“Awa ezali biso na Mosala oyo . . . , Tozali kotika Te”
LISOLÓ YA RONALD TAYLOR
Na ebandeli ya eleko ya molungé ya mobu 1963, nabundaki mpo na bomoi na ngai. Wana ezalaki ngai kotambola pembeni ya mai na monana, natyaki lokolo na libulu moko oyo ezalaki koyebana te mpe na mbala moko, nakweaki kati na mai mozindo mpenza. Lokola nayebaki kokata mai te, nazalaki pene ya kokufa bobele na mwa bamɛtɛlɛ pene na mokili. Na ntango moninga moko amonaki ngai kati na ezalela wana ya mpasi mpe abendaki ngai na mokili, nasilaki kozinda mbala misato mpe nasilaki komela mai na monana mingi. Na lisalisi ya mwango ya kopemela, nabikaki.
YANGO ezalaki mbala ya liboso te oyo nayaki komona ntina ya kozanga kotika—ata soki makambo mamonisi lokola ete elikya ezali te. Uta na bolenge na ngai, nasengelaki kobunda mpo na bomoi na ngai ya elimo.
Ezalaki bongo na boumeli ya mikolo na mpasi ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba nde nayebaki solo ya Biblia mpo na mbala ya liboso. Nazalaki moko kati na ebele ya bana oyo bamemaki longwa na Londres mpo na kokima likámá ya bitumba na babómbi. Lokola nazalaki bobele na mibu 12, bitumba bizalaki mpenza na ndimbola monene te mpo na ngai; ezalaki lokola lisano.
Na Weston-super-Mare, na súdi-wɛ́sti ya Angleterre, babálani mibale oyo basilaki kokóma mibangé bazalaki kobatela ngai. Nokinoki nsima wana nakómaki na ndako ya babálani wana mibale, basakoli babongisi-nzela bakómaki koya kotala biso. Ezalaki bongo libota ya ba Hargreaves; bango nyonso minei—Reg, Mabs, Pamela, mpe Valeri—bazalaki babongisi-nzela monene. Baboti oyo bazalaki kobɔkɔla ngai bandimaki solo, mpe nsima ya koyekola búku La harpe de Dieu, ngai mpe nazwaki ekateli ya kosalela Yehova. Bobele pɔ́sɔ motoba na nsima, nabyangamaki ete násangana kati na mosala ya kosakola.
Kino lelo, nakoki lisusu komikundola mokolo ya liboso oyo nabimaki na mosala ya kosakola. Kozanga komibongisa, bapesaki ngai mwa babúku mpe bayebisaki ngai ete: “Yo okosala kuna na nsé na ngámbo oyo ya balabála.” Ezali na lolenge wana nde mokolo na ngai ya liboso na mosala ya kosakola elekaki. Na eleko wana, tozalaki kosakola na kosaleláká mingimingi fonó oyo ezalaki na masoló ya nguya. Bantango oyo ezalaki kopesa ngai esengo makasi ezalaki bongo wana nazalaki komema fonó na ngai na mosala ya ndako na ndako mpo na koyokisa bato masukúlu. Natalelaki yango libaku moko kitoko mpenza mpo na ngai ete nasalelama na motindo wana.
Nazalaki kopesa litatoli mingi na eteyelo, nazali komikundola ete nakabolaki babúku mingi oyo ezalaki na masoló ya Biblia epai na mokambi ya eteyelo. Ntango nakómaki na mbula 13, nazwaki batisimo na liyangani oyo esalemaki pembeni na engumba Bath. Liyangani mosusu oyo esalemaki na ntango ya etumba mpe nakoki kobosana yango soko moke te ezalaki oyo esalemaki na Leicester na 1941 na ndako monene ebéngami De Montfort. Nakendeki na ebáelo mpo na kozwa búku Les enfants, oyo ezalaki na nsango oyo ekomamaki na ndeko Rutherford, ye oyo azalaki prezidá ya la Société Watch Tower na eleko wana. Lisoló kitoko oyo epesamaki epai na bilenge oyo bazalaki wana eyeisaki makasi mposa na ngai ya kosalela Yehova mpo na libela.
Na yango, nalekisaki mibu mibale ya esengo kati na solo elongo na baboti oyo bazalaki kobɔkɔla ngai. Kasi wana nakómaki na mibu 14, nasengelaki kozonga na Londres mpe kobanda kosala mpo na kobikela. Atako nazongelaki lisusu kofanda elongo na libota ngai ya mosuni, nasengelaki sikawa komibɔkɔla ngai moko na elimo, mpamba te, moko te kati na libota na ngai azalaki na bindimeli lolenge moko na oyo ya ngai. Nokinoki, Yehova apesaki ngai lisungi oyo nazalaki na yango mposa. Bobele pɔ́sɔ misato nsima ya kokóma na ngai na Londres, ndeko mobali moko ayaki na ndako na biso mpo na kosɛnga nzela epai na tata ete akamata ngai tókende na Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki pembeni. Ndeko yango ezalaki bongo John Barr, oyo azali sikawa moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi ya Batatoli ya Yehova. Akómaki moko na “batata” na ngai ya elimo na boumeli ya eleko ya mikakatano ya bolenge.—Matai 19:29.
Nabandaki koyangana na lisangá ya Paddington, oyo ezalaki koyanganga na kartyé oyo ezalaki kobéngama Craven Terrace, pembeni ya Betele ya Londres. Lokola nazalaki etike na elimo, “ndeko mobali moko ya mobangé “Papa” Humphrey, apesamelaki mokumba ya kobatela ngai mpenza malamu. Na ntembe te, ezalaki lipamboli mpenza mpo na ngai kozala na likoki ya kosala boninga elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi bapakolami oyo bazalaki kati na lisangá wana. Kati na biso baoyo tozalaki na elikya ya kozwa bomoi awa na mabelé—tobéngamaki ba Yonadaba—tozalaki mingi te. Ya solo, nazalaki Yonadaba bobele moko kati na etuluku ya Boyekoli Mokanda epai kuna nazalaki koyangana. Atako nazalaki na baninga mingi te kati na baoyo bazalaki mbula moko na ngai, boninga wana ya kitoko elongo na bandeko mibali oyo bakɔmeli eteyaki ngai makambo mingi ya ntina. Mbala mosusu, moko na makambo maleki ntina ezalaki bongo ya kozanga kotika mosala ya Yehova.
Na eleko yango, tozalaki kolekisa wikende mobimba na mosala ya kosakola. Napesamelaki mokumba ya kobatela “motuka ya loláká,” oyo ezalaki bongo na makálo misato oyo ebongisamaki mpo na komema bisaleli ya koyokisa loláká mpe bateri ya motuka. Mikolo nyonso ya pɔ́sɔ, nazalaki kotambola na motuka mpe nazalaki kokenda na makúmba ya balabála, epai kuna tozalaki kotya mwa miziki mpe na nsima tozalaki kotya masukúlu ya ndeko Rutherford. Mikolo ya pɔ́sɔ mizalaki mpe kosalelama mpo na kopesa litatoli na balabála, tozalaki komema basakósi na biso ya bazulunalo. Mikolo ya lomingo ebongisamaki mpo na mosala ya kopesa litatoli ndako na ndako, kokaboláká mwa babúku mpe babúku minene.
Boninga na ngai elongo na bandeko mibali ya molende ekólisaki kati na ngai mposa ya kosala mosala ya mobongisi-nzela. Mposa yango ekólaki lisusu makasi na ntango nazalaki koyoka masukúlu ya babongisi-nzela na mayangani ya etúká. Liyangani moko ya etúká oyo ezalaki na bopusi makasi likoló na bomoi na ngai ezalaki oyo esalemaki na ndako oyo ezalaki kobéngama Earl’s Court, na Londres, na 1947. Nsima ya basanza mibale, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, mpe nasalaki makasi ete nábatela elimo ya mosala ya mobongisi-nzela kino lelo oyo. Esengo oyo nazalaki kozwa na kotambwisáká boyekoli mingi ya Biblia emonisi ete ekateli wana ezalaki ya kitoko.
Nazwi mwasi na Espagne mpe nazwi teritware na Espagne
Na mobu 1957, wana nazalaki naino kosala mosala ya mobongisi-nzela na lisangá ya Paddington, nakutanaki na ndeko mwasi moko kitoko, mwanamboka ya Espagne, nkombo na ye Rafaela. Nsima ya mwa basanza, toyaki kobalana. Mokano na biso ezalaki ete biso mibale tósala mosala ya babongisi-nzela, kasi tokendeki liboso na Madrid mpo ete tókoka kokutana na baboti ya Rafaela. Ezalaki mobembo oyo ebongolaki bomoi na ngai. Wana tozalaki na Madrid, ndeko Ray Dusinbere, mokɛngɛli ya Filiale ya Espagne, atunaki ngai soki tokoki kosala na Espagne, epai kuna mposa ya bandeko bameseni na mosala ezalaki makasi.
Lolenge nini nakokaki koboya libyangi motindo wana? Na yango, tobandaki elongo mosala na biso ya ntango nyonso na Espagne na 1958. Na eleko wana, mokonzi Franco nde azalaki koyangela, mpe mosala na biso moyebanaki na Leta te, yango esalaki ete mosala ya kosakola ekóma mpasi. Lisusu, nasengelaki kobunda na koyekola lokótá Espagnol na boumeli ya mwa bambula ya liboso. Yango lisusu ezalaki mpe likambo ya kotika te, atako nalelaki mbala mingi mpo na mawa makasi oyo nazalaki koyoka mpo ete nazalaki kokoka te kosolola elongo na bandeko kati na lisangá.
Bakɛngɛli bazalaki mingi te, yango wana atako nazalaki kokoka koloba Espagnol te, na boumeli ya sanza moko nazalaki kobatela etuluku moko ya moke. Lokola mosala na biso ezalaki kosalema na nsé ya bipekiseli, tomikabolaki na bituluku mikemike oyo mokomoko na yango ebandaki kozala na basakoli kobanda 15 kino 20, oyo na meko moko to mosusu, ezalaki kotambwisama lokola masangá mikemike. Na ebandeli, kotambwisa boyekoli ezalaki kopesa ngai mpasi na motema, mpamba te nazalaki ntango nyonso te koyoka biyano ya bayangani. Nzokande, mwasi na ngai azalaki kofanda na nsima, mpe soki amoni ete nabulungani, azalaki koningisa motó na mayele nyonso mpo na kondimisa ngai ete eyano oyo epesami ezali malamu.
Nazalaka makasi mingi te mpo na oyo etali koyekola nkótá, mpe mbala mingi nazalaki kooka mposa ya kozonga na Angleterre, epai kuna nakoki kosala makambo nyonso kozanga nkaká. Nzokande, uta na ebandeli, bolingo mpe boninga ya bandeko na biso ya motema, mibali mpe basi ya Espagne, esungaki ngai kati na mikakatano na ngai mpo na likambo litali lokótá. Mpe Yehova apambolaki ngai na kopesáká ngai mikumba minene oyo esalaki ete nyonso wana ezala mpenza na ntina. Na 1958, nabyangamaki ete nákende koyangana na liyangani ya mikili mingi na New York lokola motindami ya Espagne. Na nsima, na 1962, nazwaki kobongisama moko ya ntina mingi na Eteyelo ya mosala ya teokrasi oyo ebongisamaki mpo na biso na Tangier, na Maroc.
Longola mokakatano na ntina na lokótá, nazalaki lisusu kobanga ntango nyonso noki bapolisi bakokanga ngai. Lokola nazalaki mopaya, nayebaki ete soki bakangi ngai bakobengana ngai nokinoki na mboka wana. Mpo na kolɛmbisa likoki ya kokutana na likámá motindo wana, tozalaki kobima bato mibale mibale. Wana moko azalaki koteya, mosusu azalaki koyoka makambo nyonso oyo ekoki komonana ete ezali likámá. Nsima ya kotala ndako moko to bandako mibale, mingimingi na nsuka ya ndako ya étage, tozalaki koleka bituluku misato ya bandako mpe kokɔta na bandako mosusu mibale to misato. Tozalaki kosalela Biblia mingi mpenza, mpe tozalaki komema bobele mwa babúku moke oyo tozalaki kobomba yango malamu kati na bakazaka na biso mpo na kopesa yango epai na bato oyo bazalaki kosepela.
Nsima ya kolekisa mbula moko na Madrid, totindamaki na Vigo, engumba moko na nɔ́rdi-wɛ́sti ya Espagne, epai kuna ata Motatoli moko azalaki te. Na boumeli ya sanza ya liboso, to mpe koleka, la Société asɛngaki ete mwasi na ngai asalaka mingi mosala ya kopesa litatoli—mpo na komonisa lokola ete tozali bobele bapaya-batámboli. Atako tosalelaki mwango ya kobombama, mosala na biso ya kosakola ebendaki likebi ya bato. Na boumeli ya sanza bobele moko basángó ya Katolike bakómaki kopanza makambo na biso na radio. Bayebisaki basangani ya lingomba na bango ete bákeba na babalani mibale oyo bazali kotambola ndako na ndako mpo na koloba na ntina na Biblia—oyo, na eleko wana, ezalaki mokanda mopekisami na mibeko ya Leta. “Babalani mibale oyo bazalaki kolukama na bapolisi,” mobali azalaki mopaya mpe mwasi azalaki mwanamboka ya Espagne, oyo azalaki kosala pene na masoló nyonso!
Basángó babimisaki mobeko ete bobele kosolola mpamba elongo na babalani wana ezalaki bongo lisumu oyo ekokaki kolimbisama bobele soki moto oyo asali yango akei mbala moko kotubela epai ya sángó. Lokola mokomoko akokaki komizela na yango, na nsuka ya lisoló kitoko tosololaki elongo na mwasi moko, ayebisaki biso na mawa nyonso ete asengeli kokende kotubela. Na ntango tolongwaki na ndako na ye, tomonaki ye kokima mbangu mpo na kokende na ndakonzambe.
Babengani biso
Bobele sanza mibale nsima ya kokóma na biso na Vigo, bapolisi babimelaki biso. Bapolisi oyo bakangaki biso bazalaki motema malamu mpe batyaki biso minyololo te mpo na kokende na biso na biro na bango. Kuna na biro, tomonaki moto moko oyo tosilaki koyeba ye liboso, ezalaki bongo mwasi mobeti-masini ya kokoma mikanda oyo toteyaki esili koleka mikolo mingi te. Emonanaki polele ete ayokaki mawa mpo na lolenge amonaki bakangi biso lokola basáli mabe, nokinoki ayaki koyebisa biso ete ezali ye te nde afundaki biso. Nzokande, tofundamaki ete tozalaki kotya “bomoko ya elimo ya Espagne” na likámá, mpe pɔ́sɔ motoba na nsima, babenganaki biso na mboka.
Ezalaki ntango moko mabe, kasi tozalaki soko moko te na likanisi ya kotika. Ezalaki lisusu na mosala mingi ya kosala na esika ebéngami Péninsule ibérique. Nsima ya kolekisa sanza misato na Tangier, batindaki biso na Gibraltar—teritware mosusu epai kuna nsango malamu esakolamaki naino te. Lokola Paulo alobi yango, soki topesi motuya na mosala na biso ya kosakola, tokokóba kosala yango mpe mbano ekopesamela biso. (2 Bakolinti 4:1, 7, 8) Yango emonanaki mpenza solo epai na biso. Na ndako ya liboso oyo tokɔtaki, tobandaki boyekoli ya Biblia elongo na libota mobima. Mosika te, moko moko na biso azalaki kotambwisa boyekoli 17. Mingi kati na baoyo toyekolaki na bango Biblia bakómaki Batatoli, mpe nsima na mbula mibale lisangá moko ya basakoli 25 eyaki kosalema.
Kasi, lokola na Vigo, bakonzi ya mangomba babandaki kotɛmɛla biso. Episkopo ya Lingomba ya Protestá na Gibraltar ayebisaki mokonzi ya bapolisi ete tozalaki “bato mabe,” na nsuka mwango na ye elóngaki. Na Yanuáli 1962, babenganaki biso na Gibraltar. Epai wapi tosengelaki kokende lisusu? Mposa ezalaki naino makasi na Espagne, na yango, tozongaki na Espagne, na elikya ete sikawa nkombo na biso na mikanda ya bapolisi esilá kobunga.
Engumba ya moi makasi Seville nde ezalaki ndako na biso ya sika. Kuna, tozalaki na esengo ya kosala na boyokani ya penepene elongo na babalani mibale Ray mpe Pat Kirkup. Atako Seville ezalaki engumba oyo ezalaki na bafándi katikati ya milió moko, basakoli bazalaki bobele 21, yango wana tozalaki na mosala mingi ya kosala. Sikawa ezali na masangá 15 oyo mazali na basakoli 1 500. Na nsima ya mbula moko, tozwaki likambo moko ya esengo kozanga komizela na yango; tobyangamaki ete tókende kosala mosala ya zongazonga na Barcelone.
Mosala ya zongazonga kati na mboka oyo mosala na biso mopekisamaki ezalaki mpenza lolenge mosusu. Pɔ́sɔ na pɔ́sɔ tozalaki kokende kotala bituluku ya mike, ndambo monene na yango ezalaki na bandeko ya makoki mingi te. Bandeko mibali wana oyo bazalaki kosala makasi bazalaki na mposa ya kobongisama mpe ya lisungi oyo tokokaki kopesa bango. Tolingaki mosala wana mingi! Nsima ya kolekisa bambula mingi kati na bitúká epai kuna Batatoli bazalaki mingi te, to mpe bazalaki nkutu te, tozalaki na esengo ya kokende kotala bandeko mingi mibali mpe basi. Lisusu, na Barcelone, mosala ya kosakola ezalaki pɛtɛɛ, mpe bato mingi bazalaki kolinga koyekola Biblia.
Kobundisa mpasi na mayoki
Nzokande, bobele sanza motoba na nsima, bomoi na ngai ebongwanaki na lolenge ya mawa mpenza. Mokolo na biso ya liboso ya lói pene na mai na monana ebongwanaki na mawa na ntango nazwaki likámá oyo nalobelaki na ebandeli. Nzoto na ngai ezongelaki makasi na yango mwa moke nokinoki nsima ya kozwa mpasi ya kozinda na mai, nzokande likámá yango etikaki elembo moko makasi kati na bɔɔngɔ́ na ngai.
Na boumeli ya mwa basanza, nazalaki kobunda mpo na kokóba mosala na ngai ya zongazonga, kasi na nsuka nasengelaki kozonga na Angleterre mpo na kozwa lisungi ya monganga. Nsima ya mbula mibale nazongelaki mpenza kolɔngɔ́nɔ́ na ngai mpe yango epesaki ngai nzela ya kozonga na Espagne, epai kuna tozongelaki lisusu mosala ya zongazonga. Nzokande, ezalaki bobele mpo na mwa ntango moke. Baboti ya mwasi na ngai bazwaki bokɔnɔ makasi, totikaki mosala ya ntango nyonso mpo na kobatela bango.
Bomoi ekómaki lisusu mpasi makasi na 1968, na ntango bokɔnɔ na ngai ya bɔɔngɔ́ ezongaki lisusu. Na bantango mosusu ezalaki kokómela ngai mpe Rafaela tókanisa ete nakobika lisusu te. Nazalaki komona lokola nde nazalaki kozinda lisusu na mai, kasi na lolenge mosusu! Kolongola likambo oyo ete ezalaki kobulunganisa ngai na makanisi mingi ya mabe, mpasi na mayoki ezalaki mpe kolɛmbisa ngai nzoto. Nazalaki kobɛla mbala mingi mpo na kolɛmba makasi na nzoto, yango ezalaki kopusa ngai ete nápemisaka nzoto ntango nyonso. Na ntango wana bandeko bazalaki koyeba malamu te lolenge ya mokakatano wana; kasi ngai nayebaki ete Yehova azalaki koyeba yango malamu. Nazalaki na esengo mingi na ntango nazalaki kotánga masoló kitoko kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! bazulunalo oyo emityaka na esika ya bato oyo bazali konyokwama na makanisi mpe esungaka bango.
Na boumeli ya eleko wana ya mpasi, mwasi na ngai azalaki ntango nyonso kolendisa ngai. Lolenge tozalaki koluka elongo kosilisa mikakatano na biso eyeisaki makasi ekanganeli na biso ya libala. Baboti ya Rafaela bakufaki, nsima ya mibu 12, kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ekómaki malamu na meko oyo namiyokaki ete tokokaki kozongela mosala ya ntango nyonso. Na 1981, tokamwaki mingi mpe tosepelaki lokola tobyangamaki lisusu ete tózongela mosala ya zongazonga.
Mbongwana monene na teokrasi esalemaki na Espagne uta na ntango tobandaki mosala ya kotambola. Sikawa mosala ya kosakola ekómaki kosalema na bonsomi nyonso, yango wana nasengelaki komiyokanisa na mbongwana wana. Nzokande, kosala lisusu lokola mokɛngɛli ya zongazonga ezalaki libaku moko monene. Lokola tomesanaki liboso kosala mosala ya babongisi-nzela kati makambo mingi ya mpasi, yango epesaki biso nzela ya kolendisa babongisi-nzela oyo bazalaki kokutana na mikakatano. Mpe mbala mingi, tozalaki na makoki ya kosalisa basusu ete bábanda mosala ya mobongisi-nzela.
Mbula 11 nsima ya kosala mosala ya zongazonga na Madrid mpe na Barcelone, na mbala oyo lisusu, kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto oyo ezalaki kobeba esɛngaki na biso ete tótika mosala ya zongazonga. Totindamaki lokola babongisi-nzela monene na engumba Salamanca, epai kuna nakokaki kosala lokola nkulutu. Bandeko na Salamanca bayambaki biso malamu mpenza. Mbula moko na nsima, mpasi mosusu etyaki kondima na biso kati na komekama.
Kozanga koyeba ntina, Rafaela asilaki makila, mpe baekizamɛ́ emonisaki ete azalaki na kanser na mosɔpɔ́ ya monene. Sikawa ngai nde nasengelaki kozala makasi mpo na kosala oyo nyonso ekokaki na ngai mpo na kosunga ye. Liboso tondimaki te, na nsima tobangaki. Rafaela akobika na bokɔnɔ oyo? Na bantango motindo wana, kotya motema mobimba epai na Yehova ezali yango nde esalisaki biso ete tólendendela. Nazali na esengo ya koloba ete lipasó oyo basalaki Rafaela elekaki malamu, tozali kolikya ete kanser yango ekozonga lisusu te.
Atako tozalaki na bantango ya mpasi mpe ya bisengo na boumeli ya mibu 36 oyo tolekisaki na Espagne, tozalaki na esengo ya kozala na bomoi na ntango oyo ya bokóli na elimo. Tomonaki etuluku moke ya basakoli 800 na 1958 kokóla kino kokóma limpinga ya koleka basakoli 100000 lelo oyo. Esengo mingi oyo tozalaki na yango ezalaki makasi koleka mikakatano oyo tokutanaki na yango—tosalisaki basusu ete bándima solo mpe bákóla na elimo, tosalaki elongo lokola mwasi na mobali, mpe tomiyokaki ete tosalelaki ntango na biso na lolenge malamu koleka.
Paulo alobi kati na mokanda na ye ya mibale epai na Bakolinti ete: “Awa ezali biso na mosala oyo engebene mawa oyo emonisameli biso, tozali kotika te.” (2 Bakolinti 4:1, NW) Soki nazongisi makanisi na nsima, nazali kondima ete ezalaki na makambo ebele kati na bomoi na ngai oyo etindaki ngai ete natika te. Ndakisa ya bandeko ya sembo bapakolami na elimo oyo babatelaki ngai malamu na mibu oyo nazalaki naino kokóla epesaki ngai moboko moko ya malamu. Kozala na mobalani oyo bozali na ye na mikano ya elimo lolenge moko ezali lisungi moko kitoko mpenza; na ntango nazalaki kozwa mpasi na mayoki, Rafaela azalaki kosunga ngai, mpe nasalaki motindo moko mpo na ye. Koyeba kosala masɛki ezalaki mpe na ntina monene. Koyeba kosɛka elongo na bandeko—mpe koyeba komisɛka biso moko—na lolenge moko to mosusu, ezalaki kosala ete mikakatano mimonana lokola ete mizali makasi te.
Kasi oyo eleki nyonso, mpo na koyika mpiko na ntango ya komekama esɛngaka kozala na nguya ya Yehova. Namikundolaka ntango nyonso maloba oyo ya Paulo: “Nayebi kosala makambo yɔnsɔ kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” Lokola Yehova azali kosunga biso, tosengeli kotika soko moke te.—Bafilipi 4:13.
[Bililingi na lokasa 23]
Ronald mpe Rafaela Taylor na 1958
[Bililingi na lokasa 24]
Makita na ntango ya bipekiseli na Espagne (1969)