Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/8 nk. 12-17
  • Libyangi ya bolingo lipesami epai na baoyo balɛmbi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libyangi ya bolingo lipesami epai na baoyo balɛmbi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baoyo ‘bazali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito’
  • Ntina mpenza ya minyoko
  • Libyangi ya Yesu lelo oyo
  • Libɔndisi mpe bopemi
  • ‘Bozwa kopema na bino‘
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Bóya epai na ngai, . . . mpe ngai nakopemisa bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Lisungi oyo ebongi mpenza mpo na kokitisa mitungisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bantina ya koyanganaka na makita
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/8 nk. 12-17

Libyangi ya bolingo lipesami epai na baoyo balɛmbi

“Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.”​—MATAI 11:28.

1. Yesu amonaki nini na Galilai wana asalaki mobembo na ye ya misato ya mosala ya kosakola?

PENE na ebandeli ya mobu 32 T.B., Yesu azalaki kati na mobembo na ye ya misato ya mosala ya kosakola na etúká ya Galilai. Atambolaki na bingumba mpe bamboka mike, “wana ezalaki ye kolakisa na biyanganelo na bango mpe kosakola Nsango Malamu na Bokonzi mpe kobikisa mpasi nyonso mpe maladi nyonso.” Wana ezalaki ye kosala bongo, amonaki ebele ya bato, mpe “ayoki mawa mpo na bango ete balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.”​—Matai 9:35, 36.

2. Lolenge nini Yesu asungaki bato?

2 Nzokande, Yesu asukaki te bobele na koyokela ebele ya bato wana mawa. Nsima ya koyebisa na bayekoli na ye ete bábondela “Nkolo na elanga,” Yehova Nzambe, atindaki bango ete bákende kosunga bato. (Matai 9:38; 10:1) Na nsima, ye moko apesaki bato elikya mpo na oyo etali lolenge ya kozwa lisungi mpe kobɔndisama ya solosolo. Apesaki bango libyangi oyo ya kolendisa motema: “Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai; zambi ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino.”​—Matai 11:28, 29.

3. Mpo na nini libyangi ya Yesu ezali mpe na nguya ya kobenda likebi ya bato lelo?

3 Lelo tozali kobika na eleko oyo bato mingi bazali komiyoka ete bazali kokumba bozito eleki monene. (Baloma 8:22; 2 Timoté 3:1) Mpo na basusu, bobele kosala mosala mpo na kobikela ezali kosɛnga bango ete bálekisa ntango na bango mingi mpe bábimisa makasi mingi na boye ete bazali kotikala bobele na mwa ntango moke ya kolekisa elongo na libota na bango, na baninga na bango, to na makambo nyonso mosusu. Basusu bazali komema bozito ya maladi makasi, mpasi, kotungisama na makanisi, mpe mikakatano ya nzoto mpe ya mayoki. Wana bazali kati na kotungisama motindo yango, basusu bazali koluka kozwa bopemi na komipesáká mobimba na koluka bisengo, na kolya, na komela, ata mpe na bilangwiseli. Ya solo, yango ezali bobele kobakisela bango mpasi likoló ya mpasi, komemeláká bango mikakatano mpe mitungisi mingi koleka. (Baloma 8:6) Emonani polele ete, libyangi ya bolingo ya Yesu lizali na nguya ya kobenda likebi ya bato lelo oyo lokola lizalaki mpe na eleko wana ya kala.

4. Mituna nini tosengeli kotalela mpo na kozwa litomba na libyangi ya bolingo ya Yesu?

4 Kasi bato na eleko ya Yesu batyamaki na nsé ya bokonzi nini, oyo esalaki ete bámonana lokola “balɛmbi mpe balemalemi,” kopusáká Yesu ete ayokela bango mawa? Nini ezali bozito mpe mokumba oyo bazalaki komema, mpe lolenge nini libyangi ya Yesu elingaki kosunga bango? Biyano na mituna oyo bikoki kosunga biso mingi mpenza mpo ete tózwa litomba kati na libyangi ya bolingo ya Yesu lipesami epai na baoyo balɛmbi.

Baoyo ‘bazali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito’

5. Mpo na nini ebongaki ete ntoma Matai nde akoma likambo wana oyo limonanaki kati na mosala ya Yesu?

5 Likambo ya kobenda likebi ezali ete bobele Matai nde alobaki na ntina na bozito yango kati na mosala ya Yesu. Lokola ye moko mpe azalaki mokongoli mpako, Matai, oyo abéngamaki mpe Lewi, ayebaki malamumalamu motindo moko ya sikisiki ya bozito oyo bato bazalaki komema. (Matai 9:9; Malako 2:14) Búku La vie quotidienne en Palestine au temps de Jésus elobi ete: “Mpako oyo [Bayuda basengelaki] kofuta, na mosolo mpe na biloko mosusu, ezalaki mpenza monene mingi, mpe ezalaki lisusu bozito mingi mpamba te lolenge mibale ya mpako ezalaki kosɛngama nzela moko, mpako ya Leta mpe mpako ya lingomba; mpe ata moko te kati na yango ezalaki moke.”

6. (a) Ebongiseli ya mpako na eleko ya Yesu ezalaki ya lolenge nini? (b) Mpo na nini bakongoli ya mpako bazalaki na lokumu mabe? (c) Paulo amonaki ntina ya kokundwela baninga na ye baklisto likambo nini?

6 Eloko oyo esalaki ete yango nyonso ezala na bozito mpenza koleka ezalaki bongo ebongiseli ya mpako na ntango wana. Bakonzi Baloma bapesaki lotómo ya kokongola mpako epai na bato oyo bakokaki kokɔtisela bango mosolo mingi koleka. Bato yango, na ngala na bango, bazalaki kozwa bato ya mboka na mosala mpo na kokamba mosala mpenza ya kokongola mpako. Moto moko na moko kati na ebongiseli wana amonaki ete azalaki na lotómo ya kobakisa motuya na ye, to kolongola ndambo ya mbongo mpo na ye. Na ndakisa, Luka ayebisaki ete “mobali moko, nkombo na ye Zakai, azalaki wana. Ye mokóló na bakongoli na mpako, mpe azalaki mozwi.” (Luka 19:2) Emonani ete Zakai, “mokóló na bakongoli na mpako,” mpe baoyo ye azalaki kokamba bakómaki na bozwi mingi na nsima ya motoki ya bato. Konyokola mpe kanyaka oyo ebongiseli wana ebimisaki esalaki ete bakongoli ya mpako bátángama kati na molɔngɔ́ moko na bato ya masumu mpe basi na pite, mpe ekoki mpenza kozala ete na makambo mingi, babongaki mpenza kotalelama motindo yango. (Matai 9:10; 21:31, 32; Malako 2:15; Luka 7:34) Lokola bato bayokaki mpenza bozito oyo elekaki bango ndelo, ezali likambo ya kokamwa te ete ntoma Paulo amonaki ntina ya kokundwela baninga na ye baklisto ete bámitungisa te mpo na ekanganeli ya Loma kasi ‘bafutela bango nyonso nyongo na bango, mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako, lifuti epai na baoyo bakoki kozwa lifuti.’​—Baloma 13:7a; kokanisá na Luka 23:2.

7. Lolenge nini mibeko ya Baloma na ntina etali bitumbu ezalaki kobakisela bato bozito?

7 Paulo akundwelaki mpe baklisto ete bázala na “nsɔ́mɔ epai na bango bakoki kobangama, [bápesa] lokumu epai na baoyo bakoki kozwa lokumu.” (Baloma 13:7b) Baloma bayebanaki mingi mpo na ezalela ya konyokola mpe ya makambo makasi ya mibeko na bango na ntina etali bitumbu. Kopesa bato etumbu makasi, kobɛta mfimbo, kokatela bitumbu makasi ya bolɔ́kɔ, mpe koboma bato, ezalaki mbala mingi kosalelama mpo na kopusa bato ete bátosa bango na makasi. (Luka 23:32, 33; Misala 22:24, 25) Ata mpe bakambi ya Bayuda bazwaki lotómo ya kopesa bitumbu motindo wana soki bamonaki ete yango esengelaki. (Matai 10:17; Misala 5:40) Ebongiseli motindo oyo ezalaki mpenza ya koyangela na makasi, mpe ya konyokola, epai na moto nyonso oyo azalaki na nsé na yango.

8. Lolenge nini bakonzi ya mangomba bazalaki kotyela bato bozito?

8 Nzokande, oyo ezalaki lisusu mabe koleka mpako mpe mibeko ya Baloma ezalaki bongo bozito oyo bakonzi ya mangomba ya eleko wana bazalaki kotya likoló na bato. Ya solo, yango ezalaki lobanzo monene ya Yesu na ntango alobaki na ntina na bato ete “balɛmbi na mosala mpe kokumba bozito.” Yesu alobaki ete na esika ya kopesa elikya mpe libɔndisi epai na bato banyatami, bakonzi ya mangomba “bazali kokanga mikumba na bozito mpe kotya yango na mapeka na bato nde bango mpenza balingi kotombola yango ata na mosapi na bango te.” (Matai 23:4; Luka 11:46) Bizaleli mpenza ya bakonzi ya mangomba​—mingimingi oyo ya bakomeli mpe Bafalisai​—bizali komonana polele kati na Baevanzile, lokola etuluku ya bato na lolendo, na motema makasi, mpe na bokosi. Bazalaki kotalela bato na motuya moke lokola ete bayebaki mokanda te, mpe ete bazalaki mbindo, mpe bazalaki kotyola bapaya kati na bango. Mokanda moko oyo elobelaki ntina na ezaleli na bango emonisi ete: “Na mikolo na biso, moto oyo atye bozito monene mingi likoló na mpunda akoki kokweisama engebene mibeko. Ezali boni mpo na moto oyo atyaki bozito ya mibeko 613 likoló na ‘bato ya mboka’ oyo bayekolaki makambo ya lingomba te; mpe na nsima, asalaki eloko moko te mpo na kosunga bango, akweisaki bango lokola bato bazangi kondima?” Ya solo, Mibeko ya Mose ezalaki bozito monene te, kasi ebele ya mibeko ya bonkɔ́kɔ oyo batyaki yango likoló na bato nde ezalaki bozito monene.

Ntina mpenza ya minyoko

9. Lolenge nini ezalela ya makambo ya bato na eleko ya Yesu ekesanaki na oyo ya eleko ya Mokonzi Salomo?

9 Na bantango mosusu bozito ya mpako ya mosolo oyo etyamaki likoló na bato ezalaki mpenza monene, na boye ete bobólá epalanganaki mingi. Bayisraele bazalaki kofuta mpako ya ntalo moke oyo esɛngamaki na mibeko ya Mose. Na bongo, na boumeli ya boyangeli ya Salomo, bato bapesaki mabɔ́kɔ mpo na kokokisama ya mikano ya ekólo, oyo esɛngaki kobimisa mosolo mingi mpenza, na ndakisa kotonga tempelo mpe bandako mosusu. (1 Mikonzi 7:1-8; 9:17-19) Nzokande, Biblia ezali koyebisa biso ete bato “balyaki mpe bamelaki mpe bayokaki esengo. . . . Yuda mpe Yisraele bafandaki na kimya longwa na Dani kino Bele-seba, moto na moto na nsé na mowiti na ye na vinyo mpe na nzeté na ye na mbuma, mikolo nyonso na Salomo.” (1 Mikonzi 4:20, 25) Ekesanaki na nini?

10. Mpo na ntina nini ezalela ya makambo ya Yisraele ezalaki bongo na ekeke ya liboso?

10 Wana libota litikalaki ngwi kati na losambo ya solo, bandimamaki na Yehova mpe bapambolamaki na kozwáká libateli mpe bozwi atako ekólo esengelaki kobimisa mosolo mingi mpo na misala minene ya mboka. Nzokande, Yehova apesaki likebisi oyo ete soki “bakopɛngwa longwa na kobila [ye] mpe bakobatela mibeko na [ye] te,” basengelaki kozwa mpasi monene. Ya solo, “Yisraele [esengelaki] kokóma lisese mpe liloba-na-koseka kati na mabota nyonso.” (1 Mikonzi 9:6, 7) Esalemaki mpe bobele bongo. Yisraele ekómaki na nsé ya boyangeli ya bapaya, mpe oyo ezalaki liboso bokonzi ya nkembo ekómaki etúká oyo eyangelami na ekólo mosusu. Oyo nde mbuma mabe babukaki mpo na kotalela mikumba na bango ya elimo na bopotu!

11. Mpo na nini Yesu amonaki ete bato ‘balɛmbaki mpe balemalemaki lokola bampate bazangi mobateli’?

11 Nyonso wana ezali kosalisa biso na koyeba mpo na nini Yesu asosolaki ete bato oyo ye amonaki bazalaki bato “balɛmbi mpe balemalemi.” Ezalaki bongo Bayisraele, libota ya Yehova, oyo na mobimba, bazalaki komeka kotosa mibeko ya Nzambe mpe kopesa losambo na bango na lolenge lobongi. Nzokande, banyokwamaki mpe banyatamaki, bobele na bakonzi ya politiki mpe ya mombongo te kasi lisusu na bakonzi ya lingomba ya lipɛngwi oyo bazalaki kati na bango. Bazalaki “lokola bampate bazangi mobateli” mpamba te bazangaki moto ya kobatela bango to ya kokɔtela bango. Bazalaki na mposa ya lisungi mpo na kolónga makambo mingi ya mpasi. Libyangi ya bolingo mpe ya boboto ya Yesu lipesamaki mpenza na ntango ebongi!

Libyangi ya Yesu lelo oyo

12. Bopusi nini basaleli ya Nzambe mpe bato mosusu ya motema sembo bazali kokutana na yango lelo?

12 Na makambo mingi, lelo oyo bokeseni ezali te. Bato ya sembo bazali koluka lolenge ya kobikela na kolongobana nyonso, bazali komona ete mitungisi mpe makambo oyo ebongiseli ya lelo oyo esilá kobeba ezali kosɛnga biso tokokisa yango ezali mpasi mingi. Ata baoyo basilá kopesa bomoi na bango epai na Yehova bakoki mpe kobebisama. Balapólo ezali komonisa ete bamoko kati na basaleli ya Yehova bazali komona ete kokokisa mikumba na bango nyonso ezali sé kokóma mpasi, atako bazali na mposa ya kosala bongo. Bazali koyoka ete bazali na bozito mingi, balɛmbi. Basusu nkutu bazali komiyoka ete ekozala libɔndisi mpo na bango soki bakoki bobele kobosana nyonso, mpe kokende epai moko boye mpo ete bákoka kokanisa mpenza malamu. Osilá komiyoka motindo wana? Oyebi moninga na yo moko ya penepene oyo azali kati na ezalela wana? Ee, libyangi ya Yesu ya kolendisa motema mpe etondi na bolingo ezali na ndimbola monene mpo na biso lelo.

13. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Yesu akoki kosunga biso ete tózwa libɔndisi mpe bopemi?

13 Liboso ete Yesu apesa libyangi na ye ya bolingo, alobaki ete: “Makambo nyonso mapesameli ngai na Tata na ngai; moto ayebi Mwana te bobele tata mpe moto ayebi Tata te bobele Mwana mpe ye oyo Mwana andimi ete amonisa ye.” (Matai 11:27) Mpo na boyokani makasi wana kati na Yesu mpe Tata na ye, tolendisami ete na kondimáká libyangi ya Yesu mpe na kokomáká bayekoli na ye, tokoki kokóma na boyokani ya penepene mpenza, ya biso moko mpenza elongo na Yehova, “Nzambe na kobɔndisa nyonso.” (2 Bakolinti 1:3; kokanisá na Yoane 14:6.) Lisusu, lokola ‘makambo nyonso mapesamelaki ye,’ bobele Yesu Klisto nde azali na nguya mpe bokonzi ya kokitisa bozito na biso. Bozito nini? Bozito oyo etyameli biso na bibongiseli bisilá kobeba ya politiki, ya mombongo, mpe ya losambo, elongo na bozito bosilaki kotyamela biso mpo na lisumu mpe mpo na kozanga kokoka oyo tosilaki kosangola. Oyo nde likanisi ya kolendisa mpe ya kopesa elikya oyo emonani mpenza uta na ebandeli!

14. Yesu akokaki kopesa bopemi mpo na mosala makasi ya lolenge nini?

14 Yesu akóbaki na koloba ete: “Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.” (Matai 11:28) Ya solo, Yesu azalaki koloba te mpo na kotɛmɛla mosala makasi, mpamba te azalaki mbala na mbala kolendisa bayekoli na ye ete básala makasi na mosala mopesamelaki bango. (Luka 13:24) Kasi ‘kolɛmba na mosala’ (“kosala mosala ya mpunda,” Kingdom Interlinear) ezali kopesa likanisi ya mosala makasi oyo mosalemi na boumeli ya ntango molai mpe ezali kolɛmbisa, oyo mingimingi litomba ezwamaka te na nsuka na yango. Mpe “kokumba bozito” ezali kopesa likanisi ya kopesamela bozito oyo eleki ndelo ya makoki ya moto. Bokeseni yango ekoki kokokanisama kati na moto oyo azali kotimola mpo na kozwa eloko ya motuya oyo ebombami mpe moto oyo apesameli etumbu ya kotimola tálásé kati na káa ya bakangami. Bazali kosala mosala makasi lolenge moko. Mpo na oyo ya liboso, mosala mokosalema na mposa nyonso, kasi mpo na oyo mosusu, ezali mosala monene mingi mpe ya kolɛmbisa oyo ezangi nsuka. Bokeseni ezali bongo kozala na mokano kati na mosala oyo mozali kosalema to kozanga mokano.

15. (a) Mituna nini tokoki komituna soki tomiyoki ete tozali komema bozito moko monene na mapeka na biso? (b) Tokoki koloba nini na ntina na eutelo ya bozito na biso?

15 Ozali komiyoka ete ‘ozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito,’ na boye ete ozali na makambo oyo osengeli kokokisa oyo eleki ndelo ya ntango mpe ya nguya na yo? Bozito oyo ozali komema emonani ete eleki yo ndelo? Soki ezali bongo, okoki kozwa lisungi na komituna ete: ‘Mpo na ntina nini nalɛmbi na mosala? Lolenge nini ya mokumba nazali komema?’ Mpo na yango, molimboli moko ya Biblia alobaki esili koleka mibu 80 ete: “Soki totaleli malamu bozito ya bomoi tokomona ete ezali ya mitindo mibale; oyo tomityeli biso moko mpe oyo ekoki kopɛngolama te: oyo eyei mpo na bizaleli na biso moko, mpe oyo eyei mpo na bizaleli na biso te.” Na nsima abakisaki ete: “Mingi kati na biso bakoki kokamwa, nsima ya komitalela malamumalamu, na komona ete eteni monene ya bozito oyo biso moko tomityelaka ezali oyo eleki monene.”

16. Bozito nini tokoki na bozoba nyonso komityela biso moko?

16 Wapi mwa ndambo ya bozito oyo biso moko tokoki komityela? Lelo tozali kobika kati na mokili oyo bato bamipesi mingi na mposa ya biloko ya mosuni, na koluka bisengo, mpe na bizaleli ya mbindo. (2 Timoté 3:1-5) Ata baklisto oyo basili komipesa bazali ntango nyonso komekama ete bálanda lolenge ya kolata mpe lolenge ya bomoi ya mokili. Ntoma Yoane akomaki na ntina na “mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso mpe nzombo na bizaleli.” (1 Yoane 2:16) Wana ezali bopusi ya nguya oyo ekoki nokinoki kozwa biso. Eyebani ete basusu basili kondima kokɔta banyongo mineneminene mpo na kosepela mingi na bisengo ya mokili to mpo na kobatela lolenge moko ya bomoi. Na nsima, bayei komona ete basengeli kolekisa mpenza ntango mingi kati na mosala ya mosuni, to kosala misala mingi, mpo na kozwa mosolo ya kofuta banyongo na bango.

17. Nini ekoki kosala ete komema mokumba ya boklisto ekoka kozala mpasi, mpe lolenge nini likambo yango ekoki kosembolama?

17 Atako moto akoki kokanisa ete ezali na yango mabe te na kozala na biloko oyo basusu bazali na yango to kosala lokola basusu, ezali na ntina kokanisa malamu soki ozali te komibakisela bozito bozangi ntina. (1 Bakolinti 10:23) Lokola moto akoki komema bobele bozito oyo ekoki na ye, soki alingi komema mosusu, asengeli kokitisa naino oyo azalaki na yango liboso. Mingimingi, makambo ya ntina mpo na bolamu na biso ya elimo​—boyekoli na biso moko ya Biblia, koyangana na makita, mpe mosala ya kosakola​—yango nde elongolamaka liboso. Mbuma oyo eyaka komonana ezalaka bongo kolɛmba na elimo, oyo, na nsima, ekómisaka nkutu mokumba mpasi mpo na komema yango. Yesu apesaki likebisi na ntina na likámá motindo wana na ntango alobaki ete: “Kebá na bino ete mitema na bino mikóma makasi mpo na kolunda te, soko na kolangwa te, soko na bitungiseli na bomoi te. Bongo mokolo yango ebimela bino pwasa lokola motambo te.” (Luka 21:34, 35; Baebele 12:1) Soki moto azali na bozito mpe alɛmbi, ekozala na ye mpasi mpo ete amona motambo mpe akima yango.

Libɔndisi mpe bopemi

18. Yesu akokaki kopesa nini epai na baoyo bazali koya epai na ye?

18 Na yango, na bolingo nyonso, Yesu apesaki lisalisi libongi mpo na kosilisa mokakatano yango: “Bóya liboso na ngai, . . . mpe nakopemisa bino.” (Matai 11:28) Liloba “kopemisa” oyo esalelami awa mpe liloba “kopema” oyo esalelami na molɔngɔ́ 29 euti na liloba moko ya Greke oyo ekokani na liloba oyo libongoli ya la Septante esalelaka mpo na kobongola liloba na Liebele na ntina na sabata to kotosa sabata. (Exode 16:23) Na yango, Yesu alakaki te ete baoyo balingaki koya epai na ye basengelaki kozala lisusu na mosala te, kasi alakaki ete alingaki kopemisa bango mpo ete bákoka kokokisa mosala oyo basengeli kosala na boyokani na mokano ya Nzambe.

19. Lolenge nini moto akoki ‘koya epai na Yesu’?

19 Kasi, lolenge nini moto akoki ‘koya epai na Yesu’? Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Soko nani alingi koya nsima na ngai, tiká ete amiboya ye moko mpe atombola [nzeté na ye ya mpasi, NW] mpe abila ngai.” (Matai 16:24) Na yango, koya epai na Yesu elimboli kotya mokano na yo moko na nsima ya mokano ya Nzambe mpe ya Klisto, kondima mokumba ya boklisto, kosala bongo kozanga kotika. Nyonso wana ezali kosɛnga makambo mingi koleka? Motuya oyo esengeli kofutama eleki monene mingi? Tiká tótalela makambo oyo Yesu alobaki nsima wana apesaki libyangi litondi na bolingo epai na baoyo balɛmbi.

Okoki komikundola?

◻ Lolenge nini bato na eleko ya Yesu batyelamaki bozito?

◻ Nini ezalaki ntina mpenza mpo na yango bato bazalaki komona mpasi?

◻ Lolenge nini tokoki komitalela malamu soki tomiyoki ete tozali komema bozito eleki monene?

◻ Bozito nini tokoki komityela biso moko na bozoba nyonso?

◻ Lolenge nini tokoki kozwa bopemi oyo Yesu alakaki?

[Elilingi na lokasa 15]

Wapi mwa ndambo ya bozito oyo tokoki komityela biso moko?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

Courtesy of Bahamas Ministry of Tourism

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto