Bobángi ekosila ntango nini?
EKOKAMWISA yo na koyeba ete libateli ya solo lizali na boyokani na mobali moko oyo azalaki na bomoi esili koleka mibu 2000? Komonisáká ntina ya kozala na bolingo, Yesu apesaki lisese moko ya kobenda likebi: “Moto moko azalaki kokita na Yelusaleme kokenda na Yeliko. Akweaki kati na babɔtɔli, mpe bango balongolaki bilamba na ye, mpe babɛti ye, mpe kokenda na bango batiki ye penepene na kufa.” Atako basáli-mobémbo mibale batyaki likebi te na moto yango, Mosamalia moko ya boboto amonisaki ezaleli ya motema mawa. Bongo, nani lelo oyo azali komibanzabanza mpo na bato oyo bakweaka na mabɔ́kɔ na bato mabe? Kobɔndisama nini tokoki kolikya na bobángi?—Luka 10:30-37.
Atako bazali koloba ete bandimaka Nzambe, bato mingi bakanisaka ete moto nde asengeli kotosisa mibeko mpe kotambwisa makambo na molɔngɔ́. Kasi bitumbu makasi ya bolɔ́kɔ to kobakisama ya motuya ya bapolisi mpe kopesa bango lifuti malamu ekotya nsuka na misala mabe? Okanisaka mpenza ete bibongiseli oyo bisengeli kotosisa mibeko, atako bizali kosala milende mingi mpo na kopesa mwa libateli, bikoki nde kosilisa makambo lokola kolangwa bangi, masangá ya basáli-mabe mpe bobólá? Atako bongo, nzala mpe mposa na biso ya boyengebene ezali ya mpamba te.—Matai 5:6.
Nzembo 46:1 elobi ete: “Nzambe azali ekimelo mpe nguya mpo na biso; amonani solo na kosunga na ntango na mpasi.” Tokomona ete maloba oyo mazali te bobele maloba kitoko ya ntɔ́ki.
Lokola oyebi yango, bipanzeli-nsango biyebisaka mokolo na mokolo kobomama ya bato na nkó kati na bitumba ya bana-mboka mpe kobundisama na banganga-mobulu. Kati na bisika mosusu ya mokili, ekómá momeseno koboma bilenge oyo balingami te to baoyo bamonaki ntango bato babomamaki. Mpo na nini bomoi ekómi na motuya moke boye? Atako mabe motindo yango ekoki kozala na bantina mingi, ezali na ntina moko oyo tosengeli kobosana yango te.
Engebene Liloba ya Nzambe, Biblia, “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Ya solo, Yesu Klisto atɔndɔlaki Satana Zábolo bobele lokola mobuki lokuta te kasi lisusu lokola “mobomi na bato.” (Yoane 8:44) Kopusáká bato na mitindo mikeseni, ekelamu wana ya elimo oyo ezali na nguya mingi ezali lelo oyo kolendisa koyikana ya mobulu. Emoniseli 12:12 eyebisi ete: “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” Nzokande, na esengo nyonso, ebongiseli mabe oyo ekotika esika na “[makoló ya sika mpe mabelé ya sika NW] . . . , mpe boyengebene ekofanda kati na yango.”—2 Petelo 3:13.
Longolá elikya wana kitoko ya mokili ya sika, lisalisi nini tokoki kozwa uta sikawa?
Liboso ete tótalela biyano bibongi na likambo yango, ezali malamu koyeba ete ata baklisto ya solo bazali na ndanga te ete babatelami te na mobulu. Ntoma Paulo alobelaki makámá mingi oyo ye akutanaki na yango. Ye azalaki na “makámá na bibale, na makámá mpo na babɔtɔli, na makámá mpo na bato na libota na [ye], na makámá mpo na bapakano, na makámá kati na mboka, na makámá kati na lisobe, na makámá kati na mai na monana.” (2 Bakolinti 11:26) Nzokande, Paulo abikaki na makámá wana. Ezali bobele bongo lelo oyo; na kozaláká na bokɛngi, tokoki kokóba na misala na biso lokola momeseno mpenza. Tótalela makambo mosusu oyo makoki kosunga.
Soki ozali kofanda kati na kartyé oyo ezali na likámá mingi, etamboli ya malamu ekoki kozala libateli, mpamba te bato batalelaka basusu na mozindo. Atako babɔtɔli bakanaka mpe bakokisaka misala ya mobulu, mingi kati na bango bamitalelaka ete bazali lokola bato mosusu. Boyá kotɔ́nga oyo bazali kosala, mpe koluka te koyeba makambo nini basalaka. Na yango, okoki kopɛngola likoki ya kozala moto oyo basengeli kozongisela mabe. Kobosana te ete miyibi balukaka koyeba nani oyo auti kosomba biloko ya sika to banani oyo bazali pene ya kokende kopema mosika mpe bongo bakozala te na ndako na bango, na yango zalá na bokɛngi na makambo oyo okoyebisa na bato mosusu.
Mingi kati na Batatoli ya Yehova bamonaki ete lokumu malamu oyo bazali na yango lokola basaleli ya Nzambe ezali kopesa bango kobatelama mpenza. Mbala mingi basáli na mabe basili komonisa ete bazalaka na limemya mpo na baklisto motindo yango, baoyo kozanga koponapona basungaka bato na bisika bafandi. Batatoli bango moko bazalaka babomi to miyibi te, bazalaka mpe te ‘banɔ́ngi na makambo na bamosusu,’ na bongo bazali likámá te.—1 Petelo 4:15.
Libateli kati na mokili ya sika ya Nzambe
Tozali komilela mpo na “bokóli ya kotyola mibeko” oyo Yesu Klisto asakolaki, kasi na esika ya komitungisa mingi koleka ndelo, tokoki kondimisama ete mosika te Nzambe akolongola ebongiseli oyo mabe. Longolá likambo ya kosakola “Nsango Malamu oyo na Bokonzi,” Yesu akundwelaki bayekoli na ye ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.”—Matai 24:12-14.
Tokoki solo kondimisama ete baoyo bamipesi na kobɔtɔla biloko ya basusu, mbala mosusu na kopesáká bango mpasi ya nsɔ́mɔ, bakolongolama. Masese 22:22, 23 elobi ete: “Yiba epai na mobólá te zambi azali mobólá; nyokola monyokolami kati na ekuke mpe te. Zambi [Yehova] akolobela bango mpe akobebisa molimo na ye oyo abebisi bango.” Yehova akolongola basáli na mabe, lokola miyibi, babomi mpe baoyo bamibebisi na pite. Lisusu, akobosana te baoyo bakutanaki na mabe motindo yango. Akopesa bango biloko nyonso oyo babungisaki mpe akozongisa kolɔngɔ́nɔ́ na bango mobimba.
Ya solo, baoyo bazali ‘kotika mabe mpe kosala malamu’ bakozwa bomoi ya seko na kobikáká na bolɔ́zi monene oyo esili kobɛlɛma to na kosekwisamáká kati na bakufi. “Bayengebeni bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:27-29) Matomba motindo oyo makozwama mpenza na ntina na mbeka ya lisiko ya Yesu. (Yoane 3:16) Kasi bomoi ekozala lolenge nini kati na paladiso oyo ezongisami?
Na nsé ya Bokonzi ya Nzambe bomoi bokozala esengo ya solo. Yehova asakoli ete: “Bato na ngai bakofanda na efandelo na kimya na bifandelo na solo mpe na ndako na bolɔ́zi te.” (Yisaya 32:18) Baoyo nyonso bakozwa bomoi ya seko bakosila kobongola bomoto na bango. Moto moko te akozala moto mabe to moto na bokesene, mpe moto moko te akozala na libaku mabe ya kokwea na mabɔ́kɔ na moto motindo yango. Mosakoli Mika alobi ete: “Bakofanda mpe na nsé, moto na moto na nsé na miwiti na ye mpe na nzeté na ye na mosuke, moto moko akobangisa bango te.” (Mika 4:4; Ezekiele 34:28) Oyo nde kokesana monene na bakartyé ya makámá mingi oyo ezali na mikolo na biso!
[Etanda na lokasa 6]
ZALÁ NA BOKƐNGI
Basáli na mabe mingi basalaka yango ntango nyonso, kokómisáká mobulu mosala na bango ya bomoi. Bakoki kotambola na etuluku ya bato mibale to misato, ata soki bobele moko nde alakisi yo mondóki. Ezali mpenza solo ete soki mosáli na mabe azali elenge, azali likámá monene koleka. Okosala nini soki okwei na mabɔ́kɔ na basáli na mabe?
Zalá na motema mpiɔ mpo okoka te kosilikisa moyibi—kozanga ekperianse na ye ekoki kobomisa yo. Soki ozali Motatoli ya Yehova, omimonisa bongo. Nzokande, zalá pene ya kopesa moyibi yango eloko oyo ye alingi kozwa. Soki oumeli, likámá likoki kozala monene. Na nsima, okoki komona ete ezali na likámá te soki osɛngi ete azongisela yo mikanda na yo ya Leta to mbongo ya kofuta bísi.
Mbala mingi okoki te koyeba soki nani oyo azali mosáli na mabe. Miyibi mosusu bazalaka baombo ya bilangwiseli to bakómisá yango mosala na bango, basusu balukaka bobele mbongo ya kosomba bilei. Ata ndenge nini, kotambolaka na ebele ya mbongo te. Boyá kolakisa bijou, mpɛ́tɛ́ ya wolo to bamótɛlɛ ya ntálo mingi. Tambolá mpe salá mobémbo lokola osalaka, kozanga komonisa bobángi. Kotala bato te lokola nde olingi komonisa ete basalaki likambo. Soki bazali kobɛta masasi na balabála, lalá na nsé; okosukola bilamba na nsima.—Euti na polisi moko ya kala na Rio de Janeiro.
[Maloba na elilingi ya lokasa 5]
Zalá na motema mpiɔ mpe pesá eloko oyo moyibi alingi kozwa. Soki oumeli, likámá likoki kozala monene