Baklisto basambelaka na elimo mpe na solo
“Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.”—YOANE 4:24, NW.
1. Nzambe asepelaka na losambo ya ndenge nini?
YESU KLISTO, Mwana mobotami-se-moko ya Yehova amonisaki polele losambo oyo esepelisaka Tata na ye na likoló. Mokolo mosusu, ntango azalaki kopesa mwasi moko Mosamalia litatoli na libulu ya mai pene na engumba Sikala, Yesu alobaki boye: “Bino bosambelaka oyo boyebi te; biso tosambelaka oyo toyebi, mpamba te lobiko euti na Bayuda. Kasi, ngonga ezali koya, mpe yango oyo sikoyo, wana basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye. Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:22-24, NW) Maloba yango elimboli nini?
2. Basamalia bazalaki kotalela kaka nini mpo na losambo na bango?
2 Basamalia bazalaki na likanisi ya libunga na likambo etali losambo. Mpo na bango, kaka mikanda mitano ya ebandeli ya Makomami Mosantu nde epemamaki mpe, bazalaki kondima yango kaka na ndenge oyo ekomamaki na libongoli na bango oyo ebengami Pantatɛkɛ ya Basamalia. Basamalia bayebaki mpenza Nzambe te; nzokande, Bayuda bayebaki Makomami. (Baloma 3:1, 2) Yehova akokaki kondima losambo ya Bayuda ya sembo mpe ya bato mosusu. Kasi, esengelaki bango nyonso básala nini?
3. Nini esɛngami mpo na kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo”?
3 Esengelaki ete bato nyonso, bázala Bayuda, Basamalia, to bato mosusu ya ntango ya kala, básala nini mpo na kosepelisa Yehova? Basengelaki kosambela ye “na elimo mpe na solo.” Biso mpe ndenge moko. Atako tosengeli kosalela Nzambe na molende, mpe atako motema oyo etondi na bolingo mpe na kondima nde esengeli kotinda biso, kosambela Nzambe na elimo ezali kosɛnga mpenza ete tózala na elimo santu na ye mpe tótika yango etambwisa biso. Koyekola Liloba ya Nzambe mpe kosalela yango ekosalisa biso mpo ete elimo to makanisi na biso eyokana na elimo ya Nzambe. (1 Bakolinti 2:8-12) Mpo Yehova andima losambo na biso, tosengeli mpe kosambela ye na solo. Yango elingi koloba ete losambo na biso esengeli koyokana na makambo oyo Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali koyebisa biso mpo na ye mpe mikano na ye.
Tokoki koyeba solo
4. Ndenge nini bato mosusu batalelaka solo?
4 Bato mosusu oyo bayekolaka filozofi bazali na makanisi ete moto akoki koyeba solo nyonso te. Alf Ahlberg, ye azali moto ya Suède mpe akomaka babuku, akomaki boye: “Mituna mingi oyo bato ya filozofi batunaka ezali mituna oyo ekoki kozwa biyano ya sikisiki te.” Bato mosusu balobaka ete tokoki kaka koyeba solo ndambo; kasi, ezali mpenza bongo? Yesu azalaki kokanisa bongo te.
5. Mpo na nini Yesu ayaki na mokili?
5 Tósala lokola ete biso mpe tozali wana ntango likambo oyo ezali kosalema: Tozali na ebandeli ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.); Yesu atɛlɛmi liboso ya Ponti Pilata, guvɛrnɛrɛ Moloma. Yesu alobi na Pilata ete: “Ezali mpo na yango nde nayaki na mokili, mpo napesa litatoli na ntina etali solo.” Pilata atuni: “Solo ezali nini?” Kasi azeli te ete Yesu apesa ye eyano.—Yoane 18:36-38, NW.
6. (a) Solo elimboli nini? (b) Etinda nini Yesu apesaki bayekoli na ye?
6 Solo elimbolaka makambo ya solosolo, oyo esalemá mpenza. Kasi, Yesu atatolaki nde mpo na solo na makambo nyonso? Te. Ntango alobelaki solo azalaki kokanisa likambo moko ya sikisiki. Atindaki bayekoli na ye básakola solo yango, mpamba te alobaki na bango ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” (Matai 28:19, 20, NW) Bayekoli ya solo ya Yesu basengeli kosakola “solo ya nsango malamu” na mokili mobimba liboso ete nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo eya. (Bagalatia 2:14) Mosala yango esengeli kokokisa maloba ya Yesu ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14, NW) Yango wana, ezali na ntina mpenza tóyeba banani oyo bazali koyebisa bato ya bikólo nyonso solo na nzela ya mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi.
Ndenge oyo tokoki koyekola solo
7. Ndenge nini okoki komonisa ete Yehova azali Mopesi ya solo?
7 Yehova azali Mopesi ya solo ya elimo. Kutu, Davidi, mokomi ya nzembo abengaki ye ete “Nzambe ya bosolo.” (Nzembo 31:5, NW; 43:3, NW) Yesu andimaki ete liloba ya Tata na ye ezali solo, alobaki mpe ete: “Ekomamá na kati ya Basakoli ete, ‘Mpe bango nyonso bakoteyama na Yehova.’ Moto nyonso oyo ayoki makambo oyo euti epai ya Tata mpe ayekoli ayaka epai na ngai.” (Yoane 6:45, NW; 17:17; Yisaya 54:13) Na bongo, ezali polele ete Yehova, Molakisi Monene, nde asengeli koteya baoyo bazali koluka solo. (Yisaya 30:20, 21, NW) Bato oyo bazali koluka solo basengeli kozwa “boyebi ya Nzambe.” (Masese 2:5, NW) Nzokande, Yehova ateyi to ayebisi solo na ndenge mingi.
8. Na banzela nini Nzambe ateyaki to ayebisaki bato solo?
8 Na ndakisa, Nzambe atindaki baanzelu mpo na kopesa Bayisalaele Mibeko. (Bagalatia 3:19) Alɔtisaki Abalayama na Yakobo bandɔtɔ mpo na kolaka bango mapamboli. (Genese 15:12-16; 28:10-19) Nzambe ye moko mpe alobaki kuna na likoló, na ndakisa ntango Yesu azwaki batisimo mpe maloba ya kosimba motema lokola oyo eyokanaki awa na mabele: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.” (Matai 3:17, NW) Tozali mpe na botɔndi ete Nzambe asalelaki bato mpo na kokoma Biblia mpo ete na nzela na yango ayebisa solo. (2 Timote 3:16, 17) Yango wana, soki toyekoli Liloba ya Nzambe, tokoki kokóma na ‘kondima na kati ya solo.’—2 Batesaloniki 2:13, NW.
Solo mpe Mwana ya Nzambe
9. Ndenge nini Nzambe asalelaki Mwana na ye mpo na koyebisa solo?
9 Nzambe asalelaki mpenzampenza Mwana na ye, Yesu Klisto, mpo na koyebisa bato solo. (Baebele 1:1-3) Yesu alobaki solo na ndenge oyo moto mosusu alobaki yango te. (Yoane 7:46) Ata nsima ya komata na likoló, amonisaki solo oyo eutaki epai ya Tata na ye. Na ndakisa, ntoma Yoane amonaki “emoniseli ya Yesu Klisto, oyo Nzambe apesaki ye, mpo na kolakisa baombo na ye makambo oyo esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke.”—Emoniseli 1:1-3, NW.
10, 11. (a) Solo oyo Yesu atatolaki mpo na yango etaleli likambo nini? (b) Na ndenge nini Yesu akokisaki solo?
10 Yesu alobaki na Ponti Pilata ete ayaki na mokili mpo na kotatola mpo na solo. Na ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye, amonisaki ete solo yango etalelaki ndenge oyo boyangeli ya Yehova ekolongisama na nzela ya Bokonzi ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ ya Klisto. Kasi, mpo ete Yesu atatola mpo na solo esɛngaki ete asuka kaka na kosakola mpe na koteya te. Yesu amonisaki mpenza solo na ndenge oyo akokisaki yango. Yango wana, ntoma Paulo akomaki boye: “Na yango moto moko te asambisa bino na oyo etali kolya mpe komɛla to mpo na fɛti moko boye to mpo na kokumisa sanza ya sika to mpe mpo na sabata; mpo makambo wana ezali elili ya makambo oyo ekoya, kasi bosolo ezali nde epai ya Klisto.”—Bakolose 2:16, 17, NW.
11 Lolenge moko oyo solo ekokisamaki mpenza ezali na ndenge oyo Yesu abotamaki na Beteleme lokola esakolamaki. (Mika 5:2; Luka 2:4-11) Solo ekokisamaki mpe mpo na esakweli ya Danyele oyo elobelaki komonana ya Masiya nsima ya ‘bapɔsɔ ya bambula’ 69. Likambo yango esalemaki ntango Yesu amipesaki na Nzambe mpe azwaki batisimo mpe Nzambe apakolaki ye na elimo santu, na ntango mpenza oyo esakolamaki, elingi koloba na mobu 29 T.B. (Danyele 9:25; Luka 3:1, 21, 22) Solo ekokisamaki lisusu na mosala ya Yesu lokola mosakoli ya Bokonzi. (Yisaya 9:1, 2, 6, 7; 61:1, 2; Matai 4:13-17; Luka 4:18-21) Liwa na lisekwa ya Yesu ekokisaki mpe solo.—Nzembo 16:8-11; Yisaya 53:5, 8, 11, 12; Matai 20:28; Yoane 1:29; Misala 2:25-31.
12. Mpo na nini Yesu akokaki koloba ete, ‘Ngai nazali solo’?
12 Yesu Klisto azali na mokumba monene mpo na kokokisa solo yango, yango wana ye moko alobaki ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6, NW) Bato bazali kolongwa na boombo ya elimo ntango bazali koya “na ngámbo ya solo,” elingi koloba ete bazali kondima mokumba ya Yesu mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. (Yoane 8:32-36; 18:37, NW) Bato oyo bakokani na bampate bakozwa bomoi ya seko mpo bazali koyamba solo mpe bazali kondima Klisto.—Yoane 10:24-28.
13. Wapi makambo misato oyo tokotalela na yango solo ya makomami?
13 Bindimeli ya lingomba ya boklisto ya solo esangisi makambo nyonso ya solo oyo Yesu na bayekoli na ye oyo bapemamaki na elimo bateyaki. Yango wana, baoyo bazali ‘kotosa kondima,’ ‘bazali kokoba kotambola na kati ya solo.’ (Misala 6:7; 3 Yoane 3, 4, NW) Na yango, banani bazali kotambola na kati ya solo lelo oyo? Banani mpenza bazali koteya solo na bikólo nyonso? Mpo na kozwa eyano na mituna yango, tokotalela mingimingi bomoi ya baklisto ya ekeke ya liboso mpe tokotalela solo ya Makomami na makambo etali (1) bindimeli, (2) losambo, mpe (3) etamboli oyo moto asengeli kozala na yango.
Solo mpe bindimeli
14, 15. Okoki koloba nini mpo na ndenge oyo baklisto ya liboso bazalaki kotalela Makomami mpe ndenge oyo Batatoli ya Yehova batalelaka yango?
14 Baklisto ya liboso bazalaki na limemya mingi mpo na Liloba ya Yehova. (Yoane 17:17) Bazalaki kotalela liloba yango na oyo etali bindimeli mpe misala. Clément d’Alexandrie, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mibale mpe ya misato alobaki boye: “Baoyo bazali kosala makasi mpo na kozala na bizaleli malamu bakotika koluka solo te, tii bakomona makambo oyo ezali kolongisa bindimeli na bango na kati ya Makomami.”
15 Batatoli ya Yehova bazalaka na limemya mingi mpo na Biblia lokola oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na yango. Bandimaka ete “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya.” (2 Timote 3:16, NW) Sikoyo, tótalela naino mwa ndambo ya bindimeli ya baklisto ya ekeke ya liboso na ndenge oyo basaleli ya Yehova na mikolo na biso bayekoli yango na Biblia, mokanda ya libosoliboso oyo bayekolaka.
Solo na oyo etali molimo
16. Solo mpo na molimo ezali nini?
16 Lokola baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kondima makambo oyo Makomami elobi, bazalaki koteya solo na ntina na molimo. Bayebaki ete “moto akómaki molimo ya bomoi” ntango Nzambe akelaki ye. (Genese 2:7) Lisusu, bazalaki kondima ete molimo ekufaka. (Ezekiele 18:4; Yakobo 5:20) Bayebaki mpe ete “bakufi bayebi likambo te.”—Mosakoli 9:5, 10.
17. Elikya nini tozali na yango mpo na bato oyo bakufá?
17 Kasi, bayekoli ya liboso ya Yesu bazalaki na elikya ya solosolo ete bato oyo bakufá oyo bazali na makanisi ya Nzambe, bakosekwa to bakozonga na bomoi. Paulo amonisaki malamu elikya yango ntango alobaki boye: “Nazali na elikya epai ya Nzambe . . . ete ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15, NW) Ata nsima ya bambula ebele, moklisto moko nkombo na ye Minucius Félix, akomaki boye: “Moto nini oyo azangi mpenza mayele to azangi makanisi mpo na koloba ete Nzambe akoki te kozongisa lisusu na bomoi moto oyo ye moko akelaki?” Batatoli ya Yehova bandimaka mateya ya solo oyo euti na Makomami na oyo etali molimo, liwa, mpe lisekwa, ndenge baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kondima yango. Sikoyo, tótalela naino Nzambe mpe Klisto soki bazali mpenza banani.
Solo mpe Bosato
18, 19. Mpo na nini tokoki koloba ete liteya ya Bosato euti na Makomami te?
18 Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kokanisa te ete Nzambe, Klisto, mpe elimo santu bazali na kati ya Bosato. Buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Liloba Bosato to liteya moko oyo ezali kolobela yango polelepolele ezali te na kati ya Boyokani ya Sika; Yesu na bayekoli na ye mpe bamonisaki likanisi moko te oyo ekeseni na Shema [libondeli moko ya Baebele] oyo ezali na Boyokani ya Kala oyo elobi ete: ‘Yoká, ɛ Yisalaele: Nkolo Nzambe na biso azali Nkolo moko’ (Det. 6:4).” Baklisto bazalaki kosambela nzambe ya bilongi misato te oyo Baloma bazalaki kosambela to mpe banzambe mosusu te. Bazalaki kolanda maloba ya Yesu ete esengeli kosambela kaka Yehova. (Matai 4:10) Bazalaki mpe kondima maloba ya Klisto ete: “Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28, NW) Lelo oyo mpe, Batatoli ya Yehova bandimaka makambo yango.
19 Bayekoli ya liboso ya Yesu bayebaki malamu ete Nzambe, Klisto, mpe elimo santu bakeseni mpenza. Kutu, bazalaki kobatisa bayekoli ya sika (1) na nkombo ya Tata, (2) na nkombo ya Mwana, mpe (3) na nkombo ya elimo santu, kasi na nkombo ya Bosato te. Batatoli ya Yehova mpe bateyaka solo oyo euti na Makomami; mpe na ndenge yango, bamonisaka ete Nzambe akeseni na Mwana na ye mpe na elimo santu.—Matai 28:19.
Solo mpe batisimo
20. Makambo nini bato oyo balingi kozwa batisimo basengeli koyeba?
20 Yesu atindaki bayekoli na ye báteya bato solo mpo bákóma bayekoli. Mpo na kozwa batisimo, bato yango basengeli koyeba mateya ya ebandeli ya Makomami. Na ndakisa, basengeli kondima esika mpe bokonzi ya Tata; basengeli mpe kondima esika mpe bokonzi ya Mwana na ye, Yesu Klisto. (Yoane 3:16) Bato oyo balingi kozwa batisimo basengeli kokanga ntina ete elimo santu ezali moto te, kasi ezali nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala.—Genese 1:2, NW.
21, 22. Mpo na nini okoki koloba ete batisimo ezali mpo na bandimi?
21 Baklisto ya liboso bazalaki kobatisa kaka bato oyo bayekoli liboso, na nsima babongoli motema mpe bamipesi mobimba na Nzambe mpo na kosala mokano na ye. Bayuda na Baprozelite oyo bayanganaki na Yelusaleme na Pantekote ya mobu 33 T.B. basilaki koyeba Makomami ya Liebele. Ntango bayokaki ntoma Petelo azali koloba mpo na Yesu Masiya, bato pene na 3 000 “bayambaki liloba na ye na motema mobimba” mpe “babatisamaki.”—Misala 2:41, NW; 3:19–4:4; 10:34-38.
22 Baklisto babatisaka bato oyo bandimi. Bato ya Samalia bayambaki solo, mpe “ntango bandimaki Filipo, oyo azalaki kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe mpe ya nkombo ya Yesu Klisto, babandaki kobatisama, ezala mibali mpe basi.” (Misala 8:12, NW) Lokola mokube Moetiopia azalaki prozelite ya molende oyo ayebaki makambo ya Yehova, andimaki maloba ya Filipo oyo alimbolelaki ye ndenge oyo bisakweli oyo elobelaki Masiya ekokisamaki; mpe na nsima azwaki batisimo. (Misala 8:34-36) Na nsima, Petelo ayebisaki Koloneyi na bato mosusu oyo bazalaki Bayuda te ete “moto oyo azali kobanga [Nzambe] mpe azali kosala boyengebene andimami na ye” mpe ete moto na moto oyo akondima Yesu Klisto, masumu na ye ekolimbisama. (Misala 10:35, 43, NW; 11:18) Nyonso wana eyokani malamu na etinda oyo Yesu apesaki ya ‘kokómisa bato bayekoli, koteya bango bátosa makambo oyo apesaki etinda.’ (Matai 28:19, 20, NW; Misala 1:8) Batatoli ya Yehova basalaka mpe ndenge yango, babatisaka kaka bato oyo bayekoli mateya ya ebandeli ya Makomami mpe oyo bamipesi na Nzambe.
23, 24. Lolenge nini ebongi mpo na kopesa batisimo ya baklisto?
23 Mpo na kopesa mondimi batisimo na ndenge oyo ebongi mpenza esengeli kozindisa ye mobimba na mai. Biblia elobi ete ntango Yesu asilisaki kozwa batisimo na Ebale Yaladene ‘abimaki na mai.’ (Malako 1:10, NW) Mokube Moetiopia azwaki batisimo na kati ya “mai.” Ye na Filipo “bakitaki na mai” mpe na nsima “babimaki” na mai. (Misala 8:36-40, NW) Maloba ya elilingi ya kokunda moto oyo Makomami esaleli mpo na batisimo ezali mpe komonisa ete esengeli kozindisa moto mobimba na mai.—Baloma 6:4-6; Bakolose 2:12.
24 Buku moko (The Oxford Companion to the Bible) elobi boye: “Ndenge Boyokani ya Sika ezali kolobela babatisimo ya bato oyo eyebisi bankombo na bango ezali komonisa ete bazalaki kozindisama na mai.” Buku mosusu (Larousse du XXè siècle [Paris, 1928]) elobi ete “mpo na kozwa batisimo baklisto ya liboso bazalaki kozindisama na mai na esika nyonso oyo mai ezalaki.” Buku mosusu mpe (After Jesus—The Triumph of Christianity) elobi boye: “[Batisimo] oyo bazalaki kopesa na ebandeli mpenza ezalaki kosɛnga ete moto amonisa kondima na ye polele, mpe na nsima bázindisa ye mobimba na mai na nkombo ya Yesu.”
25. Tokolobela makambo nini na lisolo oyo elandi?
25 Nyonso oyo touti kolobela na oyo etali bindimeli mpe makambo oyo baklisto ya liboso bazalaki kosala na kolanda oyo Biblia elobi, ezali kaka bandakisa. Tokokaki mpe kotánga makambo mosusu oyo ezali komonisa ete bindimeli na bango ekokani na oyo ya Batatoli ya Yehova. Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge mosusu ya koyeba baoyo bazali koteya bato solo.
Okopesa eyano nini?
• Losambo ya ndenge nini Nzambe azali kosɛnga básambela ye?
• Ndenge nini Yesu Klisto akokisaki solo?
• Biblia elobaka mpenza nini na ntina na molimo mpe liwa?
• Ndenge nini batisimo ya baklisto epesamaka, mpe masɛngami nini bato oyo balingi kozwa batisimo basengeli kokokisa?
[Elilingi na lokasa 16]
Yesu alobaki na Pilata ete: ‘Nayaki mpo na kopesa litatoli na ntina etali solo’
[Elilingi na lokasa 17]
Oyebi ntina oyo Yesu alobaki ete: ‘Ngai nazali solo’?
[Elilingi na lokasa 18]
Wapi solo na ntina na batisimo ya baklisto?