Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/2 nk. 25-29
  • Nazali kosepela na Yehova atako komekama ezali

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazali kosepela na Yehova atako komekama ezali
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli ya moke
  • Komekama mosusu mpe bisengo
  • Bokoli ya mosala ya Teokrasi na esanga
  • Batisimo mpe kokola ya mosala
  • Mokano ya Nzambe: liyangani oyo esimbaki mpenza motema na ngai
  • Nakokisi mokano ya kokóma mobongisi-nzela
  • Mapamboli kitoko oyo nazwaki mpe oyo nazali kozela
  • Nakoli elongo na lisanga ya Jéhovah na Afrique du Sud
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/2 nk. 25-29

Nazali kosepela na Yehova atako komekama ezali

LISOLO YA GEORGE SCIPIO

Na Desɛmbɛ 1945, nakɔtaki lopitalo, nzoto mobimba ezalaki kosala lisusu te longola bobele mabɔkɔ na makolo. Nakanisaki nakokóma malamu nsima ya mwa ntango moke, kasi bato mosusu bandimaki te ete nakotambola lisusu. Yango ezalaki mpenza komekama makasi mpo na ngai elenge mobali ya makasi na mbula 17! Nazalaki kosepela na maloba yango te. Nazalaki na makambo mingi ya kosala, bakisa mpe kosala mobembo na Angleterre na patrɔ na ngai na mbula oyo ekolanda.

NABƐLAKI bukabuka oyo ekɔtaki na esanga na biso ya Sainte-Hélène. Ebomaki bato 11 mpe etikaki bana mingi bibɔsɔnɔ. Na mbeto ya lopitalo, nazalaki kokanisa mingi likoló na mwa bomoi mokuse oyo nalekisaki mpe bomoi na ngai na mikolo mikoya. Bongo, namonaki ete atako nazali konyokwama, nazalaki na ntina ya kosepela.

Ebandeli ya moke

Na 1933, wana nazalaki na mbula mitano, tata na ngai Tom, azalaki polisi mpe diakre na Lingomba ya Baptiste, azwaki babuku oyo Batatoli ya Yehova mibale bapesaki ye. Bazalaki basakoli ya ntango nyonso, to babongisi-nzela, oyo bayaki na esanga mpo na mwa ntango mokuse.

Buku moko ezalaki na motó na likambo La Harpe de Dieu. Tata azalaki kosalela yango mpo na koyekola Biblia na libota na biso mpe na bato mosusu mingi oyo bazalaki kosepela. Buku yango ezalaki makasi, mpe nakangaki mpenza ntina ya makambo mingi te. Kasi nayebi lisusu ete nazalaki kotya bilembo na bavɛrsɛ nyonso oyo tozalaki kotánga na Biblia na ngai. Mosika te, tata akangaki ntina ete makambo oyo tozalaki koyekola ezali nde solo mpe ekesanaki na makambo oyo azalaki koteya na Lingomba ya Baptiste. Abandaki koyebisa bato mosusu makambo yango mpe azalaki koteya na ndakonzambe ya Baptiste ete Bosato, lifelo ya mɔ́tɔ, mpe molimo oyo ekufaka te, ezali mateya ya lokuta. Yango ebimisaki yikiyiki na ndakonzambe.

Na nsuka, mpo na kosilisa likambo yango, babéngisaki bato nyonso na likita na ndakonzambe. Batunaki motuna, “Nani azali mpo na Baptiste?” Bato mingi bandimaki. Batunaki lisusu, “Nani azali mpo na Yehova?” Bato soko 10 to 12 bandimaki. Basɛngaki bango bálongwa na lingomba.

Yango ezalaki ebandeli moke ya lingomba ya sika na Sainte-Hélène. Tata asololaki na biro monene ya la Société Watch Tower na États-Unis mpe asɛngaki fono mpo bato báyokaka masolo ya Biblia na diskɛ. Bayebisaki ye ete fono oyo asɛngi eleki monene, ebongi kotinda yango na Sainte-Hélène te. Batindaki fono ya moke, mpe na nsima bandeko basɛngaki lisusu fono mibale. Bazalaki kotambola esanga mobimba na makolo to na mpunda, mpo na koteya bato.

Lokola nsango ezalaki kopalangana, botɛmɛli mpe ekómaki makasi. Na eteyelo na biso, banakelasi bazalaki koyembela ngai nzembo ete: “Bóya koyoka, bóya koyoka, miziki na fono ya Tommy Scipio!” Lokola nazalaki mwanakelasi mpe nazalaki kolinga ete baninga na ngai bálingaka ngai, yango ezalaki mokakatano monene. Eloko nini esalisaki ngai nakanga motema?

Libota na biso ezalaki monene​—bana bazalaki motoba, mpe pɔsɔ na pɔsɔ tozalaki kosala boyekoli ya Biblia. Lisusu, tozalaki kotánga Biblia ntɔngɔ nyonso liboso ya komela ti. Yango elendisaki mpenza libota na biso mpo na kokangama na solo na boumeli ya bambula. Kobanda bomwana nazalaki kolinga Biblia, mpe na boumeli ya bambula, nazalaki na momeseno ya kotánga yango mokolo na mokolo. (Nzembo 1:1-3) Ntango nakómaki na mbula 14 natikaki kelasi, namipesaki mingi na solo, mpe nazalaki mpenza kobanga Yehova na motema na ngai. Yango epesaki ngai nzela ya kosepela na Yehova atako komekama ezali.

Komekama mosusu mpe bisengo

Wana nalalaki na mbeto ya lopitalo kokanisa bambula wana oyo eleká mpe elikya na ngai na mikolo mikoya, nayebaki, na ndenge nayekolaki na Biblia ete maladi yango ezali komekama to etumbu ya Nzambe te. (Yakobo 1:12, 13) Atako bongo, bukabuka ezali komekama makasi, mpe nakotikala na bilembo na yango bomoi na ngai mobimba.

Ntango nakómaki malamu, nasengelaki lisusu koyekola kotambola. Misisa mosusu ya mabɔkɔ na ngai ezalaki kosala lisusu te. Nazalaki kokwea mbala mingi mokolo na mokolo. Kasi, nazalaki kosala mabondeli ya mozindo mpe milende mingi. Bongo na 1947, nabandaki kotambola na nzete.

Na eleko wana nabandaki kolula elenge mwasi moko, Doris, ye mpe azalaki Motatoli ya Yehova. Lokola tozalaki bilenge mpenza, likoki ya kobalana ezalaki te, kasi balendisaki ngai nasala milende mpo na kotambola malamu. Nalongwaki na mosala oyo nazalaki kosala mpamba te mbongo bazalaki kofuta ngai ezalaki moke mpenza mpo nakoka koleisa mwasi, mpe nafungolaki esika na ngai moko mpo na kosala lokola monganga ya mino, yango eumelaki mbula mibale. Tobalanaki na 1950. Na ntango yango mbongo oyo nazalaki kobomba esalisaki ngai na kosomba motuka ya moke. Nakómaki komema bandeko na makita mpe na mosala ya kosakola.

Bokoli ya mosala ya Teokrasi na esanga

Na 1951, mpo na mbala ya liboso, la Société atindelaki biso moto moko. Ezalaki Jacobus van Staden, elenge mobali oyo autaki na ekólo Afrika ya Sudi. Lokola toutaki kokɔta na ndako ya monene, ndeko yango afandaki epai na biso mbula mobimba. Lokola nazalaki na mosala ya ngai moko, tozalaki kosakola na ye mingi, mpe nayekolaki makambo mingi ya ntina mpenza epai na ye.

Jacobus, biso tozalaki kobénga ye Koos, azalaki kobongisa makita ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ mpe biso nyonso tozalaki koyangana na esengo. Tozalaki na mokakatano ya kokóma na esika ya makita mpamba te na kati na biso nyonso oyo tozalaki kosepela na solo tozalaki bobele na mituka mibale. Nzela ezalaki mabe mpe na bangomba, banzela ya malamu ezalaki mingi te na eleko wana. Bongo, ezalaki mosala monene komema moto nyonso na makita. Bazalaki kotambola banda na ntɔngɔ. Nazalaki komema bandeko misato na motuka na ngai mpe kopusa bango liboso. Soki bakiti, balandi kotambola na makolo. Nazalaki kozonga, kozwa lisusu misato kopusa bango liboso, mpe kokitisa bango, mpe kozonga lisusu kaka bongo. Na ndenge yango, moto nyonso azalaki kokóma na makita. Na nsima ya makita, tozalaki kosala bobele bongo mpo na kozongisa moto nyonso na ndako.

Koos alakisaki biso lisusu ndenge malamu ya kosala lisolo na ndako ya bato. Tokutanaki na makambo ya malamu mingi mpe mosusu ya mabe. Kasi esengo oyo mosala ya kosakola ezalaki kopesa biso elekaki komekama oyo eutaki na banguna ya mosala na biso. Mokolo moko na ntɔngɔ tozalaki kosakola ngai na Koos. Ntango topusanaki pene ya ndako moko, toyokaki mongongo ya moto na kati. Moto yango azalaki kotánga Biblia na mongongo makasi. Toyokaki polele maloba ya Yisaya mokapo 2, maloba wana toyebaki yango malamu. Ntango akómaki na vɛrsɛ 4, tobɛtaki ko-ko-ko. Mobange moko ya boboto asɛngaki biso tókɔta, mpe tosalelaki Yisaya 2:4 mpo na kolimbwela ye nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Tobandaki koyekola na ye Biblia atako azalaki kofanda na esika oyo, mpo na kokóma kuna ezalaki mpasi. Tosengelaki kokita ngomba, kotambola likoló ya mabanga mpo na kokatisa mai, komata ngomba mosusu, mpe kokita mpo na kokóma na ndako na ye. Litomba emonanaki. Mobange yango ya komikitisa andimaki solo mpe azwaki batisimo. Mpo na kokende na makita, azalaki kotambola na lisalisi ya banzete mibale kino na esika oyo nakokaki kokamata ye na motuka mpo na kokómisa ye na makita. Azalaki Motatoli ya sembo kino liwa na ye.

Mokonzi moko ya bapolisi azalaki kolinga te ete tósala mosala na biso mpe mbala na mbala azalaki kokana kobengana Koos. Mbala moko na sanza azalaki kobéngisa Koos mpo na kotuna ye mituna. Azalaki kosilika ntango Koos azalaki kopesa ye biyano ya polele biuti na Biblia. Mbala nyonso azalaki kokebisa Koos ete atika mosala ya kosakola, kasi Koos azalaki kosalela mabaku yango mpo na kopesa ye litatoli. Alandaki kotɛlɛmɛla mosala na biso ata ntango Koos alongwaki na Sainte-Hélène. Na nsima mokonzi yango, engambe mobali ya makasi, abɛlaki mpe akondaki mingi. Minganga bamonaki maladi na nzoto na ye te. Mpo na yango, alongwaki na esanga.

Batisimo mpe kokola ya mosala

Nsima ya sanza misato kobanda Koos ayaki na esanga, amonaki ete ebongi bato bázwa batisimo. Ezalaki mpasi mpo na komona liziba ya malamu. Totimolaki libulu ya monene, topalisaki yango na sima mpo tótondisa yango na mai. Na butu liboso ya kozwa batisimo, mbula ebɛtaki, mpe na ntɔngɔ tosepelaki komona ete libulu etondi na mai.

Mokolo ya lomingo yango na ntɔngɔ Koos asalaki lisukulu ya batisimo. Ntango asɛngaki na bato oyo balingi kozwa batisimo bátɛlɛma, totɛlɛmaki bato 26 mpo na koyanola na mituna oyo, na momeseno, batunaka bato oyo balingi kozwa batisimo. Tozwaki libaku ya kozala bato ya liboso oyo babatisamaki na esanga. Ezalaki mokolo oyo nayokaki esengo mingi koleka na bomoi na ngai mpamba te nazalaki komitungisa ntango nyonso ete Armagedon ekoya ngai nazwi naino batisimo te.

Na nsima, masangá mibale masalemaki, moko na Levelwood mpe mosusu na Jamestown. Pɔsɔ na pɔsɔ bandeko misato to minei kati na biso tozalaki kotambola kilomɛtɛlɛ 13 kino na lisangá mosusu mpo na kotambwisa Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya mosala na mokolo ya pɔsɔ na mpokwa. Nsima ya mosala ya kosakola mokolo ya lomingo na ntɔngɔ, tozalaki kozonga mpo na kotambwisa makita yango na lisangá na biso na nsima ya midi, mpe boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na mpokwa. Bawikende na biso ezalaki na bisengo, mpamba te tozalaki kolekisa yango na misala ya Teokrasi. Nazalaki na mposa ya kokóma mosakoli ya ntango nyonso, kasi nazalaki na mokumba ya libota. Bongo na 1952, nazongelaki kosala na Leta lokola monganga ya mino. Mosala yango ezalaki kozwa ngai mokolo mobimba.

Na 1955, bamonisi ya la Société, bakɛngɛli ya zongazonga, babandaki koya na esanga mbula na mbula, mpe bazalaki kofanda mwa mikolo na ndako na ngai. Bazalaki ndakisa malamu mpo na libota na biso. Na eleko yango, nazwaki lisusu libaku ya kosangana na kolakisama ya filime misato ya la Société na esanga mobimba.

Mokano ya Nzambe: liyangani oyo esimbaki mpenza motema na ngai

Na 1958, mpo na kokende na liyangani ya mikili mingi oyo ezalaki na motó na likambo, “Mokano ya Nzambe” oyo esalemaki na engumba New York, namilongolaki lisusu na mosala ya Leta. Liyangani yango etiká elembo na bomoi na ngai. Epesaki ngai bantina mingi ya kosepela na Yehova. Lokola masuwa ya kozonga na esanga ezalaki komonana te, tolekisaki sanza mitano na ndambo na mboka mopaya. Liyangani esalaki mikolo mwambe, mpe manaka ezalaki kobanda na ngonga ya libwa ya ntɔngɔ kino ngɔnga ya libwa ya butu. Kasi nalɛmbaki ata mbala moko te, nazalaki kozela na mposa mingi mokolo oyo ekolanda. Nazwaki libaku ya komonisa bandeko ya Sainte-Hélène na boumeli ya miniti mibale na liyangani. Koloba liboso ya bato ebele na libándá ya masano ya Yankee Stadium mpe ya Polo Grounds ezalaki likambo moke te.

Liyangani elendisaki ekateli na ngai ya kokóma mobongisi-nzela. Lisolo oyo ezalaki na motó na likambo, “Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela​—Nsuka ya mokili ebɛlɛmi?,” elendisaki ngai mingi. Nsima ya liyangani, tokendaki kotala biro monene ya la Société na Brooklyn mpe tolekaki na esika basalaka mikanda. Nasololaki na Ndeko Knorr, oyo azalaki prezida ya la Société Watch Tower na ntango wana, na ntina na bokoli ya mosala na Sainte-Hélène. Alobaki ete akosepela koya na Sainte-Hélène mokolo mosusu. Tomemaki bakasɛti nyonso ya masukulu na bafilime oyo tolandaki na liyangani mpo na kolakisa na libota mpe na baninga.

Nakokisi mokano ya kokóma mobongisi-nzela

Ntango nazongaki, babéngisaki ngai mpo na kozongela mosala na ngai ya kala, mpamba te monganga mosusu ya mino azalaki te na esanga. Kasi, nalimbwelaki bango ete nalingi kokóma mosakoli ya ntango nyonso. Nsima ya kosolola na bango mbala mingi bandimaki ete nasalaka mikolo misato na pɔsɔ, mpe lifuti ezalaki mingi koleka ntango nazalaki kosala mikolo motoba na pɔsɔ. Maloba ya Yesu mamonanaki solo ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ikobakisama na bino.” (Matai 6:33) Kotambola na banzela ya bangomba ya esanga ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai moto nazali na makolo ya malamu te. Atako bongo, nasalaki mosala ya mobongisi-nzela mbula 14 mpe nasalisi bato mingi ya esanga báyeba solo. Likambo oyo epesaki ngai esengo mingi.

Na 1961, Leta alingaki kotinda ngai na bisanga ya Fidji kolanda mateya oyo elingaki koumela mbula mibale mpo na kokóma monganga ya mino ya makoki mpenza. Kutu, bandimaki namema libota na ngai mobimba. Ezalaki komekama monene, kasi nsima ya kokanisa malamumalamu, naboyaki. Nalingaki te nakabwana na bandeko ntango molai bongo mpe nasundola libaku na ngai ya kosala elongo na bango. Monganga-mokonzi oyo abongisaki mobembo yango asilikaki. Alobaki ete: “Ata soki okanisi ete nsuka ebɛlɛmi, okoki naino kosalela mbongo oyo okozwa na ntango oyo.” Kasi nabongolaki makanisi na ngai te.

Mbula oyo elandaki babéngisaki ngai na Afrika ya Sudi kolanda mateya ya sanza moko na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi, mpo na kobongisa bankulutu ya lisangá. Bapesaki biso malako mabongi oyo esalisaki biso na kokokisa malamu mikumba na biso na kati ya lisangá. Na nsima ya eteyelo, nayekolaki lisusu makambo mingi na ndenge nazalaki kosala na mokɛngɛli-motamboli moko. Na nsima, nasalaki na masangá mibale ya Sainte-Hélène na boumeli ya mbula koleka zomi lokola mokɛngɛli ya zongazonga mosungi. Ntango bandeko ya makoki bamonanaki, tokómaki na ebongiseli ya kosala moko nsima na mosusu.

Na eleko yango, tolongwaki na Jamestown mpe tokendaki na Levelwood, epai mposa ezalaki mingi, mpe tofandaki kuna mbula zomi. Na eleko yango nakómaki na makambo mingi ya kosala. Epai oyo mobongisi-nzela, epai kuna kosala mikolo misato na pɔsɔ na mosala ya Leta, mpe nazalaki na butike ya kotɛkisa biloko mikemike. Lisusu, nazalaki kotalela makambo ya lisangá, mpe ngai na mwasi na ngai tozalaki na bana minei oyo bazalaki naino mike. Mpo na yango, natikaki mosala ya Leta, natɛkisaki butike, mpe namemaki libota mobimba mpo na kopema sanza misato na engumba Cape Town, na ekólo Afrika ya Sudi. Na nsima tokendaki na esanga Ascension mpe tofandaki kuna mbula moko. Na boumeli ya ntango wana, tosalisaki bato mingi mpo ete bázwa boyebi ya solo ya Biblia.

Ntango tozongaki na Sainte-Hélène, tokendaki kofanda na Jamestown. Tobongisaki ndako oyo ekanganaki na Ndako ya Bokonzi. Mpo na kokokisa bamposa na biso ya mosuni, ngai na mwana na ngai John tobongisaki motuka moko ya kotɛkisa crème. Tosalaki mombongo yango na boumeli ya mbula mitano oyo elandaki. Mwa moke na nsima, nazwaki likama na motuka yango. Ekweaki mpe efinaki ngai na makolo. Mpo na yango, misisa na ngai ya nsima ya mabɔlɔngɔ ezalaki lisusu kosala te na boumeli ya sanza misato.

Mapamboli kitoko oyo nazwaki mpe oyo nazali kozela

Na nsima ya bambula, tozwaki mapamboli mingi​—oyo tosepelaki na yango. Moko na yango ezali mobembo na Afrika ya Sudi epai tokendaki na liyangani na 1985 mpe tokendaki kotala Betele ya sika oyo ezalaki naino kotongama. Lipamboli mosusu ezalaki oyo ngai na mwana na ngai John, topesaki mabɔkɔ mpo na kotonga Ndako kitoko ya Mayangani pene na Jamestown. Tozali lisusu na esengo mpamba te bana na biso misato bazali bankulutu, mpe nkɔkɔ na biso moko azali kosala na Betele ya Afrika ya Sudi. Tobuki mpenza mbuma ya esengo mpe tosepeli na ndenge tosalisaki bato mingi na kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia.

Teritware na biso ya mosala ya kosakola ezali mpenza monene te. Ezali na bato soko 5 000 mpamba. Atako bongo, kosala na teritware moko mbala na mbala ebimisi matomba malamu. Bato oyo baboyaka koyoka biso bazali mingi te. Bato ya Sainte-Hélène bayebani mpo na boboto na bango, mpe esika nyonso okoleka bakopesa yo mbote​—ata ozali kotambola na makolo to na motuka. Nayebi sikoyo ete soki oluki koyeba bato malamu, ekozala pɛtɛɛ mpo na koteya bango. Sikoyo tozali basakoli 150, atako mingi bakei kofanda na mikili mosusu.

Sikoyo bana na biso basili kokola mpe bakómi kofanda na bisika na bango moko. Ngai na mwasi na ngai totikali lisusu biso moko, nsima ya mbula 48 ya libala. Lisungi na ye ya bolingo mpe ya bosembo na boumeli ya bambula esalisi ngai nalanda kosalela Yehova na esengo atako komekama ezali. Na nzoto, makasi ezali kosila, kasi na elimo makasi ezali kobakisama mokolo na mokolo. (2 Bakolinti 4:16) Ngai, libota na ngai, mpe baninga na ngai, tozali kozela na elikya nyonso mikolo mizali koya ntango nakozonga nzoto kolɔngɔnɔ koleka ata ndenge nazalaki na mbula 17. Nazali na mposa makasi ya kokóma na ezaleli ya kokoka na makambo nyonso, mpe na koleka, kosalela libela na libela, Yehova, Nzambe na biso ya bolingo mpe mobateli, mpe Yesu Klisto, mokonzi na ye oyo azali koyangela.​—Nehemia 8:10.

[Elilingi na lokasa 26]

George Scipio na bana na ye misato, oyo bazali bankulutu

[Elilingi na lokasa 29]

George Scipio na mwasi na ye, Doris

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto