Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/9 nk. 10-15
  • Biso banso tosengeli kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biso banso tosengeli kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu basengeli kozongisa monɔkɔ
  • Mwana ya Nzambe asengeli kozongisa monɔkɔ
  • Mabota masengeli kozongisa monɔkɔ
  • Ndakisa ya bato oyo basengelaki kozongisa monɔkɔ
  • Kozongisa monɔkɔ kati na lisangá ya boklisto
  • Tiká ete Yehova asepela na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Moklisto nyonso azalaka na mposa ya bandeko na ye baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mokanda ya Biblia nimero 9—1 Samwele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/9 nk. 10-15

Biso banso tosengeli kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe

“Moto na moto na biso akotánga makambo na ye mpenza liboso na Nzambe.”​—BALOMA 14:12.

1. Bandelo nini etyamaki likoló na bonsomi oyo Adama na Eva bazalaki na yango?

YEHOVA NZAMBE azalisaki baboti na biso ya liboso, Adama na Eva, bato oyo bazalaki na bonsomi ya kopona makambo. Atako bakokanaki na banzelu te, bazalaki bikelamu ya mayele oyo bazalaki na makoki ya kokamata bikateli ya mayele. (Nzembo 8:4, 5) Nzokande, bonsomi yango oyo bopesamaki na Nzambe bozalaki mwango te ya kozwa ekateli bango moko mpo na oyo ezali malamu to oyo ezali mabe. Basengelaki kozongisa monɔkɔ epai na Mozalisi na bango, mpe mokumba wana molekisamaki epai na bakitani na bango nyonso.

2. Mosika te Yehova akotuna likambo nini, mpe mpo na nini?

2 Lokola tozali sikawa kobɛlɛma na nsuka ya biloko mabe ya ntango oyo, Yehova akoyeisa kosambisa likoló na mabelé. (Kokanisá na Baloma 9:28.) Mosika te, batuki Nzambe basengeli kozongisa monɔkɔ epai na Yehova Nzambe mpo na kobebisama ya bozwi ya mabelé, koboma bato, mpe mingimingi mpo na konyokolama ya basaleli na ye.​—Emoniseli 6:10; 11:18.

3. Mituna nini tokotalela?

3 Lokola likambo yango lizali liboso na biso, ezali malamu ete tókanisa na ntina na boyokani ya sembo oyo Yehova azalaki na yango kala elongo na bikelamu na ye. Lolenge nini Makomami makoki kosalisa moto na moto na biso, ete tóndimama na ntango oyo tokozongisa monɔkɔ epai na Mozalisi na biso? Bandakisa nini ekoki kosunga biso, mpe oyo wapi tosengeli te komekola yango?

Baanzelu basengeli kozongisa monɔkɔ

4. Lolenge nini toyebi ete Nzambe atalelaka baanzelu lokola bato oyo basengeli kozongisa monɔkɔ mpo na misala na bango?

4 Baanzelu oyo bazali bikelamu ya Yehova na likoló basengeli mpe kozongisa monɔkɔ lokola biso. Liboso na Mpela ya mikolo na Noa, baanzelu mosusu, na botomboki nyonso balataki nzoto ya bato mpo na kosangisa nzoto elongo na basi. Lokola bazalaki na bonsomi ya kopona makambo, bikelamu yango ya elimo bazalaki na likoki ya kokamata ekateli wana, kasi na miso na Nzambe basengelaki kozongisa monɔkɔ. Ntango baanzelu wana batomboki bazongaki na bisika ya elimo, Yehova aboyaki ete bázongela etɛlɛmɛlo bazalaki na yango liboso. Moyekoli Yuda ayebisi biso ete batyami “na nkanga na seko kati na molili kino kosambisama na Mokolo yango monene.”​—Yuda 6.

5. Kokwea nini Satana mpe bademó na ye bakweaki, mpe lolenge nini likambo litali botomboki na bango likokatama?

5 Baanzelu wana batomboki, to bademó, bazali na nsé ya litambwisi ya Satana Zábolo oyo azali bongo mokonzi na bango. (Matai 12:24-26) Anzelu wana mabe atombokelaki Mozalisi na ye mpe aanganaki lotómo ya Yehova ya kozala Mokonzi Monene ya mɔlɔ́ngɔ́. Satana akweisaki baboti na biso ya liboso kati na lisumu, mpe na nsima yango ememaki bango na kufa. (Genese 3:1-7, 17-19) Atako Yehova atikelaki Satana likoki ya kokɔta na likoló na bileko oyo bilandaki, Emoniseli, mokanda ya Biblia esakolaki ete na ntango eponami na Nzambe, moto mabe wana asengelaki kobwakama zingazinga na mabelé. Bilembeteli bizali komonisa ete yango esalemaki mwa moke nsima wana Yesu Klisto azwaki nguya ya Bokonzi na 1914. Nsukansuka, Zábolo mpe bademó na ye bakobomama seko. Wana likambo litali boyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba likokatama, kozongisa monɔkɔ mpo na botomboki ekokatama na lolenge ya sembo mpenza.​—Yobo 1:6-12; 2:1-7; Emoniseli 12:7-9; 20:10.

Mwana ya Nzambe asengeli kozongisa monɔkɔ

6. Lolenge nini Yesu atalelaka mokumba na ye epai na Tata na ye?

6 Oyo nde ndakisa malamu mpenza Mwana ya Nzambe, Yesu Klisto atikaki! Lokola azalaki moto ya kokoka na motindo na Adama, Yesu azalaki kosepela mingi na kosala mokano ya Nzambe. Azalaki lisusu na esengo mingi ya kotalelama lokola moto oyo atosaka mibeko ya Yehova. Na ntina na ye, mokomi na Nzembo asakolaki na sembo nyonso ete: “Nasepeli kosala yango ekosepelisa yo, Ɛ Nzambe na ngai; mibeko na yo izali kati na motema na ngai.”​—Nzembo 40:8; Baebele 10:6-9.

7. Ntango azalaki kobondela mokolo liboso na kufa na ye, mpo na nini Yesu akokaki koloba maloba oyo mazwami na Yoane 17:4, 5?

7 Atako Yesu akutanaki na botɛmɛli makasi ya bayini na ye, asalaki mokano ya Nzambe mpe abatelaki bosembo na ye kino kufa likoló na nzeté ya mpasi. Na lolenge yango afutaki lisiko mpo na kosikola bato na makámá ya liwa mauti na lisumu ya Adama. (Matai 20:28) Na yango, mokolo oyo mozalaki liboso na kufa na ye, Yesu abondelaki na kondimisama nyonso ete: “Ngai nasili kokumisa yo na mokili. Nasilisi mosala mopesi yo ngai ete nasala yango. Mpe sasaipi, Tata, kumisá ngai pembeni na yo na lokumu lozalaki na ngai mpembeni na yo liboso, naino mokili ezalaki te.” (Yoane 17:4, 5) Yesu akokaki kolobela Tata na ye maloba wana mpamba te alóngaki momekano mpo na oyo etali kozongisa monɔkɔ mpe akokaki kondimama epai na Nzambe.

8. (a) Lolenge nini Paulo amonisaki ete tosengeli kozongisa monɔkɔ na ntina na biso moko epai na Yehova Nzambe? (b) Nini ekosalisa biso ete tóndimama epai na Nzambe?

8 Na kokesena na moto na kokoka Yesu Klisto, biso tozali bato ya kozanga kokoka. Nzokande, tosengeli kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe. Ntoma Paulo alobaki ete: “Mpo na nini yo okofundaka ndeko na yo? Mpo na nini okotyola ndeko na yo? Zambi biso nyonso tokotɛlɛma liboso na esambiselo na Nzambe. Esili kokomama ete, Nkolo alobi ete, Lokola ezali ngai na bomoi, mabɔ́ngɔ́ nyonso makokumbama liboso na ngai, mpe ndemo nyonso ikoyambola Nzambe. Boye moto na moto na biso akotánga makambo na ye mpenza liboso na Nzambe.” (Baloma 14:10-12) Mpo tókoka kozongisa monɔkɔ mpe kondimama epai na Yehova, na bolingo nyonso asili kopesa biso lisosoli mpe Liloba na ye lipemami, Biblia, mpo na kokamba biso kati na oyo tokoki koloba to kosala. (Baloma 2:14, 15; 2 Timoté 3:16, 17) Kosalela malamu bibongiseli ya elimo oyo Yehova apesi mpe kolanda lisosoli na biso oyo eteyami malamu na Biblia ekosalisa biso ete tóndimama epai na Nzambe. (Matai 24:45-47) Elimo santu ya Yehova, to nguya na ye oyo esalaka mosala, ezali eutelo mosusu ya nguya mpe ya litambwisi. Soki tosali na boyokani na mitindá ya elimo mpe na litambwisi ya lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia, tozali komonisa ete tozali te ‘kotyola Nzambe,’ ye oyo tokozongisela monɔkɔ na misala na biso nyonso.​—1 Batesaloniki 4:3-8; 1 Petelo 3:16, 21.

Mabota masengeli kozongisa monɔkɔ

9. Baedome bazalaki banani, mpe nini ekómelaki bango mpo na motema mabe na bango epai na Yisalaele?

9 Yehova akosɛnga na mabota ete bázongisa monɔkɔ mpo na misala na bango. (Yilimia 25:12-14; Sefania 3:6, 7) Tókamata bokonzi ya Edome ya ntango ya kala, oyo ezalaki na súdi ya Mai na Monana mpe na nɔ́rdi ya Aqaba, na esika mai monene ekɔti na mabelé. Bato ya Edome bazalaki bakitani ya Semi, biboto mpenza ya Bayisalaele. Atako nkɔ́kɔ ya Baedome ezalaki Ezau, mwana na mwana ya Abalayama, Baedome baboyaki ete Bayisalaele baleka kati na mboka Edome na “balabála na mokonzi” wana ezalaki bango kokenda na Mokili ya ndaká. (Mituya 20:14-21) Na boumeli ya bikeke mingi motema mabe ya Edome epai na Yisalaele ekólaki mpenza kino koyina ya makasi. Nsukansuka, Baedome basengelaki kozongisa monɔkɔ na lolenge balendisaki bato ya Babilone ete bábebisa Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. (Nzembo 137:7) Na ekeke ya motoba L.T.B., mampinga ya Babilone makambami na Mokonzi Nabonide malóngaki mboka Edome, mpe yango etikalaki mpamba, lokola Yehova akanaki yango.​—Yilimia 49:20; Obadia 9-11.

10. Lolenge nini Bamoaba basalaki epai na Bayisalaele, mpe lolenge nini Nzambe asɛngaki Moaba ete azongisa monɔkɔ?

10 Moaba mpe azwaki etumbu motindo moko. Bokonzi ya Moaba ezalaki na nɔ́rdi ya Edome mpe na ɛ́sti ya Mai na Monana. Liboso ete Bayisalaele bakɔta na Mokili ya ndaká, Bamoaba bamonisaki elimo ya boyambi te epai na bango, kopesáká bango limpa mpe mai bobele mpo na kozwa mosolo. (Deteronome 23:3, 4) Balaka, mokonzi ya Moaba afutaki mosakoli Balama mpo na kolakela Yisalaele mabe, mpe basi ya Moaba basalelamaki mpo na kokweisa mibali ya Yisalaele kati na pite mpe losambo ya bikeko. (Mituya 22:2-8; 25:1-9) Nzokande, Yehova abosanaki te koyina oyo Moaba amonisaki epai na Yisalaele. Lokola esakolamaki, Moaba ebebisamaki na bato ya Babilone. (Yilimia 9:25, 26; Sefania 2:8-11) Ee, Nzambe asɛngaki ete Moaba azongisa monɔkɔ.

11. Moaba na Amona bakómaki lokola bingumba nini, mpe bisakweli ya Biblia bizali komonisa nini na ntina na biloko mabe ya ntango oyo?

11 Esukaki bobele na Moaba te kasi Amona mpe asengelaki kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe. Yehova asakolaki ete: “Boye lokola ngai nazali na bomoi, [Yehova] na bibele alobi bongo, ye Nzambe na Yisalaele, Moaba akozala lokola Sodomo mpe bana na Amona lokola Gomola; mokili motondi na matiti mabe mpe na mabulu na mongwa, esika ebebi libela na libela.” (Sefania 2:9) Bamboka ya Moaba mpe Amona ebebisamaki, motindo moko lokola Nzambe abebisaki bingumba ya Sodomo mpe Gomola. Engebene Geological Society of London, balukiluki bakanisi ete basili komona esika Sodomo na Gomola ebebisamaki epai na ɛ́sti ya libóngo ya Mai na Monana. Bilembeteli nyonso ya kotyela motema oyo ekundolami na boyokani na lisoló yango bikoki bobele kondimisa bisakweli ya Biblia oyo bizali komonisa ete biloko mabe ya ntango oyo bisengeli mpe kozongisa monɔkɔ epai na Yehova Nzambe.​—2 Petelo 3:6-12.

12. Atako Yisalaele esengelaki kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe mpo na masumu na ye, nini esakolamaki na ntina na batikali ya Bayuda?

12 Atako Yisalaele ezwaki ngɔlu mingi epai na Yehova, esengelaki kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe na ntina na masumu na ye. Ntango Yesu Klisto ayaki epai na libota ya Yisalaele, mingi kati na bango bayambaki ye te. Bobele ndambo moke kati na bango nde bamonisaki kondima mpe bakómaki bayekoli na ye. Paulo asalelaki bisakweli mosusu epai na batikali wana ya Bayuda ntango akomaki ete: “Yisaya angangaki mpe mpo na Yisalaele ete, Ata motuya na bana na Yisalaele ezali lokola zɛlɔ na mai monene, bobele litika bakobika. Zambi Nkolo akoyeisa likoló na mokili etumbu makasi mpe na mbangu. Pelamoko Yisaya asakolaki ete, Soko Nkolo na bibele atikelaki biso bana te, mbɛ tokómi lokola Sodomo, tozali pelamoko Gomola.” (Baloma 9:27-29; Yisaya 1:9; 10:22, 23) Ntoma atángaki ndakisa ya bato 7000 na ntango ya Eliya, baoyo bagumbamaki te liboso na Baala, na bongo alobaki ete: “Bongo na ntango oyo litika na bato ezali baoyo baponami na ngɔlu.” (Baloma 11:5) Litika to batikali wana esangisaki bato oyo basengeli moto na moto kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe.

Ndakisa ya bato oyo basengelaki kozongisa monɔkɔ

13. Nini ekómelaki Kaina ntango Nzambe asɛngaki na ye ete azongisa monɔkɔ mpo ete abomaki ndeko na ye Abele?

13 Biblia etángi ebele ya bato oyo basengelaki kozongisa monɔkɔ epai na Yehova Nzambe. Na ndakisa tókamata Kaina, mwana mobali mobotami ya liboso ya Adama. Ye na ndeko na ye Abele bapesaki mbeka epai na Yehova. Mbeka ya Abele endimamaki na Nzambe, kasi oyo ya Kaina endimamaki te. Ntango Nzambe asɛngaki na ye ete azongisa monɔkɔ mpo ete na motema mabe nyonso abomaki ndeko na ye, kozanga mayoki ya mawa Kaina alobaki na Nzambe ete: “Ngai nazali nde mobateli na ndeko na ngai?” Na ntina na lisumu na ye, Kaina apesamaki etumbu ya kolongwa kino “epai na ebimelo na ntango.” Amonisaki kobongola motema te mpo na mabe na ye, azalaki bobele koyoka mawa na ntina na etumbu oyo azwaki.​—Genese 4:3-16.

14. Lolenge nini mokumba oyo moto na moto azali na yango liboso na Nzambe emonisamaki na likambo ya nganga monene Eli mpe bana na ye?

14 Mokumba ya moto na moto liboso na Nzambe emonisami lisusu na likambo ya Eli, nganga monene ya Yisalaele. Engebene Josèph, mokomi na makambo na kala, bana na ye, Hɔfini mpe Pinehase, bazalaki banganga kasi “bazalaki na ekweli ya kozanga sembo epai na bato, mpe ya kotuka epai na Nzambe, bamipekisaki soko moke te na misala mabe.” “Bana mpamba” wana bayebaki Yehova te, bamipesaki na etamboli ya kotuka Nzambe, mpe bazalaki na ekweli monene ya pite. (1 Samwele 1:3; 2:12-17, 22-25) Lokola azalaki tata na bango mpe nganga monene ya Yisalaele, Eli azalaki na mokumba ya kopesa bango etumbu, kasi asukaki bobele na kopamela bango na boboto nyonso. Eli ‘azalaki kokumisa bana na ye koleka Yehova.’ (1 Samwele 2:29) Etumbu ekwelaki ndako ya Eli. Bana mibali na ye nyonso mibale bakufaki mokolo moko elongo na ye tata, mpe na nsima mokumba ya bonganga elongolamaki na libota na bango. Na motindo yango makambo masembolamaki.​—1 Samwele 3:13, 14; 4:11, 17, 18.

15. Mpo na nini Yonatana, mwana na Mokonzi Saulo azwaki mbano malamu?

15 Ndakisa mpenza ya kokesena emonisami na Yonatana, mwana na Mokonzi Saulo. Nokinoki nsima wana Davidi autaki koboma Goliata, “Yonatana alingaki ye lokola motema na ye moko,” mpe bakataki kondimana ya boninga. (1 Samwele 18:1, 3) Ekoki mpenza kozala ete, Yonatana asosolaki ete elimo ya Nzambe esilaki kotika Saulo, nzokande molende na ye mpo na losambo ya solo elɛmbaki soko moke te. (1 Samwele 16:14) Limemya ya Yonatana mpo na bokonzi oyo Nzambe apesaki Davidi etengatengaki soko moke te. Yonatana ayebaki mokumba na ye liboso na Nzambe, mpe Yehova apesaki ye mbano mpo na etamboli ya limemya oyo amonisaki na kobateláká libota na ye ete elandana kino mabota mingi na nsima.​—1 Ntango 8:33-40.

Kozongisa monɔkɔ kati na lisangá ya boklisto

16. Tito azalaki nani, mpe mpo na nini tokoki koloba ete asepelisaki Nzambe?

16 Makomami ya Greke ya boklisto mazali kolobela malamu na ntina na mibali mpe basi mingi oyo bamisalelaki nkombo malamu. Na ndakisa, tozali na moklisto moko mogreke na nkombo Tito. Elobamaki ete ye akómaki moklisto na boumeli ya mobembo ya liboso oyo Paulo asalaki na Kupulu lokola misionere. Lokola Bayuda mpe baprozelite ya Kupulu mbala mosusu bazalaki na Yelusaleme na Pantekote ya mobu 33 T.B., ekoki kozala ete losambo ya boklisto ekómaki na esanga wana mwa moke nsima na eleko yango. (Misala 11:19) Ata ndenge nini, Tito azalaki moko ya baninga ya sembo oyo basalaki elongo na Paulo. Akendaki elongo na Paulo mpe Balanaba na mobembo na bango na Yelusaleme pene na mobu 49 T.B., ntango likambo monene ya kokatama ngɛnga ekatamaki. Likambo oyo ete Tito akatamaki ngɛnga te epesaki kilo na maloba ya Paulo ete bapakano oyo babongwanaki na losambo ya boklisto basengelaki te kozala na nsé ya Mibeko ya Mose. (Bagalatia 2:1-3) Mosala malamu ya Tito elobelami kati na Makomami, mpe Paulo akomelaki ye moko na mikanda oyo mipemami na Nzambe. (2 Bakolinti 7:6; Tito 1:1-4) Ya solo, kino nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, Tito alandaki kosepelisa Nzambe.

17. Na motindo nini Timote azongisaki monɔkɔ na ntina na ye moko, mpe lolenge nini ndakisa wana ekoki kosunga biso?

17 Timoté azalaki mpe moto mosusu ya molende oyo asepelisaki Yehova Nzambe mpe andimamaki na ye. Atako Timoté azalaki na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, amonisaki ‘kondima na solo’ mpe ‘asalaki mosala elongo na Paulo mpo na Nsango Malamu.’ Mpo na yango, ntoma akokaki koyebisa baninga na ye baklisto ya Filipi ete: “Nazali na moto mosusu lokola ye [Timoté] te; akokanisa mpo na makambo na bino solo.” (2 Timoté 1:5; Bafilipi 2:20, 22; 1 Timoté 5:23) Ata kati na bolɛmbu ya bomoto na biso mpe kati na komekama mosusu, biso mpe tokoki komonisa kondima oyo ezangi bokosi mpe tokoki kosepelisa Nzambe.

18. Ludia azalaki nani, mpe amonisaki elimo nini?

18 Ludia azalaki mwasi moklisto oyo na ntembe te asepelisaki Nzambe. Ye mpe bato na ndako na ye bazalaki kati na bato ya liboso oyo bandimaki losambo ya boklisto na Mpótó na nzela ya kosakola ya Paulo na mboka Filipi pene na mobu 50 T.B. Mobotami ya Twatila, Ludia azalaki mbala mosusu prozelite na lingomba ya Bayuda, kasi ekoki kozala ete Bayuda bazalaki mingi te na Filipi mpe eyanganelo ya Bayuda ezalaki kuna te. Ye mpe basi mosusu oyo bamipesi na losambo bazalaki koyangana penepene na molúka moko ntango Paulo asololaki na bango. Yango ememaki litomba oyo ete, Ludia akóma moklisto mpe andimisaki Paulo mpe baninga na ye ete báfanda na ndako na ye. (Misala 16:12-15) Boyambi oyo Ludia amonisaki ezali ntango nyonso elembo oyo ekesenisaka baklisto ya solo.

19. Na misala malamu nini Dɔlɔka asepelisaki Nzambe?

19 Dɔlɔka azalaki mwasi mosusu oyo asepelisaki Yehova Nzambe. Ntango akufaki, Petelo akendaki na Yafo koyanola na libyangi ya bayekoli oyo bazalaki kofanda kuna. Mibali mibale oyo bakutanaki na Petelo “bakambi ye kati na eteni na mokili na likoló. Basi-bakufeli-mibali nyonso batɛlɛmi na ye elongo kolela, mpe kotalisa ye mikoto, na kasaka, na bilamba nyonso bisalaki Dɔlɔka naino ezalaki ye na bango.” Dɔlɔka azongisamaki na bomoi. Kasi bakanisaki ye te bobele mpo na elimo na ye ya bokabi? Te. Ye azalaki “moyekoli” mpe na ntembe te amipesaki kati na mosala ya kozalisa bayekoli. Bobele bongo lelo oyo basi baklisto ‘batondi na misala malamu mpe na makabo ya motema mawa.’ Lisusu bazali na esengo mingi ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kozalisa bayekoli.​—Misala 9:36-42; Matai 24:14; 28:19, 20.

20. Mitunda nini tosengeli komituna biso moko?

20 Biblia ezali komonisa polele ete mabota mpe moto moko na moko basengeli kozongisa monɔkɔ epai na Nkolo Moyangeli Monene Yehova. (Sefania 1:7) Soki tosili komipesa epai na Nzambe, na bongo tokoki komituna, ‘Lolenge nini natalelaka mabaku malamu mpe mikumba ya mosala oyo epesameli ngai na Nzambe? Lolenge nini ya nkombo nazali komisalela liboso na Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto?’

Okopesa eyano nini?

◻ Lolenge nini okoki komonisa ete baanzelu mpe Mwana ya Nzambe basengeli kozongisa monɔkɔ liboso na Yehova?

◻ Bandakisa nini ya Biblia ezali komonisa ete Nzambe atalelaka mabota ete masengeli kozongisa monɔkɔ liboso

na ye?

◻ Biblia elobi nini na ntina na mikumba ya moto na moto liboso na Nzambe?

◻ Banani balobelami na Biblia baoyo basepelisaki Yehova Nzambe?

[Elilingi na lokasa 10]

Yesu Klisto asepelisaki Tata na ye ya Likoló

[Elilingi na lokasa 15]

Lokola Dɔlɔka, basi baklisto bazali lelo oyo kosepelisa Yehova Nzambe

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]

Kufa ya Abele/The Doré Bible Illustrations/Dover Publications, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto