Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 88-91
  • Mokanda ya Biblia nimero 16—Nehemia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 16—Nehemia
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA NEHEMIA
  • LITOMBA NA YANGO
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Nehemia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Kobá kolonga mabe na kosaláká malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Ee, Nzambe na ngai, kanisá ngai mpe salelá ngai bolamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Yelusaleme—Ezali ‘likoló ya esengo na yo oyo eleki monene’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 88-91

Mokanda ya Biblia nimero 16—Nehemia

Mokomi: Nehemia

Esika ya bokomi: Yelusaleme

Nsuka ya bokomi: Nsima ya 443 L.T.B.

Boumeli ya lisoló: 456–nsima ya 443 L.T.B.

1. Etɛlɛmɛlo nini ya kotyelama motema Nehemia azalaki na yango, kasi eloko nini elekaki ntina mingi kati na makanisi na ye?

NEHEMIA, oyo nkombo na ye elimboli “Yah abɔndisaka,” azalaki Moyuda mosaleli ya mokonzi ya Perse, Alatazelezese (Lobɔkɔ-molai). Azalaki mopesi vinyo na mesa ya mokonzi. Yango ezalaki mokumba ya kotyelama motema mingi mpe ya lokumu, oyo bato mingi bazalaki kolula yango, mpamba te ezalaki kopesa nzela na komonana na mokonzi na bantango oyo abandaki kozala na esengo mpe pene na kosalela bato malamu. Nzokande, Nehemia azalaki moko na bakangami wana ya sembo oyo balingaki Yelusaleme mingi koleka eloko mosusu nyonso ‘ya esengo.’ (Nz. 137:5, 6) Ezalaki te etɛlɛmɛlo ya lokumu to bozwi ya mosuni nde ezwaki esika ya liboso kati na makanisi ya Nehemia, kasi kozongisama ya losambo ya pɛto ya Yehova.

2. Ezalela nini ya mawa epesaki Nehemia mpasi, kasi eleko nini oyo elakamaki ekómaki kobɛlɛma?

2 Na mobu 456 L.T.B. baoyo bazalaki ‘litika lilongwaki na boombo,’ batikali ya Bayuda oyo bazongaki na Yelusaleme, bazalaki na bobólá. Bazalaki kati na ezalela ya mpasi. (Neh. 1:3) Lopango ya mboka ebukanaki, libota bayokaki nsɔ́ni liboso na banguna na bango ya ntango nyonso. Nehemia ayokaki mawa. Nzokande, ezalaki ntango oyo Yehova abongisaki mpo ete akoka kosala likambo moko na ntina na lopango ya Yelusaleme. Banguna bázala to bázala te, Yelusaleme mpe lopango na yango ya libateli esengeli kotongama mpo ete ezala elembo ya kotánga ntango, na boyokani na esakweli oyo Yehova asilaki kopesa epai na Danyele na ntina na koya ya Masiya. (Dan. 9:24-27) Na yango, Yehova atambwisaki makambo, na kosaleláká Nehemia, moto na kondima mpe na molende, mpo na kokokisa mokano ya Nzambe.

3. (a) Nini emonisi ete Nehemia nde akomaki mokanda oyo, mpe lolenge nini, na nsima, mokanda yango mokómaki kobéngama Nehemia? (b) Mbula boni ekaboli mokanda oyo mpe mokanda ya Ezela, mpe makambo oyo malobelami kati na mokanda ya Nehemia maumelaki mbula boni?

3 Na ntembe te, Nehemia azali mokomi ya mokanda oyo ebéngami na nkombo na ye. Maloba oyo ya ebandeli ete, “Maloba na Nehemia, mwana na Hakalia,” mpe kosalelama ya liloba ngai kati na makomi emonisi polele ete ezali bongo. (Neh. 1:1) Na ebandeli, mikanda ya Ezela mpe ya Nehemia ezalaki bobele mokanda moko. Na nsima, Bayuda bakabolaki mokanda yango na lolenge boye: Ezela ya Liboso mpe Ezela ya Mibale, mpe na nsima Ezela ya Mibale ekómaki kobéngama Nehemia. Ntáká ya mbula soko 12 ekaboli makambo ya nsuka oyo malobelami na Ezela mpe makambo ya ebandeli oyo malobelami na Nehemia, oyo lisoló na ye elobeli makambo oyo maumelaki kobanda na nsuka ya mobu 456 L.T.B. kino na nsima ya mobu 443 L.T.B.​—1:1; 5:14; 13:6.

4. Lolenge nini mokanda ya Nehemia ezali na boyokani na mikanda mosusu ya Makomami?

4 Mokanda ya Nehemia eyokani na mikanda mosusu ya Makomami mapemami, oyo yango ezali bongo moko kati na mikanda yango. Ezali na bisika mingi oyo elobeli Mibeko, na kotalela makambo lokola bikanganeli ya libala elongo na bapaya (Det. 7:3; Neh. 10:30), kodefisa (Lev. 25:35-38; Det. 15:7-11; Neh. 5:2-11), mpe Elambo ya Mingombo (Det. 31:10-13; Neh. 8:14-18). Lisusu, mokanda yango ezali bongo ebandeli ya kokokisama ya esakweli ya Danyele, ete Yelusaleme esengelaki kotongama lisusu kati na botɛmɛli monene, “na ntango na mpasi.”​—Dan. 9:25.

5. (a) Bilembeteli oyo bimonisi ete Alatazelezese azwaki bokonzi na mobu 475 L.T.B. biuti wapi? (b) Dati nini emonisi mbula ya 20 ya bokonzi na ye? (c) Boyokani nini ezali kati na mikanda ya Nehemia mpe ya Luka likoló na kokokisama ya esakweli ya Danyele na ntina na Masiya?

5 Ezalaki boni mpo na mobu 455 L.T.B., mbula oyo Nehemia asalaki mobembo na Yelusaleme mpo na kotonga lisusu lopango ya engumba? Bilembeteli bikoki kotyelama motema biuti na Grèce, na Perse, mpe na Babilone bizali kolobela mobu 475 L.T.B. lokola mobu oyo Alatazelezese akómaki mokonzi mpe mobu 474 L.T.B. lokola mobu ya liboso ya boyangeli na ye.a Na yango mobu ya 20 ya boyangeli na ye esengelaki kozala bongo mobu 455 L.T.B. Nehemia 2:1-8 emonisi ete ezalaki bongo na ebandeli ya eleko ya molungé ya mobu yango, kati na sanza ya Nisan na manáka ya Bayuda, nde Nehemia, mopesi vinyo na mesa ya mokonzi, azwaki nzela epai na mokonzi ya kotɛmisa mpe kotonga lisusu Yelusaleme, lopango na yango, mpe bikuke na yango. Esakweli ya Danyele elobaki ete pɔ́sɔ 69 ya mibu, to mibu 483, esengelaki kobanda “longwá na kobima na liloba na kotɛmisa mpe na kotonga Yelusaleme kino koya na mopakolami [“Masiya,” NW], mokonzi”—esakweli oyo ekokisamaki polele na kopakolama ya Yesu na mobu 29 T.B., dati oyo ekoki koyokanisama na lisoló ya bato ya mokili mpe engebene Biblia.b (Dan. 9:24-27; Luka 3:1-3, 23) Ya solo, mikanda ya Nehemia mpe ya Luka mizali na boyokani makasi elongo na esakweli ya Danyele na komonisáká ete Yehova Nzambe azali Nkolo mpe Mokokisi ya bisakweli ya solo! Nehemia ezali mpenza eteni moko kati na Makomami mapemami.

MAKAMBO MAZALI KATI NA NEHEMIA

6. (a) Likambo nini Nehemia ayoki oyo epusi ye ete abondela Yehova, mpe lisɛngi nini mokonzi akokiseli ye yango? (b) Lolenge nini Bayuda bayambaki ebongiseli ya Nehemia?

6 Nehemia atindami na Yelusaleme (1:1–2:20). Nehemia abulunganisami makasi mpo na nsango oyo Hanani ayei na yango, azongaki na Susana nsima ya kouta na Yelusaleme mpe amemi nsango etali ezalela ya mpasi monene oyo Bayuda bazali na yango kuna mpe ete lopango mpe bikuke bisili kobɛbisama. Akili bilei mpe abondeli Yehova “Nzambe na lola, Nzambe monene mpe na nsɔ́mɔ, ye oyo akolendisa kondimana mpe boboto epai na bango bakolinga ye mpe baoyo bakotosa malako na ye.” (1:5) Ayamboli masumu ya Yisalaele mpe asɛngi na Yehova ete akanisa bato na Ye mpo na nkombo na Ye, lolenge alakaki Mose. (Det. 30:1-10) Wana mokonzi atuni Nehemia soki mpo na nini elongi na ye ezali mawamawa, Nehemia ayebisi ye na ntina na ezalela oyo Yelusaleme ezali kati na yango mpe asɛngi nzela ya kozonga mpo na kotonga lisusu engumba mpe lopango na yango. Lisɛngi na ye ekokisami, mpe nokinoki, akei mobembo na Yelusaleme. Na nsima ya kotalatala engumba yango mokolo moko na butu, mpo na koyeba lolenge ya mosala oyo mozali liboso na ye, ayebisi mikano na ye epai na Bayuda, kolobeláká mingi lisungi oyo bakozwa uta na Nzambe na likambo yango. Na yango, balobi ete: “Tótɛlɛma mpe tótonga.” (Neh. 2:18) Na ntango Basamalia mpe bato mosusu ya zingazinga bayoki ete mosala mosili kobanda, bakómi kozomela mpe kosɛka.

7. Lolenge nini mosala mokóbi lisusu, mpe likambo nini lisɛngi kobongisama lisusu?

7 Lopango etongami lisusu (3:1–6:19). Mosala ya kotonga lisusu lopango ebandi na mokolo ya misato ya sanza ya mitano, banganga, bankumu, mpe bato nyonso basangani kati na mosala yango. Bikuke ya engumba mpe bifelo ya kati bibongisami nokinoki. Sanebalata, Moholoni, abimisi maloba oyo ya kotyola ete: “Bayuda oyo na nguya moke bazali kosala nini? . . . Bakosilisa nde na mokolo moko?” Na yango, Tobiya, ye Moamona, abakisi maloba na ye oyo ya kotyola, ete: “Ata yango ezali bango kotonga, soko ngombolo akobuta wana, akobuka lopango na bango na mabanga!” (4:2, 3) Na ntango efelo ya lopango ekómi na katikati ya bolai na yango, banguna oyo basangani ngámbo moko bakómi na nkanda makasi mpe bayangi mwango mpo na koya kobundisa Yelusaleme. Kasi Nehemia alendisi Bayuda ete bábosana te “[Yehova] oyo azali monene mpe na nsɔ́mɔ” mpe bábunda mpo na mabota na bango mpe mpo na bandako na bango. (4:14) Mosala mobongisami mpo ete bákoka kotɛmɛla banguna: bamoko bazali kosɛnzɛla wana basimbi makongá na mabɔkɔ mpe basusu bazali kosala mosala wana batii mopanga na loketo na bango.

8. Lolenge nini Nehemia asilisi mikakatano kati na Bayuda bango moko?

8 Nzokande, ezali mpe na mikakatano kati na Bayuda bango moko. Basusu kati na bango bazali kosɛnga matabisi likoló na mosolo oyo badefisi epai na baninga na bango basambeli ya Yehova, likambo oyo ezali na boyokani te na mibeko na ye. (Ex. 22:25) Nehemia asemboli likambo yango na kokebisáká bango na ntina na ezaleli ya koluka bozwi mingi, mpe bato batosi kozanga kokakatana. Ye moko Nehemia, na boumeli nyonso ya mbula 12 ya mosala na ye lokola guvernere, kobanda na mobu 455 L.T.B. kino na mobu 443 L.T.B., asɛngi ata mbala moko te lifuti oyo esengeli mpo na guvernere mpamba te bato bazali na mosala monene.

9. (a) Lolenge nini Nehemia alóngi mwango ya mayele mabe oyo esalemi mpo na kopekisa mosala ya botongi? (b) Mosala ya botongi lopango mosilaki na ntango nini?

9 Banguna bakómi sikawa koluka kosalela myango mosusu ya mayele mabe mpo na kopekisa mosala ya botongi. Babyangi Nehemia ete akende kosala likita moko elongo na bango, kasi ayanoli ete azali na ntango te mpo ete azali na mosala monene oyo azali kosala. Sikawa Sanebalata afundi Nehemia ete azali motomboki mpe ete azali koluka komitya mokonzi na Yuda, mpe na nkuku, aponi Moyuda moko ete akende kobangisa Nehemia na kopusáká ye ete asala likambo oyo elongobani te, ete abombama kati na tempelo. Kasi Nehemia aboyi kobangisama, mpe na kozanga kokakatana mpe na botosi nyonso akóbi mosala oyo Nzambe apesaki ye. Lopango yango esilaki kotongama “na mikolo ntuku mitano na mibale.”​—Neh. 6:15.

10. (a) Epai wapi mabota ya Bayuda bazali kofanda, mpe lesansemá nini esalemi? (b) Liyangani nini libongisami sikawa, mpe nini esalemi engebene manáka na mokolo ya liboso?

10 Bato bapesameli malako (7:1–12:26). Ezali bobele na bato moke mpe bandako moke kati na engumba, mpamba te Bayuda mingi bazali kofanda na bamboka oyo ezali na libándá ya engumba, engebene biutelo ya mabota na bango. Nzambe ayebisi Nehemia ete ayanganisa bankumu mpe bato nyonso mpo ete akoma nkombo na bango engebene milɔngɔ́ ya mabota na bango. Na kosaláká bongo, ataleli mikanda oyo milobeli biutelo ya kala ya bato oyo balongwaki na Babilone. Na nsima asalaki likita ya mikolo mwambe na esika ya bato banso pene na Ekuke na Mai. Ezela afungoli likita yango wana emati ye likoló na ebaélo esalemi na mabaya. Apamboli Yehova mpe na nsima atángi kati na búku ya Mibeko ya Mose kobanda na ntɔ́ngɔ́ kino midi. Na lolenge lobongi mpenza, Balevi mosusu basungi ye mpo na kolimbwela bato Mibeko mpe bakóbi ‘kotanga polele kati na mokanda na Mobeko na Nzambe; mpe bapesaki ntina ete básosola botángi.’ (8:8) Nehemia alendisi bato ete básala elambo mpe básepela mpe bámonisa botɔ́ndi na kosaleláká maloba oyo ya nguya, ete: “Esengo na [Yehova] ezali nguya na bino.”​—8:10.

11. Likita nini ya ntina mingi esalemi na mokolo ya mibale, mpe lolenge nini liyangani yango ekóbi na esengo nyonso?

11 Na mokolo ya mibale ya liyangani yango, bankumu ya libota basali likita moko ya ntina mingi elongo na Ezela mpo na kozwa bososoli likoló na Mibeko. Bayekoli ete Elambo ya Mingombo esengeli kokumisama bobele na sanza wana ya nsambo, mpe nokinoki, basali ebongiseli mpo na kotonga mingombo mpo na kosala elambo wana ya Yehova. ‘Basepeli mingi mpenza’ wana bafandi kati na mingombo na boumeli ya mikolo nsambo, koyokáká botángi ya Mibeko mokolo na mokolo. Na mokolo ya mwambe, basali liyangani moko ya ntina mingi, ‘engebene mobeko.’—Neh. 8:17, 18; Lev. 23:33-36.

12. (a) Liyangani nini lisalemi na nsima bobele na sanza yango, motó na likambo yango ezalaki nini? (b) Ekateli nini endimami? (c) Ebongiseli nini ekamatami mpo ete bato báfanda na Yelusaleme?

12 Na mokolo ya 24 ya sanza yango, bana na Yisalaele bayangani lisusu mpe babandi komikabola na bapaya nyonso. Bayoki botángi ya ntina mingi ya Mibeko mpe na nsima, na lolenge ya kosimba motema, etuluku moko ya Balevi ekundweli bango makambo oyo Nzambe asalaki epai na Yisalaele. Ezalaki na motó na likambo ete: “Bótɛlɛma, bósanzola [Yehova], Nzambe na bino longwá kala kino libela; nkombo na yo na nkembo esanzolama, oyo ezali kokumisama likoló na lisanzoli mpe lipamboli nyonso.” (Neh. 9:5) Bakóbaki na koyamboláká masumu ya batata na bango mpe na komikitisa nyonso, kolɔ́mba lipamboli ya Yehova. Esalemi na motindo ya ekateli oyo ekomami mpe bamonisi ya libota batyeli yango mabɔkɔ. Bato nyonso bandimi ete bakobalana te na bato ya mabota mosusu, ete bakokumisa Sabata, mpe bakokokisa bamposa ya basáli kati na tempelo. Babɛti mbɛsɛ mpo na kopona moto mokomoko kati na bituluku ya bato zomizomi ete báya kofanda libela na Yelusaleme, kati na lopango mpenza.

13. Kati na ebongiseli nini ya liyangani molulu ya kobulisa lopango mosalemi, mpe bibongiseli nini mosusu bisalemi mpo na yango?

13 Molulu ya kobulisa lopango (12:27–13:3). Kofungolama ya lopango, oyo euti kotongama sika, ezali ntango ya koyemba mpe ya kosepela. Ezali bongo libaku mpo na kosala liyangani mosusu. Nehemia abongisi bituluku minene mibale ya bayembi mpo na kopesa matɔ́ndi mpe bituluku mibale bikeseni mpo na botamboli zingazinga ya lopango, na nsuka bakutani bango nyonso esika moko mpo na kopesa mbeka kati na ndako ya Yehova. Bibongiseli bikamatami mpo na kopesa makabo ya biloko ya mosuni mpo na kosunga banganga mpe Balevi kati na tempelo. Botángi mosusu ya Biblia emonisi ete Baamona mpe Bamoaba basengeli te kopesamela nzela ya kokɔta kati na lisangá, mpe na bongo babandi kokabwana na bato ya bikólo mosusu oyo basanganaki na bango esika moko.

14. Tángá makambo ya mabe oyo mabimi wana Nehemia azali te, mpe milende oyo asali mpo na kosilisa yango.

14 Kopɛtolama (13:4-31). Nsima ya kolekisa mwa ntango na Babilone, Nehemia azongi na Yelusaleme mpe amoni ete bizaleli mosusu ya mabe bikómi kokɔta kati na bomoi ya Bayuda. Makambo masilaki mpenza kobongwana nokinoki! Nganga monene Eliasibi asilaki kútu kosala ndako ya bolei kati na lopango ya tempelo mpo na Tobiya Moamona, moko na banguna ya Nzambe. Nehemia asalaki nokinoki. Abwaki libanda biloko ya Tobiya mpe apɛtoli ndako ya bolei. Amoni mpe ete makabo mpo na Balevi mazali kopesama lisusu te, na bongo babandi kobima libanda ya Yelusaleme mpo na koluka lolenge ya kobikela. Mombongo mokómi kosalema mingi kati na engumba. Sabata ezali kotosama lisusu te. Nehemia ayebisi bango ete: “Bino bokoyeisa nkanda mosusu likoló na Yisalaele na nzela na kobebisa Sabata!” (13:18) Akangi bikuke ya engumba na mokolo ya Sabata mpo ete basáli mombongo bákɔta te, mpe abengani bango na engumba. Kasi ezali na likambo moko ya mabe koleka, likambo oyo balapaki ndai ete basengelaki kozongela yango lisusu te. Basilaki komema bapaya, basi bapakano kati na engumba. Kútu, bana oyo babotami na basi wana bazali koloba lokótá ya Bayuda te. Nehemia akundweli bango ete Salomo asalaki lisumu mpo na basi bapaya. Mpo na lisumu yango, Nehemia abengani mwana ya mwana ya nganga monene Eliasibi.c Na bongo, atɛlɛmisi lisusu mosala ya bonganga mpe mosala ya Balevi.

15. Lisɛngi nini ya komikitisa Nehemia asali yango?

15 Nehemia asukisi mokanda na ye na moloba oyo ya mokuse mpe ya komikitisa: “Nzambe na ngai, kanisá ngai mpo na malamu.”​—13:31.

LITOMBA NA YANGO

16. Kati na makambo nini Nehemia azali ndakisa monene mpo na bato nyonso oyo balingaka losambo ya solo?

16 Ezaleli ya Nehemia ya komipesa na Nzambe esengeli kozala na bopusi epai na baoyo nyonso balingaka losambo ya solo. Atikaki etɛlɛmɛlo ya lokumu mpo na kokóma mokɛngɛli ya komikitisa kati na basaleli ya Yehova. Aboyaki kútu makabo ya biloko ya mosuni atako ezalaki lotómo na ye, mpe na mpiko nyonso, akweisaki ezaleli ya koluka biloko mingi ya mosuni na kobéngáká yango ete ezali motambo. Nehemia alendisaki ekólo mobimba ete bábatela mpe básalela losambo ya Yehova na molende nyonso. (5:14, 15; 13:10-13) Nehemia azali ndakisa monene mpo na biso, mpamba te azalaki na ezaleli ya moimi soko moke te mpe azalaki na bokɛngi mingi, azalaki moto na maloba mpamba te, azalaki kobanga te mpo na kosalela boyengebene ata kati na likámá. (4:14, 19, 20; 6:3, 15) Azalaki na bobángi ya pɛto ya Nzambe mpe azalaki komibanzabanza mpo na kotonga kondima ya bazalani na ye. (13:14; 8:9) Asalelaki mibeko ya Nzambe na mpiko nyonso, mingi mpenza oyo ezalaki na boyokani na losambo ya pɛto mpe koboya bopusi ya bapaya, na ndakisa kobalana na bapaya.​—13:8, 23-29.

17. Lolenge nini Nehemia azali mpe ndakisa mpo na oyo etali boyebi ya mibeko ya Nzambe mpe kosalela yango?

17 Uta na ebandeli kino na nsuka ya mokanda yango, emonani polele ete Nehemia ayebaki malamumalamu mibeko ya Yehova, mpe asalelaki yango na lolenge lobongi. Asɛngaki mapamboli ya Nzambe mpo ete atyaki motema kati na elaka oyo Yehova apesaki na Deteronome 30:1-4, mpamba te azalaki na kondima makasi ete Yehova akosalela ye makambo na bosembo nyonso. (Neh. 1:8, 9) Alɛngɛlaki mayangani mingi, mingi mpenza mpo na kosalisa Bayuda ete básosola makambo oyo makomamaki kala. Kati na botángi na bango ya Mibeko, Nehemia mpe Ezela basalaki na etingya mpo ete libota báyeba malamu mpenza Liloba ya Nzambe mpe bálandela yango na kosaleláká yango.​—8:8, 13-16; 13:1-3.

18. Liteya nini esengeli kokɔta kati na makanisi ya bakɛngɛli nyonso mpo na oyo etali lolenge Nehemia atambwisaki libota na komipesa nyonso?

18 Elikya mobimba oyo Nehemia azalaki na yango epai na Yehova mpe malɔ́mbɔ na ye oyo asalaki na komikitisa nyonso esengeli kopusa biso ete tómipesa mobimba na mabondeli epai na Nzambe. Talá lolenge mabondeli na ye makumisaki Nzambe, lolenge mamonisaki ete ayebaki masumu ya libota na ye, mpe asɛngaki ete nkombo ya Yehova ebulisama. (1:4-11; 4:14; 6:14; 13:14, 29, 31) Likambo oyo ete mokɛngɛli wana ya molende azalaki liziba ya kopesa nguya mpe mpiko kati na libota ya Yisalaele emonani na lolenge boye ete bazalaki kolanda nokinoki litambwisi na ye ya mayele mpe bazalaki kozwa esengo na kosaláká mokano ya Nzambe elongo na ye. Azalaki mpenza ndakisa moko ya kopusa basusu! Nzokande, wana mokɛngɛli yango ya mayele azalaki na bango elongo te, mposa ya kokóma na biloko mingi ya mosuni, bopɔtu mpe lipɛngwi ekólaki nokinoki mpenza! Ya solo, yango esengeli kokɔtisa na makanisi ya bakɛngɛli nyonso kati na libota ya Nzambe lelo oyo ntina ya kozala na mayele, kosɛnzɛla, kozala na molende mpo na matomba ya bandeko na bango baklisto mpe kozala na bososoli mpe kotikala ngwi wana bazali kokamba bango na nzela ya losambo ya solo.

19. (a) Lolenge nini Nehemia asalelaki Liloba ya Nzambe mpo na kokɛmbisa elikya kati na bilaka ya Bokonzi? (b) Lolenge nini elikya ya Bokonzi ezali kopusa basaleli ya Nzambe lelo oyo?

19 Nehemia amonisaki ezaleli ya kotya motema mobimba kati na Liloba ya Nzambe. Azalaki te bobele molakisi ya molende ya Makomami, kasi asalelaki mpe yango mpo na koyeba libula ya libota mokomoko mpe mpo na kobongisa mosala ya bonganga mpe ya Balevi kati na libota ya Nzambe oyo lizongisamaki. (Neh. 1:8; 11:1–12:26; Yos. 14:1–21:45) Ezalaki mpenza elendiseli monene mpo na batikali ya Bayuda. Yango elendisaki kondima na bango kati na bilaka minene oyo bipesamelaki bango kala na ntina na Mombóto mpe kozongisama monene oyo ekosalema na nsé ya Bokonzi na Ye. Ezali bongo elikya ya kozongisama oyo elendisaka basaleli ya Nzambe na kobunda na mpiko nyonso mpo na matomba ya Bokonzi mpe komipesa na mosala ya kotɛlɛmisa losambo ya solo na mabelé mobimba.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 613-616.

b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 899-901.

c Bayuda mosusu bakomi na makambo ya kala balobaka ete mwana ya mwana ya Eliasibi wana abéngamaki Manase mpe ete, elongo na bokilo na ye, Sanebalata, atongaki tempelo na Ngomba Gelizimi, oyo eyaki kokóma esika monene ya losambo ya Basamalia mpe epai kuna asalaki mosala ya bonganga na boumeli ya bomoi na ye. Gelizimi ezali ngomba oyo Yesu alobelaki na Yoane 4:21.​—The Second Temple in Jerusalem, 1908, W. Shaw Caldecott, nkasa 252-255; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yulí 1961 (ebimeli ya Lifalansé), nkasa 425-426.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto