Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuni
“Okanisi ete Nzambe andimaka mangomba nyonso? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Nzambe alobaki ntango Bayisalaele ya kala balandaki mimeseno ya losambo ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango. [Tángá Ezekiele 6:6.] Lisolo oyo epesi eyano na motuna oyo, ‘Lolenge oyo tozali kosambela Nzambe ezali na ntina?’” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 9.
Lamuká! Yuni
“Na ntembe te, oyebi ete eleko ya bolenge ezalaka pɛtɛɛ te mpo na bilenge mpe baboti na bango. Okanisi ete toli oyo ekoki kosalisa baboti bábɔkɔla bana malamu? [Tángá Yakobo 1:19. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo epesi makanisi oyo ebongi mpenza mpe oyo euti na Biblia. Nakanisi okosepela na yango.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli
“Biso nyonso toyokaka mpasi ntango moto oyo tolingaki mingi akufi. Okanisi ete Biblia ekoki kosalisa biso na ntango wana? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Nzembo 55:22.] Zulunalo oyo emonisi makambo ndenge na ndenge oyo Biblia elobeli, oyo ekoki kosalisa biso na ntango wana.”
Lamuká! Yuli
“Basi mpe mibali bazali kokutana na mikakatano mingi na mabala na bango, mpe mabala mingi ezali kokufa. Okanisi ete toli oyo ekoki kosalisa moto azala malamu na libala na ye? [Tángá Masese 12:18. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli mitinda mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa mobali ná mwasi na ye báyokanaka malamu.”