Tiká ete Yehova asepela na yo
“Nzambe na ngai, kanisá ngai mpo na likambo oyo . . . Nzambe na ngai, kanisá ngai mpo na malamu.”—NEHEMIA 13:22, 31.
1. Nini ezali kosalisa baoyo bamipesi na Nzambe ete básepelisa Ye?
BASALELI ya Yehova bazali na lisungi nyonso oyo esengeli na bango mpo ete bákoka kosepelisa ye. Mpo na nini? Mpamba te bazali na boyokani ya penepene elongo na Nzambe awa ezali bango eteni ya lisangá na ye ya mabelé. Asili komonisa bango mikano na ye, mpe na nzela ya elimo santu na ye asili kopesa bango bososoli ya elimo. (Nzembo 51:11; 119:105; 1 Bakolinti 2:10-13) Na kotalela makambo wana ya sikisiki, Yehova azali kobyanga na bolingo nyonso basaleli na ye awa na mabelé ete básepelisa ye na lolenge ya bomoi na bango mpe na makambo oyo bakokisaka na nguya na ye mpe na lisungi ya elimo santu na ye.
2. (a) Na makambo nini Nehemia asepelisaki Nzambe? (b) Na malɔmbo nini Nehemia asukisaki mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye?
2 Mobali moko oyo asepelisaki Nzambe ezalaki bongo Nehemia, bɔi ya mesa ya Aletahesaseta (Longuemain) Mokonzi na Palasa. (Nehemia 2:1) Nehemia akómaki guvɛrnɛrɛ ya Bayuda mpe atongaki bifelo ya Yelusaleme kati na makaneli ya banguna mpe kati na makámá. Na molende mpenza mpo na losambo ya solo, atosisaki Mibeko ya Nzambe mpe amonisaki komibanzabanza mpo na banyokwami. (Nehemia 5:14-19) Nehemia alendisaki Balewi ete bámipɛtɔla mbala na mbala, básɛnzɛla bikuke, mpe básantisa mokolo ya Sabata. Yango wana abondelaki ete: “Nzambe na ngai, kanisá ngai mpo na likambo oyo lokola, mpe limbisá ngai lokola ezali monene na boboto na yo.” Lisusu, na lolenge lobongi, Nehemia asukisaki mokanda na ye mopemami na Nzambe na malɔmbo oyo, ete: “Kanisá ngai mpo na malamu.”—Nehemia 13:22, 31.
3. (a) Na maloba nini okolobela moto oyo asalaka malamu? (b) Kokanisa na ntina na etamboli ya Nehemia ekoki kosala ete tómituna mituna nini?
3 Moto oyo asalaka malamu azalaka na bizaleli malamu mpe asalaka makambo oyo mazali sembo mpo na matomba ya basusu. Nehemia azalaki moto ya motindo wana. Azalaki na bobángi bopusami na limemya mozindo epai na Nzambe mpe na molende makasi mpo na losambo ya solo. Lisusu, azalaki na botɔ́ndi mingi mpo na mikumba na ye kati na mosala ya Nzambe mpe andimamaki solo epai na Yehova. Kokanisáká likoló na etamboli na ye ekoki kosala ete tómituna boye, ‘Lolenge nini natalelaka mabaku ya mosala mpe mikumba na ngai oyo miuti na Nzambe? Nkombo nini nazali komisalela epai na Yehova mpe Yesu Klisto?’
Boyebi etyaka mokumba likoló na biso
4. Etindá nini Yesu apesaki na bayekoli na ye, mpe baoyo “baponami mpo na kobikisama” basalaki nini?
4 Yesu apesaki bayekoli na ye etindá oyo: “Bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango . . . , kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Esengelaki ete bato yango bálakisama mpo bákóma bayekoli. Baoyo bateyamaki bongo mpe baoyo “basilaki koponama mpo na bomoi na seko” basengelaki kozwa batisimo, lokola Yesu. (Misala 13:48; Malako 1:9-11) Mposa na bango ya kotosa makambo nyonso oyo asilaki kolaka esengelaki kouta na motema. Balingaki kokóma kino komipesa na Nzambe na koyekoláká mpe na kosaleláká Liloba na Ye.—Yoane 17:3.
5, 6. Lolenge nini tosengeli kososola Yakobo 4:17? Pesá ndakisa na lolenge ya kosalela yango.
5 Soki boyebi na biso ya Makomami ezali mozindo, moboko ya kondima na biso ekozala makasi mpenza. Bobele na ntango yango, mokumba na biso epai na Nzambe ekókoma monene koleka. Yakobo 4:17 elobi ete: “Na bongo, ye oyo ayebi kosala malamu nde akosalaka boye te, ezali na ye lisumu.” Maloba oyo mazali mpenza bosukisi ya makambo moyekoli Yakobo autaki koloba na ntina na komikumisa na esika ya komitika mobimba na mabɔkɔ ya Nzambe. Soki moto ayebi ete akoki kosala likambo moko te oyo ekoumela kozanga lisalisi ya Yehova kasi asali bongo te, yango ezali lisumu. Kasi maloba ya Yakobo makoki mpe kosalelama na ntina na lisumu wana moto azangaki kosala likambo moko. Na ndakisa, kati na lisese ya Yesu na ntina na bampate mpe bantaba, bantaba bakweisamaki, mpo te basalaki makambo mabe te, kasi mpo bazangaki kosalisa bandeko ya Klisto.—Matai 25:41-46.
6 Mobali moko oyo Batatoli ya Yehova bazalaki koyekola na ye Biblia azalaki kosala bokóli mpenza te, mpamba te atikaki te komela likaya, atako ayebaki ete asengelaki kotika yango. Nkulutu moko asɛngaki na ye ete atánga Yakobo 4:17. Nsima ya kopesa ndimbola ya mokapo yango, nkulutu alobaki ete: “Atako ozwi naino batisimo te, ozali na mokumba mpe osengeli kozongisa monɔkɔ mpo na ekateli na yo.” Likambo ya esengo, mobali yango ayokaki, atikaki komela likaya, mpe nokinoki akokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo lokola elembo ya komipesa na ye epai na Yehova Nzambe.
Tosengeli kozongisa monɔkɔ na ntina na mosala na biso
7. Lolenge moko ya komonisa botɔ́ndi na biso mpo na “boyebi ya koyeba Nzambe” ezali nini?
7 Tosengeli kozala na mposa makasi ya kosepelisa Mozalisi na biso. Lolenge moko ya komonisa botɔ́ndi na biso mpo na “boyebi na koyeba Nzambe” ezali bongo ya kokokisa mosala na biso ya kozalisa bato bayekoli ya Mwana na ye, Yesu Klisto. Yango mpe ezali lolenge ya komonisa bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso. (Masese 2:1-5; Matai 22:35-40) Ee, boyebi ya Nzambe oyo tozali na yango ezali kopesa biso mokumba liboso na ye, mpe tosengeli kotalela bazalani na biso ete bakoki kokóma bayekoli.
8. Mpo na nini tokoki koloba ete Paulo amiyokaki ete asengelaki kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe na ntina na mosala na ye?
8 Ntoma Paulo ayebaki ete kondima mpe kotosa nsango malamu na motema mobimba ememaka na lobiko, nzokande, koboya yango ekoki komema na libebi. (2 Batesaloniki 1:6-8) Na yango amiyokaki ete asengelaki kozongisa monɔkɔ epai na Yehova na ntina na mosala na ye. Ya solo, Paulo mpe baninga na ye bazalaki kosepela mingi na mosala na bango na boye ete basalaki na bokɛngi nyonso mpo eloko moko te epesa bato likanisi ete bázwaka na yango matomba ya mosolo. Lisusu, motema na Paulo epusaki ye na koloba ete: “Soko nazali kosakola Nsango Malamu, ezali na ngai likambo na komikumisa te. Napesami simbisi ete nasala boye. Mawa na ngai soko nakosakola Nsango Malamu te!”—1 Bakolinti 9:11-16.
9. Nyongo nini ya monene baklisto nyonso basengli kofuta?
9 Lokola tozali basaleli ya Yehova bamipesi, ‘topesami simbisi ete tósakola nsango malamu.’ Kosakola nsango ya Bokonzi ezali mokumba na biso. Tondimaki mokumba wana ntango tomipesaki epai na Nzambe. (Kokanisá na Luka 9:23, 24.) Epai mosusu, tozali na nyongo oyo tosengeli kofuta yango. Paulo alobaki ete: “Nazali na nyongo epai na Baela mpe Bapakano, epai na bato na mayele mpe na bato bazangi mayele. Bongo, ngai nazali na mposa ete nasakola Nsango Malamu epai na bino bozali kati na Loma.” (Baloma 1:14, 15) Paulo azalaki na nyongo mpamba te ayebaki ete ezalaki mokumba na ye kosakola mpo bato bákoka koyoka nsango malamu mpe kobikisama. (1 Timoté 1:12-16; 2:3, 4) Na yango asalaki mosala makasi mpo na kokokisa mokumba na ye mpe kofuta nyongo na ye epai na bazalani na ye. Lokola tozali baklisto, biso mpe tosengeli kofuta nyongo motindo yango. Kosakola Bokonzi ezali lisusu lolenge ya komonisa bolingo mpo na Nzambe, mpo na Mwana na ye, mpe mpo na bazalani na biso.—Luka 10:25-28.
10. Na kosaláká nini basusu bakólisaki libaku na bango ya mosala ya Nzambe?
10 Moko na myango ya kosepelisa Nzambe etali bongo kosalela makoki na biso mpo na kokólisa mosala oyo tozali kosalela Nzambe. Tópesa ndakisa: Na bambula oyo euti koleka bato mingi oyo bauti na bikólo bikeseni bakendaki kofanda na mboka Grande-Bretagne. Mpo na kosakola nsango malamu epai na bato motindo yango, babongisi-nzela (basakoli ya ntango nyonso ya Bokonzi) koleka 800 mpe ebele ya Batatoli mosusu bazali koyekola nkótá ndenge na ndenge. Yango ebimisaki elendiseli monene mpo na mosala ya Nzambe. Mobongisi-nzela moko oyo azalaki kolakisa lokótá Chinois alobaki ete: “Nakanisaki soko moke te ete nakolakisa Batatoli mosusu lokótá na ngai, mpo bákoka kosakola solo epai na bato mosusu na lokótá yango. Ezali likambo ya kosepelisa!” Okoki kokólisa mosala na yo na lolenge yango?
11. Matomba nini mamonanaki ntango moklisto moko apesaki litatoli na libaku malamu?
11 Na ntembe te, mokomoko na biso akosala nyonso ekoki na ye mpo na kobikisa moto oyo azali kozinda na mai. Bobele bongo basaleli ya Yehova bazali na mposa makasi ya kosalela makoki na bango mpo na kopesa litatoli na mabaku nyonso. Kala mingi te, Motatoli moko ya mwasi afandaki kati na bisi pene na mwasi moko mpe asololaki na ye na ntina na Makomami. Lokola asepelaki mpenza na makambo oyo ayokaki, mwasi yango atunaki mituna mingi. Ntango Motatoli alingaki kokita na bisi, mwasi yango abondelaki ye ete akenda elongo na ye na ndako na ye, mpamba te azalaki naino na mituna mingi ya kotuna. Motatoli yango andimaki. Esukaki boni? Babandaki boyekoli ya Biblia, mpe sanza motoba na nsima mwasi yango akómaki mosakoli ya Bokonzi oyo azwi naino batisimo te. Mosika te akómaki kotambwisa ye moko boyekoli ya Biblia elongo na bato motoba. Oyo nde litomba kitoko lizwami mpo ete moto moko asalelaki makoki na ye kati na mosala ya Bokonzi!
12. Lolenge nini tokoki kosalela malamu makoki na biso ya baministre kati na mosala ya kosakola?
12 Tokoki kosalela malamu makoki na biso ya baministre kati na mosala ya kosakola na kosaleláká mikanda lokola búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko oyo ezali na nkasa 192. Na Apríli 1996, Comité de Rédaction ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova esilaki kondima bobimi ya búku Boyebi na nkótá koleka 140, mpe kino ntango yango basilaki konyata 30500000 na yango na nkótá 111. Búku wana ekomamaki mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia ete báyekola makambo mingi na ntina na Liloba mpe mokano ya Nzambe mpo bámipesa epai na Yehova mpe bázwa batisimo. Lokola basakoli ya Bokonzi basengeli te kotambwisa boyekoli ya Biblia elongo na moyekoli moko na boumeli ya bambula mingi, bakoki bongo koyekola elongo na bato mingi to bakoki kosangana mingi kati na mosala ya kosakola na ndako na ndako mpe na lolenge mosusu ya mosala ya Nzambe. (Misala 5:42; 20:20, 21) Lokola bayebi mokumba na bango epai na Nzambe, bazali kobenda likebi ya bato likoló na makebisi ya Nzambe. (Ezekiele 33:7-9) Kasi mokano na bango ya liboso ezali bongo kokumisa Yehova mpe kosalisa bato ebele mpenza na koyekola makambo na ntina na nsango malamu na boumeli ya ntango moke oyo etikali na ebongiseli mabe ya biloko oyo.
Tózongisa monɔkɔ mpo ete tóndimama libota mobimba
13. Mpo na nini mabota oyo mazali kobanga Nzambe masengeli kozala na boyekoli ya libota pɔ́sɔ na pɔ́sɔ?
13 Moto nyonso mpe libota nyonso oyo bandimi losambo ya boklisto bazali na mokumba epai na Nzambe mpe basengeli bongo ‘kokóla nokinoki’ mpe kokóma “ngwi mpo na kondima.” (Baebele 6:1-3; 1 Petelo 5:8, 9) Na ndakisa, baoyo bazali koyekola búku Boyebi mpe kozwa batisimo basengeli kokólisa boyebi na bango ya Makomami na koyanganáká pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita mpe na kotángáká Biblia mpe mikanda misusu ya boklisto. Mabota oyo mazali na bobángi Nzambe masengeli kosala boyekoli ya libota pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, mpamba te yango ezali mwango malamu mpenza mpo na ‘kokɛngɛla, kotɛlɛma ngwi kati na kondima, kozala babali mpenza, kokemba na nguya.’ (1 Bakolinti 16:13) Soki ozali motambwisi ya libota, liboso na Nzambe ozali mpenza na mokumba monene ya kosala nyonso ete libota na yo eleisama malamu na elimo. Motindo moko lokola bilei malamu ya mosuni ekólisaka nzoto, bobele bongo bozali na mposa ya bilei mingi ya elimo mokolo na mokolo ete yo mpe libota na yo ‘bózala makasi kati na kondima.’—Tito 1:13.
14. Litomba nini eutaki na litatoli ya mwana mwasi moko ya moke ya Yisalaele oyo alakisamaki malamu?
14 Soki bana bazali kati na libota na yo, Nzambe akosepela na yo malamu wana ekopesa yo bango kolakisama malamu ya elimo. Kolakisama lolenge yango ekoki kopesa bango litomba, motindo moko lokola esalemaki epai na mwana mwasi moko moke ya Yisalaele oyo bato ya Sulia babɔtɔlaki na mikolo ya Elisa mosakoli ya Nzambe. Akómaki moombo ya mwasi ya Namana, mokonzi ya basodá ya Sulia, oyo abɛlaki bokɔnɔ ya maba. Atako azalaki bobele elenge, ayebisaki nkolo na ye ya mwasi ete: “Soko nkolo na ngai azalaki liboso na mosakoli oyo azali na Samalia, mbɛ ye akobikisa ye na mbala na ye.” Mpo na litatoli na ye, Namana akendaki na Yisalaele, mpe na nsima andimaki etindá oyo Elisa apesaki ye ya kosukola mbala nsambo kati na Ebale Yaladene, mpe apɛtɔlamaki na maba na ye. Epai mosusu, Namana akómaki mosambeli ya Yehova. Boye yango epesaki mpenza mwana moke wana ya mwasi esengo!—2 Mikonzi 5:1-3, 13-19.
15. Mpo na nini ezali likambo ya ntina ete baboti báteya bana na bango malamu na elimo? Pesá ndakisa.
15 Ezali likambo ya pɛtɛɛ te kobɔkɔla bana kati na mokili ya mbindo oyo mozali kolala kati na nguya na Satana. (1 Yoane 5:19) Nzokande, uta bomwana ya Timoté, nkɔ́kɔ na ye Loisi mpe mama na ye, Enise, bateyaki ye Makomami na lolenge malamu mpenza. (2 Timoté 1:5; 3:14, 15) Koyekola Biblia elongo na bana na bino, kokenda na bango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya boklisto, mpe na nsima kobima elongo na bango kati na mosala ya kosakola, nyonso wana ezali eteni ya lolenge ya kolakisama oyo mpo na yango bosengeli kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe. Mwasi moklisto moko na mboka ebéngami Pays de Galles, oyo azali sikawa na bambula koleka 80, azali komikundola ete na ebandeli ya bambula 1920, tata na ye azalaki kokenda na ye elongo wana azalaki kotambola bakilomɛtɛlɛ 10 likoló na ngomba moko (mobembo mobimba ya bakilomɛtɛlɛ 20) mpo na kokabola batrakte oyo elimbolaka Biblia epai na bafandi ya mboka na lobwaku mosusu kuna nsima ya ngomba. Alobaki na botɔ́ndi nyonso ete: “Ezalaki na boumeli ya botamboli wana nde tata na ngai azalaki kokɔtisa solo kati na motema na ngai.”
Bankulutu bazali kozongisa monɔkɔ—Lolenge nini?
16, 17. (a) Mikumba nini mibali oyo bakɔmɛli na elimo bazalaki kozwa na Yisalaele ya kala? (b) Mpo na nini lelo oyo mingi esɛngami na bankulutu baklisto, soki tokokanisi ezalela na bango na oyo ya Yisalaele ya kala?
16 Solomo, moto na mayele alobaki ete: “Motó na pɛɛ ezali motole na nkembo, ezwami na nzela na boyengebene.” (Masese 16:31) Kasi ezali te bobele kozala na mbula mingi ya kobotama nde ezali kobongisa moto mpo na kozwa mikumba kati na lisangá ya libota ya Nzambe. Na Yisalaele ya kala, mibali oyo bakɔmɛli na elimo bazalaki basambisi mpe basáli mpo na kotya bosembo mpe kobatela kimya, molɔngɔ́, mpe kolɔngɔ́nɔ́ ya elimo. (Deteronome 16:18-20) Atako likambo yango lizali mpe solo mpo na lisangá ya boklisto, nzokande mingi esɛngami epai na bankulutu lokola nsuka ya ebongiseli oyo mabe esili kobɛlɛma. Mpo na nini?
17 Bayisalaele bazalaki ‘libota liponami’ oyo Nzambe asikolaki longwa na Ezipito ya kala. Lokola bazwaki Mibeko na nzela ya moyokanisi, Mose, bakitani na bango babotamaki kati na libota moko oyo esilaki komipesa epai na Nzambe mpe bayebaki malamu mitindá ya Yehova. (Deteronome 7:6, 11) Nzokande, lelo oyo, moto moko te abotami na kati na libota motindo yango oyo emipesi na Nzambe, mpe bobele bato moke nde bakólaka kati na mabota oyo mayebi malamu solo ya Makomami. Baoyo babandi kala mingi te “kotambola kati na solo” bazali mpenza na mposa ya malako matali lolenge ya kozala na bomoi engebene mitindá ya Makomami. (3 Yoane 4) Na yango, mokumba monene mpenza mozali na mapeka ya bankulutu oyo bazali sembo wana ezali bango ‘kosimba lolenge na maloba sembo’ mpe kosunga libota ya Yehova!—2 Timoté 1:13, 14.
18. Lisungi ya lolenge nini bankulutu ya lisangá ya boklisto basengeli kozala pene ya kopesa, mpe mpo na nini?
18 Mwana moke oyo azali koyekola kotambola akoki kobɛta libaku mpe kokwea. Akozala na bobángi mpe azali na mposa ya lisalisi mpe bilendiseli ya baboti. Bobele bongo moto oyo amipesi epai na Yehova akoki mpe kobɛta libaku to kokwea na elimo. Ata ntoma Paulo amonaki ntina ya kobunda makasi mpo na kosala makambo oyo mazali sembo mpe malamu na miso ya Nzambe. (Baloma 7:21-25) Babateli na mpate ya etɔ́nga ya Nzambe basengeli na bolingo nyonso kosunga baklisto oyo basalaki lisumu kasi babongolaki mpenza motema. Ntango bankulutu bakendaki kotala mwasi moko oyo asalaki lisumu monene, ayebisaki bango liboso na mobali na ye oyo azali moto amipesi epai na Nzambe ete: “Nayebi ete bokobimisa ngai na lisangá!” Kasi alelaki mpenza ntango bayebisaki ye ete bankulutu balingaki koyeba soki lisungi nini esengelaki kopesama mpo na kosalisa libota yango ete lizala makasi na elimo. Lokola bayebi ete basengeli kozongisa monɔkɔ, bankulutu bazalaki na esengo ya kosalisa moninga wana mondimi oyo abongolaki motema.—Baebele 13:17.
Tómimonisa ntango nyonso bato bandimami
19. Lolenge nini tokoki ntango nyonso kokóba kosepelisa Nzambe?
19 Bankulutu kati na lisangá mpe basaleli mosusu nyonso ya Nzambe basengeli ntango nyonso koluka ete bándimama epai na Yehova. Yango ekosalema soki tokangami na Liloba ya Nzambe mpe tozali kosala mokano na ye. (Masese 3:5, 6; Baloma 12:1, 2, 9) Tosengeli kosala malamu na koleka epai na baoyo bazali bandeko na biso kati na kondima. (Bagalatia 6:10) Nzokande, mbuma na elanga iteli mingi mpenza kasi basáli bazali mingi te. (Matai 9:37, 38) Na bongo tiká ete tósala malamu epai na basusu na kosakoláká nokinoki nsango ya Bokonzi. Yehova akokanisa biso mpo na malamu soki tokokisi ndai ya komipesa na biso, tosali mokano na ye, mpe tosakoli na bosembo nyonso nsango malamu.
20. Tokoyekola nini soki totaleli etamboli ya Nehemia?
20 Na yango, tiká ete tózala ntango nyonso na misala mingi kati na mosala ya Nkolo. (1 Bakolinti 15:58) Mpe ekozala malamu ete tótalela Nehemia, oyo atongaki bifelo ya Yelusaleme, atosisaki Mibeko ya Nzambe, mpe na molende nyonso alendisaki losambo ya solo. Abondelaki ete Yehova Nzambe akanisa ye mpo na malamu oyo asalaki. Tiká ete okangama makasi bongo epai na Yehova, mpe tiká ete asepela na yo.
Okopesa eyano nini?
◻ Nehemia atikaki ndakisa nini?
◻ Mpo na nini boyebi epesaka biso mokumba epai na Nzambe?
◻ Lolenge nini tokoki kozongisa monɔkɔ mpe kondimama epai na Yehova kati na mosala na biso ya Nzambe?
◻ Mabota makoki kosala nini mpo na kosepelisa Nzambe?
◻ Lolenge nini bankulutu baklisto bazali kozongisa monɔkɔ?
[Bililingi na lokasa 18]
Lokola Paulo, tokoki kosepelisa Nzambe lokola basakoli ya nsango ya Bokonzi
[Elilingi na lokasa 19]
Bana na yo bazali makasi na kondima lokola elenge mwasi Moyisalaele oyo azalaki kati na ndako ya Namana?