Ezali na bantina ya kobɛta ntembe likoló na Yesu?
YESU ya Nasalɛtɛ asalaki makamwisi solo? Asekwisamaki kati na bakufi, lokola bayekoli na ye basakolaki yango? Azalaki mpenza na bomoi? Na mikolo na biso, emonani lokola ete mingi bazali na makoki te ya kopesa biyano ya sikisiki na mituna lolenge oyo. Mpo na nini? Mpamba te bazali na ntembe na ntina na Yesu, mpe ntembe ezalaka mayoki ya kokakatana, koyeba te soki likambo moko lizali solo to likoki kosalema. Kasi ezali na bantina ya kozala na mayoki ya kokakatana likoló na Yesu? Tótala.
Lolenge nini ntembe na ntina na Yesu elónamaki
Bateoloziɛ mosusu ya Allemagne na nsuka ya ekeke ya 19 mpe na ebandeli ya ekeke ya 20 bamonisaki Yesu lokola “moto ya lisese ya Lingomba ya kala.” Botɛmɛli na bango na ntina na bosolo ya Yesu lokola moto oyo azalaki solo ebimisaki ntembe kati na banganga-mayele na ebandeli ya ekeke na biso, ntembe oyo na ntango yango epalanganaki epai na bato mosusu mpe ezali naino na bopusi kino lelo oyo. Na ndakisa, boyekoli moko oyo esalemaki kala mingi te na Allemagne emonisaki ete 3% ya baoyo batunamaki bakanisaka ete Yesu “azalaká ata moke te na bomoi” mpe ete “bantoma nde basalaki lisoló na ye.” Ee, mbóto ya ntembe na ntina na Yesu oyo elónamaki na ebandeli ya ekeke oyo ezali naino kokóla na mabelé kitoko na mitema na bato ata na mikolo na biso.
Mpo na nini bosukisi oyo ete Yesu “asalemaki na lisoló” ezali mpenza na moboko te? Nganga-mayele ya Biblia Wolfgang Trilling apesi ndimbola oyo: “Ntembe mpo na koyeba soki Yesu azalaki solo na bomoi, na maloba mosusu soki azalaki moto kati na lisoló ya bato to moto ya lisese, esilaki kokatama. Likambo yango likatamaki na motindo ya banganga-mayele, toloba na motindo boye ete bato oyo bayebi kokanisa batalelaka yango lisusu te lokola makanisi mpamba ya bato.” Nzokande, bato mosusu bazali naino kotya ntembe soki Yesu azalaki solo na bomoi. Na yango, tótalela lolenge nini okoki kondimisama ete Yesu azalaki moto ya solo mpe okoki kosilisa kokakatana mosusu na ntina na ye.
Bilembeteli oyo bizali kosilisa ntembe
Trilling alobi ete: Kobomama ya nsɔ́ni oyo Yesu abomamaki lokola mosáli na mabe oyo atyolami ezali kopesa “ntina makasi mpenza ya kondimisa mpo na kotɛmɛla baoyo bazali koangana ete Yesu azalaki solo te.” Mpo na nini? Mpamba te kobomama yango “elɛmbisaki, nkutu epekisaki, kopalangana ya kondima wana ya sika kati na Bayuda mpe baoyo bazalaki Bayuda te.” (Kokanisá na 1 Bakolinti 1:23.) Soki kobomama ya Yesu Masiya ezalaki botyoli monene mpo na Bayuda mpe Bapakano, yango ekokaki soko moke te kozala likanisi mpamba libimisami na bantoma! Lisusu, kufa ya Yesu etatolami lokola likambo lisalemaki na lisoló ya bato bobele na Baevanzile minei te kasi lisusu na Mokomi Tacite moto ya Loma mpe kati na Talmud ya Bayuda.a
Makambo mosusu oyo masalemaki na boumeli ya bomoi ya Yesu matalelami mpe lokola bilembeteli oyo bizali kondimisa bosolo ya Baevanzile, mpe na bongo mazali kondimisa bosolo ya makambo oyo yango ezali koyebisa biso na ntina na ye. Na ndakisa, bayekoli ya Yesu bakokaki kobimisa bango moko lisoló na ye lokola moto oyo autaki na Nasalɛtɛ, esika oyo emonanaki ete ezalaki na lokumu te? To ekokaki kosalema ete bábimisa likambo ya kotekama na ye na Yuda, moninga moko oyo batyelaki motema? Ebongi mpenza kokanisa ete balingaki kobimisa lisoló moko na ntina na Yesu atikami na bayekoli na ye na lolenge oyo ezalaki komonisa bango lokola bato ya kobangabanga? Ebongi mpenza te kondimama ete bayekoli bakokaki kobimisa masoló lolenge wana oyo mazangi kotombola lokumu mpe na nsima kosakola yango bipai binso? Lisusu, lolenge ya kolakisa oyo Yesu asalelaki ekesanaki mpenza na mosusu nyonso. Mikanda ya Bayuda ya ekeke ya liboso mizali na eloko moko te oyo ekokani na bililingi na ye. Moto nani oyo ayebani te akokaki mpenza “kobimisa” mateya ya bwanya monene lokola Lisoló likoló na Ngomba? Bantina wana nyonso ezali kondimisa bosolo ya Baevanzile ete ezali masoló ya bomoi ya Yesu.
Ezali mpe na bilembeteli mosusu oyo bitali mateya te mpo na kondimisa solo ete Yesu azalaki na bomoi. Baevanzile minei ezali komonisa lisoló ya bomoi na ye na bosikisiki, na mozindo mpenza. Bisika, lokola Beteleme mpe Galilai; bato mpe bituluku oyo biyebanaki mingi, lokola Ponti Pilato mpe Bafalisai; mpe mimeseno ya Bayuda mpe makambo mosusu oyo makeseni mazalaki te bobele lisapo mpamba. Yango ezalaki kati na lolenge ya bomoi oyo ezalaki na ekeke ya liboso, mpe yango endimisami na mikanda oyo mizali ya Biblia te mpe na bokundoli ya arkeolozi.
Na yango, ezali na bilembeteli ya kondimisa, kati na mateya mpe makambo mosusu ya bomoi na ye, oyo bimonisi ete Yesu azalaki moto ya solo kati na lisoló ya bato.
Nzokande, bato mingi bazali na ntembe likoló na makamwisi oyo ye asalaki. Ya solo, engebene bolukiluki oyo elobelami na ebandeli, bobele ba Allemands moke oyo bakendaka na ndako-nzambe nde bandimaka mpenza ete makamwisi ya Yesu mpe lisekwa na ye “esalemaki solo.” Ezali na bantina ya kozala na ntembe na ntina na makamwisi mpe lisekwa ya Yesu?
Mpo na nini basusu bazali na ntembe na ntina na makamwisi ya Yesu
Matai 9:18-36 eyebisi ete Yesu abikisaki babɛ́li, asekwisaki bakufi mpe abimisaki bilimu mabe na nzela ya makamwisi. Professeur Hugo Staudinger, ye mokomi ya makambo ya kala, ayebisi ete: “Ekoki mpenza kondimama te, mpe na kotalela lisoló ya bato ekoki kosalema te, ete masoló wana ya kokamwisa máuta na makanisi ya bato.” Mpo na nini te? Mpamba te emonani lokola ete Baevanzile ya liboso ekomamaki na ntango oyo ntálo monene ya bato oyo bamonaki makamwisi yango na miso na bango moko bazalaki naino na bomoi! Kondimisama mosusu ezwami kati na likambo oyo, lokola Staudinger akóbi koloba yango ete, Bayuda oyo bazalaki batɛmɛli “baanganaki soko moke te ete Yesu asalaki misala ya kokamwa.” Soki totiki bilembeteli mosusu nyonso mpe totye moboko ya ekateli na biso bobele likoló na bilembeteli wana ya libándá, tokomona ete makamwisi ya Yesu mabongi mpenza ete tóndima yango.—2 Timoté 3:16.
Atako “ntálo monene ya ba Allemands bandimisami ete Yesu abikisaki bato ya bokɔnɔ,” mingi bazali na ntembe na ntina na nguya oyo ezalaki nsima ya kobikisama yango. Na ndakisa, teoloziɛ moko ya Allemagne oyo ayebani mingi alobaki polele ete kobikisama oyo Yesu asalaki ezalaki kouta na nguya ebéngami hypnose, kozaláká na bopusi likoló na elimo ya bato oyo bazalaki na mitungisi ya makanisi. Ezali wana ndimbola oyo ebongi?
Talelá naino bandakisa oyo. Malako 3:3-5 eyebisi ete Yesu abikisaki mobali moko oyo azalaki na lobɔ́kɔ lokauki. Kasi lobɔ́kɔ lokoki kokauka mpo na mitungisi ya makanisi? Soko moke te. Na yango, kobikisama wana ekokaki te kozala na nguya ya hypnose. Na bongo nini epesaki Yesu nguya ya kosala makamwisi? Professeur Staudinger andimi ete: “Soki mibeko mizali te oyo mikoki mpenza kosalelama sikisiki, mpe soki mpenza oanganaka Nzambe te, bongo okoki te kolongola likoki oyo ete Nzambe, oyo nguya na ye eleki ya moto, akoki kosala makambo oyo maleki makoki ya moto.” Ee, ya solo, na lisalisi ya “nguya ya Nzambe,” Yesu abikisaki mpenza bato oyo bazalaki na bokɔnɔ. Na yango ezali na ntina moko te ya kobɛta ntembe na bosolo ya makamwisi ya Yesu.—Luka 9:43; Matai 12:28.
Lokola búku The American Peoples Encyclopedia emonisi yango, soki likamwisi oyo lileki makamwisi mosusu nyonso—lisekwa ya Yesu—lisalemaki, makamwisi mosusu nyonso oyo malobelami kati na Baevanzile “makoki kosalema.” Yesu asekwisamaki solo kati na bakufi?
Ezali na bantina ya kozala na ntembe likoló na lisekwa ya Yesu?
Talá liboso ndakisa ya likambo moko oyo lizali kondimisa bosolo ya lisekwa ya Yesu—nkunda na ye oyo etikalaki mpamba. Likambo oyo ete nkunda ya Yesu etikalaki mpamba ekokaki te kotyamela ntembe na bato ya eleko na ye, ata mpe te na batɛmɛli na ye. (Matai 28:11-15) Lokuta elingaki kotɔndɔlama nokinoki! Búku monene oyo touti kolobela esukisi na elónga nyonso ete: “Ndimbola moko te ya malamu na ntina na nkunda oyo etikalaki mpamba esili kopesama longolá bobele maloba oyo ya Biblia, ‘Azali awa te nde asili kosekwa’ (Matai 28:6).”
Basusu batyaka ntembe, ete ezalaki bobele bayekoli ya Yesu bango moko nde basakolaki bipai binso ete azalaki Masiya oyo asekwisami. Ya solo basakolaki yango. Kasi bosolo na nsango na bango esimbamaki makasi na makambo ya lisoló ya bato, mingimingi mpenza kufa mpe lisekwa ya Yesu; boye te? Ezali bongo. Ntoma Paulo ayebaki malamu boyokani motindo wana ya makambo ntango akomaki ete: “Soko Klisto asekwi te, kosakola na biso ezali mpamba, kondima na bino ezali mpamba mpe. Tozwami ete tozali kosakola na lokuta na makambo na Nzambe. [Mpamba te] Tosili kosakola mpo na Nzambe ete asekwisi Klisto.”—1 Bakolinti 15:14, 15; kokanisá na Yoane 19:35; 21:24; Baebele 2:3.
Na ekeke ya liboso, ezalaki na bato mingi oyo bayebanaki malamu mpe baoyo bakokaki kotatola na ntina na komonana ya Yesu nsima ya kufa na ye. Kati na bango bantoma 12 mpe Paulo, elongo na batatoli mosusu koleka 500 oyo bamonaki ye.b (1 Bakolinti 15:6) Tómikundola lisusu ntina oyo Matiasi akokisaki masɛngami mpo na kokitana Yuda, ntoma oyo atikalaki sembo te. Misala 1:21-23 eyebisi ete Matiasi akokaki kotatola na ntina na lisekwa ya Yesu mpe makambo oyo uta ebandeli mazalaki na boyokani na Ye. Soki bomoi mpe lisekwa ya Yesu ezalaki likambo ya lisapo mpamba kasi likambo ya solo te, masɛngami motindo yango masengelaki mpenza kozala na ntina moko te.
Mpo ete bato mingi ya ekeke ya liboso bakokaki kopesa litatoli na oyo bamonaki na ntina na bomoi, makamwisi, kufa mpe lisekwa ya Yesu, losambo ya boklisto epalanganaki mpenza nokinoki kati na Bokonzi ya Loma, atako ekutanaki na bipekiseli oyo touti kolobela. Bayekoli na ye bazalaki pene ya koyika mpiko kati na mpasi, na minyoko mpe ata na kufa mpo ete bákoka kosakola na bisika nyonso lisekwa wana mpe solo monene oyo ekangisamaki na yango. Solo nini? Oyo ete lisekwa na ye ekokaki kosalema bobele na nguya ya Nzambe. Mpe mpo na nini Yehova Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi? Eyano na motuna oyo ezali komonisa soki Yesu oyo alobelami kati na lisoló ya bato azalaki mpenza nani.
Na mokolo ya Pentekote, ntoma Petelo asakolaki na molende nyonso epai na Bayuda oyo bazalaki kokamwa kati na Yelusaleme ete: “Mpo na Yesu oyo, Nzambe asekwisi ye, mpe biso nyonso tozali batatoli na likambo yango. Na bongo esili ye konɛtwa na lobɔ́kɔ na Nzambe na mobali, mpe esili ye kozwa elaka na [elimo santu, NW] na Tata, asopi yango ezali bino komona mpe koyoka. Mpo ete Davidi anɛtwaki na Likoló te, nde ye alobi ete, [Yehova] alobaki na Nkolo na ngai ete, Kisá na lobɔ́kɔ na ngai na mobali kino ekotya ngai bayini na yo lokola etɛmɛlɔ na makolo na yo. Na bongo tiká ete libota mobimba na Yisalaele báyeba solo ete Nzambe azalisi ye Nkolo mpe Klisto, ye Yesu oyo bino bobakisi ye na [nzeté na mpasi, NW].” (Misala 2:32-36) Ee, Yehova Nzambe azalisaki Yesu ya Nasalɛtɛ “Nkolo mpe Klisto.” Ezali na bantina ya kozala na ntembe likoló na mokumba na ye kati na eteni wana ya mokano ya Nzambe?
Mpo na nini kozala na ntembe na ntina na mokumba ya Yesu na mikolo na biso?
Lolenge nini ntembe na ntina na oyo Yesu azali mpe na ntina na mokumba na ye ekoki kosila? Na likambo oyo ete ye azalaki mpenza mosakoli ya solo. Asakolaki bitumba, nzala, koningana ya mabelé, mobulu mpe kozanga bolingo oyo tozali komona lelo. Lisusu, asakolaki ete: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:3-14) Kokokisama ya bisakweli wana ezali komonisa ete Yesu azali Klisto oyo asekwisamaki, oyo na kozanga komonana azali koyangela ‘na kati na bayini na ye,’ mpe mosika te akotya mokili ya sika ya Nzambe.—Nzembo 110:1, 2; Danyele 2:44; Emoniseli 21:1-5.
Na mikolo na biso lelo koleka ntango mosusu nyonso, bato bazali mpenza na mposa ya Mobikisi oyo azali na bwanya oyo eleki bwanya ya bato. Mpo na nini tosengeli kozala na ntembe ete Yesu azali moponami oyo abongi mpo na kobikisa bato? Yoane, oyo azalaki motatoli ya bikamwiseli minene mpe ya lisekwa ya Yesu, ayebisaki ete: “Biso mpe tosili kotala mpe tozali kotatola ete Tata atindi Mwana lokola Mobikisi na mokili.” (1 Yoane 4:14; kokanisá na Yoane 4:42.) Motindo moko lokola tozali na moboko ya solo te ya kobɛta ntembe na ntina na bomoi ya Yesu, na makamwisi, na kufa mpe lisekwa na ye, tozali mpe na elónga moko te ya kobɛta ntembe ete Yehova Nzambe asilaki kotya ye lokola Mokonzi oyo azali na lotómo ya kozala na lobɔ́kɔ na Ye ya mobali. Na ntembe te, Yesu ya Nasalɛtɛ azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe mpe “Mobikisi ya mokili.”—Matai 6:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bowelani oyo eyebisami na ntina na Yesu kati na Talmud endimami lokola likambo ya solo bobele na banganga-mayele mosusu. Na ngámbo mosusu, makambo oyo Tacite, Suétone, Pline le Jeune mpe Flavius Josèphe bakomaki na ntina na Yesu, mbala mingi endimami lokola elembeteli ya lisoló ya bato oyo mandimisi ete Yesu azalaki solo.
b Mokolo mosusu, Yesu oyo asekwisami alyaki mbisi elongo na bayekoli na ye, yango emonisi ete komonana na ye ezalaki bobele emonaneli ya mpamba te, lokola bato mosusu bazali koloba yango lelo.—Luka 24:36-43.