi sikawa nselele ezali kolya yango.”

3. Mokanda nini ya Biblia ezali kopesa mpenza elikya mpo na mikolo ezali koya?

3 Kasi elikya ezali naino. Esili koleka mbula soko 2 700, Nzambe asalelaki mobali moko ya Proche-Orient mpo asakola makambo oyo ezali na ndimbola moko ya ntina mingi na ntango na biso. Bansango yango ekomami na mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo ya mosakoli yango​—Yisaya. Yisaya azalaki nani, mpe mpo na nini tokoki koloba ete makambo oyo asakolaki, oyo ekomami esili koleka mbula soko nkóto misato, ezali kopesa pole mpo na bato nyonso lelo?

Mobali moko ya sembo na ntango ya mobulu

4. Yisaya azalaki nani, mpe ntango nini azalaki mosakoli ya Yehova?

4 Na vɛrsɛ ya liboso na mokanda na ye, Yisaya alobi ete azali “mwana na Amosa,”a mpe ayebisi biso ete azalaki mosakoli ya Nzambe “na mikolo na Uziya mpe Yotama mpe Ahaza mpe Hizikiya, mikonzi na Yuda.” (Yisaya 1:1) Yango elingi koloba ete Yisaya azalaki mosakoli ya Nzambe na libota ya Yuda na boumeli ya mbula koleka 46, ekoki kozala banda na nsuka ya boyangeli ya Uziya​—soki na mobu 778 liboso ya ntango na biso (L.T.B.).

5, 6. Tokoki koloba nini mpo na libota ya Yisaya, mpe mpo na nini?

5 Soki tokokanisi Yisaya na basakoli mosusu, toyebi mpenza makambo mingi te oyo etali bomoi na ye. Toyebi kaka ete abalaki mpe azalaki kobenga mwasi na ye “mwasi mosakoli.” (Yisaya 8:3) Buku (Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature) ya McClintock mpe Strong elobi ete, elobeli wana emonisi ete libala ya Yisaya “esukaki kaka te na koyokana na mokumba na ye ya mosakoli, kasi ekangamaki mpe na mokumba yango.” Ekoki kozala ete, ndenge moko na basi mosusu oyo bazalaki kobanga Nzambe na Yisalaele ya kala, mwasi ya Yisaya mpe azwaki mokumba ya kosakola.​—Basambisi 4:4; 2 Mikonzi 22:14.

6 Yisaya na mwasi na ye babotaki bana mibali mibale to koleka, nkombo ya mwana mokomoko ezalaki na ndimbola ya esakweli. Mwana ya liboso, Sala-Yasubu, akendaki kotika Yisaya ntango akendaki koyebisa mokonzi mabe Ahaza nsango oyo eutaki na Nzambe. (Yisaya 7:3) Emonani ete Yisaya na mwasi na ye bazalaki kosambela Nzambe na libota na bango mobimba​—yango ezali ndakisa malamu mpo na babalani ya lelo!

7. Lobelá makambo oyo ezalaki kosalema na Yuda na ntango ya Yisaya.

7 Yisaya na libota na ye bazalaki na bomoi na eleko moko oyo ekólo Yuda ezalaki mpenza na yikiyiki. Matata ezalaki makasi kati na bato ya politiki, bato bazalaki kopesa bazuzi kanyaka mingi, mpe bokosi ezalaki mingi na makambo ya losambo. Bansɔngɛ ya bangomba etondaki na bisika ya kotumba mbeka oyo bazalaki kopesa na banzambe ya lokuta. Kutu bakonzi mosusu bazalaki mpe kolendisa losambo ya bapakano. Na ndakisa, Ahaza asukaki kaka te na kopesa nzela ete bato na ye básambelaka bikeko, kasi ye moko mpe amipesaki na likambo yango, “atumbaki” bana na ye lokola mbeka mpo na Moleke, nzambe ya Bakanana.b (2 Mikonzi 16:3, 4; 2 Ntango 28:3, 4) Makambo wana nyonso ezalaki kosalema na kati ya libota oyo esalaki kondimana elongo na Yehova!​—Exode 19:5-8.

8. (a) Ndakisa nini Mokonzi Uziya na Mokonzi Yotama bapesaki, kasi bato balandaki ndakisa yango? (b) Ndenge nini Yisaya amonisaki ete azalaki na mpiko na kati ya bato oyo bazalaki batomboki?

8 Likambo ya esengo ezali ete bato mosusu oyo bazalaki na ntango ya Yisaya​—bakisa mpe bakonzi mosusu​—bazalaki kosala milende mpo na kotombola losambo ya solo. Kati na bango tokoki kotánga Mokonzi Uziya, ye azalaki kosala makambo oyo “ebongaki na miso ya Yehova.” Kasi, na boyangeli na ye bato “bapesaki mbeka mpe batumbaki mpaka ya malasi na bisika ya likoló.” (2 Mikonzi 15:3, 4, NW) Mokonzi Yotama mpe “asalaki malamu na miso na [Yehova].” Kasi, “bato [balandaki, NW] makambo mabe.” (2 Ntango 27:2) Ya solo, Yisaya asalaki ndambo monene ya mosala na ye ya kosakola na eleko oyo bokonzi ya Yuda ezalaki na maladi makasi na elimo mpe bato bazalaki na bizaleli malamu te. Bato mingi bazalaki mpenza kolanda te ndakisa malamu oyo bakonzi bazalaki kopesa. Yango ezali komonisa mpenza ete ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na komema nsango ya Nzambe epai ya bato yango ya motó makasi. Atako bongo, ntango Yehova atunaki motuna, “Nani akokenda mpo na biso?” Yisaya akakatanaki te. Alobaki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai.”​—Yisaya 6:8.

Nsango ya lobiko

9. Nkombo ya Yisaya elimboli nini, mpe boyokani nini ezali kati na ndimbola wana mpe motó ya likambo ya mokanda na ye?

9 Nkombo ya Yisaya elimboli “Lobiko ya Yehova,” mpe yango ekoki kozala motó ya likambo ya nsango na ye. Ya solo, bisakweli mosusu ya Yisaya ezali bitumbu. Nzokande, motó ya likambo oyo etali lobiko ezali koyokana polele. Mbala na mbala, Yisaya azalaki koloba ete na ntango ebongi, Yehova akosikola Bayisalaele na boombo na Babilone, mpe akopesa nzela na baoyo bakotikala kati na bango ete bázonga na Siona mpo na kozongisa mboka na bango kitoko ndenge ezalaki liboso. Na ntembe te, Yisaya azalaki na esengo mingi ndenge azwaki libaku ya kopesa mpe kokoma bisakweli oyo etalelaki kozongisama ya engumba Yelusaleme oyo azalaki kolinga mingi!

10, 11. (a) Mpo na nini mokanda ya Yisaya ezali na ntina mpo na biso lelo? (b) Ndenge nini mokanda ya Yisaya ezali kobenda likebi likoló na Masiya?

10 Kasi, nsango yango ya kosambisama mpe ya lobiko etaleli biso na nini? Likambo ya esengo ezali ete Yisaya asakolaki kaka te mpo na bolamu ya bokonzi ya Yuda oyo esangisaki mabota mibale. Nsango yango ezali mpenza na ntina mingi mpo na mikolo na biso. Yisaya alobelaki mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekopesa na mabele na maloba kitoko mpenza. Mpo na yango, makambo mingi oyo Yisaya akomi ezali kolobela mingi Masiya oyo asakolamaki, oyo asengelaki kozala Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. (Danyele 9:25; Yoane 12:41) Yango ezali bongo mpamba te nkombo Yesu na nkombo Yisaya ezali komonisa likanisi moko, Yesu elimboli “Yehova azali lobiko.”

11 Ya solo, Yesu abotamaki bikeke soko nsambo nsima ya ntango ya Yisaya. Atako bongo, bisakweli oyo ezali kolobela Masiya na mokanda ya Yisaya, ezali polele mpe sikisiki. Yango wana lisolo yango ezali komonana lokola ekomamaki na moto moko oyo amonaki Yesu na miso ntango azalaki awa na mabele. Mpo na yango, buku moko elobi ete mokanda ya Yisaya ebengamaka ntango mosusu “Evanzile ya Mitano.” Ezali likambo ya kokamwa te ndenge mokanda ya Yisaya ezalaki mokanda ya Biblia oyo Yesu na bantoma na ye balobelaki mingi mpo na komonisa polele nani azali Masiya.

12. Mpo na nini tosengeli koyekola mokanda ya Yisaya na mposa mpenza?

12 Yisaya alobeli “makoló ya sika mpe mabele ya sika” na maloba ya kitoko mpenza, kati na yango “mokonzi akozala na lokumu mpo na boyengebene” mpe bana ya mikonzi bakoyangela mpo na bosembo. (Yisaya 32:1, 2, NW; Yisaya 65:17, 18, NW; 2 Petelo 3:13, NW) Na yango, mokanda ya Yisaya ezali kolobela elikya kitoko ya Bokonzi ya Nzambe, na boyangeli ya Masiya, Yesu Klisto oyo atyami Mokonzi. Ezali mpenza likambo ya kolendisa mpo na biso kozela “lobiko na [Yehova]” mokolo na mokolo na esengo! (Yisaya 25:9; 40:28-31) Yango wana, tiká ete tótalela nsango ya ntina oyo ezali na mokanda ya Yisaya na mposa mpenza. Soki tosali bongo, elikya na biso na bilaka ya Nzambe ekokóma makasi. Lisusu, yango ekosalisa biso tóndima mpenza ete Yehova azali Nzambe ya lobiko na biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Amosa, tata ya Yisaya, ezali te Amosa oyo azalaki mosakoli na ebandeli ya boyangeli ya Uziya mpe akomaki mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye.

b Bato mosusu balobaka ete liloba ‘kotumba’ ezali komonisa kaka molulu moko ya komipɛtola. Nzokande, awa emonani ete ezali mpenza kolobela mbeka. Ntembe ezali te ete Bakanana na Bayisalaele oyo bapɛngwaki bazalaki kopesa mbeka ya bana.​—Deteronome 12:31; Nzembo 106:37,38.

[Etanda/Elilingi na lokasa 7]

Yisaya azalaki nani?

NKOMBO NA YE ELIMBOLI: “Lobiko ya Yehova”

LIBOTA NA YE: Abalaki mpe azalaki na bana mibali mibale to koleka

ESIKA AZALAKI KOFANDA: Yelusaleme

BAMBULA YA MOSALA: Mbula 46 to koleka, soki na 778 L.T.B. tii nsima ya 732 L.T.B.

BAKONZI YA YUDA YA NTANGO NA YE: Uziya, Yotama, Ahaza, Hizikiya

BASAKOLI OYO BAZALAKI NA NTANGO NA YE: Mika, Hosea, Odede

[Elilingi na lokasa 6]

Yisaya na mwasi na ye bamipesaki mobimba na libota na bango mpo na kosambela Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto