“Yehova” to “Yawe”?
EBENGELI oyo “basangisi,” “bakɔtisi maloba mosusu,” “etangwi.” Eloko nini epusaki banganga-mayele Baebele oyo balimbolaka Biblia básalela maloba ya makasi motindo wana? Ezalaki likambo ya koyeba soki “Yehova” ezali ebéngeli ya solosolo ya nkombo ya Nzambe. Ntembe yango eumelaki koleka mbula nkama. Lelo oyo, banganga-mayele mingi bazali kosepela na ebéngeli ya maloba mibale “Yawe.” Kasi ebéngeli “Yehova” “etangwi” mpenza?
Makambo oyo mabandisi ntembe
Biblia elobi ete, Nzambe ye moko ayebisaki bato nkombo na ye. (Exode 3:15) Bilembeteli ya Biblia bimonisi ete na ntango ya kala basaleli ya Nzambe bazalaki kosalela nkombo yango. (Genese 12:8; Luta 2:4) Ata bato ya mabota mosusu bayebaki nkombo ya Nzambe. (Yosua 2:9) Ezalaki bongo mpamba te nsima ya kobima na boombo Bayuda basanganaki na bato ya mabota ndenge na ndenge. (Nzembo 96:2-10; Yisaya 12:4; Malaki 1:11) Buku moko (The Interpreter’s Dictionary of the Bible) elobi ete: “Bilembeteli mingi bimonisi ete nsima ya kobima na boombo bapaya mingi bakɔtaki na losambo ya Bayuda.” Nzokande, na ekeke ya liboso T.B., bato bakómaki na nsɔmɔ ezangi ntina mpo na nkombo ya Nzambe. Nsukansuka, libota ya Bayuda batikaki kosalela nkombo ya Nzambe polele; bamosusu kutu bapekisaki ata kobénga yango. Yango wana ebéngeli na yango ya solosolo ebungaki—tóloba lokola motuna, ebungaki?
Nkombo ekoki kolimbola eloko nini?
Na lokota ya Liebele, nkombo ya Nzambe ekomamaka boye: יהוח. Balɛtɛlɛ wana minei etángamaka kobanda na lobɔkɔ ya mobali kozonga na lobɔkɔ ya mwasi, mbala mingi babéngaka yango Tetragrame. Bankombo ya bato mingi mpe ya bisika mingi oyo etángami na Biblia ezali na ebéngeli mokuse ya nkombo ya Nzambe. Bankombo yango ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge nkombo ya Nzambe ezalaki kobéngama?
George Buchanan, profesere ya kala na Wesley Theological Seminary, na etúká ya Washington, na États-Unis, andimi yango. Alobi ete: “Na ntango ya kala, mbala mingi baboti bazalaki kopesa bana na bango bankombo oyo euti na bankombo ya banzambe na bango. Yango elimboli ete bazalaki kobénga bankombo ya bana na bango lolenge oyo bankombo ya banzambe na bango ezalaki kobéngama. Bazalaki kosalela Tetragrame na bankombo ya bato, mpe bazalaki ntango nyonso kokɔtisa molelisi (voyelle) na kati.”
Tótalela mwa bandakisa ya bankombo ya bato oyo etángami na Biblia mpe ezali na ebéngeli mokuse ya nkombo ya Nzambe. Profesere Buchanan alobi ete, Yonatana, ekomami Yoh·na·thanʹ to Yehoh·na·thanʹ na Biblia ya Liebele, elimboli “Yaho to Yahowah apesi.” Na Liebele nkombo ya mosakoli Eliya ezali ʼE·li·yahʹ to ʼE·li·yaʹhu. Profesere Buchanan alobi ete nkombo yango elimboli: “Nzambe na ngai ezali Yahoo to Yahoo-wah.” Ndenge moko, nkombo Yosafata na Liebele ezali Yehoh-sha·phatʹ, elimboli “Yaho asambisi.”
Ebéngeli ya maloba mibale ya Tetragrame lokola “Yawe” ezali kopesa nzela te ete molelisi o ezala na kati ya nkombo ya Nzambe. Kasi na bankombo mingi oyo ezali na Biblia oyo nkombo ya Nzambe ezali na kati, molelisi ya kati ezali koyokana ezala na nkombo mobimba to na ebéngeli na yango ya mokuse, lokola na Yonatana mpe Yehonatana. Buchanan alobi boye mpo na nkombo ya Nzambe: “Molelisi oo to oh ezangi ata na esika moko te. Ntango mosusu bazalaki kokata nkombo ya Nzambe ‘Ya,’ kasi ata mbala moko te ‘Ya-weh.’ . . . Ntango bazalaki kobénga Tetragrame na liloba (syllabe) moko, ezalaki ‘Yah’ to ‘Yo.’ Ntango bazalaki kobénga yango na maloba misato ebandaki kozala ‘Yahowah’ to ‘Yahoowah.’ Soki bakati yango na maloba mibale ezalaki ‘Yaho.’”—Biblical Archaeology Review.
Bandimbola oyo esalisi biso na kokanga ntina ya maloba oyo Gesenius, nganga-mayele Moebele, ya ekeke ya 19 akomaki na buku na ye (Hebrew and Chaldee Lexicon to the Old Testament Scriptures) ete: “Baoyo bazali kondima ete יְהוָֹה [Ye-ho-wa] ezali ebéngeli mpenza [ya nkombo ya Nzambe] bazali na ntina ya koloba bongo. Na ndenge yango maloba mokuse יְהוֹ [Ye-ho] na יוֹ [Yo], oyo bankombo ya bato mingi ebandi na yango, nde ezali komonana ete ebongi.”
Atako bongo, na ebandeli ya libongoli auti kosala sika ya Mikanda mitano ya Mose, Everett Fox alobi ete: “Ndenge nyonso basalaki kala mpe oyo bazali kosala sikoyo mpo na koluka ndenge oyo nkombo ya [Nzambe] ezalaki kobéngama na Liebele elongi te; ezala ‘Yehova’ oyo eyokanaka mbala mosusu to ‘Yawe’ oyo banganga-mayele balingaka ekoki kondimama na bosikisiki te.”
Ya solo, ntembe ya banganga-mayele esili naino te. Bayuda batikaki kosalela nkombo ya Nzambe liboso ete Bamasorete bábimisa mayele ya kokoma na milelisi mbala moko. Yango wana, tozali na likoki te ya koyebisa na bosikisiki milelisi nini bazalaki kokɔtisa na nkombo ya Nzambe oyo ezalaki kokomama YHWH (יהוה). Kasi, bankombo ya bato oyo batángami na kati ya Biblia, oyo ebéngeli na yango ya sikisiki ebungaki te—ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge bazalaki kobénga nkombo ya Nzambe kala. Yango wana, banganga-mayele mosusu bandimi ete ebéngeli “Yehova” “etangwi” te.
[Bililingi na lokasa 31]
“Yehova” ezali ebéngeli ya nkombo ya Nzambe oyo bato bayebi yango mingi koleka