Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/2 lok. 32
  • “Bɔkɔlá mwana”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bɔkɔlá mwana”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/2 lok. 32

“Bɔkɔlá mwana”

MOTO oyo alingi elanga na ye ebɔta malamu akosuka bobele na kolongola matiti te bongo azonga nsima ya basanza mpo na kobuka mbuma. Asengeli kosala misala makasi, kobongisa mabelé, kolona mbuma, kosopa mai mpe kotya bankisi na banzete mpo ekola malamu.

Likambo yango ekoki komonisa bosolo ya Masese 22:6, oyo elobi ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye [mokóló, NW] akopɛngwa na yango te.” Ɛɛ, mateya ya baboti ezali na ntina mingi mpo mwana abɔkwama malamu.

Kasi, na mokili ya lelo oyo bato bapesaka makambo nyonso nzela, baboti mingi bazali kolanda toli yango te. Lokola bazali kolanda makanisi oyo elobaka ete bana basengeli koyekola kolonga mikakatano bango moko, mbala mingi baboti batikaka bana bábunda na mikakatano bango moko. Kosala bongo ezali kotika bana na bopusi mabe ya bato ya mobulu.​—Masese 13:20.

Eleki malamu ete baboti bákɔtisa mitinda ya boklisto na bɔɔngɔ ya bana na bango na nzela ya mateya ya Nzambe kobanda bazali naino mike! Mike ya ndenge nini? Ntoma Paulo alobi, “Longwá na bomwana.” Ezalaki bongo mpo na elenge Timote. Mama na ye Yunike na nkɔkɔ na ye Loidi, bateyaki Timote “makomi na bulɛɛ” na boye ete ‘ayekolaki mpe andimaki.’ Litomba nini ezwamaki? Mateya yango epesaki ye “boyebi mpo na kobika.”​—2 Timote 1:5; 3:14, 15.

Ndenge moko lelo, baboti oyo “bazali kotika te kosala oyo ezali malamu” bakozwa mapamboli mingi soki “bakolɛmba te.” (Bagalatia 6:9, NW) Salomo, mokonzi ya mayele, alobi ete: “Tata na moyengebene akosepela mingi.”​—Masese 23:24.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto